MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MASESE 22-26
“Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye”
Mokanda ya Masese ezali na batoli ya malamu mpo na baboti. Ndenge kaka bitape ya mikemike ekolaka kaka na ngámbo oyo yango etɛngami, kobɔkɔla bana malamu esalisaka bango básalela Yehova ntango bakoli.
Kobɔkɔla bana malamu ezwaka ntango mpe ezali mosala makasi
Baboti basengeli kopesa bana ndakisa malamu, koteya bango, kopamela bango, kolendisa bango, mpe kopesa bango disiplini ndenge esengeli
Disiplini ezali lolenge malamu ya koteya, mpe ebongisaka makanisi ná motema
Mwana na mwana asengeli kozwa disiplini oyo ebongi na ye