Biblia elobi nini?
Kondima ná likoki ya kokanisa ezali na boyokani?
MOTO moko ya filozofi na Grande-Bretagne A. Grayling, akomaki ete: “Kondima ekeseni na likoki ya kokanisa.” Maloba na ye, emonisi makanisi ya ebele ya bakomi mpe bato ya mayele, oyo na boumeli ya basiɛklɛ balobaki ete kondima ná likoki ya kokanisa ekeseni.
Bato bandimá mateya mosusu ya mangomba kozanga ete básalela likoki na bango ya kokanisa. Kasi, tótalela likambo oyo: Mateya mingi ya bato ya siansi oyo bato mingi bandimá emonanaki lokuta. Yango emonisi nde ete mateya nyonso ya siansi ezali lokuta to batalelaki yango malamumalamu te? Ezali mpe bongo te mpo na mateya mosusu ya Biblia? Kutu, kondima oyo Biblia elobeli, esimbami na boyebi ya sikisiki mpe na likoki ya kokanisa. Wana ozali kotalela makambo oyo esalisaka mpo na kokóma na kondima ya solosolo, okomona ete kondima ya solosolo mpe likoki ya kokanisa ezali na boyokani.
Kondima oyo euti mpenza na likoki ya kokanisa
Na ndakisa, Biblia elobi ete mpo ‘Nzambe andima’ losambo ya moto, esengeli kozala ‘mosala mosantu oyo moto yango azali kosala na makoki na ye ya kokanisa.’ (Baroma 12:1) Na yango, kondima oyo Biblia elobeli, ezali bindimandima te, ndenge bato mosusu balobaka. Kasi, ezali likambo oyo okanisaki na yango malamumalamu, oyo esalaki ete otyela Nzambe mpe Liloba na ye motema; yango eutaka mpenza na likoki ya kokanisa.
Na ntembe te, soki olingi kokanisa malamu, osengeli koyeba makambo oyo ezali solo mpenza. Ata baprogramɛ ya ordinatɛrɛ oyo esalemi malamu mpenza mpe ezali na makambo ebeleebele, ekoki kobimisa makambo ya malamu te soki batye makambo oyo ezali solo te. Ndenge moko mpe, makambo oyo oyokaka to oyo okɔtisaka na motema na yo ekoki kosala ete ozala na kondima ya solo to lokuta. Yango wana, Biblia elobaka ete: “Kondima eutaka na likambo oyo moto ayoki.”—Baroma 10:17.
Likambo ya libosoliboso mpo na kozala na kondima ezali kozwa “boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Ndenge Biblia emonisi, kaka “solo” nde ‘ekopesa yo bonsomi,’ na mateya oyo ebungisá bato nzela, ezala ya siansi to ya mangomba. (Yoane 8:32) Biblia ekebisi yo ete ‘ondima liloba nyonso te.’ (Masese 14:15) Kasi, elobi ete osengeli ‘koluka koyeba likambo nyonso,’ to omeka makambo nyonso oyo oyoki liboso ya kondima yango. (1 Batesaloniki 5:21) Mpo na nini osengeli kolukaluka mpe komeka mateya oyo ondimaka? Mpamba te, kondima oyo euti na mateya ya lokuta ezali koluka kosimba mopɛpɛ. Bato mosusu oyo bazalaki na makanisi ya malamu na engumba Beroya na ntango ya kala, batiká ndakisa ya malamu na likambo etali kokóma na kondima ya solosolo. Atako bato yango bazalaki mpenza na mposa ya kondima makambo oyo bamisionɛrɛ bazalaki koteya bango, bazwaki ekateli ya “kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezali bongo.”—Misala 17:11.
Ndenge oyo okoki kotyela Biblia motema
Kasi, okosala nini soki omonaka lokola ete Biblia ezali mpenza solo te? Ndenge nini okoki kotyela Biblia motema mpe komona ete elobaka makambo ya solo? Kasi, ndenge nini okómaka kotyela bato mosusu motema? Na ntembe te, ezali ntango ozali koluka koyeba bango, ntango ozali kotala makambo oyo basalaka, mpe makambo oyo emonanaka na misala na bango. Mpo na nini te kosala kaka bongo mpo na Biblia?a
Biblia elobeli kondima ya solosolo lokola “kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, ezali elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” (Baebre 11:1) Emonani polele ete na esika azala bindimandima, moto ya kondima ya solosolo atalelaka liboso makambo nyonso malamumalamu liboso andima yango. Kotalela makambo ndenge wana, esalisaka moto andima ete ata makambo oyo emonanaka na miso te, ezali solo.
Kasi, okosala nini soki omoni lokola ete makambo oyo ozali koyekola ekeseni na makambo oyo ondimaka banda kala? Okokipe yango te? Okosala bongo te. Ekoki kozala malamu otalela makambo oyo omoni ete ekesani na oyo ondimaka. Na Biblia, Nzambe alaki kopesa boyebi, bososoli mpe likoki ya kokanisa epai ya bato ya sembo oyo balukaka koyeba solo.—Masese 2:1-12.
Kondima oyo euti na makambo oyo Biblia eteyaka, eyokani na likoki ya kokanisa. Kondima na yo, ezali ya ndenge nini? Bato mingi “basangolá” mateya na bango ya mangomba mpe basalelaki ata moke te likoki na bango ya kokanisa mpo na kotalela mateya yango malamumalamu. Nzokande, kotalela makambo oyo ondimaka mpo ‘na komindimisa’ ete makanisi na yo eyokani na Liloba ya Nzambe, ezali te kozanga limemya. (Baroma 12:2) Biblia elendisi biso ete: ‘Tómekaka mpenza liloba nyonso oyo emonani lokola nde euti na Nzambe, mpo na komona soki euti mpenza na ye.’ (1 Yoane 4:1) Soki osali bongo, okozala na likoki ya ‘koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni yo ntina ya elikya oyo ozali na yango,’ ata soki bato mosusu bamoni ete mateya oyo ondimaka ezali solo te.—1 Petro 3:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki olingi básalisa mpo oyeba makambo ya solosolo na ntina ya Biblia, komelá babimisi ya zulunalo oyo.
OSILÁ KOMITUNA?
● Biblia epekisi kosalela likoki ya kokanisa?—Baroma 12:1, 2.
● Esengeli kozala na boyebi ya ndenge nini mpo okóma na kondima ya solosolo?—1 Timote 2:4.
● Ndenge oyo Biblia elimboli kondima, eteyi biso nini?—Baebre 11:1.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
Nzambe apambolaka baoyo balukaka mpenza koyeba solo