Loyembo 215
Tózala bato ya mitema mawa
1. Yehova Yah’asakolaki mpela
Mpo na koboma bato mabe.
Na Noa, mosembwi, alobaki:
‘Tongá masuwa, sakolá mpe!’
Noa’akimaki nd’etindá oyo,
Kolobák’et’akokoka te?
Na mawa ya Nzambe, atongaki,
Asakolaki na molende.
2. Talá nsuka’a mokili’ebɛlɛmi,
Totindami na mawa na Yah:
Tósakola mokolo monene,
Bayoki malamu babika.
Y’olobi nde: ‘Nakosakola te,
Mpo nakokoka koloba te.’
Elimo ya Nzambe ekosunga
Basembwi bazwi ngolu na ye.
3. Mpo na solo, na mawa ya Nzambe,
Bato na ye bakosepela.
Talá oy’elakami n’esengo,
Ekozal’o mboka ya sika.
Biso mpe, tómonisa boboto.
Tólendisa baninga ete:
“Bomoi na bino, bópesa Yah;
Bósalela Bokonzi na ye.”