Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/05 lok. 6
  • Tóyekola mwa buku Bókɛngɛlaka!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyekola mwa buku Bókɛngɛlaka!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ya 23 Mai
  • Pɔsɔ ya 30 Mai
  • Pɔsɔ ya 6 Yuni
  • Pɔsɔ ya 13 Yuni
  • Pɔsɔ ya 20 Yuni
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 4/05 lok. 6

Tóyekola mwa buku Bókɛngɛlaka!

Masangá nyonso ya mokili mobimba bakoyekola mwa buku Bókɛngɛlaka! banda na pɔsɔ ya 23 Mai tii na pɔsɔ ya 20 Yuni 2005 na boyekoli ya mokanda. Tosɛngi yo osalela mituna elandi ntango okobongisa likita yango mpe ntango okotambwisa yango. Na ntango ya boyekoli, tángá makambo oyo ezali na mwa buku yango, mpe bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te, soki ngonga ezali.

Pɔsɔ ya 23 Mai

◼ Nkasa 3-4: Na makambo oyo batángi awa, likambo nini mpenza etali yo? Nini emonisi ete makambo yango ezali kosalema kaka epai na bino te?

◼ Lokasa 5: Nini endimisi yo ete Nzambe atyelaka mpenza biso likebi? Nini ekoki komonisa ete totyelaka Nzambe mpe makambo oyo azali kosala likebi mingi?

◼ Nkasa 6-8: Matai 24:​1-8, 14 elobi nini mpo na ndimbola ya makambo oyo ezali kobima na mokili lelo oyo? Ndenge 2 Timote 3:​1-5 emonisi yango, tozali kobika na eleko ya ndenge nini? Mikolo ya nsuka ya nini? Nini endimisi yo ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe? Bokonzi oyo tosakolaka ezali nini?

◼ Nkasa 9-10: Mpo na nini tosengeli kotalelaka malamumalamu bikateli oyo tozwaka mokolo na mokolo mpe makambo oyo totyaka na esika ya liboso na bomoi na biso? (Lom. 2:6; Gal. 6:⁠7) Ntango ozali kotalela mituna oyo ezali na lokasa 10, bavɛrsɛ nini ezali koyela yo na makanisi oyo ekoki kosalisa yo na makambo oyo osalaka?

Pɔsɔ ya 30 Mai

◼ Lokasa 11: Mpo na nini tosengeli biso moko kotalela malamumalamu mituna oyo ezali na lokasa oyo? (1 Kol. 10:12; Ef. 6:​10-18) Biyano oyo tokopesa na mituna yango ekomonisa nini na ndenge oyo tozwaka na liseki te toli ya Yesu oyo ezali na Matai 24:⁠44?

◼ Nkasa 12-14: “Ngonga ya kosambisama” oyo elobelami na Emoniseli 14:​6, 7, ezali nini? ‘Kobanga Nzambe mpe kopesa ye nkembo,’ elimboli nini? Babilone Monene ezali nini, mpe nini ekokómela yango? Tosengeli kosala nini na oyo etali Babilone Monene? Ngonga ya kosambisa oyo esakolamaki, esangisi mpe likambo nini? Lokola toyebi “mokolo te mpe ngonga te” oyo Nzambe akosambisa bato ndenge asakolaki, yango esalaka biso nini? (Mat. 25:⁠13)

◼ Lokasa 15: Ntembe oyo etali Bokonzi, ezali nini, mpe ndenge nini yango etaleli mokomoko na biso?

◼ Nkasa 16-19: “Likoló ya sika” mpe “mabelé ya sika,” ezali nini? (2 Pet. 3:13) Nani alaki biloko yango? Likoló ya sika mpe mabelé ya sika ekomema mbongwana nini? Biso mpe tokozwa matomba yango?

Pɔsɔ ya 6 Yuni

◼ Nkasa 20-21: Likebisi nini Yesu apesaki bayekoli na ye ya ekeke ya liboso na likambo etali kokima? (Luka 21:​20, 21) Ntango nini bazalaki na likoki ya kokima? Mpo na nini ezalaki likambo ya lombangu kokima nokinoki? (Mat. 24:​16-18, 21) Mpo na nini bato mingi batyaka likebi na makebisi te? Ndenge nini ebele ya bato na Chine mpe na ekólo Philipines babikaki mpo batyaki likebi na makebisi? Mpo na nini ezali likambo ya lombangu mpenza, koyoka makebisi oyo Biblia epesi na oyo etali nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo? Lokola mikolo etikali ya kotánga mpenza, tozali na mokumba nini? (Mas. 24:​11, 12)

◼ Nkasa 22-23: Na Australie na 1974 mpe na Colombie na 1985, mpo na nini bato mingi baboyaki kotya likebi na makebisi oyo etalaki makama, mpe nini ekómelaki bango? Yo olingaki kotalela makebisi yango ndenge nini, mpe mpo na nini? Nini ekoki komonisa ete tolingaki kotya likebi na makebisi ya ntango ya Noa? Mpo na nini bato bazalaki kosepela kofanda na Sodomo mpe na bamboka oyo ezalaki pene na yango? Ndenge nini tokoki kozwa matomba soki tokanisi malamumalamu makambo oyo ekómelaki Sodomo?

Pɔsɔ ya 13 Yuni

◼ Nkasa 24-27: Salelá “Mituna ya boyekoli” oyo ezali na lokasa 27.

Pɔsɔ ya 20 Yuni

◼ Nkasa 28-31: Salelá “Mituna ya boyekoli” oyo ezali na lokasa 31.

Soki toyekoli mwa buku oyo, ekosalisa biso ‘tókɛngɛla’ mpe tómilɛngɛla. Tiká ete mosala na biso ya kosakola emonisa ntango nyonso ete tozali kosalela na lombangu mpenza maloba oyo anzelu alobaki ete: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei.”​—⁠Mat. 24:​42, 44; Emon. 14:⁠7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto