LITEYA 48
Kotinda bato bákanisa
TOZALAKA na botɔndi mingi na ndenge Liloba ya Nzambe ebongoli bomoi na biso mpe mposa na biso ezali ete basusu mpe bázwa bolamu yango. Lisusu, toyebi ete mpo moto azwa bolamu na mikolo oyo ekoya, asengeli kondima nsango malamu, soki te akokufa. (Mat. 7:13, 14; Yoa. 12:48) Yango wana tozalaka na mposa makasi ete bato báyamba solo. Nzokande, kondima makasi mpe molende na biso ekoki te; esengeli tóbakisa mpe bososoli mpo na koyeba nini tokoki kosala mpo bango bázwa mpenza bolamu.
Mbala mingi, koyebisa moto na maloba ya kozokisa ete liteya oyo ye akangamá na yango ezali ya lokuta ebotaka mbuma malamu te, ata soki opesi ye bavɛrsɛ ebele. Na ndakisa, soki oyebisi bato kaka ete biyenga oyo basalaka ezali ya bapakano, ekozala mpasi mpo makanisi na bango mpo na bafɛti wana ebongwana. Kokanisa esika moko na bango ebotaka mbuma malamu koleka. Kasi koboya kozala moto ya makambo makasimakasi elimboli nini?
Makomami eyebisi biso ete “bwanya oyo euti na likoló ezali . . . kimya, makambo makasimakasi te.” (Yak. 3:17) Na Grɛki, liloba oyo ebongolami awa na “makambo makasimakasi te” elakisi “koyokela [basusu].” Babiblia mosusu ebongolaka yango na “komitya na esika ya bato,” “boboto,” to “koyeba kokanga motema.” Omoni ete vɛrsɛ wana elobeli kimya esika moko na ezaleli ya koboya kozala makambo makasimakasi. Na Tito 3:2, balobeli yango esika moko na boboto mpe bakesenisi yango na ezaleli ya baalingá-bitumba. Bafilipi 4:5 ezali kolendisa biso tóyebana ete tozali bato ya “makambo makasimakasi te.” Moto ya makambo makasimakasi te atalelaka esika nini moto oyo azali kosolola na ye akolá, makambo nini ezali kokómela ye, mpe makanisi na ye ezali nini. Ayebaka koyokela basusu, soki esengeli bongo. Komonisa ezaleli ya ndenge wana epai ya bato ekotinda bango báfungola makanisi mpe mitema na bango mpe bálanda malamu ntango ozali kososola na bango Makomami.
Ndenge ya kobanda. Mokomi ya makambo ya kala, Luka, alobi ete ntango ntoma Paulo azalaki na Tesaloniki, asalelaki Makomami mpo na ‘kolimbola mpe kondimisa na nzela ya mikapo ete ezalaki na ntina ete Klisto anyokwama mpe asekwa na bakufi.’ (Mis. 17:2, 3) Mpe simbá likambo oyo: Paulo apesaki liteya wana na sinagoga moko ya Bayuda. Bato yango bazalaki kondima Makomami ya Liebele. Boye, asalaki malamu ndenge abandaki na eloko oyo bango bandimaka.
Kasi na lisukulu oyo Paulo asalaki liboso ya Bagrɛki na Ngomba Aleopaji, na Atene, abandaki mbala moko na Makomami te. Abandaki nde na makambo oyo bango bayebaki mpe oyo bazalaki kondima; na nsima, asalelaki makambo yango mpo na kotinda bango bákanisa Mozalisi mpe mikano na Ye.—Mis. 17:22-31.
Mikolo oyo, bato mingi bandimaka Biblia te mpe basalelaka mateya na yango te. Atako bongo, ebele bazali kokutana lelo na makambo ya mpasi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Bazali kolela makambo ekóma malamu. Soki libosoliboso omonisi bango ete ozali komitungisa mpo na makambo oyo ezali kotungisa bango mpe na nsima olakisi bango ndenge nini Biblia ezali kolimbola makambo yango, ndenge wana ya kobanda lisolo ebongi mpe ekoki kotinda bango báyoka oyo Biblia elobi mpo na mokano Nzambe azali na yango mpo na biso bato.
Na ndakisa, soki baboti ya moyekoli moko ya Biblia bateyá ye atosaka mwa makambo mosusu ya lingomba na bango to makambo ya bonkɔkɔ, kasi, moyekoli wana ayekoli ete Nzambe asepelaka te na mateya wana to na makambo wana ya bonkɔkɔ, aboyi kolanda yango mpe atosi mateya ya Biblia. Ndenge nini akoki koyebisa baboti na ye ntina oyo ye aboyi makambo yango? Bango bakoki kokanisa ete, lokola aboyi makambo ya lingomba na bango, aboyi mpe bango. Moyekoli wana ya Biblia akomona ete akosala malamu soki amonisi bango libosoliboso ete alingaka bango mingi mpe apesaka bango limemya, na nsima nde akoya koyebisa bango mateya ya Biblia oyo etindi ye aboya makambo wana.
Ntango ya koyokela bato. Yehova azali na bokonzi ya kopesa mitindo koleka bato nyonso, atako bongo azalaka na makambo makasimakasi ata moke te. Ntango baanzelu ya Yehova bazalaki kobimisa Lota na libota na ye na Sodoma, babelelaki ete: “Kimá epai na ngomba ete okufa te.” Kasi, Lota abondelaki boye: “Te, bongo te, [Yehova].” Asɛngaki bátika ye akima na Soali. Yehova ayokelaki Lota, atikaki ye akima epai alingi; yango wana, ntango bingumba mosusu ebebisamaki, Soali etikalaki. Kasi, na nsima, Lota alandaki etinda ya Yehova mpe akendaki kofanda na etúká yango ya ngomba. (Gen. 19:17-30) Yehova ayebaki ete likanisi oyo ye apesaki Lota ezalaki ya malamu, kasi azalaki na motema molai, andimaki makanisi ya Lota tii ntango Lota ye moko ayaki kososola ete likanisi ya Yehova nde ezalaki malamu.
Biso mpe tosengeli koboya ezaleli ya makambo makasimakasi soki tolingi masolo na biso na bato ebota mbuma malamu. Ata soki tomoni ete likambo oyo moto alobi ezali libunga, mpe atako tozali na makanisi ya solosolo oyo tokoki kobimisa mpo na komonisa libunga wana, ekozala mbala mosusu malamu tótika likambo yango eleka. Elingi koloba te ete tosengeli kokakola mitinda ya Yehova mpo bámona biso bato ya boboto, bato ya makambo makasimakasi te. Nzokande, na bantango mosusu ekozala malamu kaka kopesa moto yango matɔndi na ndenge abimisi makanisi na ye to koboya kolandela mwa makanisi mosusu ya libunga mpo onyata mingimingi mpenza likambo oyo ekosalisa ye mingi koleka. Ata soki aboyi mateya oyo yo ondimaka, kotomboka te. Okoki kotuna ye mpo na nini alobi bongo. Yoká eyano na ye malamumalamu. Na ndenge yango, okoyeba epai wapi makanisi na ye ezali kouta. Kosala bongo ekoki mpe kobenda moto yango andima kosolola na yo malamu na mbala ekoya.—Mas. 16:23; 19:11.
Yehova apesá bato likoki ya kopona. Atikaka bango básalela likoki wana, atako na bantango mosusu basalelaka yango na ndenge ya mabe. Yosua, molobeli ya Yehova, atángelaki bato ya Yisalaele likambo mokomoko oyo Nzambe asalelaki bango. Kasi, na nsima alobaki boye: “Soki nde emonani mabe na miso na bino kosalela [Yehova], mbɛlɛ bópona lelo ye oyo bokosalela, soki banzambe oyo batata na bino basalelaki na mokili ya ngámbo ya Ebale, to banzambe ya Baamola, baoyo bozali kofanda na mokili na bango. Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].” (Yos. 24:15) Mosala oyo bapesi biso lelo ezali nde ya kopesa “litatoli,” mpe tosalaka yango na ndenge mpenza ya bato oyo bandimaka makambo oyo bazali koteya, kasi totindikaka bato na makasi te ete bándima. (Mat. 24:14) Bango moko nde basengeli kopona, ezali lotomo na bango mpe biso tokoki kopekisa bango yango te.
Tuná mituna. Na likambo etali kokanisa malamumalamu elongo na bato, Yesu azali ndakisa moko monene. Azalaki kotalela makambo nini bato bakolá na yango mpe asalelaki bandakisa oyo ekokaki kozala mpasi te mpo bango bándima. Azalaki mpe kosalela mituna na ndenge ya malamu. Yango epesaki bato nzela ya kobimisa makanisi na bango mpe komonisa makambo oyo ezalaki na mitema na bango. Elendisaki mpe bango bákanisa mosika makambo oyo azalaki kolobela.
Moto moko oyo ayebaki Mibeko malamumalamu atunaki Yesu boye: “Moteyi, na kosaláká nini nakozwa libula ya bomoi ya seko?” Yesu akokaki kopesa ye eyano mbala moko, kasi asalaki bongo te. Alukaki nde moto yango abimisa makanisi na ye. “Nini ekomamá na kati ya Mibeko? Otángaka ndenge nini?” Moto yango apesaki eyano ya malamu. Kasi eyano na ye ya malamu esukisaki nde lisolo? Te. Yesu atikaki ye akoba, mpe motuna moko oyo moto yango ye moko abimisaki emonisaki ete azalaki koluka komimonisa moto malamu. Atunaki boye: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Na esika ya koyebisa ye ete mozalani na yo ezali moto boye to boye, Yesu asalaki yango te mpo mobali wana alingaki kobimisa ntembe, mpamba te, na mikolo wana, Bayuda bazalaki na makanisi mabe mpo na bato ya bikólo mosusu mpe mpo na Basamalia. Yesu apesaki ye kaka ndakisa moko oyo etindaki ye akanisa malamu. Ndakisa yango ezalaki ya Mosamalia moko ya motema malamu oyo ayaki kosalisa moto moko ya mobembo oyo babɔtɔlaki ye biloko mpe babɛtaki ye; nzokande nganga-nzambe moko mpe Molevi moko balekaki wana, kasi basalisaki moto yango te. Yesu atunaki ye motuna moko ya moke kaka mpe amonaki ete moto yango akangi mpenza ntina. Ndenge oyo Yesu amemaki ye na kokanisa esalisaki moto yango ayeba ndimbola mosusu ya liloba “mozalani,” oyo ye azalaki koyeba te liboso. (Luka 10:25-37) Talá ndakisa malamu ya kolanda! Na esika ya koloba yo moko banda ebandeli tii nsuka ya lisolo, yekolá kotuna mituna na mayele mpe kosalela bandakisa mpo na kotika moto ye moko akanisa, kasi yo okanisa na esika na ye te.
Monisá bantina. Ntango ntoma Paulo asalaki lisukulu na kati ya sinagoga ya Tesaloniki, asukaki kaka te na kotánga makambo na mokanda oyo bato oyo bazalaki koyoka ye bazalaki kondima. Luka alobi ete Paulo alimbolaki makambo yango, amonisaki ntina oyo ezalaki kondimisa yango, mpe alakisaki ndenge nini makambo oyo atángaki ekokisamaki. Yango wana, “bamosusu na kati na bango bakómaki bandimi mpe basanganaki elongo na Paulo mpe Silasi.”—Mis. 17:1-4.
Ata soki bato oyo bazali koyoka yo bazali banani, mayele wana ya kotinda bato na kokanisa ekoki mpenza kobota mbuma. Likambo wana emonanaka ntango ozali koteya bandeko ya libota na yo, to kosolola na bato oyo bosalaka na bango to bana ya kelasi na bino, to ntango ozali kosolola na bato oyo okutani na bango na mosala ya kosakola na bisika ya bato ebele, to ntango ozali koyekola na moto Biblia, to mpe na lisukulu na yo na lisangá. Ntango otángi vɛrsɛ moko, yo moko okoki koyeba ndimbola na yango, kasi mbala mosusu moto oyo azali koyoka yo ayebi yango ata moke te. Mpe ndenge na yo ya kolimbola to ya kosalela mokapo oyo otángi ekoki kobima lokola likanisi na yo moko. Yango wana, ekozala malamu mbala mosusu opona mwa maloba ya ntina oyo ezali na kati ya mokapo mpe olimbola yango. Okoki mpe kondimisa ndimbola wana soki otángi mokapo wana mobimba to soki otángi bavɛrsɛ mosusu oyo ezali mpe kolobela likambo moko wana. To mpe ekozala malamu opesa ndakisa moko oyo ekolakisa ete likambo olobi ezali solo. Ntango mosusu, kotuna bato oyo bazali koyoka yo mituna mpo bákanisa likambo yango ekoki kozala malamu. Komema lisolo ndenge wana etikaka bato na makanisi ya malamu mpe epesaka bango mwa makambo mingi oyo bakoki kokanisa.