Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kosala soki moto aboyi koyoka biso
Mpo na nini ezali na ntina?: Kanisá naino: oyebi ete likama moko ya monene elingi kosalema. Bato bakokufa soki bakimi te. Okei epai ya moto moko oyo afandaka pembeni na bino mpo na kokebisa ye, kasi alingi koyoka yo te, alobi ete azali na mosala. Okotika mbala moko kosalisa ye? Na ntembe te, okotika te! Ndenge moko mpe bato mingi na teritware na biso baboyaka koyoka biso, mpo bayebaka te ete nsango oyo tomemelaka bango ezali mpo na kobikisa bomoi na bango. Ekoki kozala ete ntango tokendaka kotala bango, bazalaka na makambo mosusu oyo ezali kotungisa bango. (Mat. 24:37-39) To mpe bakaniselaka biso mabe mpo na makambo ya lokuta oyo bayoká mpo na biso. (Mat. 11:18, 19) Mbala mosusu bakanisaka ete tokeseni te na mangomba mosusu oyo esalelaka te makambo oyo bateyaka. (2 Pe. 2:1, 2) Soki na ebandeli moto amonisi ete asepeli te koyoka biso, tosengeli mbala moko te kotika ye.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Ntango ozali kosakola, soki moto aboyi koyoka nsango malamu, nsima ya kotika ye, yo ná ndeko oyo obimi na ye bólobela lolenge malamu oyo bokokaki kosala mpo na kokoba lisolo yango.