LITEYA 41
Makambo oyo bato bakokanga ntina na yango
NTANGO ozali koloba, kosuka kaka te na koyebisa bato makambo yango. Salá makasi ete bato oyo bazali koyoka yo bákanga ntina ya makambo oyo ozali koloba. Yango ekoki kosalisa yo osololaka malamu mpenza na bato, ezala na kati ya lisangá to na bato oyo bazali Batatoli te.
Makambo mingi ekoki kosalisa yo ete oloba makambo oyo bato bakokanga ntina na yango. Tolobeli makambo yango mosusu na Liteya 26, “Kobimisa makanisi na molɔngɔ.” Tolobeli mpe mosusu na Liteya 30, “Kosepela na moto oyo azali koyoka yo.” Na liteya oyo, tokolobela mpe mwa makanisi mosusu.
Maloba ya pɛtɛɛ mpe elobeli ya pɛtɛɛ. Maloba ya pɛtɛɛ mpe bafraze ya mikuse esalaka mpenza ete lisolo eleka malamu. Lisolo ya Yesu Likoló ya Ngomba ezali mpenza ndakisa moko malamu oyo ezali komonisa lisolo oyo bato nyonso bakoki kokanga ntina na yango, ezala bazali banani to bauti na esika nini. Mbala mosusu makanisi yango ezali ya sika mpo na bango. Kasi bakoki kokanga ntina ya makambo oyo Yesu alobaki, mpamba te alobelaki makambo oyo etungisaka biso nyonso, na ndakisa: ndenge ya kozala na esengo, ndenge ya kobongisa boyokani na biso na bato mosusu, ndenge ya koyika mpiko na mitungisi mpe ndenge ya koyeba ntina ya bomoi. Mpe Yesu asalaki lisolo na ye na elobeli moko ya pɛtɛɛ mpenza. (Mat., mik. 5-7) Ezali solo ete Biblia ezali kopesa biso bandakisa ebele ya bafraze mpe ya maloba oyo mosusu ezali milai, mosusu mikuse. Mokano na yo esengeli kozala ete obimisa makanisi na yo polele mpe bato bákanga ntina na yango.
Ata ntango ozali kolobela makambo oyo ezalaka mpasi mpo na kokanga ntina na yango, soki elobeli na yo ezali pɛtɛɛ, yango ekoki kosala ete bato bázala na mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Ndenge nini okoki kozala na elobeli ya pɛtɛɛ? Kosopela bato makambo ya mpambampamba te. Bongisá makambo oyo okoloba mpo elimbola malamu mpenza makanisi na yo ya ntina. Poná malamumalamu bavɛrsɛ na yo ya ntina. Na esika ete otángaka bavɛrsɛ mbangumbangu mpo na koleka na mosusu, tángá mpe limbolá yango. Koloba makambo ebele ebele te mpo yango ekosala ete makanisi ya ntina emonana te.
Salelá mpe toli oyo ntango ozali koyekola na moto Biblia na ndako. Koluka kolimbola makambo nyonso te. Salisá moyekoli amona likanisi ya ntina polele. Na nsima, akoyekola makambo mosusu na boyekoli na ye moko mpe na makita ya lisangá.
Mpo osala lisolo na yo na elobeli ya pɛtɛɛ, osengeli komibongisa malamu. Soki olingi ete bato bákanga ntina ya lisolo na yo, esengeli ete yo moko okanga naino mpenza ntina na yango. Ntango okangi mpenza ntina ya likambo moko, okoki kopesa bantina oyo esali ete likambo yango ezala bongo. Okoki mpe koloba yango na maloba na yo moko.
Limbolá maloba oyo bato bameseni na yango te. Koloba makambo oyo bato bakokanga ntina na yango esɛngaka mbala mosusu ete olimbola maloba oyo bato oyo bazali koyoka yo bameseni na yango te. Komona te ete bayebi makambo mingi, kasi koloba mpe te ete bayebi makambo mingi te. Lokola yo oyebi Biblia, okoki kosalela maloba mosusu oyo bato mosusu bayebi te. Soki olimboli te, bato oyo bameseni na Batatoli ya Yehova te bakoyeba te ete maloba lokola “batikali,” “moombo ya sembo mpe ya mayele,” “bampate mosusu,” mpe “ebele ya bato” elimboli nde bituluku ya bato boye to boye. (Lom. 11:5; Mat. 24:45; Yoa. 10:16; Emon. 7:9) Ndenge moko mpe, soki moto ameseni te na lisangá ya Batatoli ya Yehova, mbala mosusu akoyeba te ndimbola ya maloba lokola “mosakoli,” “mobongisi-nzela,” “mokɛngɛli ya zongazonga” mpe “Ekaniseli.”
Mbala mosusu, osengeli mpe kolimbola maloba mosusu ya Biblia oyo esalelamaka mpe na bato oyo bazali Batatoli te. Mpo na bato mingi, “Armagedon” ezali etumba moko ya nikleere. Bakoki kokanisa ete “Bokonzi ya Nzambe” ezali boyangeli ya solo te, kasi ezali nde ezaleli ya moto na moto to ezali lola. Ntango olobi “molimo,” bango bakoki kokanisa ete ezali eteni moko ya elimo oyo ebimaka na nzoto ntango moto akufi. Bamilio ya bato bayebi ete “elimo santu” ezali moto mpe ezali na kati ya Bosato (Trinité). Lokola bato mingi mpenza balingaka te mitinda ya Biblia mpo na bizaleli malamu, esengeli mbala mosusu kosalisa bango ete bákanga ntina ya maloba oyo ya Biblia: “Bókima pite.”—1 Kol. 6:18.
Soki bato batángaka Biblia mbala na mbala te, mpe olobi na bango kaka ete: “Paulo akomaki . . .” to “Luka alobaki . . .” bakoki kokanga ntina na yango te. Mbala mosusu bazali na baninga to bato ya kartye na bango oyo bazali na nkombo yango. Osengeli mbala mosusu kobakisa maloba mosusu mpo na komonisa ete moto yango azalaki ntoma moko ya Klisto to mpe azalaki mokomi moko ya Biblia.
Mpo na bato mingi lelo oyo, esengeli kosalisa bango mbala na mbala bákanga ntina ya bavɛrsɛ oyo ezali kolobela bolai, bonene, bozindo ya eloko na ndenge bazalaki kotánga yango na ntango ya kala to mpe mpo na koyeba mimeseno ya ntango wana. Na ndakisa, bakoki kokanga mpenza te ntina ya maloba oyo emonisi ete masuwa ya Noa ezalaki na bolai ya mapeko 300, monene ya mapeko 50 mpe etombwanaki likoló mapeko 30. (Gen. 6:15) Kasi soki olobeli kaka makambo wana moko na maloba oyo bino bosalelaka mpo na kolobela bonene ya biloko, bato oyo bazali koyoka yo bakomona nokinoki bonene ya masuwa yango.
Limbolá na ndenge esengeli. Mpo bato oyo bazali koyoka yo bámona polele likambo oyo ozali koloba, esengeli kaka te kopesa ndimbola malamu ya liloba moko. Na Yelusaleme, na mikolo ya Ezela, bazalaki kotánga Mibeko mpe kolimbola yango. Mpo na kosalisa bato bákanga ntina na yango, Balevi bazalaki kolimbola Mibeko mpe komonisa bato ndenge oyo bakokaki kosalela yango na kotalela makambo oyo bazalaki kokutana na yango na ntango wana. (Neh. 8:8, 12) Yo mpe osengeli kozwa ntango ya kolimbola mpe komonisa bato ndenge ya kosalela bavɛrsɛ oyo ozali kotánga.
Nsima ya liwa mpe lisekwa na ye, Yesu alimbolelaki bayekoli na ye ete makambo oyo eutaki kosalema ezalaki kokokisama ya Makomami. Amonisaki mpe polele mokumba na bango oyo bamonaki makambo yango. (Luka 24:44-48) Ntango ozali kosalisa bato báyeba ndenge makambo oyo bayekoli esengeli kobongola bomoi na bango, ekozala mpasi te mpo bákanga mpenza ntina ya makambo yango.
Etali mpe motema ya moto. Ya solo, ata olimboli makambo polele, ezali na makambo mosusu oyo ekoki kosala ete moto akanga ntina to te. Soki motema ya moto ezali makasi, yango ekopekisa ye akanga ntina ya makambo oyo ozali koloba. (Mat. 13:13-15) Mpo na bato oyo bameseni kotalela makambo kaka na ndenge ya bomoto, makambo ya elimo ezali nde bozoba. (1 Kol. 2:14) Ntango moto amonisi elimo ya ndenge wana, ekozala malamu kokata lisolo mpo na mokolo wana.
Kasi mbala mosusu, motema ya moto ekoki kozala makasi mpo na mikakatano oyo azali kokutana na yango na bomoi na ye. Soki opesi moto yango libaku ya koyoka solo ya Biblia, nsima ya mwa ntango, motema na ye ekoki kobongwana. Ntango Yesu ayebisaki bantoma na ye ete bakobɛta ye fimbo mpe bakoboma ye, bantoma bakangaki ntina na yango te. Mpo na nini? Mpamba te bazalaki kokanisa likambo yango ata moke te mpe na ntembe te, balingaki yango te! (Luka 18:31-34) Nzokande, nsima ya mwa ntango, bantoma 11 bayaki kokanga ntina na yango mpe bamonisaki yango na ndenge basalelaki makambo oyo Yesu ateyaki bango.
Oyo ndakisa ya malamu ekoki kosala. Ezali kaka maloba na biso te nde esalisaka bato bákanga ntina, kasi misala na biso mpe lokola. Bato mingi balobaka ete bakanisaka bolingo oyo bamoniselaki bango ntango bayaki mpo na mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi, kasi makambo oyo balobaki mokolo wana te. Ndenge moko mpe, esengo oyo tomonisaka esalisi bato mingi bándima solo ya Biblia. Bato mosusu, ntango bamonaki boboto oyo basaleli ya Yehova bazali komonisa kati na bango mpe ndenge bamemyaka basusu ntango bakutani na minyoko, bayei kosukisa ete Batatoli bazali na lingomba ya solo. Yango wana, ntango ozali kosala makasi osalisa bato bákanga ntina ya solo ya Biblia, kanisá malamumalamu ndenge okolimbola yango mpe ndakisa oyo ozali kopesa.