Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr18 Mars nk. 1-6
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • 5-11/03
  • 12-18/03
  • 19-25/03
  • 26/03–1/04
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2018
mwbr18 Mars nk. 1-6

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

5-11/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 20-21

“Moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino”

nwtsty-E bililingi ná bavideo (Matai 20:3)

Zando

Bazando mosusu, lokola oyo balakisi awa, ezalaki pembenipembeni ya nzela. Mbala mingi bakomelesa bazalaki kotanda ebele ya biloko na balabala mpe yango ezalaki kokanga nzela. Bato bakokaki kosomba biloko ya ndako, bambɛki mpe basaani to bakɔpɔ ya mbɛlɛ, ata mpe biloko oyo euti na bilanga. Lokola frigo ezalaki te, bato basɛngelaki kokende zando mikolo nyonso mpo na kosomba biloko. Na zando yango, mosombi akokaki koyoka bansango oyo bakomelesa to bapaya mosusu bazalaki koya na yango, bana bakokaki kosakana mpe baoyo bazalaki koluka misala bakokaki kozela ete bázwa bango na mosala. Yesu abikisaki bato ya maladi na zando mpe ntoma Paulo asakolaki nsango malamu kuna. (Mis 17:17) Nzokande, bakomeli ná Bafarisai bazalaki kolinga ete bato bámona bango mpe bápesaka bango mbote na bisika wana ya bato nyonso.

nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 20:20, 21

mama ya bana ya Zebede: Elingi koloba mama ya ntoma Yakobo ná Yoane. Mokanda ya Marko emonisi ete Yakobo ná Yoane nde bayaki epai ya Yesu. Emonani ete bango nde basɛngaki Yesu likambo yango, kasi na nzela ya mama na bango Salome, oyo ekoki kozala ete azalaki ndeko ya Maria mama ya Yesu.​—Mt 27:55, 56; Mr 15:40, 41; Yn 19:25.

moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi: Awa, ezala lobɔkɔ ya mobali to ya mwasi elimboli lokumu mpe bokonzi, kasi oyo elekaka na lokumu mingi ezali lobɔkɔ ya mobali.​—Nz 110:1; Mis 7:55, 56; Ro 8:34.

nwtsty-E banɔti mpo na koyekola na Mt 20:26, 28

kosalela: to “mosaleli.” Mbala mingi Biblia esalelaka liloba ya Grɛki diakonos mpo na kolobela moto oyo na komikitisa nyonso amipesaka mpo na kosalisa basusu. Liloba yango esalelami mpo na kolobela Kristo (Ro 15:8), basaleli ya Kristo (1Ko 3:5-7; Kol 1:23), basaleli na misala (Flp 1:1; 1Ti 3:8), ata mpe bato oyo bazalaki kosala misala na ndako (Yn 2:5, 9) mpe bakonzi ya Leta (Ro 13:4).

mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela: to “patrɔ te kasi nde mwana ya mosala.”

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 21:9

Bikisá, tobondeli yo: Lil., “Hosanna.” Liloba yango ya Grɛki euti na liloba ya Ebre oyo elimbolami na “bikisá, tobondeli yo” to “tobondeli yo, bikisá.” Awa, liloba yango esalelami lokola libondeli epai ya Nzambe mpo na kosɛnga lobiko to elonga; ekoki mpe kobongolama na “tobondeli yo, bikisá biso na.” Na nsima, ekómaki maloba ya libondeli mpe ya masanzoli. Maloba yango ya Ebre ezali na Nz 118:25, oyo ezalaki mpe na kati ya maloba ya nzembo ebengami Hallel, oyo bazalaki koyemba yango mbala na mbala na eleko ya Elekeli. Yango wana, maloba yango eyelaki bango mbala moko na makanisi na libaku wana. Nzambe ayanolaki na libondeli yango ndenge asekwisaki Yesu uta na bakufi. Na Mt 21:42, Yesu azongelaki maloba ya Nz 118:22, 23 mpe asalelaki yango mpo na kolobela Masiya.

Mwana ya Davidi: Maloba yango emonisi ete bandimaki molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu mpe mokumba na ye lokola Masiya oyo alakamaki.

jy lok. 244 par. 4-6

Asaleli nzete ya figi mpo na kopesa liteya etali kondima

Kasi mpo na nini Yesu akaukisi nzete yango? Ayebisi ntina oyo asali bongo na eyano oyo apesi: “Ya solo nalobi na bino ete: Soki bozali mpenza na kondima mpe bozali kobɛta ntembe te, bokosala kaka oyo ngai nasali nzete ya figi te, kasi lisusu soki bolobi na ngomba oyo ete: ‘Pikolamá awa, omibwaka na mbu,’ ekosalema bongo. Mpe makambo nyonso oyo bozali kosɛnga na libondeli, soki bozali na kondima, bokozwa yango.” (Matai 21:21, 22) Awa, Yesu azongeli likambo oyo alobaki liboso, oyo etali kozala na likoki ya kolongola ngomba.​—Matai 17:20.

Na yango, lokola Yesu akaukisi nzete wana, apesi liteya monene oyo emonisi ntina ya kozala na kondima epai ya Nzambe. Alobi: “Biloko nyonso bozali kobondela mpo na yango mpe kosɛnga, bózala na kondima ete bozwi yango mpenza, mpe bokozala na yango.” (Marko 11:24) Yango ezali liteya ya ntina mingi mpo na bayekoli nyonso ya Yesu! Liteya yango ebongi mpenza mpo na bantoma, mpo etikali moke bákutana na komekama makasi. Kasi ezali na boyokani mosusu kati na nzete ya figi wana oyo ekauki mpe kondima.

Lokola nzete ya figi yango, ekólo ya Yisraele ezali komonana ete ezali na kondima, nzokande ezali bongo te. Bato ya ekólo yango basalaki kondimana na Nzambe mpe ekoki kozala ete ezali komonana lokola bazali kotosa Mibeko. Kasi, ekólo yango mobimba emonisi ete ezangi kondima mpe eboti mbuma ya malamu te. Eboyi kutu Mwana ya Nzambe! Na yango, lokola Yesu akaukisi nzete ya figi oyo ezalaki kobota te, amonisi ndenge ekólo wana oyo ezali kobota mbuma te mpe ezangi kondima ekosuka.

12-18/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 22-23

“Tosá mibeko mibale oyo eleki monene”

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 22:37

motema: Soki basaleli yango na ndenge ya elilingi, emonisaka bomoto mobimba ya kati. Kasi soki batángi yango esika moko na “molimo” mpe “makanisi,” ezalaka na ndimbola mosusu mpe elobelaka mingimingi mayoki ya moto, bamposa na ye mpe ndenge azali komiyoka. Maloba misato oyo basaleli awa, (motema, molimo, mpe makanisi) ekeseni mpenza te; basaleli yango mpo na kolimbola eloko kaka moko, mpo na komonisa mpenza ete bolingo oyo tolingaka Nzambe esengeli kozala mobimba, ndambo te.

molimo: To “bomoto mobimba.”

makanisi: Elingi koloba, makoki ya kokanisa. Moto asengeli kosalela makoki na ye ya kokanisa mpo na koyeba Nzambe mpe kolinga ye mingi. (Yn 17:3; Ro 12:1) Na maloba oyo euti na Mib 6:5, makomi ya ebandeli na Ebre esaleli maloba misato oyo, ‘motema, molimo mpe makasi.’ Kasi, na kotalela mokanda ya Matai ndenge emonani na makomi ya Grɛki, basaleli liloba “makasi” na esika ya liloba “makanisi.” Bantina ekoki kozala mingi. Ya liboso, atako Ebre ya kala ezalaki te na liloba ya sikisiki mpo na “makanisi,” mbala mingi bazalaki kosalela liloba ya Ebre “motema” mpo na kolobela mpe makanisi. Soki basaleli liloba yango na ndenge ya elilingi, emonisaka bomoto mobimba ya kati, ezala makanisi na ye, ndenge azali komiyoka, bizaleli mpe makambo oyo ezali kotinda ye asala boye to boye. (Mib 29:4; Nz 26:2; 64:6; talá nɔti mpo na koyekola na vɛrsɛ oyo: motema.) Mpo na ntina wana, na esika oyo Ebre esaleli liloba “motema,” mbala mingi Libongoli ya Septante esalelaka liloba “makanisi;” liloba ya Grɛki oyo ekokani na liloba motema. (Eb 8:21; 17:17; Mas 2:10; Yis 14:13) Ntina mosusu oyo Matai asaleli liloba ya Grɛki “makanisi” na esika ya liloba “makasi” ntango azongeli maloba ya Mib 6:5 ekoki kozala mpo liloba ya Ebre oyo ebongolami na “makasi” to nguya ya bomoi, ekoki kosangisa makasi ya nzoto mpe likoki ya kokanisa to mayele. Ezala ndenge nini, kokokana ya makanisi kati na maloba ya Ebre ná oyo ya Grɛki ekoki kosalisa biso tóyeba mpo na nini bakomi ya Evanzile basaleli te kaka liloba wana moko ntango bazongeli maloba oyo ezali na mokanda ya Kolimbola Mibeko.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 22:39

Ya mibale: Mt 22:37, ezali na eyano ya polele oyo Yesu apesaki Bafarisai, kasi asuki kaka na kopesa eyano yango te, azongeli mobeko ya mibale (Le 19:18), mpo na komonisa ete mibeko wana mibale ekoki kokabwana te mpe ete Mibeko nyonso mpe basakoli esimbami na mibeko wana mibale.​—Mt 22:40.

mozalani: Liloba ya Grɛki mpo na “mozalani” (lil., “oyo azali pembeni”) esuki kaka te na baoyo bafandi mosika te na moto. Ekoki mpe kolimbola moto nyonso oyo tosololaka na ye.​—Lk 10:29-37; Ro 13:8-10.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 22:40

mibeko . . . basakoli: “Mibeko” elakisi mikanda ya Biblia kobanda na Ebandeli tii na Kolimbola Mibeko. “Basakoli” elakisi mikanda ya Makomami ya Ebre oyo elobeli bisakweli. Kasi soki batángi maloba yango esika moko, ekoki kolimbola Makomami nyonso ya Ebre.​—Mt 7:12; 22:40; Lk 16:16.

esimbami: Vɛrbɛ ya Grɛki oyo elimboli mpenzampenza “kokangama na” esalelami awa na ndenge ya elilingi “kotalela kaka; esimbami na.” Na yango, Yesu alingaki komonisa ete kaka Mibeko zomi te nde esimbami na bolingo kasi Makomami nyonso ya Ebre.​—Ro 13:9.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 22:21

Biloko ya Kaisala na Kaisala: Eyano oyo Yesu apesi awa, ezali mpe na mokanda ya Mr 12:17 mpe Lk 20:25; ezali kaka na bisika wana nde alobeli amperɛrɛ ya Roma. “Biloko ya Kaisala” esangisi kofuta Leta mpo na misala oyo ezali kosala mpe kopesa bakonzi ya Leta lokumu mpe kotosa bango na makambo oyo ebongi kotosa bango.​—Ro 13:1-7.

Biloko ya Nzambe na Nzambe: Esangisi losambo oyo topesaka ye na motema mobimba, kolinga ye na molimo mobimba mpe kotosa ye na bosembo nyonso, na makambo nyonso.​—Mt 4:10; 22:37, 38; Mis 5:29; Ro 14:8.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 23:24

ntango bokɔngɔlaka masanga na bino, bokangaka ngungi kasi bomɛlaka kamela: Ngungi, nyama ya moke koleka mpe kamela nyama ya monene koleka ezalaki na kati na banyama oyo ezalaki mbindo na miso ya Bayisraele. (Le 11:4, 21-24) Yesu asaleli maloba ya elilingi mpe ya kosɛkisa mwa moke ntango alobaki ete bakonzi ya mangomba bakɔngɔlaka masanga na bango mpo ngungi ekómisa bango mbindo kasi batyolaka makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi; likambo oyo ekokani na komɛla kamela.

19-25/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 24

“Kolala mpɔngi te na elimo na mikolo oyo ya nsuka”

it-1-F lok. 112 par. 10

Bolingo

Bolingo ekoki kokita. Ntango Yesu Kristo ayebisaki bayekoli na ye makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya, alobaki polele ete bolingo (agapê) ya bato mingi oyo bamibengaka bakristo ekokita. (Mt 24:3, 12) Ntoma Paulo alobaki ete bato bakokóma bato oyo “balingá mbongo,” na eleko ya mpasi oyo ekoya. (2Ti 3:1, 2) Yango wana, ezali polele ete moto akoki kobosana mitinda ya Biblia mpe kotika ete bolingo oyo azalaki na yango liboso esila. Yango emonisi ntina mpenza ya komanyola Liloba ya Nzambe mpe koyokanisa bomoi na biso na mitinda na ye mpo na kokoba komonisa bolingo mpe kokolisa yango.​—Ef 4:15, 22-24.

w99 15/11 lok. 19 par. 5

Ozali kokokisa makambo nyonso Nzambe azali kosɛnga yo?

Yesu Kristo alobaki boye mpo na eleko ya mpasi oyo tozali na yango: “Ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:37-39) Kolya to komɛla kozanga kolekisa ndelo ezali mabe te; kutu libala ezali ebongiseli oyo eutá na Nzambe. (Ebandeli 2:20-24). Kasi, soki tomoni ete makanisi na biso nyonso ekómi kokende kaka na makambo ya bomoi, mbala mosusu ekozala malamu tóbondela mpo na likambo yango. Yehova akoki kosalisa biso tókoba kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, tósala oyo ezali malamu mpe tókokisa makambo oyo azali kosɛnga biso.​—Matai 6:33; Baroma 12:12; 2 Bakorinti 13:7.

jy lok. 259 par. 5

Bantoma batuni elembo

Alobi ete bayekoli na ye basengeli kozala ekɛngɛ, kosɛnzɛla, mpe komilɛngɛla. Mpo na kobɛta nsɛtɛ na likebisi yango, Yesu apesi ndakisa mosusu: “Bóyeba likambo oyo: soki nkolo-ndako ayebaka na ntango nini moyibi akoya na butu, mbɛlɛ alali mpɔngi te mpe mbɛlɛ atiki te ete moyibi abuka ndako na ye mpe akɔta. Yango wana bino mpe bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”​—Matai 24:43, 44.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 24:8

bampasi: Liloba yango ya Grɛki elimboli mpenzampenza mpasi makasi oyo mwasi ayokaka na ntango ya kobota. Lokola basaleli yango awa mpo na kolobela mpasi nyonso, ekoki komonisa ete ndenge moko ya mpasi oyo mwasi ayokaka na ntango ya kobota, mikakatano mpe bampasi oyo alobelaki ekobakisama mokemoke tii ntango bolɔzi monene oyo Matai 24:21 elobeli ekoya.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mt 24:20

na eleko ya mpiɔ makasi: Mbula makasi, mpela mpe ntango ya malili na boumeli ya eleko yango ekosala ete mibembo, koluka bilei mpe esika ya kofanda ezala mpasi.​—Ezr 10:9, 13.

mokolo ya Sabata: Na bateritware lokola oyo ya Yudea, bipekiseli oyo sabata etyelaka bato ekosala ete ezala mpasi moto asala mobembo na ntaka ya molai mpe amema kilo; lisusu baporte ya engumba ezalaki kofungwama te na mokolo ya Sabata.​—Talá Mis 1:12 mpe sgd eteni 16.

26/03–1/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 25

“Bósɛnzɛlaka”

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w15 15/3 lok. 26 par. 7

Tósunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo

Lelo oyo, tokangi ntina ya ndakisa ya bampate ná bantaba malamumalamu. Toyebi ete “Mwana ya moto,” to “mokonzi,” ezali Yesu. “Bandeko” ya mokonzi ezali baoyo batyami mafuta na elimo santu mpe oyo bakoyangela kuna likoló elongo na Yesu. (Baroma 8:16, 17) “Bampate” ná “bantaba” ezali bato ya bikólo nyonso. Bakosambisama pene na nsuka ya bolɔzi monene oyo ekobanda mosika te. Mpe toyebi ete Yesu akosambisa bato na kotalela makambo oyo basalelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova asalisi na boumeli ya bambula mpo tókanga ntina ya ndakisa oyo mpe bandakisa mosusu oyo ezali na Matai mokapo 24 mpe 25!

w09 15/10 lok. 16 par. 16-18

“Bazali baninga na ngai”

Soki ozali na elikya ya bomoi na mabele ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, ndenge nini okoki komonisa ete ozali moninga ya bandeko ya Kristo? Tólobela kaka makambo misato. Ya liboso, osengeli komipesa na mosala ya kosakola. Kristo apesaki bandeko na ye etinda básakola nsango malamu na mokili mobimba. (Mat. 24:14) Nzokande, lelo oyo, ekozala mpasi mpo bandeko ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele bákokisa mokumba yango soki baninga na bango bampate mosusu basalisi bango te. Ya solo, ntango nyonso oyo mokristo oyo azali na kati ya bampate mosusu abimi na mosala ya kosakola, azali kosalisa bandeko ya Kristo na kokokisa mokumba na bango mosantu. Kristo ná moombo ya sembo mpe ya mayele basepelaka ntango bampate mosusu bazali komonisa boninga na bango na ndenge wana.

Lolenge ya mibale oyo bampate mosusu bakoki kosalisa bandeko ya Kristo ezali ya kopesa makabo ya mbongo mpo na kosimba mosala ya kosakola. Yesu alendisaki bayekoli na ye bázwa baninga na nzela ya “bomɛngo oyo ezangi boyengebene.” (Luka 16:9) Yango elingi koloba te ete tokoki kosomba boninga ya Yesu to mpe ya Yehova. Kasi, ntango tozali kosalela biloko na biso ya mosuni mpo na matomba ya Bokonzi, tomonisaka ete tozali baninga mpe tolingaka, kaka na maloba te, kasi “na misala mpe na solo.” (1 Yoa. 3:16-18) Tosalaka yango ntango tobimi na mosala ya kosakola, ntango totye makabo mpo na mosala ya kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani, mpe ntango topesaka mbongo mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba. Ata soki topesi mbongo mingi to moke, na ntembe te Yehova mpe Yesu basepelaka ndenge topesaka yango na esengo.​—2 Ko. 9:7.

Lolenge ya misato oyo biso nyonso tokoki komonisa ete tozali baninga ya Kristo ezali ya kolanda malako ya bankulutu na lisangá. Elimo santu nde etyaka mibali yango bankulutu, na litambwisi ya Kristo. (Ef. 5:23) Ntoma Paulo akomaki boye: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango.” (Ebr. 13:17) Ntango mosusu, tokoki komona ete ezali mpasi kotosa toli ya Biblia oyo bankulutu bapesi biso. Mbala mosusu toyebi mabunga na bango, mpe yango ekoki kosala ete tótalela toli na bango malamu te. Atako bongo, Kristo, Mokonzi ya lisangá, asepeli kosalela bato yango ya kozanga kokoka. Yango wana, ndenge oyo totalelaka litambwisi na bango emonisaka soki tozali mpenza baninga ya Kristo to te. Ntango tozali te kolandela mabunga ya bankulutu kasi tozali kolanda litambwisi na bango na esengo, tokomonisa ete tolingaka Kristo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto