Mokapo 5
“Bóluka Yehova” na losambo oyo andimaka
1. Mapamboli nini ozali kozwa lokola ozali na kati ya basaleli ya Nzambe?
OYO nde libaku malamu ozali na yango ya koyeba Nzambe oyo akokisaka bisakweli! Ozali na likoki ya komona kokokisama ya makambo oyo mosakoli Hosea akomaki ete: “Nakolaka yo libala mpe nakokangama na yo; mpe okoyeba mpenza Yehova.” Hosea azalaki kolobela kimya, bomoi kitoko lokola na paradiso oyo basaleli ya Nzambe basengelaki kozala na yango nsima ya kobima na bango na boombo na Babilone. Ndenge moko mpe, bokoli mpe kimya ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango lelo ezali lokola nde bazali na kati ya paradiso. (Hosea 2:18-20) Banda omipesá na Nzambe, okómá Motatoli ya Yehova, okóma komema nkombo na ye mpe mposa na yo ezali ete okoba komema nkombo yango.—Yisaya 43:10, 12; Misala 15:14.
2, 3. (a) Mpo na nini Yehova akómaki koyina ndenge oyo Bayisraele bakómaki kosambela ye? (b) Mpo na nini tosengeli kotalela bansango oyo basakoli basakolaki?
2 Yisraele ezalaki ekólo oyo emipesaki na Yehova, Nzambe oyo apesaki bango malako oyo apesaki na ekólo mosusu te. (Kolimbola Mibeko 4:33-35) Kasi, na nsuka ya ekeke ya 9 L.T.B., ezaleli ya Bayisraele ebongwanaki mpenza mpe Nzambe ayebisaki mosakoli Amosa aloba na bango boye: “Nayiná, naboyá bafɛti na bino, . . . soki bopesi ngai bambeka mibimba ya kotumba, ɛɛ, ezala makabo na bino nakosepela na yango te.” (Amose 5:21, 22) Atako lelo oyo Nzambe alobaka te maloba ya ndenge wana na lisangá na ye ya mokili mobimba, olingaki koyoka ndenge nini soki alobaki maloba ya ndenge wana na losambo oyo opesaka ye? Mokomoko na biso akoki kozwa liteya na likambo yango?
3 Na eleko wana, basaleli ya Nzambe bazalaki koloba ete basambelaka Yehova na ndenge oyo andimaka. Nzokande, mingi kati na bango bazalaki kosalela banzambe ya bapakano, na ndakisa, Baala, nzambe ya Bakanana mpe bikeko ya ngɔmbɛ, to mpe bazalaki kotumba bambeka na bisika oyo etombwaná. Bazalaki kogumbamela limpinga nyonso ya likoló wana bazalaki kolapa ndai epai ya Yehova. Yango wana, Nzambe ya solo atindaki basakoli bákebisa bato na ye bázongela ye na losambo ya pɛto. (2 Bakonzi 17:7-17; 21:3; Amose 5:26) Na yango, emonani polele ete ezala mpo na basaleli ya Nzambe oyo bamipesi, ekoki kozala na makambo oyo basengeli kotyela likebi—basengeli kotalela misala to bizaleli na bango mpo na komona soki losambo na bango endimami na Yehova.
“BOYEBI YA NZAMBE”
4. Makambo ezalaki ndenge nini na ntango ya boyangeli ya Mokonzi Yeroboame II?
4 Kanisá eleko oyo mosakoli ya liboso na basakoli 12 alobaki mpo na Nzambe. Asakolaki ete mokolo ya Yehova ekoya kobɛta bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele. Ezalaki komonana ete ekólo yango ezalaki na bomɛngo. Kasi, ndenge kaka Yona asakolaki, Mokonzi Yeroboame II azongisaki bandelo ya Bayisraele kobanda na nɔrdi na Damasi tii na Mbu Ekufá. (2 Bakonzi 14:24-27) Atako Yeroboame asalaki makambo oyo ezalaki mabe, Yehova amonisaki motema molai, alingaki te kosilisa nyɛɛ Bayisraele. Nzambe atikelaki Bayisraele ntango ya kobongola motema, ya ‘koluka Yehova, mpe kotikala na bomoi.’—Amose 5:6.
5. Makambo nini Bayisraele bazangaki oyo etindaki Yehova abwaka bango?
5 Lokola Bayisraele bazalaki kokelela na eloko te, bakokaki kosalela ntango yango, elingi koloba koluka koyeba Yehova malamumalamu, kosala makambo oyo alingaka mpo na kozonga epai na ye. Kasi, bamityelaki motema, mpe bakanisaki ete ‘mpasi ekobɛlɛma te to ekokóma epai na bango te.’ (Amose 9:10) Okoki koloba ete babosanaki Yehova mpo “batondaki, mpe motema na bango ebandaki komitombola.” (Hosea 13:6) Tosengeli kokanisa te ete yango ezali kaka masolo ya kala mpe ete etali biso te. Talá ntina oyo Yehova azalaki na likambo ya kosamba na Bayisraele: “Lokola obwaki boyebi, ngai mpe nakobwaka yo mpo osalela ngai lisusu te mosala ya nganga-nzambe.” Bamipesaki na Yehova mpe bazalaki elongo na bato ya mabota na bango oyo bamipesaki mpe na Nzambe. Kasi, mokomoko na bango azangaki “boyebi [ya solosolo] ya Nzambe.”—Hosea 4:1, 6.
6. Mpo na nini tokoki koloba ete Bayisraele bazalaki na boyebi mpenza te ya Nzambe?
6 Tokoki koloba te ete Bayisraele bayokaki te maloba ya Nzambe, mpo na Yisraele, baboti bazalaki na mokumba ya koteya bana na bango maloba yango. Mingi na bango bayokaki masolo ya Biblia epai ya baboti na bango, na masolo to na mayangani. (Kobima 20:4, 5; Kolimbola Mibeko 6:6-9; 31:11-13) Na ndakisa, bayokaki likambo oyo esalemaki ntango Arona asalaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya wɔlɔ ntango Moize azalaki kozwa Mibeko Zomi na Ngomba Sinai. (Kobima 31:18–32:9) Na yango, na ntango ya basakoli, Bayisraele bayebaki Mibeko mwa mingi mpe bayokaki masolo ya ekólo na bango. Kasi, boyebi na bango ezalaki ya kokufa mpo batikaki yango te etambwisa bango básambela Nzambe na lolenge oyo ye alingaka.
7. (a) Ndenge nini Bayisraele bakómaki na pɛtɛɛ nyonso kozanga botosi? (b) Ndenge nini mokristo akoki ‘kobanda kobosana Mokeli na ye’?
7 Okoki komituna, ‘ebandaki ndenge nini Bayisraele bákóma mbala moko kozanga botosi?’ Hosea alobelaki ndenge makambo ebandaki: “Yisraele abandaki kobosana Mokeli na ye.” (Hosea 8:14) Verbe ya Ebre ebongolami malamu na “abandaki kobosana.” Bayisraele babandaki kobosana Yehova na mbalakaka te. Kasi, babandaki kobosana mokemoke kosambela ye na ndenge andimaka. Okanisi ete mokristo akoki mpe kokwea na motambo ya ndenge wana? Tózwa ndakisa ya tata moko oyo azwaka na lisɛki te mokumba na ye ya koleisa libota na ye. (1 Timote 5:8) Mpo na kokokisa mokumba yango, akoki komona ete mosala na ye ezali na ntina mingi. Likambo moko ekoki kobima, mpe akoki kokanisa ete esengeli azangisa makita mosusu mpo na mosala. Na nsima, kozangisa makita ekokóma likambo ya pɛtɛɛ mpo na ye, mpe akokóma kozangisa makita mbala mingi. Mokemoke, boyokani na ye na Nzambe ekokita—‘akobanda kobosana Mokeli na ye.’ Likambo ya ndenge wana ekoki mpe kokómela mokristo oyo baboti to bandeko na ye bazali basambeli ya Yehova te. Akokutana na mokakatano: Ngonga boni asengeli kopesa bango mpe ntango nini? (Kobima 20:12; Matai 10:37) Ezali boni mpo na kozwa ekateli mpo na ntango boni esengeli kolekisa na mibembo, makambo oyo esepelisaka biso, to mpe kominanola?
8. Na mikolo ya Amose, kozala na “bopɛto ya mino” elimbolaki nini?
8 Toyekolaki Liloba ya Nzambe mpe tozali kosalela boyebi oyo tozwaki. Kasi, mokomoko na biso asengeli kotalela maloba oyo esalelami na mokanda ya Amose: “Bopɛto ya mino.” Na nzela ya Amose, Nzambe akebisaki bato na ye boye: “Ngai lisusu, ɛɛ ngai, napesaki bino bopɛto ya mino na bingumba na bino nyonso mpe bosɛnga ya limpa na bisika na bino nyonso.” (Amose 4:6) Bopɛto yango eutaki na konika mino te. Eutaki nde na kozanga kolya, kokufa nzala. Lisusu, ezalaki likebisi ya ‘nzala ya mampa te, mpe ya mposa ya mai te, kasi nde ya koyoka maloba ya Yehova.’—Amose 8:11.
9, 10. (a) Ndenge nini mokristo akoki kokufa nzala na elimo? (b) Mpo na nini tosengeli kozala ekɛngɛ na makama ya nzala ya elimo?
9 Na ndenge ya elimo, makambo oyo Amose asakolaki ezali kokokisama na makambo ya mawa oyo ezali kosalema na mangomba ya bokristo. Nzokande, “baporte ya mai ya likoló” efungwami mpo na basaleli ya Nzambe na mokili mobimba. Bapambolami na ebele ya bilei ya elimo. (Malaki 3:10; Yisaya 65:13, 14) Kasi, mokristo akoki komituna boye: ‘Nalyaka mpenza bilei yango ya elimo?’ Likambo ya ntina, bato mosusu ya mayele oyo bayekolaka banyama, bamonaki ete banyama mosusu oyo eteni ya bɔɔngɔ na bango oyo ekundwelaka bango ete basengeli kolya ebebá, bayokaka mposa ya kolya te na boye ete bakufaka nzala ata soki biloko ebele ezali pene na bango! Mposa oyo etindaka mokristo alya na elimo ekoki mpe kobeba mpe akoki kobanda koyoka nzala atako atondi na ebele ya bilei ya elimo?
10 Ntango ozali komitalela, kanisá na likambo oyo: Yehova apesaki Bayisraele ebele ya bilei ya elimo. Bazalaki na Mibeko, oyo ekokaki kokómisa boyokani na bango na Nzambe makasi, bazalaki na programɛ ya mateya mpo na kokɔtisa boyebi ya Nzambe na mitema ya bana na bango; mpe bazalaki na basakoli oyo bazalaki kosalisa bango báyeba mokano ya Nzambe. Atako bongo, babandaki kobosana Yehova. Biblia elobi ete na mikolo ya Hosea, “batondaki [na bozwi], mpe motema na bango ebandaki komitombola.” (Hosea 13:6; Kolimbola Mibeko 8:11; 31:20) Soki tolingi te ete bozwi oyo tozali na yango ebebisa boyokani na biso na Nzambe, tosengeli kobosana te ete likama yango ezali liboso na biso mokolo na mokolo.—Sefania 2:3.
TYÁ LIKEBI NA MAKAMBO OYO ELEKI NTINA
11, 12. (a) Na boumeli ya boyangeli ya Mokonzi Uzia, mpo na nini basakoli basengelaki kolendisa bato bázongela Yehova? (b) Likambo nini ya ntina Yoele asengelaki kolobela?
11 Ntango Yeroboame II azalaki koyangela na Yisraele, Uzia (oyo abengami mpe Azaria) azalaki koyangela na Yuda. Ayeisaki teritware na ye monene mpe ayeisaki Yerusaleme monene. Uzia “azalaki makasi na ndenge moko ya kokamwa” mpo “Nzambe ya solo azalaki kosalisa ye.” “Azalaki kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova” mpe ‘amipesaki na koluka Nzambe.’ Kasi, bato mingi ya Yuda bakobaki kotumba bambeka na bisika etombwaná.—2 Ntango 26:4-9.
12 Likambo oyo ekoki kosalisa yo oyeba ete atako bato ya Yuda mpe Yisraele bazalaki komema nkombo ya Nzambe, mbala mingi bazalaki kosangisa na losambo na bango makambo oyo Nzambe azalaki koboya. Basakoli balukaki kosalisa bango bákesenisa losambo ya solo ná oyo ya lokuta. Na nzela ya Yoele, Nzambe abondelaki bango na maloba oyo: “Bózongela ngai na mitema na bino nyonso, mpe na kokila bilei mpe na kolela mpe na koganga ya kolela.” (Yoele 2:12) Simbá likambo oyo: Nzambe alingaki ete bato na ye bázongela ye ‘na motema na bango mobimba.’ Ya solo, likambo ezalaki nde na motema na bango. (Kolimbola Mibeko 6:5) Na maloba mosusu, bazalaki kosambela Yehova likolólikoló mpe motema na bango ezalaki mpenza mobimba te epai na ye. Mbala na mbala, na nzela ya basakoli amonisaki ntina ya motema mawa, bosembo, mpe komikitisa—nyonso wana ezali bizaleli oyo eutaka na motema.—Matai 23:23.
13. Likambo nini Bayuda oyo babimaki na boombo na Babilone basengelaki kotalela?
13 Lisusu, tótalela likambo oyo esalemaki nsima ya kozonga ya Bayuda na mboka na bango. Atako losambo ya solo na boyokani na Mibeko, ezongisamaki, bazongelaki Yehova na motema mobimba te. Bayuda babandaki kokila bilei na mikolo ya ba-anivɛrsɛrɛ ya makambo oyo eyokani na kobomama ya Yerusaleme. Yehova atunaki boye: “Bokilaki nde bilei mpo na ngai, ɛɛ mpo na ngai mpenza?” Engumba yango ebomamaki mpo Yehova amonisa bosembo na ye, ezalaki te likambo ya koyoka mawa. Na esika ya kokanisa makambo oyo ya kala mpe kokilaka bilei mpo na komonisa mawa, Bayuda yango basengelaki nde kozala na esengo, kosepela na bileko ya bafɛti mpo na mapamboli ya losambo ya solo. (Zekaria 7:3-7; 8:16, 19) Mpe basengelaki kotya likebi na makambo mosusu. Na ndakisa, likambo nini? “Bósambisaka na bosembo ya solosolo; mpe bómoniselanaka motema boboto mpe motema mawa; . . . mpe bókanaka na mitema na bino kosalelana eloko ata moko te ya mabe.” (Zekaria 7:9, 10) Biso nyonso tokoki kozwa litomba na makambo oyo basakoli yango bateyaki basaleli ya Nzambe na ntina etali kosambela Nzambe na motema mobimba.
14. (a) Bayuda oyo babimaki na boombo basengelaki kokɔtisa nini na losambo na bango? (b) Ndenge nini basakoli balobelaki makambo ya ntina mingi ya losambo?
14 Kosambela Nzambe na motema mobimba esangisi makambo nini? Nini esɛngamaki epai ya basambeli ya Nzambe liboso ya kokende na boombo mpe nsima ya kobima na boombo? Oyebi ete esengeli kotosa mitinda ya Nzambe na oyo etali bizaleli ya malamu. Ezalaki mpe na misala mpe makambo ya sikisiki oyo Mibeko esɛngaki, na kati na yango koyangana mpo na koyoka mpe koyekola mokano ya Nzambe. Lisusu, Nzambe asɛngaki mpe na basakoli na ye bálobela mingi likambo ya kolona mpe komonisa motema boboto, bosembo, komikitisa, motema mawa, mpe bopɔlɔ. Yoká ndenge Yehova alobelaki bizaleli yango: “Nasepeli nde na motema boboto, kasi na mbeka te; mpe na boyebi ya Nzambe kasi na makabo ya kotumba mobimba te.” “Bómilonela momboto na boyengebene; bóbuka mbuma na ndenge oyo eyokani na motema boboto.” (Hosea 6:6; 10:12; 12:6) Mika alobaki boye: “Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo, kolinga boboto mpe kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo?” (Mika 6:6-8) Lisusu, mosakoli Sefania alendisaki basaleli ya Nzambe boye: “Bóluka Yehova, bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele, . . . Bóluka boyengebene, bóluka komikitisa.” (Sefania 2:3) Bizaleli wana ezali na ntina mingi mpo na kosambela Nzambe na ndenge alingaka.
15. Na boyokani na makambo oyo basakoli bakebisaki, bakristo basengeli kosala nini na losambo na bango?
15 Bizaleli wana ezali na ntina nini na losambo na biso? Oyebi ete kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mingi. (Matai 24:14; Misala 1:8) Kasi okoki komituna: ‘Natalelaka mosala ya kosakola ete ezali mosala makasi, ya kilo? To namonaka ete ezali libaku malamu ya kosalisa bato oyo balingi koyoka nsango ya Biblia oyo ezali kobikisa bomoi ya bato? Namoniselaka bango motema mawa?’ Ya solo, motema mawa mpe motema boboto esengeli kotinda biso tókebisaka basusu na ntina na mokolo ya Yehova. Lisusu, bosembo mpe boyengebene etindaka biso tóluka bato ya lolenge nyonso mpo báyoka nsango yango.—1 Timote 2:4.
16, 17. Mpo na nini komikitisa mpe bopɔlɔ ezali na ntina mingi na losambo na yo?
16 Tózwa ndakisa mosusu. Tólobela mokumba oyo tozali na yango ya koyanganaka na makita ya bokristo, oyo oyebi ete ezali na ntina. (Baebre 10:24, 25) Okanisi ete mokumba yango esɛngaka komikitisa mpe bopɔlɔ? Bato ya komikitisa bandimaka koteyama mpe na nsima basalelaka makambo oyo bayekoli, na ndenge yango batosaka ekateli ya lisambisi ya Yehova. Moto ya bopɔlɔ ayebaka esika makoki na ye esuki, andimaka ete azali na mposa ya bilendiseli mpe ya boyebi oyo epesamaka na makita.
17 Bandakisa wana ekoki kosalisa biso tómona ndenge tokoki kozwa matomba na makambo oyo basakoli bateyaki. Kasi, ezali boni soki omoni ete osengeli kosala mbongwana na likambo moko to na makambo oyo touti kolobela? To ezali boni soki osalaki mabunga ya minene, mpe ntango okanisaka makambo yango etungisaka yo mbala na mbala? Basakoli wana 12 bapesi yo libɔndisi mpe lisalisi.
ZONGELÁ YEHOVA
18. (a) Mpo na banani basakoli wana 12 bazalaki mpenza na nsango ya kolendisa? (b) Oyoki ndenge nini na ntina na Yehova, oyo azali kobondela bato bázongela ye?
18 Ndenge touti komona yango, basakoli oyo tozali kolobela basukaki kaka te na kotɔndɔla mpe kolobela bitumbu. Bamonisaki Yehova lokola azali kosɛnga bato na ye bázongela ye. Kanisá naino ndenge Yehova ayokaki ndenge ezali na maloba oyo ya Hosea: “Bóya mpe tózongela Yehova, mpo ye moko apasolipasoli biso kasi akobikisa biso. Abɛtibɛti, kasi akokanga bampota na biso. . . . Mpe tokoyeba, tokoluka koyeba Yehova.” (Hosea 6:1-3) Ya solo, na bosembo na ye, Yehova Nzambe apesaki Yisraele etumbu mpe na nsima, apesaki Yuda etumbu. Na yango, basaleli na ye basengelaki komona bitumbu yango lokola libaku ya kozongisa malamu boyokani na bango na ye. (Baebre 12:7-13) Soki basaleli ya Yehova oyo babungaki bazongelaki ye, alingaki ‘kobikisa bango’ mpe ‘kokanga bampota na bango.’ Meká komona na makanisi, moto moko oyo afukami mpo na kokanga mpota ya moninga na ye. Sikoyo kanisá ete Yehova nde azali kosala bongo. Ndakisa yango emonisi mpenza ete Yehova azali Nzambe ya motema mawa, oyo akangaka bampota ya baoyo basepeli kozongela ye! Likambo yango etindi biso te tólinga kozongela ye soki tosalelaki ye lisumu?—Yoele 2:13.
19. Koyeba Nzambe esɛngi makambo nini?
19 Kozongela Nzambe esɛngaka nini? Hosea akundweli biso ete esɛngaka te kaka “koyeba” Nzambe kasi, mpe ‘koluka koyeba Yehova.’ Buku moko ya ntango na biso, elobi boye na ntina na maloba oyo ezali na Hosea 6:3: “Bokeseni ezali mpenza komonana kati na koyeba makambo ya Nzambe mpe koyeba Nzambe. Ekokani na bokeseni oyo ezali kati na kotánga makambo ya bolingo mpe kozala na lolango.” Tosengeli te kosuka kaka na koyeba Yehova likolólikoló. Tosengeli mpenza kotalelaka ye lokola Moto ya solosolo, Moninga ya motema oyo tokoki kopusana penepene na ye kozanga kobanga. (Yirimia 3:4) Soki ozali na boyokani ya ndenge wana na ye, okomona ndenge oyo ayokaka ntango osali likambo moko mpe yango ekosalisa yo mpenza mpo okoba kosambela ye na ndenge oyo alingaka.
20, 21. Ndenge nini mokonzi Yosiya akómisaki boyebi ya Nzambe lokola likambo na ye moko?
20 Mokonzi Yosiya azalaki ndakisa malamu na likambo etali kokoba na losambo ya solo. Tótalela lisusu ndakisa na ye. Ntango Yosiya akómaki mokonzi, ekólo yango ebebaki mpenza na losambo ya bikeko, mobulu, mpe bokosi oyo etondaki na boumeli ya boyangeli ya Manase mpe Amone. (2 Bakonzi 21:1-6, 19-21) Likebisi oyo Sefania apesaki ya “koluka Yehova” esengelaki mpenza kosalisa Yosiya, mpo “abandaki koluka Nzambe ya nkɔkɔ na ye Davidi.” Yosiya abandaki mosala ya kolongola losambo ya bikeko na Yuda, mpe akobaki mosala yango ata tii na oyo ezalaki kala teritware ya bokonzi ya nɔrdi.—Sefania 1:1, 14-18; 2:1-3; 3:1-4; 2 Ntango 34:3-7.
21 Nsima ya kosilisa mosala ya kopɛtola, Yosiya akobaki koluka Yehova. Atindaki bábongisa tempelo. Ntango mosala yango ezalaki kosalema, bazwaki “buku ya mobeko ya Yehova oyo epesamaki na lobɔkɔ ya Moize,” ekoki kozala maniskri ya libosoliboso ya Mibeko. Yosiya asalaki nini ntango batángelaki ye buku yango? “Ntango kaka mokonzi ayokaki maloba ya mobeko, na mbala moko apasolaki bilamba na ye.” ‘Apasolaki mpe motema na ye’ mpe mbala moko asalelaki makambo oyo batángelaki ye. Alukaki te komilongisa, mpe alobaki te ete asili kosala mingi. Ozali koyeba lisusu matomba oyo mosala yango ya kopɛtola ebimisaki? “Na mikolo na ye nyonso, [bana ya Yisraele] batikaki te kolanda Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango.”—2 Ntango 34:8, 14, 19, 21, 30-33; Yoele 2:13.
22. Ndenge nini tokoki kozwa litomba na ndakisa ya Yosiya?
22 Okoki komituna boye ‘nalingaki kosala nini’? Na ndakisa ya Yosiya, olingaki koyoka maloba ya basakoli mpe kosala mbongwana oyo esengeli na misala mpe makanisi na yo? Atako tozali te na ntango ya Sefania mpe Yosiya, tokoki komona ete ezali na ntina kondima bansango ya Nzambe mpe toli na ye lelo. Na yango, soki mokristo moko ayoki na motema na ye ete asengeli kosala mbongwana na bomoi na ye to na losambo na ye, kotalela mikanda 12 ya basakoli ekoki kolendisa ye azwa ekateli.—Baebre 2:1.
23. Soki omoni ete ezali na makambo mosusu oyo osengeli kobongisa, okoki kosala nini?
23 Na ntango mosusu, tokoki koyoka ndenge Yona ayokaki ntango azalaki na kati ya libumu ya mbisi monene: “Obengani ngai liboso ya miso na yo! Ndenge nini nakotalatala lisusu tempelo na yo mosantu?” (Yona 2:4) Ya solo, maloba ya Yehova ekoki mpenza kopesa biso elikya, biso bato ya kozanga kokoka oyo tozalaka ntango nyonso pene ya kosala mabunga! “Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino.” (Malaki 3:7) Soki omoni ete ezali na ntina okolisa boyokani na yo na Yehova, bankulutu ya lisangá bakosepela kosalisa yo. Ndenge kaka soki moto alingi kotambwisa motuka, abandaka naino na vitɛsi ya malɛmbɛ. Ntango obandi kokende, okomona ete vitɛsi ezali mpe komata. Okoki mpenza kondima ete Yehova akoyamba mpe akosalisa yo, mpo azali “na ngɔlu mpe na motema mawa, ayokaka nkanda noki te mpe azali na motema boboto mingi.” (Yoele 2:12-14) Ya solo, bansango ya basakoli elendisi moto nyonso oyo azali kolanda losambo oyo Nzambe andimaka.
BOZONGELI
• Na boyokani na bansango ya basakoli 12, basaleli ya Nzambe basengelaki kosala nini?—Sefania 2:3.
• Ndenge nini basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala babosanaki ye?—Hosea 8:14.
• Mpo na nini bakristo basengeli kozala ekɛngɛ ata soki bazali na bilei ebele ya elimo?—Amose 4:6; 8:11.
OKANISI NINI?
• Losambo oyo esalemi na motema mobimba mpe oyo Nzambe andimaka esɛngaka nini?—Hosea 6:6; Mika 6:8.
• Soki ozali komiyoka lokola ozali mosika na Yehova, ndenge nini okoki kozonga epai na ye?—Hosea 6:1-3.
• Ndenge nini okoki komekola mokonzi Yosiya na likambo etali koluka Yehova?—2 Ntango 34:19-21; Yoele 2:13.
[Elilingi na lokasa 57]
Amose
[Elilingi na lokasa 58]
Ndenge nini moto akoki kobanda kobosana Yehova?
[Elilingi na lokasa 60]
Mokristo akoki kokufa nzala na elimo atako bilei ya elimo ezali ebele?
[Elilingi na lokasa 64]
Osalaka makasi mpo na kosakwela bato ya lolenge nyonso nsango malamu?
[Bililingi na lokasa 66]
Yosiya alukaki komilongisa te ntango mosala ya kopɛtola esɛngamaki
[Elilingi na lokasa 67]
Okosala mbongwana oyo esengeli mpo na kolanda mitinda ya Biblia?
[Elilingi na lokasa 68]
Mpo na “koluka Yehova,” bato mosusu basengeli kozongela ye