Mitungisi elɛmbisa yo te
“BÓMITUNGISA te mpo na lobi; lobi ekomitungisa mpo na yango mpenza. Mabe na mokolo moko ekoki na yango.” (Matai 6:34) Toli wana ya Yesu ezali na ntina mpo na biso nyonso mpamba te lelo oyo tozali na mokili oyo etondi na yikiyiki mpe na mitungisi.
Kasi, mpo na koloba solo, likoki ezali mpo ete tómitungisa te mpo na mikakatano, bikateli, masɛngami, mpe mikumba na biso? Bamilio ya bato bazali konyokwama na makanisi, bazali na mawa, mpe na bozito. Yango wana, mombongo ya bankisi ya mpɔngi mpe bankisi ya kopemisa nzoto ekómi kokɔtisa mbongo mingi.
Bokeseni kati na bibongiseli ya solo na mitungisi ezangi ntina
Tosengeli komibongisa mpe komilɛngɛla mpo na mikumba, misala, bikateli, mpe mikakatano na biso ya mbalakaka. Biblia ezali kolendisa biso ete ‘tófanda liboso mpe tótánga motuya’ liboso ya kobanda mosala nyonso. (Luka 14:28-30) Yango esɛngi koyeba kopona mpe kotalela malamumalamu makambo oyo ekoya na nsima. Mpe ntango tozali kozwa ekateli tótalela ntango, milende, mpe mbongo oyo yango ekosɛnga.
Atako moto asengeli kotalela na likebi nyonso makambo oyo makobima, akoki koyeba te to kokanisa te makambo nyonso oyo makoki kobima. Na ndakisa, mpo na kobatela libota, okoki kokanisa makambo oyo osengeli kosala soki ndako eziki. Okoki kosomba mpe kotya ngonga oyo elelaka ntango milinga etondi na ndako mpe gaze mpo na koboma mɔ́tɔ. Okoki kobongisa mpe komonisa banzela ya kobima soki likama ebimeli yo ata na esika nini na kati ya ndako. Kasi bokeseni nini ezali kati na bibongiseli wana ya mayele mpe mitungisi ya mpambampamba? Mitungisi yango ebandaka ntango okómi komibanzabanza mpo na makambo ebele ebele, oyo mingi na yango ekoki kozala makanisi mpamba. Mitungisi ya makanisi ekoki kozwa yo, ekoki kondimisa yo ete obosani likambo mosusu to mpe osali nyonso te mpo na kobatela libota na yo na ndenge ekoki. Mitungisi motindo yango ekoki konyokola yo na boye ete okoki kozanga ata mpɔngi.
Mose liboso ya Falo
Yehova Nzambe, apesaki Mose, mosakoli na ye mokumba moko monene. Ya liboso, Mose asengelaki kokende epai ya Bayisalaele mpe kondimisa bango ete Yehova aponi ye mpo na kobimisa bango na Ezipito. Na nsima, Mose asengelaki kokende epai ya Falo mpe kosɛnga ye nzela ete atika Bayisalaele bákende. Na nsuka, Mose asengelaki kokamba bamilio ya bato na nzela ya mokili mokauki kino na mboka oyo banguna na bango bafandaki. (Exode 3:1-10) Makambo nyonso wana ezalaki kobangisa, kasi Mose amitungisaki mingi mpo na mokumba yango?
Ya solo, Mose azalaki komibanzabanza mpo na makambo mingi. Atunaki Yehova ete: “Soko ngai nakokóma epai na bato na Yisalaele mpe nakolobela bango ete, Nzambe na batata na bino atindi ngai epai na bino, mpe soko bakotuna ete, Nkombo na ye nani? nalobela bango nini?” Yehova apesaki ye eyano. (Exode 3:13, 14) Mose azalaki mpe komibanzabanza mpo na likambo oyo ekokaki kobima soki Falo aboyi kondimela ye. Mbala oyo lisusu, Yehova apesaki ye eyano. Likambo ya nsuka—Mose andimaki ete azali “moto na maloba polele te.” Esengelaki kosala nini mpo na likambo yango? Yehova apesaki Alona ete azala molobeli ya Mose.—Exode 4:1-5, 10-16.
Biyano oyo azwaki na mituna na ye, mpe kondima na ye epai na Nzambe, ebongisaki Mose na boye ete asalaki ndenge Yehova atindaki. Na esika ya komitungisa na makanisi ya kobangabanga na makambo oyo ekokaki kokómela ye ntango akozala liboso ya Falo, Mose asalaki ‘lokola elakaki Yehova.’ (Exode 7:6) Soki atikaki mitungisi elonga ye, mbɛlɛ yango elɛmbisaki kondima mpe molende oyo asengelaki na yango mpo na kokokisa mokumba na ye.
Mose azalaki na bokatikati mpo na kokokisa mokumba na ye, mpe yango ezali ndakisa ya makambo oyo Paulo abéngaki “makanisi malamu.” (2 Timote 1:7, NW; Tito 2:2-6, NW) Soki Mose azalaki na makanisi malamu te, mbɛlɛ alingaki mpenza komona ete mokumba na ye eleki monene mpe alingaki koboya yango.
Batelá makanisi na yo
Osalaka ndenge nini na bomoi na yo ya mokolo na mokolo ntango kondima na yo ekutani na komekama to na mikakatano? Olɛngaka mbala moko ntango okanisi mikakatano mpe mpasi oyo ekokómela yo? To otalelaka yango na bokatikati? Bato mosusu balobaka ete, ‘Bakimaka mbula na mopɛpɛ te.’ Ekoki mpe kokóma ete mbula yango enɔki na yango te! Na bongo, mpo na nini komitungisa na likambo oyo mbala mosusu ekosalema te? Biblia elobi ete: “Bobangi na motema ya moto ekolɛmbisa ye motema.” (Masese 12:25, NW) Yango wana, bato mingi babangaka kozwa ekateli, bazongisaka makambo nsima kino ntango ekoleka.
Likambo eleki monene ezali likama ya elimo oyo motungisi ezangi ntina ekoki kobimisa. Yesu Klisto amonisaki ete “mitungisi ya mokili oyo” na mposa ya mosolo ekoki kosilisa bosepeli oyo moto amonisaki mpo na “liloba ya Bokonzi.” (Matai 13:19, 22, NW) Lokola nzube ekoki kopekisa milona ete mikola mpe mibota mbuma te, ndenge moko mpe mitungisi oyo eleki ndelo ekoki kopekisa biso kokola na elimo, mpe kobota mbuma mpo na nkembo ya Nzambe. Bato mosusu bazali komitungisa na ndenge ya mabe yango wana bazali komipesa na Yehova te. Balobaka ete, ‘Soki namipesi, bongo na nsima nakokisi ndai yango te, ekosuka boni?’
Ntoma Paulo alobaki na biso ete na etumba na biso ya elimo, tozali kosala makasi mpo na “kokanga makanisi nyonso na nkanga ete mátosa Klisto.” (2 Bakolinti 10:5) Satana Zabolo, monguna na biso monene, akosepela kosalela mitungisi na biso mpo na kolɛmbisa biso na nzoto, na mayoki, mpe na elimo. Azali elombe mpe azali kosalela ntembe na mayele mpo ya kokanga baoyo bazangi bokɛngi. Yango wana, Paulo akebisaki lisusu baklisto ete “bópesa Zabolo nzela te.” (Baefese 4:27, NW) Lokola azali “nzambe na mokili oyo,” Satana alongi ‘kozimisa miso na makanisi na bango baboyi kondima.’ (2 Bakolinti 4:4) Tótikela ye nzela te ete alonga makanisi na biso!
Lisungi ezali
Soki mwana akutani na mikakatano akoki kokende epai ya tata ya bolingo mpo na kozwa litambwisi mpe libɔndisi. Bobele bongo, tokoki kokende na mikakatano na biso epai ya Yehova, Tata na biso ya likoló. Kutu, Yehova azali kosɛnga biso tókitisela ye mikumba mpe mitungisi na biso. (Nzembo 55:22) Lokola mwana oyo tata na ye apesi ye elaka amitungisaka lisusu te mpo na mikakatano na ye, biso mpe tosengeli kokitisela Yehova mikumba na biso mpe kotikela ye yango.—Yakobo 1:6.
Ndenge nini tokokitisela Yehova mitungisi na biso? Bafilipi 4:6, 7 elobi ete: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisɛngeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosɛnzɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” Ɛɛ, soki tokobondela mpe tokolɔmba na molende, Yehova akoki kopesa biso kimya ya motema oyo ekobatela makanisi na biso ete tóminyokola te na mitungisi ezangi ntina.—Yilimia 17:7, 8; Matai 6:25-34.
Yango wana, mpo na kosala na boyokani na mabondeli na biso, tosengeli kokabwana na bandeko na biso te, ezala na nzoto to na makanisi. (Masese 18:1) Kasi, ezali malamu tótalela mitinda ya Biblia mpe malako oyo etali mpenza mokakatano na biso, na bongo tokotya elikya na mayele na biso moko te. (Masese 3:5, 6) Bilenge mpe mikóló bakoki kotánga Biblia mpe mikanda ya la Société Watch Tower mpo na koyeba makambo mingi na ndenge ya kozwa bikateli ya malamu mpe kolonga mikakatano na bango. Lisusu, na lisangá ya boklisto tozali na bankulutu oyo bazali na mayele mpe bayebi makambo mingi, mpe lisusu tozali na bandeko mosusu oyo bateli na elimo, ntango nyonso bango bazali pene mpo na kosalisa na biso. (Masese 11:14; 15:22) Mbala mingi baoyo mikakatano na bango ekokani na oyo ya biso te kasi bayebi likanisi ya Nzambe na likambo yango bakoki kosalisa biso mpo na kotalela mikakatano yango na liso mosusu. Mpe atako bakozwa ekateli na esika na biso te, bakoki kolendisa mpe kobɔndisa biso.
“Zalá na elikya epai na Nzambe”
Moto moko te akoki kowangana likambo oyo: mikakatano na biso ya mokolo na mokolo ezali mingi, yango wana tóluka lisusu te kobakisa mitungisi ya makanisi mpamba. Soki mitungisi ya makambo oyo ekoki koyela biso ezali kokómisa biso mawamawa mpe kopesa biso motema mpasi, tókende epai ya Yehova na libondeli mpe na malɔmbɔ. Tóluka kozwa litambwisi, mayele, mpe makanisi malamu, na Liloba na ye mpe na ebongiseli na ye. Tokomona ete atako likambo nini oyo ekoki koyela biso, lisungi ezali mpo na kolonga yango.
Lokola azalaki na mawa na motema mpe na mobulungano, mokomi na nzembo ayembaki ete: “Ɛ molimo na ngai, mpo na nini okweisami? Mpo na nini ozwi mpasi kati na ngai? Zalá na elikya epai na Nzambe mpo ete nakosanzola ye lisusu, ye oyo azali mobikisi na ngai mpe Nzambe na ngai.” (Nzembo 42:11) Tiká ete mayoki na biso ezala bongo.
Ɛɛ, zwá bibongiseli mpo na makambo oyo ekoki mpenza koya, mpe tikelá Yehova makambo oyo eyebani te soki ekoya to te. “Bóbwaka epai na ye makambo mazali kotungisa bino, zambi bino bozali mpo na ye.”—1 Petelo 5:7.
[Elilingi na lokasa 23]
Lokola Davidi, yo mpe otikelaka Yehova mikumba na mitungisi na yo?