LITEYA 50
Kosala makasi mpo na kosimba mitema
LONGOLA kopesa bato litatoli, osengeli mpe kosala nyonso mpo na kosimba mitema na bango. Na kati ya Biblia, mbala mingi bakesenisaka motema mpe libándá ya nzoto. Motema ya moto, na elobeli mosusu, elakisi makambo oyo ezali na kati na ye—elingi koloba, ndenge oyo ye amiyokaka, makambo nyonso oyo ye akanisaka, ntina oyo ye akanisaka yango, mpe ndenge makanisi wana etindaka ye asala makambo. Na kati ya motema wana nde solo ekendaka kolonama. (Mat. 13:19) Ezaleli ya kotosa Nzambe esengeli kouta na motema.—Mas. 3:1; Lom. 6:17.
Mpo mateya na yo ekɔta tii na kati kuna, salá makasi okokisa makambo oyo misato: (1) Kosalela bososoli mpo na koyeba makambo oyo ezali kotinda moto oyo ozali kosolola na ye asala likambo boye to boye. (2) Kolendisa ye azala na bizaleli ya malamu lokola bolingo mpe kobanga Nzambe. (3) Kolendisa ye atalela makambo azali kokana na motema na ye malamumalamu mpo na kosepelisa Yehova na makambo nyonso.
Kosalela bososoli. Ezali na bantina mingi oyo esalaka ete bato mosusu tii lelo báyamba naino solo te. Ntango ozali koyekola na moto Biblia, ekosɛnga mbala mosusu olongola ye makanisi mabe mpe olakisa ye makambo oyo ekondimisa ye ete makanisi oyo ye azali na yango ezali malamu te, to mpe ekosɛnga omonisa ye kaka makambo oyo ekosilisa ntembe na ye. Na yango, omituna boye: ‘Moto nazali kosolola na ye ayebaka mpenza ete, lokola azali moto, azalaka mpe na mposa ya makambo ya elimo? Mateya nini andimaka? Mateya nini andimaka te? Mpo na nini andimaka yango to mpo na nini andimaka yango te? Azali nde na bamposa oyo ekosɛnga nasalisa ye, noki te ekopekisa ye kondima mikumba oyo moto akómaka na yango ntango ayebi solo?’
Na bantango mosusu, ezalaka mpasi mpo na koyeba ntina oyo moto azali koboya kondima mateya mosusu. Masese 20:5 elobi boye: “Toli kati na motema ya moto ezali lokola mai ya bozindo, nde moto ya [bososoli, NW] akotoka yango.” Bososoli ezali likoki ya koyeba makambo oyo emonanaka polele te. Yango ezali kosɛnga kotala moto malamu mpe kolinga kosalisa ye.
Moto akoki koyebisa yo makambo ata soki alobi na monɔkɔ te. Elongi to mongongo ya moyekoli ekoki komonisa ete mateya na yo esimbi motema na ye. Soki bizaleli ya mwana moko ebongwani, yango ekotinda yo tata na ye to mama okanisa ete mwana oyo ayoki mateya ya sika. Kolekisa makambo wana te, mpamba te yango nde bilembo oyo elakisaka makambo oyo ezali na motema ya moto.
Mituna mpe ekoki kosalisa yo oyeba makambo oyo ezali na motema ya moto, kasi ekosɛnga opona mituna yango malamu. Okoki kotuna boye: “Okanisi nini mpo na . . . ?” “Nini endimisi yo ete . . . ?” “Okosala nini soki . . . ?” Kasi, ezali malamu te kobangisa moto na mituna ebele ebele. Mpo na kotuna mituna na ndenge oyo ekozokisa ye te, okoki koloba boye: “Okosepela natuna yo mwa motuna moko . . . ? Koluka koyeba makambo oyo ebombami na motema ya moto ezalaka pɛtɛɛ te; ebongi okende na yango malɛmbɛ. Mbala mingi, esɛngaka mikolo ebele mpo moto akóma kotyela yo motema mpe koyebisa yo makanisi oyo ebombami na motema na ye. Mpe ata soki mikolo eleki, kotuna mituna bitunelá te mpo akoki komona lokola okómi koluka kokɔta na makambo oyo etali yo te.—1 Pet. 4:15.
Ntango moto alobi likambo moko boye, ekosɛnga mpe bososoli liboso ya kozongisa. Kobosana te ete mokano na yo ezali ya koyeba naino makanisi ya bato malamumalamu mpo na kolukela bango mateya ya Biblia oyo ekoki kosimba mitema na bango. Soki mposa eyeli yo ya komonisa bango ete makanisi na bango ezali na libunga, benganá yango noki. Luká kutu nde koyeba eloko nini etindi bango báloba bongo. Na ndenge yango, okoyeba eyano nini okoki kopesa; mpe moyekoli na yo akomona ete olandi ye malamu, ye mpe akosepela kokanisa malamumalamu makambo oyo ozali koyebisa ye.—Mas. 16:23.
Ata ntango ozali kosala lisolo liboso ya bato ebele, okoki mpe kolendisa bamosusu na kati na bango. Soki ozali kotala bango malamumalamu, kotambwisa miso mpo na komona bilongi na bango, mpe soki ozali kotuna mituna oyo ekotinda bango bákanisa, okokoka koyeba oyo bazali kokanisa na mitema na bango mpo na makambo oyo yo ozali koloba. Soki oyebi bato oyo bazali koyoka yo malamu ete bazalaka boye to boye, kotyola bango te. Ntango ozali kolimbola Liloba ya Nzambe na kati ya lisangá, talelá mpe elimo nini lisangá yango mobimba ezalaka na yango.—Gal. 6:18.
Kotinda bato bázala na mayoki ya malamu. Nsima ya koyeba mwa makambo oyo moto andimaka, mpe oyo ye andimaka te, mpe mpo na nini andimaka to andimaka te, okoki sikoyo kosalisa ye na nzela ya makambo yango. Yesu nsima ya kosekwa na ye, asimbaki mitema ya bayekoli na ye na ndenge ‘afungolelaki bango Makomami polelepolele’ mpo báyeba ntina ya makambo oyo eutaki koleka. (Luka 24:32) Yo mpe, ntango ozali koyekola na moto, salá makasi olakisa ye ndenge nini mateya oyo azali komona na Liloba ya Nzambe ezali kolimbola makambo oyo ye akutaná na yango mpe oyo ye azalaka na mposa ya koyeba. Ntango moyekoli alobi na kati ya motema ete: “SOLO yango oyo!,” boye osimbi mpenza motema na ye mpe ekobota mbuma malamu.
Soki ozali kolobela motema malamu ya Yehova mbala na mbala, bolingo na ye, boboto na ye mingi, mpe banzela na ye oyo ezali mpenza sembo, bato oyo oteyaka bakokóma kolinga ye. Soki obongisaka mwa ntango ya kolakisa bango bizaleli malamu oyo Nzambe amonaka epai na bango, bakoyeba ete akoki kondima mokomoko na bango asala na ye boyokani. Nzokande mpo bámona yango mpenza, okoki kosolola na bango na mikapo lokola oyo: Nzembo 139:1-3, Luka 21:1-4, mpe Yoane 6:44, okoki kosalisa bango bámona ndenge Yehova, na bolingo mpenza, atikaka te basaleli na ye oyo bazali sembo. (Lom. 8:38, 39) Yebisá bango ete, Yehova atalaka kaka mabunga na biso te, kasi amonaka nyonso oyo tosalaka na bomoi na biso, amonaka molende na biso mpo na losambo ya pɛto, mpe bolingo na biso mpo na nkombo na ye. (2 Nta. 19:2, 3; Ebe. 6:10) Ayebi biso banda linzaka ya makolo tii na nsuki ya motó mpe akosala likamwisi ya kopesa lisusu bomoi epai ya “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama.” (Yoa. 5:28, 29; Luka 12:6, 7) Lokola bato basalamá na elilingi ya Nzambe, basepelaka mingi koyoka masolo ya bizaleli malamu oyo ye azali na yango.—Gen. 1:27.
Motema ya moto ekoki mpe kosimbama ntango olakisi ye ndenge Yehova atalelaka bato mpo ye mpe akóma kotalela bango ndenge wana. Toyebi ete Nzambe na biso alingaka biso mingi mpe yango elakisi ete alingaka mpe bato mosusu ndenge wana, kozanga kopona bilongi, ekólo, to mpe loposo na bango. (Mis. 10:34, 35) Soki moto akangi ntina ya makambo oyo nsima ya koyekola Makomami, akoyeba kolongola na motema na ye ezaleli ya koyina bato mpe ya kokanisela bango mabe. Yango ekosalisa ye afanda malamu mpe na kimya na bato mosusu ntango azali koyekola kosala oyo Nzambe alingi.
Kobanga Nzambe ezali mpe ezaleli mosusu oyo osengeli kosalisa bato bákóma na yango. (Nz. 111:10; Emon. 14:6, 7) Kobanga Nzambe elakisi kopesa ye limemya mingi, mpe ezaleli yango ekoki kotinda moto na koyeba makambo oyo akoki ata moke te kosala na makasi na ye moko. Soki ozali kosolola na moto makambo ya minene oyo Yehova asalá mpe motema boboto na ye ya kokamwa, akoki kokóma na ezaleli wana ya malamu, oyo ya kobanga kosala makambo oyo epesaka Yehova mawa.—Nz. 66:5; Yil. 32:40.
Talá soki bato oyo bazali koyoka yo bayebaka ete bizaleli na bango ezalaka na ntina mingi na miso ya Yehova. Ye azalaka na mayoki: ntango tolandi nzela oyo ye azali kolakisa biso, ayokaka esengo; soki toboyi kolanda yango, epesaka ye mawa. (Nz. 78:40-42) Monisá bato ete Satana atyelaki Nzambe ntembe; yango wana, bizaleli na biso ezali na ntina mpo Nzambe apesa Satana eyano na likambo yango.—Mas. 27:11.
Salisá bato oyo bazali koyoka yo báyeba ete ekozala malamu mpo na bango soki bazali kotosa makambo oyo Nzambe asɛngaka. (Yis. 48:17) Mpo na kosala yango, okoki komonisa bango bampasi oyo bato bazali kozwa mpe bilembo oyo etikalaka na mitema na bango mpo baboyaki kolanda nzela ya mayele ya Nzambe, ata mpo na mwa ntango moke kaka. Monisá bango ndenge nini lisumu ekabolaka biso na Nzambe, ndenge epekisaka bato báyekola solo epai na biso, mpe ndenge ebebiselaka bango makambo oyo bazali na lotomo ya kozala na yango. (1 Tes. 4:6) Salisá bato oyo bazali koyoka yo báyeba kolɛngɛla mapamboli oyo bazwi na Nzambe na ndenge bazali kotosa mibeko na ye. Salisá bango bákóma na botɔndi makasi na ndenge ezaleli na bango ya kotambola na banzela ya sembo ya Yehova ezali kobatela bango liboso ya bampasi mingi. Ntango moto akómi kondima ete banzela ya Nzambe ezali banzela ya mayele, akoyina ezaleli nyonso ya mabe, oyo eyokani te na banzela wana. (Nz. 119:104) Akokóma komona botosi lokola bozito te, kasi lokola lolenge ya kolakisa ete amipesi na Yehova na bolingo mpenza.
Kosalisa bato bámitalela malamumalamu. Mpo bato bákoba kokenda liboso na makambo ya elimo, esengeli báyeba oyo ezali na mitema na bango. Yebisá bango ndenge Biblia ekoki kosalisa bango na likambo yango.
Salisá bato oyo bazali koyoka yo báyeba ete Biblia ezali kaka te mokanda ya mibeko to ya toli to ya masolo ya kala to mpe ya bisakweli. Ezali mpe mokanda oyo elakisaka biso makanisi ya Nzambe. Yakobo 1:22-25 elobi ete Liloba ya Nzambe ezali lokola talatala. Nsango ya Biblia emonisaka ndenge nini motema na biso ezali: motema ya malamu esepelaka na makambo oyo Biblia ezali koloba mpe esepelaka ndenge Yehova azali kokokisa mokano na ye; kasi motema ya mabe esepelaka na makambo yango te. Na ndenge wana nde emonisaka biso ndenge tozali komonana na miso ya Nzambe, oyo ‘atalaka mitema.’ (Mas. 17:3) Lobá na bato oyo bazali koyoka yo bákanga likambo wana na bɔɔngɔ na bango. Lendisá bango bákanisaka malamumalamu nyonso oyo Nzambe abatelaki mpo na biso na kati ya Biblia mpe bátala malamu bizaleli nini basengeli kobongisa mpo básepelisa ye mingi koleka. Salisá bango bámonaka botángi ya Biblia lokola nzela ya koyeba soki “makanisi mpe mikano ya motema” na bango ezali malamu na miso ya Yehova; na ndenge yango, bakokoka kosala elongo na Nzambe mpo na kobongwana na ndenge esengeli.—Ebe. 4:12; Lom. 15:4.
Bayekoli mosusu ya Biblia bakoki kosepela kosalela makambo oyo bazali koyekola, kasi bazali kobanga ete bato mosusu bakozwela bango makanisi mabe. Mbala mosusu, bazali kobunda na bamposa mabe ya nzoto. To bazali koluka ndenge ya kozala lokolo mosusu na mosala ya Nzambe, lokolo mosusu na makambo ya mokili. Monisá bango makama nini ekoki koyela bango mpo na ezaleli wana ya kozanga kolanda nzela moko. (1 Mik. 18:21) Lendisá bango bábondelaka Nzambe mpo atalaka mitema na bango mpe apɛtola yango.—Nz. 26:2; 139:23, 24.
Monisá bango ete Yehova ayebi etumba oyo bazali kobunda mpe Biblia ezali komonisa ntina na yango. (Lom. 7:22, 23) Salisá bango bákeba ete bamposa ya motema oyo ya masumu ekoka te kolonga bango.—Mas. 3:5, 6; 28:26; Yil. 17:9, 10.
Lendisá moto mokomoko atalela malamu mikano nini etindaka ye asala likambo boye to boye. Lakisá bango bámitunaka ete: ‘Mpo na nini nalingi kosala likambo oyo? Soki nasali yango, Yehova akomona mpenza ete nazali na botɔndi mpo na makambo nyonso oyo azali kosala mpo na ngai?’ Salá nyonso mpo na kosalisa bango bákóma na kondima makasi ete kozala na boyokani ya malamu na Yehova eleki biloko nyonso oyo moto akoki kozala na yango.
Salisá bato oyo bazali koyoka yo báyeba ntina ya kosalela Yehova na “motema” na bango “mobimba.” (Luka 10:27) Yango elingi koloba ete makanisi na bango nyonso, bamposa na bango nyonso, mpe mikano na bango nyonso esengeli koyokana na nzela ya Yehova. Yango wana, teyá bango básuka kaka te na kotalela oyo bazali kosala, kasi ebongi bátalela mpe nini bakanisaka mpo na makambo oyo Nzambe asɛngaka, mpe mikano nini etindaka bango básalela ye. (Nz. 37:4) Ntango bayekoli ya Biblia bamoni makambo oyo basengeli kobongisa, lendisá bango bábondela Yehova ete: “Pesá ngai motema moko [mpo] nabanga nkombo na yo.”—Nz. 86:11.
Ntango moyekoli asali boyokani na Yehova, akobanda kotosa Nzambe mpo kondima oyo ye akómi na yango etindi ye asala bongo, kasi mpo na yo te. Yango nde ekosala ete, na nsima, ye moko ‘akokoba kotalela malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo.’ (Ef. 5:10; Filp. 2:12) Wana nde botosi oyo euti na motema mpe esepelisaka Yehova.—Mas. 23:15.
Kobosana te ete Yehova nde moto atalaka mitema mpe ye nde abendaka bato bázala na boyokani na ye. (Mas. 21:2; Yoa. 6:44) Biso tozali kaka bato oyo tozali kosala mosala elongo na ye. (1 Kol. 3:9) Ezali “lokola nde Nzambe azali kobondelabondela na nzela na biso.” (2 Kol. 5:20; Mis. 16:14) Yehova atindaka moto moko te na makasi ete andima solo, nzokande ntango biso tozali koteya Makomami, ye akoki kosalisa bato oyo bazali koyoka biso báyeba ete oyo bazali koyoka ezali eyano Nzambe apesi na mituna na bango to na mabondeli na bango. Kobosana likambo oyo te ntango ozali koteya bato, mpe bondelá Yehova makasi alakisa yo nini okoki kosala mpe asalisa yo.—1 Nta. 29:18, 19; Ef. 1:16-18.