Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/5 nk. 21-25
  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini baanzelu basalisaka biso?
  • Tómekola Yesu
  • Liteya oyo tokoki kozwa epai ya baanzelu ya sembo
  • Baanzelu basimbaka mosala ya kosakola
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/5 nk. 21-25

Baanzelu​—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”

“Bango nyonso bazali nde te bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso, oyo bitindami mpo na kosalela baoyo bakozwa libula ya lobiko?”​—EBE. 1:14.

1. Matai 18:10 mpe Baebele 1:14, epesi biso elikya nini?

MPO na moto nyonso oyo akokaki kobɛtisa bayekoli na ye libaku, Yesu alobaki boye: “Bókeba ete bótyola te moko ya bana mike oyo; mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango na likoló bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Mat. 18:10) Ntoma Paulo alobaki mpo na baanzelu ya sembo boye: “Bango nyonso bazali nde te bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso, oyo bitindami mpo na kosalela baoyo bakozwa libula ya lobiko?” (Ebe. 1:14) Maloba yango ezali kopesa biso elikya ete Nzambe asalelaka bikelamu na ye ya likoló mpo na kosalisa bato. Biblia elobi nini mpo na baanzelu? Ndenge nini basalisaka biso? Liteya nini tokoki kozwa epai na bango?

2, 3. Yebisá mwa misala oyo baanzelu basalaka.

2 Baanzelu ya sembo na likoló bazali bamilio na bamilio. Bango nyonso bazali ‘makasi na kati ya nguya, basalelaka liloba na ye.’ (Nz. 103:20 (NW); tángá Emoniseli 5:11.) Mokomoko ya bana yango ya Nzambe azali na bomoto na ye, na bizaleli lokola oyo ya Nzambe mpe bonsomi ya kopona. Babongisamá malamu mpenza mpe bazali na esika ya lokumu na ebongiseli ya Nzambe; Mikaele (nkombo ya Yesu na likoló) azali anzelu-mokonzi. (Dan. 10:13; Yuda 9) ‘Mwana yango ya liboso na bozalisi nyonso’ azali “Liloba,” to Molobeli ya Nzambe, mpe Yehova asalelaki ye mpo na kozalisa biloko mosusu nyonso.​—Kols. 1:15-17; Yoa. 1:1-3.

3 Na nse ya anzelu-mokonzi tozali na baselafa, oyo basakolaka bosantu ya Yehova mpe basalisaka basaleli na ye bázala pɛto na elimo. Ezali mpe na bakeluba, oyo basimbaka Bokonzi ya Nzambe. (Gen. 3:24; Yis. 6:1-3, 6, 7) Baanzelu mosusu, to mpe bamemi-nsango, basalaka misala ndenge na ndenge mpo na kokokisa mokano ya Nzambe.​—Ebe. 12:22, 23.

4. Baanzelu basalaki nini ntango Nzambe atyaki moboko ya mokili, mpe libaku nini bato balingaki kozala na yango soki Adama ná Eva basalelaki malamu bonsomi na bango ya kopona?

4 Baanzelu nyonso basepelaki ntango Nzambe ‘atyaki miboko ya mokili’ mpe bazalaki kokokisa mikumba na bango na esengo ata ntango Nzambe atyaki moto awa na mabelé. (Yobo 38:4, 7) Yehova azalisaki moto “mwa moke na nse ya baanzelu,” kasi asalaki ye na “elilingi” na Ye; yango epesaka biso likoki ya komonisa bizaleli ya Mozalisi. (Ebe. 2:7; Gen. 1:26) Soki Adama ná Eva basalelaki malamu bonsomi na bango ya kopona, bango ná bana na bango balingaki kokoba kofanda na paladiso libela na libela mpe kozala na kati ya libota ya Yehova.

5, 6. Botomboki nini ebimaki na likoló, mpe Nzambe asalaki nini?

5 Na ntembe te, baanzelu ya sembo bayokaki mawa mingi ntango botomboki ekɔtaki na libota ya Nzambe. Anzelu moko azalaki lisusu kosepela kokumisa Yehova te, kasi alingaki ete bato bábanda mpe kosambela ye. Amikómisaki Satana (elimboli “Motɛmɛli”) na ndenge atyaki ntembe na lotomo ya Yehova ya kozala mokonzi mpe alukaki kobimisa bokonzi mosusu. Ntango Satana akosaki Eva, atindaki mobali ná mwasi ya liboso bátombokela Mozalisi na bango mpe bálanda ye.​—Gen. 3:4, 5; Yoa. 8:44.

6 Nokinoki, Yehova apesaki esakweli ya liboso oyo ezali na Biblia mpo na komonisa etumbu oyo akanaki kopesa Satana; alobaki boye: “Nakotya bonguna kati na yo ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.” (Gen. 3:15, NW) Koyinana esengelaki kokoba kozala na kati ya Satana ná “mwasi” ya Nzambe. Ya solo, Yehova atalelaka ebongiseli na ye ya likoló, elingi koloba, bikelamu na ye ya sembo kuna na likoló, lokola mwasi na ye ya bolingo. Esakweli yango epesaki elikya ya solosolo, atako makambo na yango mosusu ezalaki naino “sɛkɛlɛ mosantu” oyo esengelaki koyebisama mokemoke. Nzambe abongisaki ete moko kati na bikelamu na ye ya likoló aboma batomboki nyonso mpe, na nzela na ye, “biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé” eyanganisama.​—Ef. 1:8-10.

7. Baanzelu mosusu basalaki nini na mikolo ya Noa, mpe likambo nini ekómelaki bango?

7 Na mikolo ya Noa, ebele ya baanzelu batikaki “efandelo na bango moko mpenza” mpe balataki nzoto ya bato mpo na koya kokokisa bamposa na bango ya mabe awa na mabelé. (Yuda 6; Gen. 6:1-4) Yehova abwakaki batomboki yango na molili makasi, mpe na ndenge yango bakómaki “mampinga ya bilimo mabe” elongo ná Satana, mpe banguna ya basaleli ya Nzambe.​—Ef. 6:11-13; 2 Pet. 2:4.

Ndenge nini baanzelu basalisaka biso?

8, 9. Ndenge nini Yehova asalelaki baanzelu mpo na kosalisa bato?

8 Abalayama, Yakobo, Moize, Yosua, Yisaya, Danyele, Yesu, Petelo, Yoane mpe Paulo bazali kati na bato oyo baanzelu basalisaki. Baanzelu ya sembo bakokisaki bitumbu ya Nzambe mpe bapesaki bisakweli mpe malako; kati na yango tokoki kotánga Mibeko ya Moize. (2 Mik. 19:35; Dan. 10:5, 11, 14; Mis. 7:53; Emon. 1:1) Lelo oyo, lokola tozali na Liloba ya Nzambe na mobimba na yango, ezali mpenza na ntina te ete baanzelu bámemela biso nsango ya Nzambe. (2 Tim. 3:16, 17) Nzokande, na likoló baanzelu basalaka mingi mpo na kokokisa mokano ya Nzambe mpe kosunga basaleli na ye.

9 Biblia eyebisi biso boye: “Anzelu ya Yehova atɛlɛmaka penepene na baoyo babangaka ye, mpe abikisaka bango.” (Nz. 34:7, NW; 91:11) Lokola Satana atyaki ntembe na bosembo na bato, Yehova atikaka ye abimisela biso mikakatano ya ndenge nyonso. (Luka 21:16-19) Kasi, ntango bosembo na biso epai na ye etyami ntembe, Yehova ayebaka tii wapi akoki kotika biso tómekama. (Tángá 1 Bakolinti 10:13.) Baanzelu ya Nzambe bazalaka ntango nyonso pene ya kosalisa bato, na boyokani na mokano ya Nzambe. Babikisaki Sadalaka, Mesaka, Abedenego, Danyele mpe Petelo, kasi bapekisaki te ete banguna báboma Setefano mpe Yakobo. (Dan. 3:17, 18, 28; 6:22; Mis. 7:59, 60; 12:1-3, 7, 11) Makambo oyo basaleli yango ya Nzambe bakutanaki na yango ekesanaki. Ndenge moko mpe, bandeko mosusu babomamaki na bakaa ya bakangami ya Banazi, nzokande ezali na bamosusu oyo Yehova abikisaki.

10. Lisalisi nini mosusu tozwaka, longola oyo baanzelu bapesaka biso?

10 Makomami eteyaka te ete moto na moto azalaka na anzelu mobateli. Tobondelaka Nzambe na elikya ete “ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoa. 5:14) Ya solo, Yehova akoki kotinda baanzelu mpo na kosalisa biso, kasi akoki mpe kosalisa biso na bandenge mosusu. Akoki kotinda bandeko na biso na lisangá básalisa mpe bábɔndisa biso. Nzambe akoki mpe kopesa biso bwanya mpe makasi oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko na “nzubɛ moko na kati ya mosuni” oyo ezali konyokola biso, lokola nde “anzelu moko ya Satana” azali kobɛtaka biso mbata.​—2 Kol. 12:7-10; 1 Tes. 5:14.

Tómekola Yesu

11. Ndenge nini Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kosunga Yesu, mpe Yesu amonisaki nini ndenge atikalaki sembo epai ya Nzambe?

11 Tótalela ndenge Yehova asalelaki baanzelu mpo na Yesu. Basakolaki kobotama mpe kosekwa na ye mpe basalelaki ye ntango azalaki awa na mabelé. Baanzelu bakokaki kopekisa banguna bákanga Yesu mpe báboma ye. Kasi, Nzambe atindaki anzelu moko mpo na kolendisa ye. (Mat. 28:5, 6; Luka 2:8-11; 22:43) Na boyokani na mokano ya Yehova, Yesu akufaki lokola mbeka mpe yango emonisaki ete moto ya kokoka akoki kotikala sembo epai ya Nzambe, ata soki amekami makasi. Nzokande, Yehova asekwisaki Yesu mpe apesaki ye bomoi ezangi kufa na likoló, mpe “Bokonzi nyonso”; na ndenge yango baanzelu nyonso bakómaki na nse na ye. (Mat. 28:18; Mis. 2:32; 1 Pet. 3:22) Yango emonisaki ete Yesu azali moto ya liboso na kati ya “momboto” ya “mwasi” ya Nzambe.​—Gen. 3:15, NW; Gal. 3:16.

12. Ndenge nini tokoki komekola Yesu?

12 Yesu ayebaki ete ezalaki mabe ameka Yehova, na likanisi ete baanzelu bakosalisa ye soki amitye na likama. (Tángá Matai 4:5-7.) Na yango, tiká tólanda ndakisa ya Yesu mpe tózalaka na “makanisi malamu,” tómityaka na likama te, kasi tóyikaka mpiko na komekama.​—Tito 2:12.

Liteya oyo tokoki kozwa epai ya baanzelu ya sembo

13. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya baanzelu ya sembo oyo ezali na 2 Petelo 2:9-11?

13 Ntango ntoma Petelo apamelaki baklisto oyo bazalaki “kofinga” bapakolami ya Yehova, alobelaki ndakisa malamu ya baanzelu ya sembo. Atako bazali na nguya mingi, na komikitisa nyonso baboyaka kosambisa basusu, “mpo na limemya epai ya Yehova.” (Tángá 2 Petelo 2:9-11.) Biso mpe tosengeli te kolobaka mabe mpo na bato oyo bazali kokamba lisangá; tosengeli kotikaka makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova, Mosambisi oyo aleki.​—Lom. 12:18, 19; Ebe. 13:17.

14. Baanzelu bapesi biso ndakisa nini ya komikitisa?

14 Baanzelu ya Yehova bapesaka biso mpe ndakisa malamu ya kosala ata misala oyo ekoki komonana mpamba. Baanzelu mosusu baboyaki koyebisa bato bankombo na bango. (Gen. 32:29; Bas. 13:17, 18) Atako baanzelu bazali bamilio na bamilio na likoló, Biblia eyebisi kaka nkombo ya Mikaele mpe Gabiliele. Yango ezali kokebisa biso mpo tóluka te kopesa baanzelu lokumu oyo ebongi kaka na Nzambe. (Luka 1:26; Emon. 12:7) Ntango ntoma Yoane afukamaki mpo na kosambela anzelu moko, anzelu yango akebisaki ye boye: “Kebá! Kosala bongo te! Nazali kaka moninga na yo moombo mpe ya bandeko na yo.” (Emon. 22:8, 9) Tosengeli kobondelaka kaka Nzambe.​—Tángá Matai 4:8-10.

15. Ndakisa nini baanzelu bapesaka biso na likambo etali koyeba kozela?

15 Baanzelu bapesaka biso mpe ndakisa malamu na likambo etali koyeba kozela. Atako balukaka koyeba basɛkɛlɛ mosantu ya Nzambe, bayebaka yango nyonso te. Biblia elobi ete: “Na kati ya makambo wana . . . bazalaka na mposa ya kotalatala.” (1 Petelo 1:12) Na yango, basalaka nini? Bazelaka ntango oyo Nzambe abongisi mpo ‘bwanya na ye oyo ezali na mitindo ndenge na ndenge ekoka koyebana na nzela ya lisangá.’​—Ef. 3:10, 11.

16. Etamboli na biso esalaka nini epai ya baanzelu?

16 Na kati ya minyoko, baklisto bazalaka lokola ‘eloko ya kotala epai ya baanzelu.’ (1 Kol. 4:9) Baanzelu basepelaka mpenza komona bosembo na biso; mpe basepelaka ata ntango bato mabe babongoli motema. (Luka 15:10) Baanzelu bamonaka mpe bizaleli malamu ya basi baklisto. Biblia emonisi ete “mwasi asengeli kozala na elembo moko ya bokonzi na motó na ye mpo na baanzelu.” (1 Kol. 11:3, 10) Ya solo, baanzelu basepelaka komona basi baklisto mpe basaleli nyonso ya Nzambe awa na mabelé bazali kotosa bokonzi. Botosi yango ezalaka ndakisa mpo na bana yango ya Nzambe na likoló.

Baanzelu basimbaka mosala ya kosakola

17, 18. Mpo na nini tokoki koloba ete baanzelu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola?

17 Baanzelu bazali mpe kopesa mabɔkɔ na makambo mosusu ya minene oyo ezali kosalema na “mokolo ya Nkolo.” Na kati ya makambo yango, tokoki kotánga kobotama ya Bokonzi na 1914 mpe ndenge “Mikaele ná baanzelu na ye” babwakaki Satana ná bademo na ye awa na nse. (Emon. 1:10; 11:15; 12:5-9) Ntoma Yoane amonaki “anzelu [moko] azali kopumbwa na katikati ya likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo epai ya baoyo bazali kofanda na mabelé.” Anzelu yango alobaki boye: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei, mpe na yango bósambela Oyo asalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe maziba ya mai.” (Emon. 14:6, 7) Na yango, basaleli ya Yehova bandimaka mpenza ete baanzelu basalisaka bango wana bazali kosakola Bokonzi oyo esili kotyama na likoló, atako Zabolo azali kotɛmɛla bango.​—Emon. 12:13, 17.

18 Lelo oyo, baanzelu basololaka na biso te mpo na kokamba biso epai ya bato ya mitema sembo ndenge anzelu moko asalaki ntango akambaki Filipo epai ya mokube Moetiopia. (Mis. 8:26-29) Nzokande, makambo mingi oyo ezali kosalema lelo emonisaka ete baanzelu bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi mpe bakambaka biso epai ya ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’a (Mis. 13:48) Ezali mpenza na ntina tósakolaka mpo tókokisa mokumba na biso ya koluka baoyo bazali na mposa ya ‘kosambela Tata na elimo mpe na solo’!​—Yoa. 4:23, 24.

19, 20. Mosala nini baanzelu bazali kokokisa na makambo oyo ezali kosalema na “bosukisi ya ebongiseli ya makambo”?

19 Mpo na mikolo na biso, Yesu alobaki boye: “Na bosukisi ya ebongiseli yango ya makambo,” baanzelu “bakolongola bato mabe na kati ya bayengebene.” (Mat. 13:37-43, 49) Baanzelu bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya koyanganisa bapakolami mpe kotyama ya elembo ya nsuka. (Tángá Matai 24:31; Emon. 7:1-3) Lisusu, Yesu akozala elongo na baanzelu na ye ntango “akokabola bampate epai bantaba epai.”​—Mat. 25:31-33, 46.

20 “Na ntango ya emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya” baoyo nyonso “bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu” bakobomama. (2 Tes. 1:6-10) Ntango Yoane azwaki emonaneli ya likambo yango, amonaki Yesu elongo ná baanzelu na ye bamati na bampunda ya mpɛmbɛ mpo na kobunda etumba na boyengebene.​—Emon. 19:11-14.

21. Anzelu oyo azali na “fungola ya lobwaku mozindo mpe monyɔlɔlɔ moko ya monene na lobɔkɔ na ye” akosala Satana ná bademo na ye nini?

21 Yoane ‘amonaki anzelu moko azali kokita uta na likoló ná fungola ya lobwaku mozindo mpe monyɔlɔlɔ moko ya monene na lobɔkɔ na ye.’ Anzelu yango ezali Mikaele, anzelu-mokonzi, oyo akokanga Zabolo mpe akobwaka ye​—ntango mosusu ná bademo na ye—​na lobwaku mozindo. Bakofungolama mpo na mwa ntango moke na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto mpo na komeka bato mpo na mbala ya nsuka. Na nsima, Satana ná batomboki nyonso bakobomama. (Emon. 20:1-3, 7-10; 1 Yoa. 3:8) Bato nyonso oyo batombokelaka Nzambe bakozala lisusu te.

22. Baanzelu bakopesa mabɔkɔ na likambo nini oyo ekosalema mosika te, mpe mosala na bango esengeli kotinda biso tósala nini?

22 Mosika te, bato bakosikolama na Satana mpe mokili na ye. Na ntango yango, baanzelu bakokokisa mosala moko ya monene ntango Yehova akolongisa Bokonzi na ye mpe akokokisa mokano na ye mobimba mpo na mabelé mpe bato. Baanzelu ya sembo bazali mpenza “bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso, oyo bitindami mpo na kosalela baoyo bakozwa libula ya lobiko.” Na yango, tiká tómonisa botɔndi epai ya Yehova Nzambe mpo na ndenge oyo asalelaka baanzelu mpo na kosunga biso tósala mokano ya Nzambe mpe tózwa bomoi ya seko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, nkasa 549-551.

Okopesa eyano nini?

• Bikelamu ya Nzambe na likoló babongisamá ndenge nini?

• Baanzelu mosusu basalaki nini na mikolo ya Noa?

• Ndenge nini Nzambe asalelaka baanzelu mpo na kosunga biso?

• Mokumba nini baanzelu bazali kokokisa na mikolo na biso?

[Elilingi na lokasa 21]

Baanzelu basepelaka kokokisa mokano ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 23]

Baanzelu bazalaka pene ya kosalisa biso na boyokani na mokano ya Nzambe, ndenge basalaki mpo na Danyele

[Bililingi na lokasa 24]

Tózala na mpiko, mpo baanzelu bazali kosimba mosala ya kosakola!

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mabelé: Fɔtɔ NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto