Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 44 lok. 236-lok. 239 par. 5
  • Kosalela malamu mituna

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosalela malamu mituna
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Yekola koteya
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Kotuna mituna
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kosalela malamu mituna
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Tólanda ndakisa ya Moteyi Monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 44 lok. 236-lok. 239 par. 5

LITEYA 44

Kosalela malamu mituna

Osengeli kosala nini?

Salelá mituna na ndenge oyo ekobota mbuma oyo ozali koluka. Ntango mosusu olingi bápesa yo eyano na maloba; to mpe olingi moto ye moko akanisa mpe azwa eyano na makanisi na ye. Likambo oyo ozali kotuna mpe ndenge ozali kotuna yango nde ekosala ete mituna na yo ebota mbuma ya malamu to te.

Yango ezali na ntina nini?

Mituna ya malamu esalaka ete bato oyo bazali koyoka yo bámikɔtisa na lisolo. Biyano oyo moto azali kopesa na motuna oyo eponami malamu ekoki mpe kosalisa yo moteyi na ye oyeba ye.

LOKOLA mituna esɛngaka ete bato oyo bazali koyoka yo bápesa biyano, ezala na maloba to na makanisi, ekozanga te kotinda bango bámikɔtisa na lisolo. Mituna ekoki kosalisa yo obanda lisolo na moto mpe na nsima oyoka makanisi na ye, ye mpe ayoka oyo ya yo. Lokola ozali molobi mpe moteyi, okoki kosalela mituna mpo na kopesa moto mposa ya koyoka yo, to kosalisa ye akanisa malamumalamu likambo moko boye, to mpe mpo na konyata malamumalamu makambo oyo ozali koloba. Soki ozali kosalela mituna na ndenge ya malamu, okosalisa bato oyo bazali koyoka yo bákanisa malamu mpenza mpe básuka kaka te na koyoka. Zalá na mokano moko na makanisi, mpe tuná mituna na yo na ndenge ete okokisa mokano wana.

Mpo na kosala ete bósolola. Ntango okei na mosala ya kosakola, mekáká kosala ete bato bápesa makanisi na bango, soki balingi.

Batatoli mingi babandaka masolo ya kitoko mpenza na mwa motuna oyo kaka: “Osi’ omituná soki . . . ?” Ntango basakoli bazali kopona malamu motuna oyo bato mingi bamitunaka, ngonga oyo bakolekisa na mosala ya kosakola ekozanga te kozala ntango moko ya esengo. Ata soki moto yango amituná naino motuna yango te, ekoki kopesa ye mposa ya koluka koyeba. Masolo mingi oyo tosololaka ekoki kobanda na mituna lokola oyo: “Okanisi nini . . . ?,” “Omoni ndenge nini . . . ?,” mpe “Ondimaka . . . ?”

Ntango Filipo, mopalanganisi ya nsango malamu, akutanaki na mobali moko oyo azalaki kosala epai ya mokonzi ya Etiopia mpe oyo azalaki kotánga esakweli ya Yisaya na mongongo makasi, Filipo atunaki ye kaka: “Ozali mpenza koyeba [to, ozali kokanga ntina ya] makambo oyo ozali kotánga?” (Mis. 8:30) Motuna wana epesaki Filipo nzela ya kolimbola solo oyo etali Yesu Klisto. Batatoli mosusu lelo mpe basalelaki motuna wana mpe esalisaki bango bámona bato oyo bazali mpenza na mposa makasi ya koyeba solo ya Biblia.

Bato mingi, soki opesi bango likoki ya kobimisa makanisi na bango, bango mpe bakosepela mingi koyoka yo. Nsima ya kotuna motuna, yoká malamu. Ntango ozali kolobela eyano oyo moto apesi, zalá na boboto, kozala na maloba ya mabe te. Pesá moto yango longonya, soki alobi malamu. Mokolo moko, Yesu apesaki longonya na mokomeli moko oyo “ayanolaki na mayele”; alobaki na ye boye: “Ozali mosika te na bokonzi ya Nzambe.” (Mko. 12:34) Ata soki likanisi ya moto wana ekeseni na oyo ya yo, okoki kopesa ye matɔndi na ndenge abimisi yango. Likambo oyo alobi ekoki komonisa yo ezaleli oyo ebongi kozala na yango ntango ozali koteya ye solo ya Biblia.

Mpo na kokɔta na makanisi ya ntina. Ntango ozali kosala lisolo liboso ya bato ebele to ozali kosolola na moto moko, meká kosalela mituna liboso ya kokɔta na makanisi ya ntina. Mituna na yo esengeli kotalela makambo oyo bato oyo bazali koyoka yo balingi mpenza koyeba. Okoki mpe kosalela mituna oyo ekopesa moto mposa makasi mpo azali komona eyano na yango mbala moko te. Soki ofandi mwa moke nyɛɛ nsima ya kotuna motuna, bato oyo bazali koyoka yo bakozanga te kofungola matoi mpo na koyoka makambo oyo okoloba na nsima.

Na esika moko, mosakoli Mika asalelaki mwa mituna mingi. Nsima ya kotuna makambo nini Nzambe asɛngaka na baoyo basambelaka ye, mosakoli yango atunaki mituna mosusu minei, oyo mokomoko na yango ezalaki mpe na eyano oyo moto akokaki kopesa. Mituna nyonso wana ezali kotinda batángi bámilɛngɛla mpo na koyoka eyano ya mayele oyo asukisaki na yango eteni wana ya lisolo na ye. (Mika 6:6-8) Okokoka kosala ndenge wana ntango ozali koteya? Meká naino.

Mpo na kokanisa malamumalamu likambo moko. Okoki kosalela mituna mpo na kosalisa bato oyo bazali koyoka yo bámona ndenge makanisi ezali kolandana. Na Malaki 1:2-10, Yehova asalaki bongo ntango azalaki koloba na Yisalaele likambo moko ya ntina mingi. Libosoliboso ayebisaki bango ete: “Nalingi bino.” Kasi lokola bamonisaki botɔndi te mpo na bolingo wana, atunaki bango boye: “Esau azalaki ndeko ya Yakobo te?” Na nsima Yehova alobelaki kobebisama ya Edome mpo na komonisa ndenge aboyaki ekólo yango mpo na mabe na bango. Akobaki kolobela likambo yango na bandakisa mpe na mituna mpo na kolakisa Yisalaele polele ete bamonaki bolingo na ye eloko mpamba. Ndenge mituna mosusu etunami, emonani ntango mosusu ete banganga-nzambe wana oyo bazalaki sembo te nde bazalaki kotuna yango. Mituna mosusu nde Yehova azali kotuna banganga-nzambe yango. Lisolo yango ezali kolamusa mayoki mpe kosimba likebi na biso; makanisi na yango ezali kolandana malamu; mpe okokoka te kobosana likambo oyo elobelami wana.

Bandeko mosusu oyo basalaka masolo basalelaka mpe mituna malamumalamu ndenge wana. Atako esɛngaka te ete bato oyo bazali koyoka bango bápesa eyano na maloba, makanisi ekokɔta mpenza na lisolo, lokola nde bango mpe bazali kosolola.

Ntango toyekolaka Biblia na bato, tolukaka mpe ete moyekoli aloba. Ya solo, moyekoli akoyeba makambo mingi te soki azali kotánga biyano ndenge bakomá na mokanda. Na boboto mpenza, salelá mituna mosusu ya mikemike mpo na kokanisa malamumalamu elongo na moyekoli. Na bisika oyo makanisi ya ntina ezali, sɛngá ye asalela Biblia mpo na kopesa eyano. Okoki mpe kotuna ye boye: “Na ndenge nini makambo oyo tozali kolobela eyokani na likambo mosusu oyo toutaki koyekola? Ntina na yango ezali nini? Ndenge nini ekoki kosalisa biso na bomoi na biso?” Kosala bongo ezali malamu mingi koleka kolobaloba yo moko makambo oyo yo ondimaka to kolimbola makambo milaimilai yo moko. Ezali ndenge wana nde okoki kosalisa moyekoli asalela ‘likoki na ye ya kokanisa’ mpo na kosambela Nzambe.​—Lom. 12:1.

Soki moyekoli azali kosimba likambo moko boye te, yo zalá na motema molai. Mbala mosusu azali kotala bokeseni nini ezali na makambo oyo ozali koloba mpe oyo ye andimaka banda bambula mingi. Kolobela likambo yango na ndenge mosusu mpe ekoki kobota mbuma. Kasi, na bantango mosusu, esɛngaka te kokende na bandimbola milaimilai. Salelá bavɛrsɛ ya Makomami. Salelá bandakisa mpe mituna ya mikemike oyo ekotinda moto akanisa malamumalamu na likambo yango.

Mpo na kobimisa makanisi oyo ezali na motema. Bato mosusu babimisaka mpenza te makanisi oyo bazali na yango na motema ntango bazali kopesa eyano. Biyano bapesaka mbala mosusu ezalaka kaka oyo bamoni ete ekosepelisa yo. Osengeli kozala na bososoli. (Mas. 20:5) Okoki kotuna, ndenge Yesu atunaki: “Ondimi yango?”​—Yoa. 11:26.

Ntango ebele ya bayekoli ya Yesu basilikaki mpo na makambo oyo alobaki mpe batikaki kolanda ye, Yesu asalaki ete bantoma na ye bábimisa makanisi na bango. Atunaki boye: “Bino mpe bolingi nde kokende?” Petelo abimisaki mayoki na bango mpe alobaki boye: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko; mpe biso tosili kondima mpe koyeba ete yo ozali Mosantu ya Nzambe.” (Yoa. 6:67-69) Mokolo mosusu, Yesu atunaki bayekoli na ye ete: “Bato bazali koloba ete Mwana ya moto azali nani?” Na nsima, atunaki bango motuna moko oyo etindaki bango bábimisa makanisi oyo bazalaki na yango na mitema. “Kasi, bino bozali koloba ete ngai nazali nani?” Petelo azongisaki ete: “Ozali Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi.”​—Mat. 16:13-16.

Ntango ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia, ekoki kozala malamu osala mpe bongo na masolo mosusu. Okoki kotuna boye: “Bana-kelasi na bino (to bato oyo osalaka na bango) balobaka nini na likambo oyo?” Na nsima okoki kotuna: “Bongo yo okanisi nini?” Lokola ozali moteyi, soki oyebi mpenza makanisi ya moto oyo ozali koteya, okoyeba ndenge ya kosalisa ye malamumalamu.

Mpo na konyata makanisi malamumalamu. Okoki mpe kosalela mituna mpo na konyata makanisi malamumalamu. Ntoma Paulo mpe asalelaki yango, ndenge ekomami na Baloma 8:31, 32: “Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso? Moto oyo abombaki kutu te Mwana na ye moko kasi akabaki ye mpo na biso nyonso, mpo na nini akopesa biso mpe te elongo na ye biloko mosusu nyonso na boboto mpenza?” Omoni ete motuna oyo ezali kobakisa likanisi na motuna ya liboso.

Ntango mosakoli Yisaya asilisaki kokoma etumbu oyo Yehova akatelaki mokonzi ya Babilone, abakisaki boye mpo na komonisa likambo oyo ye azalaki mpenza kondima: “Yehova na bibele ye moko apesi toli yango, mpe nani akoki kolongola yango? Asemboli lobɔkɔ na ye, nani akozongisa yango nsima?” (Yis. 14:27, NW) Soki otali makambo oyo ezali na kati ya mituna yango, okomona ete mwaye ya koboya kondima likanisi oyo ezali na kati ezali te. Mituna yango esɛngi te ete moto apesa eyano.

Mpo na kolakisa polele makanisi ya libunga. Mituna oyo etunami nsima ya kokanisa malamumalamu esalisaka mpenza mpo na kolakisa polele makanisi ya libunga. Ntango Yesu alingaki kobikisa mobali moko, atunaki Bafalisai mpe bato mosusu oyo bayebaki Mibeko malamumalamu ete: “Epesami nzela na sabata kobikisa to te?” Nsima ya kobikisa moto yango, abakisaki motuna mosusu: “Nani na kati na bino, soki mwana na ye to ngɔmbɛ na ye ya mobali akwei na libulu, akobimisa ye nokinoki te na mokolo ya sabata?” (Luka 14:1-6) Ezalaki kosɛnga te ete moto apesa eyano; moto moko mpe te atombolaki mosapi. Mituna wana emonisaki polele makanisi na bango ya libunga.

Na bantango mosusu, ata baklisto ya solo mpe bakoki kozala na makanisi ya libunga. Na ekeke ya liboso, na mboka Kolinti, ezalaki na bato oyo bakómaki kokende kofunda bandeko na bango na tribinale mpo na makambo oyo bakokaki kosilisa yango bango moko. Ntoma Paulo asilisaki likambo yango ndenge nini? Atunaki bango mituna oyo atandaki yango na molɔngɔ mpo na kosembola makanisi na bango.​—1 Kol. 6:1-8.

Okoyeba kosalela mituna malamumalamu soki ozali komeka kosala yango mbala na mbala. Kasi, kobosana te ete osengeli kozala na limemya, mingimingi ntango ozali kosolola na mikóló, na bato oyo oyebi bango te, to mpe na bakonzi. Salelá mituna mpo na koyebisa bato solo ya Biblia na ndenge oyo ekosepelisa bango.

NDENGE YA KOSALA YANGO

  • Mpo lisolo ezala malamu, salelá mituna oyo etali makambo oyo ezali mpenza na ntina mpo na moto oyo ozali kosolola na ye.

  • Liboso ya kolobela likanisi moko ya ntina, meká kotuna motuna oyo ekopesa bato mposa ya koyoka likanisi yango.

  • Salelá mituna mpo na kosalisa bato bámona ntina ya makambo oyo olobi, bámona ete makanisi ya solo oyo epesami ezali kolandana malamu, mpe bámona bolamu oyo bango bakoki kozwa na yango na bomoi na bango.

  • Salelá mituna mpo na kotinda moyekoli asuka te na kozongela makambo oyo bakomi na mokanda kasi abimisa nde makanisi na ye na makambo oyo azali koyekola.

DEVUARE: (1) Kanisá teritware epai osakolaka mpe bongisá mwa mituna oyo okoki kotuna mpo na kobanda masolo ya malamu mpenza na bato. (2) Tángá Baloma mokapo ya 3, mpe talá malamu ndenge nini Paulo asalelaki mituna mpo na kokanisa malamumalamu, koluka koyeba ndenge oyo Nzambe azalaki kotalela Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto