Loyembo 80
Motema malamu
Ya Papye
1. Motema malamu’a Nzambe
Epesaka esengo.
Nzambe, Tata ya likoló,
Ye malamu na nyonso.
Ayokeli biso mawa,
Atako toza’ mabe;
Kaka ye nde tósambela
N’esengo tósalela’e.
2. Nzambe asalaki biso
Tózala lokola ye
Tólanda bomoto na ye,
Tósala malamu na’e.
Tómekola mpenza Nzambe
Na ezaleli yango.
Tósɛnga y’elimo santu,
Tóbota mbuma n’ango.
3. Tosengeli komonisa
Bolingo na bandeko
Tósalela bango nyonso
Makambo ya bosembo.
Lokola toz’osakola
Nsang’oy’eza’ malamu,
Tóponaka bilongi te;
Tósala nde malamu.
(Talá mpe Nz. 103:10; Mrk. 10:18; Gal. 5:22; Ef. 5:9.)