Loyembo 42
‘Tósalisa bato oyo balɛmbi’
Ya Papye
1. Tozali na bolɛmbu
Kati na nzoto.
Ata bongo Yehova,
Alingi biso.
Mawa aza’ n’ango;
Aza’ mpe bolingo.
Biso mpe tólingaka
Tósunga bato.
2. Yoká motun’a Paulo:
‘Nani alɛmbi?’
Na makila ya Kristo,
Tosombamaki.
Bat’oyo balɛmbi,
Nzambe alendisi.
Yebá mpasi na bango,
Bázwa lisungi.
3. Tólɛmbisa bango te,
Tókanisa nde
Ndenge ya kolendisa
Na boboto mpe.
Tósala milende
Bázwa makasi mpe;
Soki tosungi bango,
Bakolɛmba te.
(Talá mpe 2 Ko. 11:29; Yis. 35:3, 4; Gal. 6:2.)