Mpo na nini kokende mbala moko?
Ntango toyaka na likita mpo na mosala ya kosakola, tozalaka esika moko na bandeko mpe ezali mabe te tóyoka mposa ya kosolola na bango. Kasi, soki kaka likita esili, tosengeli kosala makasi tókende mbala moko na teritware. Mosala na biso ya kosakola esengeli kosalema na lombangu. (2 Tim. 4:2) Soki toumeli mingi, tokozala na ntango mingi te ya kolekisa na mosala ya kosakola. Tokozala na libaku ya kolendisana na basakoli mosusu wana tozali kosakola elongo na bango. Kokende mbala moko na mosala ya kosakola kozanga koumela, ekomonisa ete tozali na molende na mosala mpe tozali kosala lokola baombo mpo na Yehova mpe Mwana na ye.—Rom. 12:11.