Ozali na mayele?
NTANGO aponaki basambisi na Yisalaele, Mose asalaki makasi aluka “bato ya bwanya, ya mayele mpe oyo bayebi makambo mingi.” (Deteronome 1:13, NW ) Moto ayebaka makambo mingi soki akómi mokóló, yango wana atalelaki bango kaka na likambo wana te. Atalelaki mpe soki bato yango bazali na bwanya mpe na mayele mpo yango ezalaki mpe na ntina mingi.
Moto ya mayele azalaka na bilobaloba te mpe na bisalasala te. Diksionɛrɛ moko (Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary), elobi ete moto ya mayele azali mpe moto oyo “akoki kofanda kimya kasi na bokɛngi.” Ɛɛ, “ntango ya koloba” ezali, “ntango ya kozala nyɛ” mpe ezali. Moto ya mayele ayebaka kosala bokeseni yango malamu. (Mosakoli 3:7) Mbala mingi, kofanda nyɛ ezalaka na ntina, mpo Biblia elobi ete: “Na mingi na maloba, masumu mazangi te; nde ye oyo akangi monɔkɔ na ye azali na mayele.”—Masese 10:19.
Baklisto basengeli kosɛnzɛla ete bázala na mayele na boyokani na bango na bato mosusu. Moto oyo alobaka mingi, to oyo agangaka ntango nyonso azali te moto oyo aleki bato mosusu nyonso na ntina to azali te moto oyo bato bazalaka kaka na mposa na ye. Kanisá naino, Mose azalaki “na nguya na maloba na ye,” kasi akokaki komema libota ya Yisalaele malamu te tii ntango akolisaki bizaleli lokola motema molai, komikitisa, mpe komipekisa. (Misala 7:22) Yango wana, baoyo bapesi bango bokonzi likoló ya bamosusu basengeli mpenzampenza kosala makasi ete bázala na komikitisa mpe báyebaka ete bato mosusu mpe baleki bango.—Masese 11:2.
Baoyo Yesu Klisto apesi bango “biloko nyonso bizwi ye,” babengami bato “ya sembo mpe ya mayele” na kati ya Liloba ya Nzambe. (Biso nde totɛngisi makomi; Matai 24:45-47) Bato yango bazalaka na komikitisa, bazalaka motema mɔ́tɔmɔ́tɔ te, balukaka mpe te kokóma liboso na esika oyo Yehova akómi naino te. Batikalaka mpe nsima te ntango likanisi ya Nzambe na likambo moko ezali polele. Bayebi ntango nini basengeli koloba mpe ntango ya kofanda nyɛ mpe kozela makambo elimbolama polelepolele. Baklisto nyonso basengeli kolanda ndakisa na bango mpe lisusu basengeli komonisa ete bazali na mayele, ndenge moombo ya sembo azali na mayele.—Baebele 13:7.