Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr19 Février nk. 1-5
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • 4-10/02
  • 11-17/02
  • 18-24/02
  • 25/02–3/03
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2019
mwbr19 Février nk. 1-5

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

4-10/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAROMA 1-3

“Kobá koteya lisosoli na yo”

lvs lok. 18 par. 6

Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe

6 Mbala mingi, ata bato oyo bayebi Yehova te bayebaka ete likambo boye ezali malamu to mabe. Biblia elobi: “Na makanisi na bango moko, [lisosoli na bango] ezali kofunda bango mpe kolongisa bango.” (Baroma 2:14, 15) Na ndakisa, bato mingi bayebi ete koboma to koyiba ezali mabe. Ata soki mbala mosusu bayebaka yango te, lisosoli na bango nde etindaka bango básala bongo; mpo yango ezali lokola mongongo ya kati oyo Yehova atyá mpo eyebisa moto ete likambo boye ezali malamu to mabe. Balandaka mpe mitinda ya Nzambe, elingi koloba mateya na ye oyo esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu.

lvs nk. 19-20 par. 8-9

Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe

8 Bato mosusu bakanisaka ete koyokela lisosoli elimboli kaka kolanda oyo motema elingi. Bakanisaka ete bakoki kosala nyonso oyo balingi soki motema na bango emoni yango mabe te. Nzokande, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, motema ekoki kokosa biso. Makanisi ya motema na biso ekoki kobongola lisosoli na biso. Biblia elobi: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?” (Yirimia 17:9) Na yango, tokoki kokanisa ete likambo moko ezali malamu, nzokande ezali mabe. Na ndakisa, liboso ntoma Paulo akóma mokristo, anyokolaki basaleli ya Nzambe mpe akanisaki ete azali kosala likambo ya malamu. Na makanisi na ye, azalaki na lisosoli ya malamu. Kasi, na nsima alobaki: “Moto oyo azali kotalela ngai ezali Yehova.” (1 Bakorinti 4:4; Misala 23:1; 2 Timote 1:3) Ntango ntoma Paulo ayebaki ete Yehova azalaki kosepela te na makambo oyo azalaki kosala, amonaki ete asengeli kobongwana. Yango wana, liboso ya kosala likambo, tosengeli komituna boye: ‘Yehova alingi nasala nini?’

9 Soki olingi moto, okolinga te kosala likambo oyo ekopesa ye mpasi. Ndenge moko mpe, lokola tolingaka Yehova, tolingaka kosala ata likambo moko te oyo ekopesa ye mpasi. Tosengeli kozala na nsɔmɔ ya kosala makambo oyo Yehova ayinaka. Ndakisa ya Nehemia emonisi yango. Aboyaki kosalela lokumu na ye ya guvɛrnɛrɛ mpo na kokóma na bozwi. Mpo na nini? Alobaki ete ezalaki “mpo na kobanga Nzambe.” (Nehemia 5:15) Nehemia aboyaki kosala makambo oyo ekopesa Yehova mpasi na motema. Ndenge moko na Nehemia, biso mpe tosengeli kobanga kosala makambo oyo epesaka Yehova mpasi. Mpo tóyeba makambo oyo esepelisaka Yehova, tosengeli kotángaka Biblia.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 6.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w08 15/6 lok. 30 par. 5

Makanisi ya ntina na mokanda ya Baroma

3:4. Ntango maloba ya moto eyokani te na oyo Nzambe alobi na Liloba na ye, ‘totikaka emonana ete Nzambe alobaka solo,’ na ndenge tondimaka oyo Biblia elobi mpe tosalaka oyo Nzambe asɛngi. Soki tozali molende na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli, tokoki kosalisa basusu bámona ete Nzambe alobaka solo.

w08 15/6 lok. 29 par. 6

Makanisi ya ntina na mokanda ya Baroma

3:24, 25​—Na ndenge nini “masumu oyo esalemaki kala” ekokaki kolimbisama na nzela ya “lisiko oyo Kristo Yesu afutaki” liboso ete lisiko yango efutama? Esakweli ya liboso oyo elobelaki Masiya, oyo ezali na Ebandeli 3:15, ekokisamaki na mobu 33 T.B., ntango Yesu akufaki na nzete ya mpasi. (Gal. 3:13, 16) Nzokande, ntango Yehova alobaki esakweli yango, na miso na ye, lisiko esilaki kofutama mpamba te eloko moko te ekokaki kopekisa Nzambe akokisa likambo oyo akanaki. Na yango, na nzela ya mbeka oyo Yesu Kristo asengelaki kopesa, Yehova akokaki kolimbisa masumu ya bakitani ya Adama oyo bamonisaki kondima na elaka yango. Lisusu, lisiko ekopesa nzela na lisekwa ya basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi liboso Kristo aya.​—Mis. 24:15.

11-17/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAROMA 4-6

“Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye”

w11 15/6 lok. 12 par. 5

Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye

5 Paulo alimbolaki yango na mokuse; abandaki na likambo oyo: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Rom. 5:12) Tokoki koyeba likambo yango mpo Nzambe akomisaki na Biblia ndenge bomoi ya bato ebandaki. Yehova azalisaki bato mibale, Adama ná Eva. Mozalisi akelaki bankɔkɔ na biso wana bato ya kokoka, ndenge ye moko azali. Apekisaki bango kaka likambo moko mpe ayebisaki bango ete kobuka mobeko yango ekomema etumbu ya liwa. (Eba. 2:17) Kasi, bango baponaki kobebisa makambo, babukaki mobeko wana ya Nzambe atako ezalaki ya makasi te, mpe na ndenge yango baboyaki ye azala mpo na bango Mopesi-mibeko mpe Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.​—Mib. 32:4, 5.

w11 15/6 lok. 12 par. 6

Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye

6 Adama ayaki kobota bana kaka nsima ya kokóma mosumuki, mpe alekiselaki bango nyonso lisumu mpe mikakatano na yango. Ya solo, bana yango babukaki mobeko ya Nzambe te ndenge Adama abukaki, na yango batángelaki bango lisumu wana te; mibeko mpe epesamaki naino te. (Eba. 2:17) Atako bongo, bakitani ya Adama basangolaki lisumu. Na yango, lisumu mpe liwa eyangelaki tii ntango Nzambe apesaki Bayisraele mibeko, oyo emonisaki polele ete bazalaki basumuki. (Tángá Baroma 5:13, 14.) Tokoki kokokanisa makambo oyo lisumu oyo tosangolá ebotá na bamaladi to bambeba mosusu oyo baboti balekisaka epai ya bana, na ndakisa maladi babengi anémie méditerranéenne ná hémophilie. Mbala mosusu oyoká ete Alexis, mwana oyo Mokonzi Nicolas II abotaki ná Alexandra, asangolaki maladi ya hémophilie. Ya solo, ata na libota lokola oyo wana, bana mosusu babɛlaka maladi yango te, kasi bakoki kolekisa yango na bana na bango. Ezali bongo te mpo na lisumu. Mbeba ya lisumu ya Adama ezangaki epai ya moto moko te. Bato nyonso bazalaki na yango. Ememaka kaka na liwa. Mpe elekaka na bana nyonso. Mokakatano yango ekokaki kolongolama mokolo mosusu?

w11 15/6 lok. 13 par. 9-10

Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye

9 Maloba ya Grɛki oyo ebimisi maloba kotángama bayengebene elimboli mpenza nini? Mobongoli ya Biblia oyo tolobelaki liboso akomaki boye mpo na likambo yango: “Ezali elobeli ya mibeko oyo emonisi likambo moko oyo etali mwa moke mibeko. Ezali kolobela mbongwana oyo ekɔti na ndenge oyo Nzambe azali kotalela moto; ezali mbongwana na kati ya moto ye moko te . . . Elobeli yango emonisi Nzambe lokola mosambisi moko oyo azwi ekateli ya kolongisa moto oyo afundamaki, oyo na maloba ya elilingi, amemamaki na tribinale ya Nzambe mpe bafundaki ye ete azangi boyengebene. Kasi Nzambe alobi ete azali na likambo te.”

10 Mpo na ntina nini “Mosambisi ya mabele mobimba,” ye oyo azali moyengebene, akokaki kolongisa moto oyo azangi boyengebene? (Eba. 18:25) Ya liboso, na bolingo na ye, Nzambe atindaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki aya awa na mabele. Yesu asalaki mokano ya Tata na ye na ndenge ya kokoka mpenza, atako amekamaki, asambwisamaki makasi, mpe anyokwamaki mingi. Abatelaki bosembo na ye kino kokufa na nzete ya mpasi. (Ebr. 2:10) Ntango apesaki mbeka ya bomoi na ye ya moto ya kokoka, Yesu apesaki lisiko oyo ekokaki kolongola, to kosikola, bana ya Adama na boombo na lisumu mpe na liwa.​—Mat. 20:28; Rom. 5:6-8.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w08 15/6 lok. 29 par. 7

Makanisi ya ntina na mokanda ya Baroma

6:3-5​—Kobatisama na Kristo Yesu mpe kobatisama na kati ya liwa na ye elimboli nini? Ntango Yehova atye bayekoli ya Kristo mafuta na elimo santu, bakómi na bomoko elongo na Yesu mpe bakɔti na lisangá oyo ezali nzoto ya Kristo, ye oyo azali Motó. (1 Kol. 12:12, 13, 27; Kols. 1:18) Yango nde kobatisama na bango na kati ya Kristo Yesu. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali mpe ‘kobatisama na kati ya liwa ya Kristo’; elingi koloba ete bomoi na bango ezali bomoi ya bato oyo bandimi komipesa lokola mbeka mpe balongoli na makanisi na bango elikya nyonso ya bomoi ya seko awa na mabele. Na ndenge yango, liwa na bango ezali ya mbeka, ndenge moko na oyo ya Yesu, atako oyo ya bango ekoki kosikola te. Batisimo na bango na kati ya liwa ya Kristo esukaka ntango bakufi mpe basekwisami mpo na bomoi na likoló.

w14 1/6 lok. 11 par. 1

Elikya nini ezali mpo na bankɔkɔ na ngai oyo bakufá?

Ntango bato oyo bazangi boyengebene bakosekwa, bakosambisama na kolanda makambo oyo basalá kala? Te. Mpo Baroma 6:7 elobi ete: “Moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.” Ntango bato oyo bazangi boyengebene bakufaka, bafutaka masumu na bango. Na yango, bakosambisama na kolanda makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa na bango, kasi te mpo na makambo oyo basalaki na kozanga koyeba liboso bákufa. Matomba nini bakozwa?

18-24/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAROMA 7-8

“Ozali ‘kozela na mposa makasi’?”

w12 15/7 lok. 11 par. 17

Tiká Yehova amema yo na bonsomi ya solosolo

17 Paulo alobelaki bonsomi oyo Yehova akopesa basaleli na ye oyo bakozwa bomoi awa na mabele; akomaki boye: “Biloko oyo ezalisamá ezali kozela na mposa makasi komonana ya nkembo ya bana ya Nzambe.” Abakisaki ete: “Biloko oyo ezalisamá ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Rom. 8:19-21) Na vɛrsɛ yango, “biloko oyo ezalisamá” elimboli bato oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabele, baoyo bakozwa matomba na ntango ya “komonana” ya bana ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo. Komonana yango ekobanda ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo kuna na likoló, bakosangana elongo na Kristo mpo na koboma bato nyonso ya mabe mpe kokɔtisa “ebele mpenza ya bato” na mokili ya sika.​—Em. 7:9, 14.

w12 15/3 lok. 23 par. 11

Tósepela na elikya na biso

11 Yehova apesaki bato “elikya” ntango alakaki ete akosalela “momboto” mpo na kolongola bango na mabɔkɔ ya Satana Zabolo, “nyoka ya ebandeli.” (Em. 12:9; Eba. 3:15) “Momboto” yango ezalaki libosoliboso Yesu Kristo. (Gal. 3:16) Liwa mpe lisekwa ya Yesu epesaki bato elikya ya solosolo ete bakolongolama na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Kokokisama ya elikya yango ezali na boyokani na “komonana ya nkembo ya bana ya Nzambe.” Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali mpe na kati ya “momboto.” ‘Bakomonana na nkembo’ ntango bakosangana na Kristo mpo na koboma mokili mabe ya Satana. (Em. 2:26, 27) Yango ekomema lobiko mpo na bampate mosusu oyo bakouta na bolɔzi monene.​—Em. 7:9, 10, 14.

w12 15/3 lok. 23 par. 12

Tósepela na elikya na biso

12 Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, bato bakosikolama mpenza! Na ntango wana, “bana ya Nzambe” ‘bakomonana’ mpe na ndenge oyo bakosala lokola banganga-nzambe elongo na Kristo mpo na kopesa bato matomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bakolongwa mokemoke na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Bato ya botosi bakolongwa mokemoke na “boombo ya kopɔla.” Soki batikali sembo na boumeli ya mbula nkóto mpe na komekama ya nsuka, bankombo na bango ekokomama libela na “rulo ya bomoi.” Bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Em. 20:7, 8, 11, 12) Elikya yango ezali mpenza kitoko!

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w17.06 lok. 3

Ozali koyeba lisusu?

Bokeseni nini ezali kati na “kokanisa bamposa ya nzoto” mpe “kokanisa na elimo”? (Baroma 8:6)

Moto oyo akanisaka bamposa ya nzoto alobelaka ntango nyonso makambo ya mosuni mpe akumisaka yango. Moto oyo akanisaka na elimo ayokanisaka bomoi na ye na makambo mpe makanisi ya Nzambe; elimo santu nde etambwisaka ye. Kokanisa bamposa ya nzoto ememaka na liwa; kokanisa na elimo ememeka na bomoi mpe kimya.​—w16.12, nk. 15-17.

w09 15/11 lok. 7 par. 20

Mabondeli na yo emonisaka nini?

20 Ekoki kokóma ete tóyeba te makambo oyo tosengeli koloba na libondeli na biso. Paulo akomaki boye: “Mokakatano yango oyo: eloko oyo tosengeli kobondela mpo na yango ndenge mposa na biso ezali toyebaka te, kasi elimo [santu] yango moko elobelaka biso ntango tozali kokimela, atako maloba ezali kobima te. Nzokande [Nzambe] oyo atalaka mitema ayebaka oyo elimo ezali koluka.” (Rom. 8:26, 27) Yehova asalaki ete mabondeli mingi ekomama na Biblia. Andimaka mabondeli yango lokola biso nde tosali yango mpe ayanolaka yango. Nzambe ayebi biso, ayebi mpe ndimbola ya makambo oyo atindaki elimo na ye eloba na nzela ya bakomi ya Biblia. Yehova ayanolaka mabondeli na biso ntango elimo na ye “elobelaka” biso. Kasi, ntango tomeseni na Liloba ya Nzambe, makambo oyo tosengeli kosɛnga na libondeli ekouta na motema na biso.

25/02–3/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAROMA 9-11

“Ndakisa ya nzete ya olive”

w11 15/5 lok. 23 par. 13

‘Bwanya ya Nzambe ezali mingi mpenza!’

13 Na nsima, ntoma Paulo akokanisaki baoyo bakozala na kati ya momboto ya Abrahama na bitape ya nzete ya olive ya elilingi. (Rom. 11:21) Nzete yango ya olive oyo elonami emonisi lolenge oyo mokano ya Nzambe ezali kokokisama na ntina etali kondimana ya Abrahama. Mosisa ya nzete yango ezali mosantu mpe emonisi Yehova, ye oyo apesaka Yisraele ya elimo bomoi. (Yis. 10:20; Rom. 11:16) Mobimbi emonisi Yesu, eteni ya liboso ya momboto ya Abrahama. Bitape nyonso ezali “motángo mobimba” ya baoyo basali eteni ya mibale ya momboto ya Abrahama.

w11 15/5 lok. 24 par. 15

‘Bwanya ya Nzambe ezali mingi mpenza!’

15 Sikoyo, Yehova asalaki nini mpo na kokokisa mokano na ye? Paulo alimboli ete bitape ya nzete ya olive ya zamba ebakamaki na nzete ya olive oyo elonami mpo na kozwa esika ya bitape oyo ekatamaki. (Tángá Baroma 11:17, 18.) Na yango, na ndenge ya elilingi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki bato ya bikólo, na ndakisa bakristo mosusu na lisangá ya Roma, babakamaki na nzete ya olive ya elilingi. Na ndenge yango bakómaki na kati ya momboto ya Abrahama. Na ebandeli, bazalaki lokola bitape ya nzete ya olive ya zamba; bazalaki na libaku te ya kokɔta na kondimana wana ya ntina mingi. Kasi Yehova afungolelaki bango nzela mpo bakóma Bayuda ya elimo.​—Rom. 2:28, 29.

w11 15/5 lok. 25 par. 19

‘Bwanya ya Nzambe ezali mingi mpenza!’

19 Ya solo, mokano ya Yehova mpo na “Yisraele ya Nzambe” ezali kokokisama na ndenge ya malamu mpenza. (Gal. 6:16) Ndenge Paulo alobaki, “Yisraele mobimba ekobika.” (Rom. 11:26) Na ntango oyo Yehova atyá, “Yisraele mobimba,” elingi koloba motángo mobimba ya Bayisraele ya elimo, bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló. Eloko moko te ekoki kopekisa mokano ya Yehova ekokisama!

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w13 15/6 lok. 25 par. 5

Tiká disiplini ya Yehova ebongisa yo

5 Bongo soki moto azali motó makasi mpe aboyi ete Yehova, Moyemi na biso, abongisa ye? Na ntango yango, ndenge nini Yehova asalelaka bokonzi na ye? Tókanisa likambo oyo moyemi-mbɛki asalaka na mabele ya lima oyo ezali kobonga te ntango azali kosala na yango mbɛki moko boye. Moyemi akoki kosala na yango mbɛki ya lolenge mosusu, to mpe kobwaka yango. Kasi, soki mabele ya lima ebebi ndenge wana, mbala mingi ezalaka foti ya moyemi-mbɛki. Nzokande, likambo ya ndenge wana ekómelaka Yehova te. (Mib. 32:4) Soki moto aboyi kotika Yehova abongisa ye, foti ezalaka kaka ya moto yango ye moko. Yehova abongolaka ndenge na ye ya kobongisa bato na kolanda ndenge oyo bazali kotalela disiplini na ye. Soki moto andimi kotosa ye, Yehova abongisaka ye na ndenge ya malamu. Na ndakisa, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali “bambɛki ya motema mawa” oyo babongisami mpo na kokóma ‘bambɛki mpo na mosala ya malamu.’ Nzokande, baoyo bazali mitó makasi mpe batɛmɛlaka Nzambe bakómaka “bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi.”​—Rom. 9:19-23.

it-1-F lok. 1234 par. 6

Zuwa

Molende ya mabe. Tokoki komonisa mpenza molende to zuwa mpo na likambo moko boye kasi yango ekoki kozala libunga mpe likambo oyo Nzambe aboyi. Yango nde likambo Bayuda mingi ya siɛklɛ ya liboso basalaki. Bazalaki koluka ete boyengebene eya mpo na makambo oyo bango moko bazalaki kosala na kolanda Mibeko ya Moize. Kasi, Paulo amonisaki ete bazalaki na molende ya mabe mpo bazangaki boyebi ya solosolo. Yango wana bazwaki boyengebene ya solosolo te oyo eutaka na Nzambe. Esɛngaki bándima libunga na bango mpe bábaluka epai ya Nzambe na nzela ya Kristo mpo bázwa boyengebene mpe básikwama na etumbu ya Mibeko. (Ro 10:1-10) Saulo moto ya Tarse azalaki mpe lokola bango, azalaki na molende ya koleka ndelo na lingomba ya Bayuda, ‘azalaki konyokola lisangá ya Nzambe mpe kopanza yango.’ Azalaki kotosa mpenza Mibeko; azalaki “moto ya mbeba te.” (Ga 1:13, 14 ; Flp 3:6.) Kasi zuwa na ye mpo na losambo ya Bayuda ezalaki ya mabe. Lokola azalaki kosala yango na motema mabe te, Yehova amoniselaki ye boboto monene na nzela ya Kristo mpe alakisaki ye nzela ya losambo ya solo.​—1Ti 1:12, 13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto