Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
7-13/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 21-22
“Mokano ya Yehova esalema”
“Mokano ya Yehova esalema”
15 Na ntango oyo Paulo azalaki epai ya Filipe, mopaya mosusu ya monene oyo nkombo na ye ezalaki Agabusi, ayaki. Bandeko oyo bayanganaki na ndako ya Filipe bayebaki ete Agabusi azalaki mosakoli; asakolaki nzala monene oyo eyaki na boyangeli ya Amperɛrɛ Klode. (Mis. 11:27, 28) Mbala mosusu bamitunaki ete: ‘Mpo na nini Agabusi ayei? Nsango nini amemeli biso?’ Ntango bazali kotalatala ye, azwaki mokaba ya Paulo (eteni ya elamba oyo ezali lokola mokaba, oyo moto akokaki kotya mbongo mpe biloko mosusu na kati, mpe kolata yango na loketo). Agabusi amikangaki na yango makolo mpe mabɔkɔ. Na nsima alobaki. Nsango na ye ezalaki ya esengo te: “Elimo santu elobi boye: ‘Moto oyo azali nkolo mokaba oyo, Bayuda bakokanga ye boye na Yerusaleme mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo.’”—Mis. 21:11.
16 Esakweli yango endimisaki ete Paulo akokende na Yerusaleme. Emonisaki mpe ete ntango akosakola epai ya Bayuda, bango bakokanga ye mpe bakokaba ye “na mabɔkɔ ya bato ya bikólo.” Esakweli yango epesaki bato oyo bazalaki wana mawa mingi. Luka akomaki boye: “Nzokande ntango toyokaki bongo, biso ná bato ya esika wana tobandaki kobondela ye ete amata na Yerusaleme te. Na yango, Paulo ayanolaki ete: ‘Bozali kosala nini na kolela mpe na kolɛmbisa ngai motema? Bóyeba likambo oyo: Namibongisi kaka mpo na kokangama te, kasi mpe mpo na kokufa na Yerusaleme mpo na nkombo ya Nkolo Yesu.’”—Mis. 21:12, 13
“Mokano ya Yehova esalema”
17 Kanisá naino. Bandeko nyonso, ata mpe Luka, bazali kobondela Paulo ete akende te. Bamosusu bazali kolela. Lokola Paulo amoni bolingo mpe komibanzabanza na bango, alobi na bango na boboto ete bazali “kolɛmbisa [ye] motema.” Atako bongo, azali na ekateli makasi, mpe ndenge kaka asalaki ntango akutanaki na bandeko na Tire, atiki te ete maloba mpe mpisoli na bango ezongisa ye nsima. Kutu, amonisi bango ntina oyo asengeli kokende. Amonisaki mpenza ete azalaki na mpiko! Na ndakisa ya Yesu, Paulo atalisaki elongi na ye na Yerusaleme mpe azalaki na ekateli makasi ya kokende kuna. (Ebr. 12:2) Paulo azalaki koluka kokufa lokola martiru te; kasi soki esɛngi ete akufa mpo azali moyekoli ya Yesu Kristo, akomona yango lokumu.
“Mokano ya Yehova esalema”
18 Bandeko basalaki nini? Na mokuse, bandimaki makanisi na ye. Biblia elobi boye: “Lokola azalaki kondima kaka te, biso tondimaki yango na maloba oyo: ‘Mokano ya Yehova esalema.’” (Mis. 21:14) Baoyo balukaki kondimisa Paulo ete akende na Yerusaleme te batingamaki na likanisi na bango te. Bayokelaki Paulo mpe bandimaki makanisi na ye, basosolaki mpe bandimaki ete ezali mokano ya Yehova, atako ezalaki mpasi mpo na bango. Paulo andimaki likambo oyo nsukansuka, esengelaki komema ye na liwa. Makambo elingaki kozala mwa pɛtɛɛ mpo na Paulo soki bandeko balukaki te kondimisa ye ete akende te na Yerusaleme.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
“Bóyoka kosamba na ngai”
10 Atako bongo, Paulo azalaki komitya na esika ya bato oyo bazalaki kosepela kotosa mimeseno mosusu ya Bayuda, na ndakisa kosala mosala te na mokolo ya Sabata to koboya bilei mosusu. (Rom. 14:1-6) Apekisaki mpe te kokatama ngenga. Kutu, Paulo akataki Timote ngenga mpo abɛtisa Bayuda libaku te mpo bayebaki ete tata ya Timote azalaki Mogrɛki. (Mis. 16:3) Kokatama ngenga ezalaki ekateli ya moto na moto. Paulo akomelaki Bagalatia boye: “Kokatama ngenga ezali na ntina te, ezala mpe kokatama ngenga te, kasi kondima oyo ezali kosala na nzela ya bolingo nde ezali na ntina.” (Gal. 5:6) Nzokande, soki moto andimi kokatama ngenga mpo na komonisa ete azali kotosa Mibeko to azali koloba ete likambo yango ezali na ntina mpo Yehova andima ye, moto yango azangi kondima.
11 Yango wana, atako nungunungu oyo etambolaki mpo na Paulo ezalaki makambo ya lokuta, yango ezalaki kaka kobulunganisa Bayuda oyo bakómaki bakristo. Mpo na yango, bankulutu bayebisaki Paulo boye: “Tozali na mibali minei oyo bazali na ndai likoló na bango. Kamatá mibali yango mpe kende komipɛtola elongo na bango na ndenge milulu ezali kosɛnga mpe futelá bango makambo nyonso, mpo bákokolama motó. Mpe na ndenge yango, moto nyonso akoyeba ete nungunungu oyo bayebisaki bango mpo na yo ezali ya mpamba, kasi ete yo ozali kotambola na molɔngɔ, yo moko mpe ozali kobatela Mibeko.”—Mis. 21:23, 24.
12 Paulo akokaki koloba ete likambo oyo ezalaki kobimisa mokakatano ezalaki nde molende oyo Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki na yango mpo na Mibeko ya Moize, kasi ezalaki mpenza nungunungu wana te. Atako bongo, asepelaki kotosa etinda ya bankulutu, lokola yango esɛngaki te abuka mitinda ya Nzambe. Mwa ntango liboso, Paulo akomaki ete: “Epai ya baoyo bazali na nse ya mibeko, nakómaki lokola nde nazalaki na nse ya mibeko, atako ngai moko nazali na nse ya mibeko te, mpo nakoka kozwa baoyo bazali na nse ya mibeko.” (1 Ko. 9:20) Na likambo wana, Paulo atosaki bankulutu ya Yerusaleme mpe akómaki lokola moto oyo azali “na nse ya mibeko.” Na ndenge yango, apesaki biso ndakisa ya malamu ya kotosa bankulutu mpe ya kotingama kaka te na ndenge oyo biso tosepeli kosala makambo.—Ebr. 13:17.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 22:16
belelá nkombo na ye mpo osukola masumu na yo: To “sukolá masumu na yo mpe belelá nkombo na ye.” Kaka mai ya batisimo te nde ekosukola masumu ya moto, kasi asengeli mpe kobelela nkombo ya Yesu. Kosala yango esɛngi kondimela Yesu mpe komonisa kondima yango na misala oyo ezali komonisa ete moto yango azali mokristo.—Mis 10:43; Yk 2:14, 18.
14-20/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 23-24
“Bafundi ye ete azali likama monene mpe azali kobimisa botomboki”
“Zalá na mpiko!”
5 Paulo azwaki elendiseli na ntango oyo ebongi mpenza. Mokolo oyo elandaki, Bayuda koleka 40 “basalaki likita mabe mpe balapaki ndai ete mabe ekwela bango, soki balei mpe bamɛli liboso ete báboma Paulo.” “Likita wana ya mabe na ndai oyo ekangani na elakeli mabe” emonisi ete Bayuda yango bazalaki na ekateli makasi ya koboma ntoma Paulo. Balobaki ete soki mokano na bango elongi te, likambo ya mabe ekómela bango. (Mis. 23:12-15) Mayele oyo bakanisaki, oyo mpe banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló bandimaki, ezalaki ya kosɛnga ete Paulo akende lisusu liboso ya Sanedrina mpo bátuna ye mituna mpo emonana lokola nde balingi koyeba makambo na ye malamumalamu. Kasi, bato yango balingaki kobatama na nzela mpe ntango bazali komema Paulo na Sanedrina, balingaki kobimela ye na mbalakaka mpe koboma ye.
6 Nzokande, mwana ya ndeko ya Paulo ayokaki mokano yango mpe akendaki koyebisa yango Paulo. Na nsima, Paulo atindaki elenge yango akende koyebisa likambo yango epai ya Klode Lusiasi, komanda ya basoda. (Mis. 23:16-22) Na ntembe te, Yehova alingaka bilenge oyo basalaka lokola mwana wana ya ndeko ya Paulo; elingi koloba bilenge oyo batyaka bolamu ya basaleli ya Nzambe liboso mpe basalaka nyonso oyo bakoki mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso.
“Zalá na mpiko!”
10 Na Kaisaria, Paulo ‘abatelamaki na ndako ya bokonzi ya Erode’ ntango azalaki kozela bato oyo bafundaki ye báuta na Yerusaleme. (Mis. 23:35) Mikolo mitano na nsima, bato yango bakómaki; ezalaki Nganga-nzambe Monene Ananiasi, molobeli moko oyo nkombo na ye ezalaki Tertulusi, mpe etuluku moko ya mikóló. Tertulusi abandaki naino na kokumisa Feliksi mpo na makambo oyo azalaki kosalela Bayuda, na ntembe te mpo na kolɛngola ye mpe koluka ete alongisa bango. Na nsima, Tertulusi alobelaki likambo oyo bayelaki, alobaki boye: “[Paulo] azali likama monene mpe azali kobimisa botomboki epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba oyo bato bafandi mpe azali mokambi ya mwa lingomba ya Banazarete, ye nde moto amekaki mpe kokómisa tempelo eloko mpamba mpe tokangaki ye.” Bayuda mosusu mpe “bamikɔtisaki na kofunda wana, bazalaki koloba ete makambo yango ezalaki mpenza bongo.” (Mis. 24:5, 6, 9) Makambo oyo bafundaki Paulo ezalaki makambo minene oyo moto akokaki kozwela etumbu ya liwa; balobaki ete azali kobimisa botomboki, azali mokambi ya mwa lingomba moko oyo ezali likama mpo na ekólo, mpe akómisaki tempelo eloko mpamba.
“Zalá na mpiko!”
13 Paulo apesaki ndakisa malamu oyo tokoki kolanda soki bamemi biso liboso ya bakonzi ya Leta mpo na losambo na biso mpe soki bakoseli biso makambo ete totindaka bato bátomboka, tozimbisaka bato to tozali na “mwa lingomba moko oyo ezali likama.” Paulo alukaki te kosepelisa guvɛrnɛrɛ na maloba ya kolɛngola, ndenge Tertulusi asalaki. Paulo azalaki koloba na kimya mpe na limemya. Na ndenge ya mayele mpenza, alobaki polele mpe solo. Paulo alobaki ete “Bayuda . . . ya etúká ya Azia” oyo bafundaki ye ete azalaki kokómisa tempelo eloko mpamba bazalaki wana te mpe ete na kolanda mibeko, asengeli kosamba ná bango mpe koyoka bifundeli na bango.—Mis. 24:18, 19.
14 Likambo ya ntina mingi ezali ete Paulo abangaki te kopesa litatoli mpo na bindimeli na ye. Na mpiko nyonso, amonisaki lisusu ete andimaka lisekwa, likambo oyo ekɔtisaki mobulu na kati ya Sanedrina. (Mis. 23:6-10) Ntango Paulo azalaki kosamba, alobelaki mingi elikya ya lisekwa. Mpo na nini? Mpamba te Paulo azalaki kopesa litatoli mpo na Yesu mpe komonisa ete asekwaki, likambo oyo banguna na ye bakokaki kondima te. (Mis. 26:6-8, 22, 23) Likambo mpenza oyo ebimisaki ntembe ezalaki nde liteya ya lisekwa, mingimingi, kondimela Yesu mpe lisekwa na ye.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 23:6
nazali Mofarisai: Bato mosusu oyo bazalaki wana bayebaki Paulo. (Mis 22:5) Ntango amibengaki mwana ya Bafarisai, bamonaki ete andimaki ete ye ná bango bazali na bonkɔkɔ moko. Bamonaki ete awangani te soki azali nani mpo Bafarisai ya Sanedrina bayebaki ete akómaki mokristo ya molende. Na vɛrsɛ oyo, ekoki kozala ete Paulo amibengi Mofarisai mpo alingaki báyeba ete azali na ngámbo ya Bafarisai kasi te na ngámbo ya Basadukai mpo Bafarisai bazalaki kondima lisekwa lokola ye. Kosala bongo esalisaki ye azala na likambo oyo ekoyokanisa ye na Bafarisai. Emonani ete azalaki na elikya ete soki alobi likambo oyo ekobimisa ntembe, yango ekosala ete bato mosusu ya Sanedrina bándima makambo oyo akoloba mpe mayele yango esimbaki. (Mis 23:7-9) Maloba ya Paulo oyo ezali awa na Mis 23:6 eyokani mpe na ndenge oyo amilobelaki ntango na nsima asambaki liboso ya Mokonzi Agripa. (Mis 26:5) Mpe ntango azalaki na Roma, Paulo akomaki mokanda epai ya bandeko na ye bakristo ya mboka Filipi, alobelaki lisusu libula na ye ya kozala Mofarisai. (Flp 3:5) Ndenge oyo balobeli mpe bakristo mosusu oyo bazalaki liboso Bafarisai na Mis 15:5 ezali mpe kobenda likebi.—Talá nɔti mpo na koyekola na Mis 15:5.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 24:24
Drusila: Mwana ya misato mpe ya nsuka ya Erode oyo Mis 12:1 elobeli, elingi koloba Erode Agripa I. Abotamaki na mobu soki 38 ya ntango na biso mpe azalaki leki ya Agripa II mpe ya Bernise. (Talá nɔti mpo na koyekola na Mis 25:13 mpe ndimbola ya liloba, “Erode.”) Guvɛrnɛrɛ Feliksi azalaki mobali na ye ya mibale. Liboso abaláká mokonzi ya Siri Azizus ya Émèse kasi abomaki libala yango mpe abalanaki na Feliksi na mobu soki 54 ya ntango na biso to ntango azalaki na mbula soki 16. Ekoki kozala ete azalaki wana ntango Paulo azalaki koloba liboso ya Feliksi mpo na likambo etali “boyengebene mpe komipekisa mpe lisambisi oyo ekoya.” (Mis 24:25) Ntango Feliksi atikelaki Festusi ebonga ya guvɛrnɛrɛ, atikaki Paulo na bolɔkɔ mpo “alingaki ete Bayuda básepela na ye.” Bato mosusu bakanisi ete asalaki bongo mpo na kosepelisa mwasi na ye ya mwana moke, oyo azalaki Moyuda.—Mis 24:27.
21-27/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 25-26
“Paulo asɛngi akende kosamba epai ya Kaisala mpe na nsima apesi Mokonzi Erode Agripa litatoli”
“Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”
6 Lokola Festusi azalaki na mposa ya kosepelisa Bayuda, yango ekómaki likama mpo na bomoi ya Paulo. Mpo na yango, Paulo asalelaki ntomo oyo azalaki na yango lokola mwana-mboka Roma. Ayebisaki Festusi boye: “Natɛlɛmi liboso ya kiti ya kosambisa ya Kaisala, epai nasengeli kosambisama. Nasali Bayuda mabe ata moko te, ndenge yo moko mpe ozali mpenza komona yango. . . . Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!” Mbala mingi, ntango moto asɛngi likambo wana, ezalaki mpasi báboya kokokisa mposa na ye. Festusi amonisaki ete ezali bongo na ndenge alobaki ete: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala; okokende epai ya Kaisala.” (Mis. 25:10-12) Lokola Paulo asɛngaki akende kosamba liboso ya mokonzi oyo azali likoló ya bakonzi mosusu nyonso, apesaki ndakisa oyo bakristo ya solo basengeli kolanda lelo oyo. Ntango banguna balukaka “kobimisa mpasi na nzela ya mobeko,” Batatoli ya Yehova basalelaka mibeko ya mboka mpo na kokɔtela nsango malamu.—Nz. 94:20.
“Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”
10 Na limemya nyonso, Paulo apesaki Mokonzi Agripa botɔndi mpo na libaku malamu oyo apesaki ye ya kosamba liboso na ye, mpe alobaki ete mokonzi yango ayebaki malamu mimeseno mpe bantembe ya Bayuda. Na nsima, Paulo alobelaki bomoi na ye liboso akóma mokristo; alobaki boye: “Na kolanda mwa lingomba oyo eleki makambo makasi na losambo na biso, nazalaki Mofarisai.” (Mis. 26:5) Paulo azalaki kozela koya ya Masiya ntango azalaki Mofarisai. Kasi, lokola akómaki mokristo, azalaki komonisa ete Yesu Kristo nde Masiya oyo bazalaki kozela banda kala. Paulo amonisaki ete soki azalaki kosamba mokolo yango ezalaki mpo na likambo oyo ye ná bato oyo bafundaki ye bazalaki kondima, elingi koloba kokokisama ya elaka oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ na bango. Likambo yango ebendaki lisusu likebi ya Agripa mpo na koyoka makambo oyo Paulo akoloba.
11 Paulo alobelaki makambo mabe oyo azalaki kosala bakristo; alobaki boye: “Ngai nazalaki mpenza kokanisa na motema na ngai ete nasengelaki kosala makambo mingi mpo na kotɛmɛla nkombo ya Yesu Monazarete . . . Lokola nazalaki na nkanda . . . makasi mpenza [ya bayekoli ya Kristo], nakendaki mosika mpenza tii na konyokola bango ata na bingumba ya libándá.” (Mis. 26:9-11) Paulo azalaki kolekisa ndelo te na maloba na ye. Bato mingi bayebaki makambo mabe oyo asalaki bakristo. (Gal. 1:13, 23) Na ntembe te, Agripa amitunaki ete, ‘Nini esalaki ete moto yango abongwana?’
12 Maloba oyo Paulo alobaki na nsima epesaki eyano na motuna yango; alobaki boye: “Ntango nazalaki kokende na Damasi na lotomo mpe na etinda ya banganga-nzambe bakonzi, na midi namonaki na nzela, Ee mokonzi, pole moko oyo eleki kongɛnga ya moi ebɛti uta na likoló zingazinga na ngai mpe zingazinga na baoyo bazalaki kokende na ngai elongo. Mpe ntango biso nyonso tokweaki na nse, nayokaki mongongo moko elobi na ngai na monɔkɔ ya Ebre ete: ‘Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai? Kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda ezali mpasi mpo na yo.’ Kasi ngai nalobaki ete: ‘Yo nani, Nkolo?’ Mpe Nkolo alobaki ete: ‘Ngai Yesu, oyo yo ozali konyokola.’”—Mis. 26:12-15.
13 Liboso amona emonaneli wana, na maloba ya elilingi, Paulo azalaki “kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda.” Ndenge nyama oyo ememaka mikumba emizokisaka mpamba soki ezali kobɛta makolo na nsɔngɛ ya lingenda, Paulo azalaki komiyokisa mpasi na elimo na ndenge azalaki kotɛmɛla mokano ya Nzambe. Ndenge Yesu abimelaki Paulo na nzela ya Damasi, asalisaki mobali yango oyo azalaki sembo, kasi abungaki nzela, ete abongola makanisi na ye.—Yoa. 16:1, 2.
14 Paulo asalaki mpenza mbongwana monene na bomoi na ye. Alobaki na Agripa boye: “Naboyaki te kotosa emonaneli wana ya likoló, kasi epai ya baoyo bazalaki na Damasi libosoliboso mpe epai ya baoyo bazalaki na Yerusaleme, mpe na mokili mobimba ya Yudea, mpe epai ya bikólo, namemaki nsango oyo ete: basengeli kobongola motema mpe kobaluka epai ya Nzambe mpe kosala misala oyo emonisi ete babongoli motema.” (Mis. 26:19, 20) Banda bambula mingi, Paulo azalaki kokokisa mokumba oyo Yesu Kristo apesaki ye na emonaneli wana. Yango ebotaki mbuma nini? Bato oyo bandimaki nsango malamu oyo Paulo azalaki kosakola babongolaki mitema mpe batikaki misala ya mbindo mpe ya kozanga bosembo, mpe babalukaki epai ya Nzambe. Bato yango bakómaki bana-mboka malamu, oyo bazalaki kotosa mibeko mpe kofanda na kimya.
15 Nzokande, matomba nyonso wana ezalaki na ntina moko te mpo na Bayuda oyo bazalaki kotɛmɛla Paulo. Paulo alobaki boye: “Ezali mpo na makambo yango nde Bayuda bakangaki ngai na tempelo mpe balingaki koboma ngai. Nzokande, lokola nazwi lisalisi oyo euti epai ya Nzambe nazali kokoba tii na mokolo ya lelo kopesa litatoli epai ya bato mike mpe bato minene.”—Mis. 26:21, 22.
16 Biso bakristo ya solo tosengeli ‘komibongisa ntango nyonso mpo na kolobela’ kondima na biso. (1 Pe. 3:15) Ntango tozwi libaku ya koloba liboso ya bazuzi mpe bakonzi mpo na kokɔtela bindimeli na biso, ekozala malamu mingi tólanda mayele oyo Paulo asalelaki ntango alobaki liboso ya Agripa ná Festusi. Tokoki kosimba mitema ya bakonzi yango soki toyebisi bango ndenge oyo mateya ya solo ebongolaki bomoi na biso moko mpe ya bato mosusu oyo bandimaki nsango na biso.
“Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”
18 Kasi, Paulo apesaki guvɛrnɛrɛ yango eyano oyo: “Nazwi ligboma te, Festusi Moto ya Lokumu, nazali nde kobimisa maloba ya solo mpe ya makanisi malamu. Ya solo, mokonzi oyo ngai nazali koloba liboso na ye na elobeli ya polele ayebi makambo yango malamu . . . Mokonzi Agripa, ondimaka Basakoli? Nayebi ete ondimaka.” Kasi Agripa alobaki na Paulo ete: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma mokristo.” (Mis. 26:25-28) Ezala ete Agripa alobaki maloba oyo eutaki mpenza na motema to te, emonisi ete litatoli ya Paulo esimbaki mpenza motema ya mokonzi wana.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 26:14
kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda: Lingenda ezali mwa nzete ya nsɔngɛ oyo basalelaka mpo na kotambwisa banyama. (Bas 3:31) Maloba “kobɛta makolo na nsɔngɛ ya lingenda” ezali lisese moko oyo ezali na mikanda ya Bagrɛki. Basalelaka yango mpo na komonisa ngɔmbɛ ya motó makasi oyo bazalaki kotubatuba yango nsɔngɛ ya lingenda mpo na kolakisa yango nzela, kasi ezalaki kobɛta nsɔngɛ yango mpe komizokisa. Paulo azalaki komitambwisa ndenge wana liboso akóma mokristo. Ndenge azalaki kobundisa bayekoli ya Yesu, oyo Yehova Nzambe azalaki kopesa bango mabɔkɔ, Paulo akokaki komizokisa makasi ye moko. (Talá mpe Mis 5:38, 39; 1Ti 1:13, 14.) Na Mos 12:11, balobeli “mangenda” na ndenge ya elilingi, basaleli yango mpo na kolobela moto ya bwanya oyo maloba na ye ezali kotinda moto oyo azali koyoka ye alanda toli.
nwtstg-E Ndimbola ya maloba
Lingenda. Mwa nzete ya molai oyo batyá ebende moko ya nsɔngɛ na nsuka na yango, oyo basali-bilanga bazalaki kosalela mpo na kotambwisa nyama. Bakokanisi lingenda na maloba ya moto ya bwanya oyo ezali kotinda moto oyo ayoki yango asalela toli ya bwanya. Maloba “kobɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda” euti na ndenge oyo ngɔmbɛ ya motó makasi oyo bazalaki kotubatuba ye nsɔngɛ ya lingenda mpo na kolakisa ye nzela kasi ezalaki kobɛta nsɔngɛ yango mpe komizokisa.—Mis 26:14; Bas 3:31.
Salisá basusu bándima nsango ya Bokonzi
14 Paulo ayebaki ete Agilipa azali Moyuda kaka ya nkombo. Lokola Paulo ayebaki ete Agilipa ayebi makambo ya Lingomba ya Bayuda, amonisaki ye ete azali kosakola “likambo mosusu te kaka oyo Basakoli mpe Moize balobaki ete esengelaki kosalema” na ntina na liwa ya Masiya mpe lisekwa na ye. (Misala 26:22, 23) Paulo atunaki Agilipa ete: “Mokonzi Agilipa, ondimaka Basakoli?” Agilipa akómaki na mokakatano. Soki alobi ete andimaka basakoli te, lokumu na ye ete azali mondimi ya Lingomba ya Bayuda ekobeba. Kasi, soki mpe andimi makanisi ya Paulo, akomonisa ete azali na ngámbo na ye mpe bakobenga ye moklisto. Paulo apesaki eyano ye moko na motuna na ye mpe alobaki ete: “Nayebi ete ondimaka.” Na nsima, Agilipa ayokaki mposa ya koloba nini? Alobaki ete: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma moklisto.” (Misala 26:27, 28) Atako Agilipa akómaki moklisto te, emonani ete maloba ya Paulo esimbaki motema na ye.—Baebele 4:12.
28/01–3/02
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MISALA 27-28
“Paulo akei Roma na masuwa”
“Ata molimo moko te kati na bino ekobunga”
15 Na ntembe te, Paulo azalaki kosakwela bato mingi na kati ya masuwa “elikya ya elaka oyo Nzambe apesaki.” (Mis. 26:6; Kol. 1:5) Lokola bato nyonso bazalaki komona ete masuwa ekozinda, Paulo amonisaki bango ntina oyo azalaki na elikya ete bakokufa te. Alobaki boye: “Na butu ya lelo, anzelu moko . . . atɛlɛmaki pene na ngai, alobi: ‘Kobanga te, Paulo. Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala, mpe, talá! Nzambe asili kopesa yo na boboto mpenza baoyo nyonso bazali kosala mobembo elongo na yo na masuwa.’” Paulo alendisaki bango ete: “Yango wana, mibali, bózala na mpiko; mpo nazali kondimela Nzambe ete ekosalema kaka ndenge mpenza bayebisi ngai. Nzokande, tosengeli kokangama na zɛlo na esanga moko boye.”—Mis. 27:23-26.
“Ata molimo moko te kati na bino ekobunga”
18 Bato oyo babikaki na masuwa bayebaki na nsima ete bazalaki nde na esanga ya Malta, na sudi ya Sisili. (Talá etanda “Esanga Malta ezalaki wapi?”) Bato ya esanga yango bazalaki koloba monɔkɔ mosusu; kasi bamoniselaki bango “boboto moko ya koloba te.” (Mis. 28:2) Bapelisaki mɔtɔ mpo na bapaya yango oyo bapɔlaki mpe bazalaki kolɛnga na malili. Mɔtɔ esalisaki bango báyoka mwa molunge atako malili ezalaki mpe mbula ezalaki kobɛta. Lisusu, mɔtɔ yango esalisaki bango bámona likamwisi moko.
“Ata molimo moko te kati na bino ekobunga”
21 Publiusi, moto moko ya bozwi oyo azalaki nkolo-mabele na esanga yango, azalaki kofanda mosika te na esika oyo bazalaki. Ekoki kozala ete azalaki moto oyo Baroma batyaki mpo azala mokonzi na esanga ya Malta. Luka abengaki ye “moto monene ya esanga wana”; asalelaki ebengeli mpenza oyo bato ya arkeoloji bamonaki na makomi mibale oyo bakundolaki na Malta. Moto yango ayambaki malamu Paulo na baninga na ye mpe afandisaki bango epai na ye mikolo misato. Nzokande, tata ya Publiusi azalaki kobɛla. Luka alobelaki lisusu maladi na ye na maloba ya sikisiki mpenza. Akomaki ete moto yango “alalaki azali konyokwama na fiɛvrɛ ná pulupulu ya makila,” ayebisaki mpenza nkombo ya maladi oyo azalaki na yango. Paulo abondelaki mpe atyaki mabɔkɔ likoló ya moto yango, mpe abikaki. Likambo yango ekamwisaki mingi bato ya esanga wana mpe bamemelaki Paulo bato mosusu ya maladi, mpe bayaki na makabo mpo na kosalisa Paulo ná baninga na ye.—Mis. 28:7-10.
“Azalaki kopesa litatoli malamumalamu”
10 Ntango Paulo ná bandeko oyo asalaki na bango mobembo bakɔtaki na Roma, “bapesaki Paulo nzela ya kofanda ye moko elongo na soda oyo azalaki kokɛngɛla ye.” (Mis. 28:16) Mbala mingi, mpo moto oyo azali mokangami kasi atyami na bolɔkɔ te akima te, bazalaki kokanga ye na monyɔlɔlɔ oyo ekangaki mpe soda oyo azalaki kokɛngɛla ye. Atako bongo, Paulo azalaki mosakoli ya Bokonzi, mpe monyɔlɔlɔ ekokaki kokanga ye monɔkɔ te. Yango wana, nsima ya kopema mikolo misato mpamba, abengisaki bato minene na kati ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na Roma mpo na komimonisa epai na bango mpe kopesa bango litatoli.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 27:9
kokila bilei ya mokolo ya kozipa masumu: To “kokila bilei ya eleko ya otɔnɛ.” Lil., “kokila bilei.” Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kokila bilei” etaleli kokila bilei oyo Mibeko ya Moize esɛngaki, elingi koloba kokila bilei na boyokani na mokolo ya kozipa masumu oyo ezalaki kosalema mbula nyonso oyo ebengamaki mpe Yom Kippur (na Ebre, yohm hak·kip·pu·rimʹ, “mokolo ya kozipa”). (Le 16:29-31; 23:26-32; Mit 29:7; talá ndimbola ya maloba, “Mokolo ya kozipa masumu.”) Maloba “komiyokisa mpasi,” oyo basaleli na boyokani na mokolo ya kozipa masumu mbala mingi elimbolaka komipesa na makambo ndenge na ndenge etali komipimela bisengo nyonso, ata mpe kokila bilei. (Le 16:29) Ndenge basaleli maloba “kokila bilei” na Mis 27:9 endimisi likanisi oyo ete kokila bilei ezalaki likambo ya libosoliboso ya komipimela bisengo, oyo ezalaki kosalema na mokolo ya kozipa masumu. Mokolo ya kozipa masumu na kokila bilei ezalaki kosalema na nsuka ya sanza ya libwa to na ebandeli ya sanza ya zomi.
nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 28:11
Bana ya Zeusi: Na kotalela masapo ya Bagrɛki mpe ya Baroma, “Bana ya Zeusi” (na Grɛki, Di·oʹskou·roi) ezalaki Castor ná Pollux, bamapasa oyo bazalaki bana oyo nzambe Zeusi (Jupiter) abotaki ná Leda mokonzi mwasi ya mboka Sparte. Bazalaki mpe kotalela bango lokola banzambe oyo bazalaki kobatela batambwisi-masuwa mpe bazalaki na likoki ya kobikisa bango na likama na mbu. Ndenge vɛrsɛ yango elobi ete motó ya masuwa yango ezalaki na elembo, ezali likambo mosusu oyo emonisi ete moto oyo akomaki lisolo yango amonaki makambo yango na miso.