Loyembo 29
Tambolá na bosembo
Ya Papye
1. Sambisá ngai, soki naza’ sembo;
Natyeli yo mpenza motema na nyonso.
Taláká ngai, mpe yo mekáká nga’;
Pɛtolá mpenza ngai, mpo ngai napambwama.
(MONDIMO)
Mpo na ngai, Nazwi ekateli;
Ya kolanda seko, Nzela ya bosembo.
2. Nafandi te na bato ya mabe.
Nayini bat’oyo balingi solo te.
Nakufa te lokola bazoba;
Bato mabe, oyo balingi kanyaka.
(MONDIMO)
Mpo na ngai, Nazwi ekateli;
Ya kolanda seko, Nzela ya bosembo.
3. Mpo nalingi ndako na yo solo.
Losambo n’o pɛto, nakangami n’ango.
N’etumbelo na yo nakoleka,
Mpo natɔnda yo na mokili mobimba.
(MONDIMO)
Mpo na ngai, Nazwi ekateli;
Ya kolanda seko, Nzela ya bosembo.
(Talá mpe Nz. 25:2.)