Manaka mpo na pɔsɔ ya 26 sanza ya 1
PƆSƆ EBANDI NA 26 SANZA YA 1
Loyembo 99 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 19 par. 9-17 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Basambisi 5-7 (Min. 8)
No. 1: Basambisi 7:12-25 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Aminone (Amnôn)—Motó ya likambo: Mposa ya kosepelisa nzoto na ndenge ya mabe ebomaka—it-1-F lok. 101 (Min. 5)
No. 3: Ndenge oyo tokoki koyekola makambo etali Yehova—igw lok. 5 par. 1-4 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: ‘Salelá Nkolo lokola moombo na elimo ya komikitisa mingi koleka.’—Misala 20:19.
Min. 10: Kokabola bazulunalo na sanza ya yambo mpe ya mibale. Lisolo na bayangani. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango ntango bakabolaki mwa buku Nsango malamu. Bósala elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa ndenge ya kokabola mwa buku yango. Na nsima, bólobela lisolo “Mpo na nini kokende mbala moko?”
Min. 10: Bankulutu oyo bazali kosalela Nkolo lokola baombo—Motambwisi ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Sololá na motambwisi ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mituna oyo: Kokokisa mokumba na yo esɛngaka makambo nini? Ndenge nini omibongisaka mpo na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Mpo na nini okokaka te kopona moto nyonso oyo atomboli mosapi mpo na kopesa eyano? Ndenge nini ndeko oyo akotánga baparagrafe, baoyo bakopesa biyano mpe bandeko oyo bapesaka bamikro bakoki kosala ete Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esepelisa mpe epesa matomba? Ndenge nini Eteyelo ya mosala ya Bokonzi oyo euti kosalema esalisi yo okokisa malamu mokumba yango ya ntina mingi?
Min. 10: “Saleláká jw.org na mosala na yo ya kosakola—‘Kómá moninga ya Yehova.’” Lisolo na bayangani. Bólobela mwa makambo mosusu oyo ezali na eteni wana ya site Internet na biso, mpe lakisá bayangani video moko. Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo tokoki kosalela “Kómá moninga ya Yehova” ntango tozali kosakola ndako na ndako, na bisika ya bato nyonso, to na litatoli ya libaku malamu.
Loyembo 135 mpe libondeli