Batelá yango
Ekateli nini nakozwa mpo na biloko ya mikemike oyo babendaka na makila mpe mayele ya minganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko?
Biblia epesi baklisto etinda ete “báboya . . . makila.” (Mis. 15:20) Yango wana, Batatoli ya Yehova bandimaka te bázongisa bango makila to biloko ya minene minei oyo ezalaka na makila, elingi koloba, ba globule rouge, ba globule blanc, ba plaquette, mpe plasma. Bandimaka mpe te kopesa makila na bango mpo bázongisa yango moto mosusu to kobombisa makila na bango moko mpo bázongisa bango yango nsima.—Lev. 17:13, 14; Mis. 15:28, 29.
Ndenge nini bazwaka biloko ya mikemike oyo ezalaka na makila, mpe mpo na nini moklisto mokomoko nde asengeli kozwa ekateli ya koboya to kondima biloko yango?
Biloko yango ezalaka na kati ya biloko minei ya minene ya makila; mpo na kobenda yango, basalelaka mayele babengi fractionnement. Na ndakisa, bakoki kobenda na plasma, oyo ezali moko ya biloko minei ya makila, mwa biloko oyo elandi: mai (pene na 91 %); baproteini (pene na 7 %), na ndakisa ba albumine, ba globuline mpe ba fibrinogène; mpe mwa biloko mosusu (pene na 1,5 %), na ndakisa, ba nutriment, ba hormone, ba gaz, bavitamini, bosɔtɔ, mpe ba électrolyte.
Etinda ya koboya makila etali mpe biloko mikemike oyo babendaka na makila? Tokoki kopesa eyano ya sikisiki te. Biblia elobi polele te soki esengeli koboya to kondima biloko mikemike oyo babendaka na makila.a Minganga bakómi kosalisa bato na biloko mikemike ya ndenge na ndenge oyo babendi na makila oyo moto apesi. Moklisto mokomoko asengeli kosalela lisosoli na ye mpo na koyeba soki akondima to akoboya básalisa ye na biloko yango.
Ntango olingi kozwa ekateli ya ndenge wana, talelá mituna oyo elandi: Nayebi ete soki naboyi biloko nyonso ya mikemike oyo babendaka na makila, yango elingi koloba ete nakoboya mpe bankisi mosusu, lokola oyo ebomaka bamikrobe mosusu, esalisaka bamaladi mosusu, to oyo esalaka ete makila ekangama mpo etika kobima na nzoto? Nakoki nde kolimbolela monganga ntina oyo nandimi to naboyi biloko mosusu ya mikemike oyo babendaka na makila?
Mpo na nini ngai moko nde nasengeli kozwa ekateli ya koboya to kondima mayele mosusu ya minganga oyo esɛngaka mpe kosalela makila ya moto ye moko?
Baklisto bandimaka te kopesa makila na bango mpo bázongisa yango moto mosusu to kobombisa yango mpo bázongisa bango yango na nsima; atako bongo, mayele mosusu ya minganga mpe baekzamɛ na bango mosusu oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko, ebukaka mpenzampenza te mitinda ya Biblia. Yango wana, moklisto mokomoko asengeli kosalela lisosoli na ye mpo na koyeba soki akoboya to akondima yango.
Ntango olingi kozwa ekateli ya ndenge wana, omituna mituna oyo elandi: Soki na ntango ya lipaso, bazali kolekisa ndambo ya makila na ngai na masini moko mpe ezali kozonga na nzoto na ngai kasi esalemi ete makila yango etiki kotambola ata mwa moke, lisosoli na ngai ekondima natalela yango lokola kaka makila na ngai moko, mpe ekosɛnga te ete ‘básopa yango na mabelé’? (Det. 12:23, 24) Lisosoli na ngai oyo eteyami na Biblia ekotungisama te soki na ntango oyo minganga bazali kosalisa ngai to kosala ngai ekzamɛ, babendi ngai makila, batye yango nkisi, mpe bazongisi ngai yango lisusu na nzoto? Nayebi nde ete soki naboyi mayele nyonso ya minganga oyo ezali kosɛnga básalela mpe makila na ngai moko, yango elimboli ete nasengeli koboya mpe balolenge mosusu ya kosalisa bamaladi, na ndakisa dialyse, to mayele oyo esɛngaka kosalela masini oyo babengi cœur-poumon artificiel? Nabondelaki Yehova asalisa ngai liboso nazwa ekateli na likambo oyo?b
Nakozwa bikateli nini?
Talá bitanda mibale oyo ezali na nkasa elandi. Na Etanda 1, batángi ndambo ya biloko mikemike oyo babendaka na makila mpe ndenge oyo minganga basalelaka yango. Yo moko komá ekateli na yo, mpe monisá soki okondima to okoboya básalisa yo na biloko mikemike yango. Na Etanda 2, batángi ndambo ya mayele ya minganga oyo esɛngaka mpe kosalela makila ya moto ye moko. Yo moko komá ekateli na yo, mpe monisá soki okondima to okoboya mayele yango. Bitanda wana ezali mikanda ya Leta te, kasi okoki kosalela biyano oyo okokoma na bitanda wana ntango okotondisa kalati na yo DPA (Instructions médicales/Désignation d’une personne de confiance).
Yo moko nde osengeli kozwa bikateli yango, osengeli kotikela moto mosusu te mokumba wana. Ndenge moko mpe, moklisto moko te asengeli koloba mabe mpo na bikateli ya moklisto mosusu. Na makambo oyo, “moto na moto akomema mokumba na ye moko,” mpo na bikateli oyo akozwa.—Gal. 6:4, 5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa yo oyeba likambo yango malamu ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2004, nkasa 29-31.
b Makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa yo oyeba likambo yango malamu ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000, nkasa 30-31, mpe na DVD Des alternatives à la transfusion—Documentaires.
[Etanda na lokasa 5]
Etanda 1
OYO BAKLISTO EKATELI NA YO
BANDIMAKA TE
MAKILA BILOKO MIKEMIKE OYO Bikateli oyo
BABENDAKA NA MAKILA osengeli kozwa
PLASMA ALBUMINE—EZALAKA MINGI TE
NA PLASMA (ELEKAKA 4 % TE)
Albumine ezali proteini moko oyo
ezalaka na plasma. Mitindo mosusu
ya albumine ezalaka mpe na banzete
mpe na biloko ya kolya, lokola miliki
mpe maki; ezalaka mpe na mabɛlɛ ya
mama oyo azali komɛlisa. Minganga
basalelaka mpe albumine oyo babendi ․ Nandimi albumine
na makila na bankisi oyo ebakisaka to
mai na makila mpo na kosalisa moto ․ Naboyi albumine
oyo abimi makila mingi to aziki makasi.
Na bankisi yango albumine ezalaka
mwa mingi (ata tii na 25 %). Bankisi
mingi, bakisá mpe mitindo mosusu
ya érythropoïétine (EPO), ezalaka na
albumine moke mpenza.
BA IMMUNOGLOBULINE—EZALAKA
MINGI TE NA PLASMA (ELEKAKA 3 % TE)
Ba immunoglobuline ezali baproteini ya
mikemike oyo ekoki kosalelama na
bankisi mosusu mpo na koboma
bamikrobe mpe bamaladi mosusu, ․ Nandimi ba
na ndakisa maladi ya mongongo immunoglobuline
(diphtérie), tetanosi, hépatite, mpe to
rage. Basalelaka mpe yango mpo ․ Naboyi ba
na kobatela mwana oyo azali na immunoglobuline
libumu na makambo mosusu oyo
ekoki koboma ye, mpe mpo na
kosalisa moto oyo nyoka to
limpulututu (araignée) eswi ye.
BILOKO OYO ESALAKA ETE
MAKILA EKANGAMA—EZALAKA MOKE
MPENZA NA PLASMA (NA NSE YA 1%)
Ezali na baproteini mingi oyo
esalaka ete makila ekangama mpo
etika kobima na nzoto. Baproteini
yango mosusu bapesaka yango na ․ Nandimi biloko
bato ya maladi oyo babimaka oyo esalaka ete makila
makila mpambampamba. Basalelaka ekangama, oyo
mpe yango na mai (colle) oyo babendi na makila
minganga bakangaka na yango to
mpota to oyo batyaka na mpota ․ Naboyi biloko
nsima ya lipaso, mpo ebimisa makila oyo esalaka ete
te. Moko ya bankisi oyo ezalaka makila ekangama,
na baproteini yango ezali: cryoprécipité. oyo babendi
Liyebisi: Lelo oyo, ezali na bankisi na makila
mosusu oyo esalaka ete makila
ekangama, oyo esalemi na biloko
oyo euti na makila te.
BA HÉMOGLOBINE—EZALAKA
GLOBULE MWA MINGI NA KATI YA BA
ROUGE GLOBULE ROUGE (33 %)
Hémoglobine ezali proteini oyo
ememaka mopɛpɛ ya malamu na
nzoto mobimba mpe mopɛpɛ ya ․ Nandimi
mabe na mimpululu. Bankisi oyo hémoglobine
basalaka yango na proteini wana, to
ezala bazwi proteini yango na ․ Naboyi
makila ya moto to ya nyama, hémoglobine
basalelaka yango mpo na kosalisa
moto oyo asili mpenza makila to
oyo makila ebimi ye mingi.
HÉMINE—EZALAKA MOKE
MPENZA NA BA GLOBULE ROUGE
(NA NSE YA 2 %)
Babendaka yango na hémoglobine
mpo na kosalisa bamaladi mosusu ya ․ Nandimi hémine
makila (porphyrie) oyo bato moke to
babotamaka na yango; bamaladi yango ․ Naboyi hémine
etungisaka libumu, bɔɔngɔ mpe motema.
BA BA INTERFÉRON—EZALAKA
GLOBULE MOKE MPENZA NA BA GLOBULE
BLANC BLANC
Yango ezali baproteini oyo ebundisaka ․ Nandimi ba
bamaladi mosusu mpe kansɛr. Ba interféron oyo
interféron mingi eutaka na makila te, babendi na
kasi mosusu basalaka yango na makila
biloko oyo babendi na ba globule to
blanc ya makila ya moto. ․ Naboyi ba
interféron oyo
babendi na makila
BA Lelo oyo, babendi naino te
PLAQUETTE biloko mikemike oyo ezalaka
na ba plaquette mpo básala
na yango nkisi.
[Etanda na lokasa 6]
ETANDA 2
EKATELI NA YO
MAYELE MOSUSU OYO EKOSƐNGA MINGANGA BÁSALELA MAKILA NA YO MOKO
*Liyebisi: Monganga na monganga azali na ndenge na ye ya kosalela mayele oyo esɛngaka makila ya moto ye moko. Osengeli kosɛnga monganga na yo alimbolela yo malamumalamu biloko oyo akosalela mpo na kosalisa yo, mpo oyeba soki ezali kobuka mitinda ya Biblia te mpe eyokani na bikateli oyo lisosoli na yo etindi yo ozwa.
NKOMBO YA OYO YANGO Bikateli oyo
MAYELE YANGO ESALAKA osengeli kozwa
(Mbala mosusu, okoki
kosolola na monganga
na yo liboso ya
koboya to kondima
mayele oyo to mosusu.)
RÉCUPÉRATION Esalisaka moto abungisa
DU SANG makila mingi te.
ÉPANCHÉ Ntango bazali kosala moto
lipaso, bakobenda makila
oyo ezali kobima na
mpota to na esika
mosusu ya nzoto na
ye mpe bakolekisa ․ Nandimi
makila yango na masini ․ Nakoki kondima*
moko. Masini yango ․ Naboyi
ekopɛtola makila yango
mpe na nsima, ntango
mosusu kozanga ete
makila yango etɛlɛma,
bakozongisa yango lisusu
na nzoto na ye.
HÉMODILUTION Esalisaka moto abungisa
makila mingi te.
Ntango bazali kosala moto
lipaso, bakolekisa ndambo ya
makila na ye tii na kati ya
mabenga moko boye mpe
na esika ya makila wana,
bakozongisa ye mai moko ․ Nandimi
oyo ekokómisa makila oyo ․ Nakoki kondima*
etikalaki na nzoto maimai ․ Naboyi
mpe makila yango ekozala
na ba globule rouge mingi
te. Na ntango ya lipaso to
na nsuka na yango,
bakozongisa moto yango
makila oyo batyaki na mabenga.
CIRCULATION Esalaka ete makila ekoba
EXTRA- kotambola na nzoto.
CORPORELLE Bakolekisa makila ya moto
ya maladi na masini moko
oyo ekosala lokola motema ․ Nandimi
to mimpululu na ye; masini ․ Nakoki kondima*
yango ekotya mopɛpɛ ya ․ Naboyi
malamu na makila yango
mpe ekozongisa yango lisusu
na nzoto na ye.
DIALYSE Esalaka lokola enama
ya nzoto.
Makila ya moto ya maladi
ekoleka na masini moko oyo ․ Nandimi
ekopɛtola yango mpe na ․ Nakoki kondima*
nsima ekozongisa yango ․ Naboyi
lisusu na nzoto na ye.
BLOOD PATCH Ekangaka esika oyo
(PANSEMENT babendaki mai ya mokɔngɔ
SANGUIN) mpo etika kotánga.
ÉPIDURAL Na nzela ya ntonga,
bakɔtisaka na mokɔngɔ ya
moto mwa ndambo ya
makila na ye moko tii ․ Nandimi
na mwa loposo ya moke ․ Nakoki kondima*
oyo ezingi moelle épinière. ․ Naboyi
Basalaka bongo mpo na
kokanga esika oyo
bakɔtisaki ntonga mpo
na kobenda mai na mokɔngɔ.
PLASMAPHÉRÈSE Esalisaka bamaladi mosusu.
Bakobenda moto makila mpe
bakolongola plasma na makila
yango. Bakotya makila yango
nkisi mosusu oyo ekokani na ․ Nandimi
plasma mpe na nsima ․ Nakoki kondima*
bakozongisa ye yango. Kasi, ․ Naboyi
minganga mosusu balingaka
kosalela nde plasma
oyo euti na makila ya moto
mosusu. Soki bongo, moklisto
akondima yango te.
MARQUAGE À Mpo na kosala ekzamɛ
L’AIDE to kosalisa maladi.
D’UN TRACEUR Bakobenda moto makila,
bakotya nkisi na makila
yango mpe na nsima ․ Nandimi
bakozongisa ye yango. ․ Nakoki kondima*
Ntango oyo makila ekoumela ․ Naboyi
libándá ya nzoto ezalaka
ndenge moko te.
GEL Ekangaka mpota, esalaka
PLAQUETTAIRE ete makila ebima mingi te.
AUTOLOGUE Bakobenda moto mwa makila
(ELINGI KOLOBA mpe bakotya bankisi oyo
“ESALEMI NA ekosala ete ekóma na ba
MAKILA NA plaquette mpe ba globule ․ Nandimi
YO MOKO”) blanc mingi. Na nsima, ․ Nakoki kondima*
bakopakola makila yango ․ Naboyi
na mpota ya lipaso.
Liyebisi: Ntango mosusu
basalelaka mpe biloko oyo
ekangaka makila, oyo
babendi na makila ya ngɔmbɛ.