Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye
‘Boboto monene ekoyangela na nzela ya boyengebene mpo na bomoi ya seko.’—ROM. 5:21.
1, 2. Wapi makambo mibale oyo ekoki kozwama lokola makabo ya valɛrɛ, kasi oyo wapi eleki monene?
PROFESƐRƐ moko ya iniversite ya Melbourne na Australie oyo azali mpe mobongoli ya Biblia (David Williams) akomaki ete mibeko ya ampire ya Roma ezali likabo oyo ezali na valɛrɛ mingi mpo na bomoi ya bato. Nzokande, Biblia eteyaka ete Nzambe apesá biso likabo ya bolingo oyo ezali na valɛrɛ mingi koleka oyo wana. Likabo yango ezali nzela oyo Nzambe abongisá mpo moto andimama na ye mpe amonana moyengebene na miso na ye mpe azala na elikya ya kozwa lobiko mpe bomoi ya seko.
2 Makambo oyo Nzambe asalaki mpo likabo yango ezwama eyokanaki na mibeko na ye. Ntango ntoma Paulo amonisaki makambo yango na Baroma mokapo 5, alobelaki mibeko na bozindo te. Kasi, abandaki nde na maloba oyo ya kolendisa: “Totángami bayengebene mpo na kondima, [na yango] tiká tózala na kimya elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo.” Kozwa likabo yango ya Nzambe etindaka bato oyo bazwi yango bálinga ye. Paulo mpe asalaki bongo. Akomaki boye: “Bolingo ya Nzambe etondi na mitema na biso na nzela ya elimo santu.”—Rom. 5:1, 5.
3. Mituna nini esengeli kotunama?
3 Kasi, mpo na nini esengelaki likabo yango ya bolingo epesama? Ndenge nini Nzambe akokaki kopesa yango na kolanda bosembo na ye mpe mpo na bolamu ya moto nyonso? Mpe bato basengeli kosala nini mpo bázwa yango? Tóluka biyano oyo ebongi na mituna yango mpe tómona ndenge emonisi bolingo ya Nzambe.
Bolingo ya Nzambe ná lisumu
4, 5. (a) Na ndenge nini Yehova amonisaki bolingo na ye monene? (b) Koyeba makambo nini ekosalisa biso tókanga ntina ya Baroma 5:12?
4 Mpo na komonisa bolingo na ye monene, Yehova atindaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo asalisa bato. Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Rom. 5:8) Kanisá naino likambo moko oyo alobeli awa: “Tozalaki naino basumuki.” Bato nyonso basengeli koyeba ndenge nini tokómá bato ya masumu.
5 Paulo alimbolaki yango na mokuse; abandaki na likambo oyo: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Rom. 5:12) Tokoki koyeba likambo yango mpo Nzambe akomisaki na Biblia ndenge bomoi ya bato ebandaki. Yehova azalisaki bato mibale, Adama ná Eva. Mozalisi akelaki bankɔkɔ na biso wana bato ya kokoka, ndenge ye moko azali. Apekisaki bango kaka likambo moko mpe ayebisaki bango ete kobuka mobeko yango ekomema etumbu ya liwa. (Eba. 2:17) Kasi, bango baponaki kobebisa makambo, babukaki mobeko wana ya Nzambe atako ezalaki ya makasi te, mpe na ndenge yango baboyaki ye azala mpo na bango Mopesi-mibeko mpe Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.—Mib. 32:4, 5.
6. (a) Mpo na nini bakitani ya Adama bazalaki kokufa liboso Yehova apesa Mibeko ya Moize mpe na nsima? (b) Tokoki kokokanisa maladi lokola hémophilie na nini?
6 Adama ayaki kobota bana kaka nsima ya kokóma mosumuki, mpe alekiselaki bango nyonso lisumu mpe mikakatano na yango. Ya solo, bana yango babukaki mobeko ya Nzambe te ndenge Adama abukaki, na yango batángelaki bango lisumu wana te; mibeko mpe epesamaki naino te. (Eba. 2:17) Atako bongo, bakitani ya Adama basangolaki lisumu. Na yango, lisumu mpe liwa eyangelaki tii ntango Nzambe apesaki Bayisraele mibeko, oyo emonisaki polele ete bazalaki basumuki. (Tángá Baroma 5:13, 14.) Tokoki kokokanisa makambo oyo lisumu oyo tosangolá ebotá na bamaladi to bambeba mosusu oyo baboti balekisaka epai ya bana, na ndakisa maladi babengi anémie méditerranéenne ná hémophilie. Mbala mosusu oyoká ete Alexis, mwana oyo Mokonzi Nicolas II abotaki ná Alexandra, asangolaki maladi ya hémophilie. Ya solo, ata na libota lokola oyo wana, bana mosusu babɛlaka maladi yango te, kasi bakoki kolekisa yango na bana na bango. Ezali bongo te mpo na lisumu. Mbeba ya lisumu ya Adama ezangaki epai ya moto moko te. Bato nyonso bazalaki na yango. Ememaka kaka na liwa. Mpe elekaka na bana nyonso. Mokakatano yango ekokaki kolongolama mokolo mosusu?
Ebongiseli oyo Nzambe azwá na nzela ya Yesu Kristo
7, 8. Na ndenge nini etamboli ya bato mibale ya kokoka ebimisi mbuma oyo ekeseni?
7 Na bolingo na ye, Yehova azwaki ebongiseli mpo bato bálongwa na lisumu oyo basangolá. Paulo amonisaki ete likambo yango ekokaki kosalema na nzela ya moto mosusu ya kokoka oyo ayaki nsima—Adama ya mibale. (1 Ko. 15:45) Kasi, etamboli ya mokomoko ya bato yango mibale ya kokoka ebimisi mbuma ekeseni. Ndenge nini?—Tángá Baroma 5:15, 16.
8 Paulo akomaki boye: “Mbuma ya likabo ekeseni na oyo ya libunga.” Adama nde asalaki libunga yango, mpe azwaki etumbu oyo ebongi—akufaki. Kasi, kaka ye moko te nde asengelaki kokufa. Totángi boye: “Na libunga [wana] ya moto kaka moko bato mingi bakufaki.” Na kolanda bosembo ya Nzambe, bakitani nyonso ya kozanga kokoka oyo Adama abimisaki, ata mpe biso, basengelaki kozwa etumbu oyo Adama azwaki. Atako bongo, tokoki kobɔndisama na koyeba ete Yesu, moto ya kokoka, akokaki kobimisa mbuma oyo ekeseni na oyo wana. Mbuma yango nini? Paulo apesaki eyano ntango alobaki ete “bato ya ndenge nyonso batángami bayengebene mpo na bomoi.”—Rom. 5:18.
9. Kotánga oyo Nzambe atángaki bato bayengebene, ndenge elobelami na Baroma 5:16, 18, elimboli nini?
9 Maloba ya Grɛki oyo ebimisi maloba kotángama bayengebene elimboli mpenza nini? Mobongoli ya Biblia oyo tolobelaki liboso akomaki boye mpo na likambo yango: “Ezali elobeli ya mibeko oyo emonisi likambo moko oyo etali mwa moke mibeko. Ezali kolobela mbongwana oyo ekɔti na ndenge oyo Nzambe azali kotalela moto; ezali mbongwana na kati ya moto ye moko te . . . Elobeli yango emonisi Nzambe lokola mosambisi moko oyo azwi ekateli ya kolongisa moto oyo afundamaki, oyo na maloba ya elilingi, amemamaki na tribinale ya Nzambe mpe bafundaki ye ete azangi boyengebene. Kasi Nzambe alobi ete azali na likambo te.”
10. Likambo nini Yesu asalaki oyo esalaki ete bato bátángama bayengebene?
10 Mpo na ntina nini “Mosambisi ya mabele mobimba,” ye oyo azali moyengebene, akokaki kolongisa moto oyo azangi boyengebene? (Eba. 18:25) Ya liboso, na bolingo na ye, Nzambe atindaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki aya awa na mabele. Yesu asalaki mokano ya Tata na ye na ndenge ya kokoka mpenza, atako amekamaki, asambwisamaki makasi, mpe anyokwamaki mingi. Abatelaki bosembo na ye kino kokufa na nzete ya mpasi. (Ebr. 2:10) Ntango apesaki mbeka ya bomoi na ye ya moto ya kokoka, Yesu apesaki lisiko oyo ekokaki kolongola, to kosikola, bana ya Adama na boombo na lisumu mpe na liwa.—Mat. 20:28; Rom. 5:6-8.
11. Lisiko ezali na bokokani nini?
11 Na esika mosusu, Paulo abengaki yango “lisiko oyo ekokani.” (1 Tim. 2:6) Bokokani yango ezalaki na nini? Adama amemelaki bamilio ya bato, elingi koloba bakitani na ye, kozanga kokoka mpe liwa. Ezali solo ete Yesu, moto ya kokoka, akokaki kobota bamiliare ya bana ya kokoka.a Na yango, tozalaki kokanisa ete bomoi ya Yesu sangisá na bomoi ya bakitani ya kokoka oyo akokaki kobota nde ezalaki mbeka oyo ekokani na bomoi ya Adama mpe ya bakitani na ye, oyo bazali bato ya kozanga kokoka. Nzokande, Biblia elobi te ete bana oyo Yesu akokaki kobota bazali na kati ya lisiko. Baroma 5:15-19 emonisi ete liwa ya “moto kaka moko” nde epesaki lisiko. Ya solo, bomoi ya kokoka ya Yesu ekokanaki na oyo ya Adama. Likebi ebendami mpe esengeli kobendama kaka na Yesu Kristo ye moko. “Likambo kaka moko ya kokómisa bato sembo,” elingi koloba botosi mpe bosembo ya Yesu tii na liwa epesaki bato ya ndenge nyonso nzela ya kozwa likabo ya ofele oyo euti na Nzambe, elingi koloba kotángama bayengebene mpe kozwa bomoi. (2 Ko. 5:14, 15; 1 Pe. 3:18) Likambo yango esalemaki ndenge nini?
Kolongisama na nzela ya lisiko
12, 13. Mpo na nini baoyo batángami bayengebene bazali na bosɛnga ya motema mawa mpe bolingo ya Nzambe?
12 Yehova Nzambe andimaki mbeka ya lisiko oyo Mwana na ye apesaki. (Ebr. 9:24; 10:10, 12) Atako bongo, bayekoli ya Yesu awa na mabele, ata mpe bantoma na ye ya sembo, bazalaki kaka bato ya kozanga kokoka. Atako bazalaki kosala makasi mpo na koboya kosala mabe, bazalaki kolonga ntango nyonso te. Mpo na nini? Mpo basangolaki lisumu. (Rom. 7:18-20) Kasi Nzambe akokaki kosala mpe asalaki eloko moko mpo na yango. Andimaki “lisiko oyo ekokani” mpe andimaki kosalela yango mpo na bolamu ya bato nyonso oyo basalelaka ye.
13 Elingi koloba te ete Nzambe azalaki na nyongo ya kopesa bantoma mpe bato mosusu matomba oyo euti na lisiko mpo basalaki misala moko boye ya malamu. Nzambe asalaki yango nde mpo na motema mawa mpe bolingo na ye monene. Aponaki kolongisa bantoma mpe basaleli na ye mosusu na likambo oyo ezalaki kokweisa bango, amonaki ete lisumu oyo basangolá elimbisami. Paulo amonisaki yango polele boye: “Na boboto monene wana nde bobikisami na nzela ya kondima; mpe kobika yango euti na bino te, ezali likabo ya Nzambe.”—Ef. 2:8.
14, 15. Mbano nini etyamaki liboso ya baoyo Nzambe atángaki bayengebene, kasi basengelaki kokoba kosala nini?
14 Kanisá naino likabo monene ya ndenge wana: Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alimbisa lisumu oyo moto asangolá mpe mabe nyonso oyo asalá! Tokokoka te kotánga masumu nyonso oyo bato basalá liboso bakóma bakristo; nzokande na nzela ya lisiko, Nzambe akoki kolimbisa masumu yango. Paulo akomaki boye: “Likabo oyo eyaki nsima ya mabunga ebele esalaki ete bato bátángama bayengebene.” (Rom. 5:16) Bantoma mpe basaleli mosusu ya Nzambe oyo bazwaki likabo yango ya bolingo (kotángama bayengebene) basengelaki kokoba kosambela Nzambe ya solo na kondima. Mpo bázwa mbano nini nsima ya mikolo? Paulo alobaki boye: “Baoyo bazali kozwa ebele ya boboto monene mpe ya likabo ya ofele ya boyengebene bakozala na bomoi mpe bakoyangela mpenza na nzela ya moto kaka moko, Yesu Kristo.” Ya solo, likabo ya boyengebene ezali kolongola nde na liwa. Likabo yango ememaka na bomoi.—Rom. 5:17; tángá Luka 22:28-30.
15 Baoyo bazali kozwa likabo yango, elingi koloba kotángama bayengebene, bakómi bana ya Nzambe na elimo. Lokola bazali bazwi ya libula elongo na Kristo, bazali na elikya ya kosekwa mpo na kokende na likoló lokola bana mpenza ya elimo mpo ‘báyangela’ elongo na Yesu Kristo.—Tángá Baroma 8:15-17, 23.
Nzambe amoniseli bato mosusu bolingo na ye
16. Ndenge nini bato oyo bazali na elikya ya bomoi na mabele bakoki kozwa likabo?
16 Ezali bakristo nyonso te oyo bazali komonisa kondima mpe kosalela Nzambe na bosembo nde balikyaka ‘koyangela’ na Kristo na likoló. Mingi bazali na elikya oyo euti na Biblia, ndenge moko na bato oyo basalelaki Nzambe liboso ya Yesu. Bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Ata lelo oyo, bakoki mpe kozwa likabo ya bolingo oyo euti na Nzambe mpe na bongo kotángama bayengebene mpo na kozwa bomoi awa na mabele? Na kolanda makambo oyo Paulo akomaki na mokanda ya Baroma, eyano ya kokitisa motema ezali ete Ɛɛ!
17, 18. (a) Na kotala kondima ya Abrahama, ndenge nini Nzambe atalelaki ye? (b) Ndenge nini Yehova akokaki kotánga Abrahama moyengebene?
17 Paulo alobelaki ndakisa moko monene, Abrahama, moto ya kondima oyo azalaki na bomoi liboso Yehova apesa Yisraele mibeko mpe liboso Kristo afungola nzela mpo na bomoi na likoló. (Ebr. 10:19, 20) Biblia elobi boye: “Kasi ezalaki mpo na mibeko te nde Abrahama to momboto na ye azwaki elaka ete akozala mozwi-ya-libula ya mokili moko boye, kasi ezalaki nde mpo na boyengebene oyo euti na kondima.” (Rom. 4:13; Yak. 2:23, 24) Na yango, Nzambe atángaki mosembwi Abrahama moyengebene.—Tángá Baroma 4:20-22.
18 Elingi koloba te ete Abrahama asalaki lisumu te na boumeli ya bambula nyonso oyo asalelaki Yehova. Te, azalaki moyengebene na ndenge wana te. (Rom. 3:10, 23) Kasi, na bwanya na ye oyo ezangi nsuka, Yehova atalelaki kondima monene ya Abrahama mpe misala na ye oyo eutaki na kondima yango. Mingimingi, Abrahama amonisaki kondima na “momboto” oyo alakamaki ete akobima na libota na ye. Momboto yango ezalaki Masiya, to Kristo. (Eba. 15:6; 22:15-18) Na yango, na nzela ya “lisiko oyo Kristo Yesu afutaki,” Nzambe, ye Mosambisi, akoki kolimbisa masumu oyo esalemaki na ntango ya kala. Na yango, Abrahama mpe bato mosusu ya kondima oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele bakosekwa.—Tángá Baroma 3:24, 25; Nz. 32:1, 2.
Nzambe amona yo moyengebene banda sikoyo
19. Mpo na nini ndenge Nzambe atalelaki Abrahama esengeli kolendisa bato mingi lelo?
19 Nzambe ya bolingo atángaki Abrahama moyengebene; likambo yango esengeli mpenza kolendisa bakristo ya solo lelo. Yehova atángaki ye moyengebene te na ndenge oyo atángaka bakristo oyo ye atyaka mafuta na elimo mpo bázala “bazwi-ya-libula elongo na Kristo.” Kaka bakristo yango nde ‘babengami mpo bázala basantu’ mpe bandimami lokola “bana ya Nzambe.” (Rom. 1:7; 8:14, 17, 33) Nzokande, Abrahama akómaki “moninga ya Yehova,” mpe ezalaki liboso mbeka ya lisiko epesama. (Yak. 2:23; Yis. 41:8) Ezali boni mpo na bakristo ya solo oyo bazali na elikya ya bomoi na mabele oyo ekobongwana paradiso?
20. Nzambe asɛngaka nini na bato oyo amonaka ete bazali bayengebene, na ndenge oyo azalaki komona Abrahama?
20 Bango bazwi te “likabo ya ofele ya boyengebene” mpo na bomoi na likoló “na kosikolama oyo basikolami na lisiko oyo Kristo Yesu afutaki.” (Rom. 3:24; 5:15, 17) Atako bongo, bazali kondimela Nzambe makasi mpe bibongiseli na ye, mpe bazali komonisa kondima na bango na nzela ya misala malamu. Moko na misala yango ezali ‘kosakola bokonzi ya Nzambe mpe koteya makambo etali Nkolo Yesu Kristo.’ (Mis. 28:31) Na yango, Yehova akoki komona bango bayengebene na ndenge oyo amonaki Abrahama. Likabo oyo bango bazali kozwa—kokóma baninga ya Nzambe—ekeseni na “likabo ya ofele” oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali kozwa. Atako bongo, ezali likabo oyo bandimi na botɔndi mingi mpenza.
21. Matomba nini tokoki kozwa mpo na bolingo mpe bosembo ya Nzambe?
21 Soki ozali na elikya ya bomoi ya seko na mabele, osengeli koyeba ete libaku yango ezali te likambo moko ya pwasa oyo euti na mokonzi moko awa na mabele. Kasi, emonisi nde mokano ya bwanya ya Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba. Yehova azwá bibongiseli mpo na kokokisa mokemoke mokano na ye. Bibongiseli yango eyokani na bosembo ya solo. Longola yango, emonisi bolingo monene ya Nzambe. Yango wana Paulo akokaki koloba ete: “Kasi Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.”—Rom. 5:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ndakisa, ndimbola wana etali bakitani to bana ekɔtaki na buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, lokasa 728, paragrafe 2 mpe 3.
Ozali koyeba lisusu?
• Bakitani ya Adama basangolaki nini, mpe ebimisaki nini?
• Ndenge nini lisiko oyo ekokani epesamaki, mpe bokokani yango ezalaki na nini?
• Likabo ya kotángama moyengebene epesi yo elikya nini?
[Elilingi na lokasa 13]
Adama, moto ya kokoka, asalaki lisumu. Yesu, moto ya kokoka, apesaki “lisiko oyo ekokani”
[Elilingi na lokasa 15]
Koyeba ete tokoki kotángama bayengebene na nzela ya Yesu ezali mpenza nsango malamu!