Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr19 Juin nk. 1-7
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • 3-9/06
  • 10-16/06
  • 17-23/06
  • 24-30/06
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2019
mwbr19 Juin nk. 1-7

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

3-9/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAGALATIA 4-6

“‘Elilingi’ oyo ezali na ntina mpo na biso”

it-1-F lok. 56 par. 1

Agare

Ntoma Paulo amonisaki ete Agare azalaki elilingi ya ekólo Yisraele na mosuni; ekólo oyo esalaki boyokani elongo na Yehova na nzela ya kondimana ya Mibeko na Ngomba Sinai, kondimana oyo ebotaki “bana mpo bázala baombo.” Lokola bazalaki bato ya masumu, ekólo yango elongaki te kotosa makambo oyo kondimana yango esɛngaki. Kondimana yango epesaki Bayisraele bonsomi te, kasi emonisaki ete bazalaki basumuki mpe babongaki na liwa; na yango, bazalaki nde baombo. (Yn 8:34; Ro 8:1-3) Yerusaleme ya ntango ya Paulo ekokanaki na Agare, mpo Yerusaleme mboka-mokonzi, oyo ezalaki komonisa ebongiseli ya Yisraele ya mosuni, ezalaki moombo elongo na bana na yango. Kasi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali bana ya “Yerusaleme mboka ya likoló,” mwasi ya Nzambe na ndenge ya elilingi. Ndenge moko na Sara mwasi ya nsomi, Yerusaleme yango ezalá naino moombo te. Kasi kaka ndenge Yishimaele anyokolaki Yisaka, bana ya “Yerusaleme mboka ya likoló” bazali mpe konyokwama na mabɔkɔ ya bana ya Yerusaleme ya moombo. Kasi, babenganaki Agare ná mwana na ye; yango emonisaki ndenge oyo Yehova akobwaka mpe ekólo Yisraele.​—Ga 4:21-31; talá mpe Yn 8:31-40.

w14 15/10 lok. 10 par. 11

Zalá na kondima makasi na Bokonzi

11 Atako kondimana ya Abrahama ekokisamaki mpenza mpo na bana ya Abrahama ntango bazwaki Mokili ya Ndaka, Makomami emonisi ete maloba ya kondimana yango esengelaki mpe kokokisama na ndenge ya elimo. (Gal. 4:22-25) Na kokokana na yango monene, ndenge ntoma Paulo alimbolaki yango, eteni ya liboso ya momboto ya Abrahama ezali Kristo mpe eteni ya mibale ezali bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo. (Gal. 3:16, 29; Em. 5:9, 10; 14:1, 4) Mwasi oyo asengelaki kobimisa momboto yango ezali “Yerusaleme ya likoló,” eteni ya likoló ya ebongiseli ya Nzambe oyo esalemi na bikelamu ya elimo ya sembo. (Gal. 4:26, 31) Ndenge kondimana ya Abrahama elakaki, momboto ya mwasi esengelaki komemela bato mapamboli.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w09 1/4 lok. 13

Oyebaki yango?

Mpo na nini Yesu abengaki Yehova “Aba, Tata” na libondeli moko oyo asalaki?

Na monɔkɔ ya Aramɛyɛ, liloba ʼab·baʼʹ ekoki kolimbola “tata” to “Ee Tata.” Na bisika nyonso misato oyo liloba yango esalelami na Makomami, ezali na kati ya libondeli, mpe elobeli Yehova, Tata na biso ya likoló. Liloba yango elimboli mpenza nini?

Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi boye: “Na ntango ya Yesu, liloba ʼabbāʼ ezalaki kosalelama mingimingi mpo na komonisa komesana makasi oyo ezali kati na bato mibale mpe limemya ya mwana epai ya tata na ye.” Ezali liloba oyo ezalaki komonisa bolingo ya mwana epai ya tata na ye, mpe ezalaki moko ya maloba ya libosoliboso oyo mwana azalaki koyekola koloba. Yesu asalelaki liloba yango na libondeli moko oyo asalaki na motema mobimba epai ya Tata na ye. Na elanga ya Getesemane, mwa bangonga liboso akufa, Yesu abondelaki Yehova mpe abengaki ye, “Abba, Tata.”​—Mrk. 14:36.

Buku yango ebakisi boye: “Na makomi ya Bayuda na ntango oyo Bagrɛki mpe Baroma bazalaki koyangela mokili, bazalaki mpenza kosalela liloba ʼAbbāʼ te mpo na koloba na Nzambe; na ntembe te mpo na bango, kobenga Nzambe bongo ezalaki kozanga limemya.” Nzokande, “ntango Yesu . . . asalelaki liloba yango, alingaki komonisa ete azali mpenza na boyokani makasi na Nzambe ndenge azalaki koyebisa bato.” Mbala mibale mosusu oyo liloba “Abba” esalelami, ezali na mikanda ya Paulo mpe emonisi ete bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki mpe kosalela yango na mabondeli na bango.​—Baroma 8:15; Bagalatia 4:6.

w10 1/11 lok. 15

Oyebaki yango?

Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete amemaki na nzoto na ye “bilembo ya moombo ya Yesu”?​—Bagalatia 6:17.

▪ Maloba ya Paulo ekokaki kozala na bandimbola mingi epai ya bato ya ekeke ya liboso oyo bayokaki ye. Na ndakisa, na ntango ya kala, bazalaki kosalela ebende ya mɔtɔ mpo na kotya elembo epai ya bato oyo bakangi na bitumba, miyibi ya tempelo mpe baombo oyo bakimi bankolo na bango. Ntango batye bato elembo ya ndenge wana, ezalaki likambo ya nsɔni.

Kasi, bilembo ezalaki ntango nyonso te likambo ya mabe. Bato mingi ya kala bazalaki kosalela yango mpo na komonisa bato ya libota to lingomba moko. Na ndakisa, buku moko (Theological Dictionary of the New Testament), elobi ete, “bato ya Siri bazalaki komipesa na banzambe Hadad mpe Atargatis na bilembo oyo bazalaki kotya bango na lobɔkɔ to na nkingo. . . . Bazalaki kotya basambeli ya Dionysus elembo na lokasa ya fololo moko (lierre).”

Bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia lelo oyo, balobaka ete Paulo azalaki kolobela bilembo oyo ezalaki kotikala na nzoto na ye ntango nyonso oyo babɛtaki ye na boumeli ya mosala na ye ya misionɛrɛ. (2 Bakorinti 11:23-27) Kasi, ekoki kozala ete Paulo alingaki nde koloba ete lolenge ya bomoi na ye nde emonisaki ete azali mokristo, kasi te bilembo oyo ezalaki komonana na miso.

10-16/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAEFESE 1-3

“Mosala ya Yehova ya kotambwisa makambo mpe mokano na yango”

it-2-F lok. 858 par. 2

Sekele mosantu

Bokonzi ya Masiya. Na makomi na ye, Paulo alobeli na mobimba komonisama ya sekele mosantu ya Kristo. Na Baefese 1:9-11, alobeli ndenge Nzambe asali ete “sekele mosantu” ya mokano na ye eyebana mpe alobi: “Yango eyokani na makambo oyo asepelaki kosala na kolanda mokano na ye mpo na mosala ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá, elingi koloba, koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na nse ya bokonzi ya Kristo, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabele. Ɛɛ, na nse ya bokonzi na ye, oyo na bomoko elongo na ye totyamaki mpe bazwi-ya-libula, na ndenge bakanaki yango liboso mpo na biso na kolanda mokano ya moto oyo azali kosala makambo nyonso ndenge mokano na ye elakisi.” “Sekele mosantu” yango etaleli guvɛrnema moko, Bokonzi ya Masiya. “Biloko oyo ezali na likoló” oyo Paulo alobeli ezali baoyo bakozwa libula ya Bokonzi ya likoló elongo na Kristo. “Biloko oyo ezali na mabele” ezali bato oyo Bokonzi yango ekoyangela awa na mabele. Yesu amonisaki bayekoli na ye ete sekele mosantu ezali na boyokani na Bokonzi ntango alobaki na bango: “Sekele mosantu ya bokonzi ya Nzambe epesami na bino.”​—Mr 4:11.

w12 15/7 nk. 27-28 par. 3-4

“Yehova kaka moko” azali koyanganisa libota na ye

3 Moize ayebisaki Bayisraele ete: “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.” (Mib. 6:4) Makambo nyonso oyo Yehova asalaka eyokani na mokano na ye. Yango wana, “na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá,” Nzambe abandisaki “mosala ya kotambwisa makambo,” elingi koloba azwaki bibongiseli mpo na koyanganisa bikelamu na ye nyonso ya mayele. (Tángá Baefese 1:8-10.) Mosala yango ya kotambwisa makambo ezali na biteni mibale. Ya liboso, Nzambe azali kobongisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na bomoi na likoló, epai bakokoba kosala na nse ya bokonzi ya Kristo. Yango ebandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango Yehova abandaki koyanganisa baoyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló. (Mis. 2:1-4) Lokola bakristo oyo batyami mafuta na elimo batángami bayengebene mpo na bomoi na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu, bayebi ete Nzambe akómisi bango “bana” na ye.​—Rom. 3:23, 24; 5:1; 8:15-17.

4 Ya mibale, Nzambe azali kobongisa baoyo bakofanda awa na mabele, na Paradiso oyo Bokonzi ya Masiya ekoyangela. Bato ya liboso oyo bakofanda na mokili yango ya sika ezali “ebele mpenza ya bato.” (Em. 7:9, 13-17; 21:1-5) Na nsima, bamiliare ya bato mosusu bakosekwa na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo mpo na kofanda mpe na mokili yango. (Em. 20:12, 13) Bomoko na biso ekomonana lisusu malamumalamu na lisekwa! Na nsuka ya mbula nkóto, ekozala na komekama ya nsuka mpo na “biloko oyo ezali na mabele,” elingi koloba bato nyonso oyo bakozala na Paradiso. Baoyo bakotikala sembo bakokóma “bana ya Nzambe” awa na mabele.​—Rom. 8:21; Em. 20:7, 8.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w13 15/2 lok. 28 par. 15

Kotika eloko moko te epekisa yo ozwa nkembo

15 Ndenge oyo toyikaka mpiko ntango tozali kosala mokano ya Yehova esalisaka basusu bázwa nkembo. Paulo akomelaki lisangá ya Efese ete: “Nazali kosɛnga bino ete bólɛmba te mpo na malɔzi oyo nazali kozwa mpo na bino, mpo yango ezali nkembo mpo na bino.” (Ef. 3:13) Na ndimbola nini malɔzi ya Paulo ‘ezalaki nkembo’ mpo na Baefese? Lokola Paulo akobaki kosalela bango atako akutanaki na mikakatano mingi, yango emonisaki Baefese ete mokumba oyo bazalaki na yango ya kosalela Yehova ezalaki na motuya mingi mpo na bakristo. Soki Paulo alɛmbaka ntango akutanaki na bolɔzi, yango elingaki komonisa ete boyokani oyo bakristo bazalaki na yango ná Yehova, mosala na bango, mpe elikya na bango ezali na valɛrɛ te, boye te? Ndenge oyo Paulo ayikaki mpiko emonisaki ete tosengeli kondima komipimela biloko mosusu nyonso mpo na kozala bakristo mpe bayekoli ya Yesu.

cl lok. 299 par. 21

“Koyeba bolingo ya Kristo”

21 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “koyeba” elimboli koyeba “na misala, na nzela ya makambo oyo moto ye moko asali.” Mpo tóyeba mpenza ndenge oyo Yesu azalaki koyoka na motema, tosengeli komonisa bolingo ndenge ye amonisaki; komipimela mpo na bolamu ya bato mosusu, kokokisa bamposa na bango mpo tozali koyokela bango mawa, kolimbisa bango na motema mobimba. Ezali na ndenge yango, na makambo oyo biso moko tosali, nde ‘tokoyeba bolingo ya Klisto oyo eleki boyebi.’ Mpe tóbosana soki moke te ete soki tozali mpenza kokóma lokola Klisto, tokopusana lisusu koleka penepene na Yehova, Nzambe na biso ya bolingo, oyo Yesu amekolaki malamumalamu.

17-23/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAEFESE 4-6

“Bólata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe”

w18.05 lok. 27 par. 1

Bilenge​—Bótɛmɛla Zabolo

NTOMA Paulo akokanisaki bomoi ya bakristo na oyo ya Soda. Tozali kobunda etumba ya elimo! Mpe tozali mpenza na banguna. Tozali kobunda na bato te kasi na Satana ná bademo na ye. Bamesani mpenza na bitumba mpo babundi na boumeli ya bambula ebele. Na yango, ezali komonana lokola ete tokokoka kolonga te, mingimingi soki tozali bilenge. Bilenge bakoki kolonga monguna oyo azali mpenza na nguya? Ɛɛ, bakoki kolonga! Mpo na nini? Mpo Yehova apesaka bango nguya. Ndenge moko na soda oyo amibongisi malamu, basengeli ‘kolata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe’ mpo bámibongisa na etumba.​—Tángá Baefese 6:10-12.

w18.05 nk. 28-29 par. 4, 7, 10

Bilenge​—Bótɛmɛla Zabolo

4 Ndenge moko na mokaba, solo oyo toyekolaka na Liloba ya Nzambe ebatelaka biso na mateya ya lokuta. (Yoane 8:31, 32; 1 Yoane 4:1) Ntango tozali koyekola mateya ya solo na liloba ya Nzambe, ekozala mpasi te tótosa mitinda ya Yehova na bomoi na biso, to tólata “ebateli-ntolo.” (Nzembo 111:7, 8; 1 Yoane 5:3) Lisusu, ntango tozali mpenza kokanga ntina ya mateya ya solo, ekozala mpasi te kosalela yango liboso ya banguna.​—1 Pe 3:15.

7 Mibeko ya sembo ya Yehova, oyo ebatelaka “motema” na biso, to bomoto na biso ya kati, ekoki kokokanisama na ebateli-ntolo. (Mas 4:23) Soda akokaki te kopesa ebateli-ntolo na ye oyo esalemi na bibende mpo azwa oyo esalemi na mwa manzanza. Ndenge moko mpe, tokoki te kotika ete makanisi na biso ezwa esika ya mibeko ya sembo ya Yehova. Bwanya na biso ekoki te kobatela motema na biso. (Mas 3:5, 6) Yango wana, tosengeli mbala na mbala kotala soki “ebateli-ntolo” na biso ezali kokoba kobatela motema na biso.

10 Ndenge kaka sapato ya soda ya Roma ezalaki kosalisa ye alonga etumba, sapato na biso mpe ya elilingi esalisaka biso tósakola ‘nsango malamu ya kimya.’ (Yisaya 52:7; Baroma 10:15) Kasi, ntango mosusu esɛngaka mpenza mpiko mpo na kosakola. Bo, oyo azali na mbula 20, alobi: “Kopesa litatoli na baninga ya kelasi ezalaki kobangisa ngai mpe ezalaki kopesa ngai nsɔni. Ntango nazongisaka makanisi nsima, nayebaka mpenza te ntina oyo nazalaki komiyoka bongo. Lelo oyo, nazali na esengo ya kopesa baninga na ngai litatoli.”

w18.05 nk. 29-31 par. 13, 16, 20

Bilenge​—Bótɛmɛla Zabolo

13 ‘Mbanzi oyo ezali kopela’ oyo Satana akoki kobwakela biso ezali nini? Akoki kosalela lokuta na ntina na Yehova. Satana alingi ete omona ete Yehova alingaka yo te mpe ete moto moko te akipaka yo. Ida, oyo azali na mbula 19, alobi: “Mbala mingi namiyokaka ete Yehova azali mosika na ngai mpe alingaka kozala moninga na ngai te.” Asalaka nini ntango amiyokaka ndenge wana? Abakisi: “Makita esalaka ete nabakisa kondima. Liboso nazalaki kopesa biyano te, mpe kokanisa ete moto moko te akolinga koyoka makambo nazali koloba. Sikoyo, nabongisaka makita malamu mpe nasalaka makasi napesa biyano mbala mibale to misato. Ezalaka pɛtɛɛ te, kasi nayokaka malamu mpenza ntango nasalaka bongo. Mpe bandeko balendisaka ngai mpenza. Ntango nyonso oyo nautaka makita namiyokaka ete Yehova alingaka ngai.”

16 Ndenge kaka ekɔti ebatelaka bɔɔngɔ ya soda, “elikya ya lobiko” ebatelaka makanisi na biso. (1 Batesaloniki 5:8; Masese 3:21) Elikya esalisaka biso tótya makanisi na bilaka ya Nzambe mpe tólɛmba nzoto te mpo na mikakatano na biso. (Nzembo 27:1, 14; Misala 24:15) Kasi soki tolingi ete elikya ebatela biso, esengeli tómona yango likambo ya solo. Tosengeli kolata “ekɔti” na motó na biso, kasi te kosimba yango na mabɔkɔ.

20 Ntoma Paulo alobaki ete Liloba ya Nzambe ezali lokola mopanga. Yehova apesá biso yango. Kasi tosengeli koyekola kosalela yango malamu mpo na kolobela bindimeli na biso to kobongisa makanisi na biso. (2 Bakorinti 10:4, 5; 2 Timote 2:15) Ndenge nini tokoki kokolisa makoki na biso? Sebastian, oyo azali na mbula 21, alobi: “Ntango nasalaka botángi na ngai ya Biblia, nakomaka vɛrsɛ moko na mokapo mokomoko oyo natángi. Nasalá liste ya bavɛrsɛ oyo nalingaka mingi.” Yango esalisaka ye ayeba malamu makanisi ya Yehova. Daniel abakisi: “Ntango nasalaka botángi na ngai ya Biblia, nazwaka bavɛrsɛ oyo namoni ete ekosalisa bato na mosala ya kosakola. Namoni ete bato basepelaka soki mosakoli ayebi Biblia malamu mpe azali kosala oyo akoki mpo na kosalisa bango.”

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 859 par. 6

Bosantu

Elimo santu. Elimo, to nguya oyo Yehova asalaka na yango mosala elandaka litambwisi ya Yehova mpe ekokisaka ntango nyonso mokano na ye. Ezali pɛto, esantisami mpe etyami pembeni mpo na mosala ya Nzambe. Yango wana ebengami “elimo santu” mpe “elimo ya bosantu.” (Nz 51:11; Lk 11:13; Ro 1:4; Ef 1:13) Elimo santu oyo ezali kosala na kati ya moto ezalaka nguya oyo elendisaka bosantu to bopɛto. Likambo nyonso ya mbindo to ya mabe etɛmɛlaka elimo yango to ‘eyokisaka’ elimo yango mawa. (Ef 4:30) Atako ezali moto te, elimo santu emonisaka bosantu ya Nzambe mpe mpo na ntina yango ekoki ‘koyoka mawa.’ Momeseno nyonso ya makambo ya mabe elukaka ‘koboma mɔtɔ ya elimo.’ (1Te 5:19) Soki momeseno yango ekobi, elimo santu ya Nzambe ‘eyokaka mawa’ mpe yango ekoki kosala ete Nzambe akóma monguna ya moto oyo atombokeli ye. (Yis 63:10) Moto oyo ayokisi elimo santu mawa akoki kokóma tii na kofinga elimo yango, lisumu oyo Yesu alobaki ete ekoki kolimbisama te ezala na ntango oyo to na oyo ezali koya.​—Mt 12:31, 32; Mr 3:28-30; talá ELIMO.

it-1-F lok. 237 par. 6

Lokoso

Emonanaka na misala. Lokoso ekoki komonana polele na likambo oyo moto asali; oyo ekomonisa mposa na ye ya mabe mpe oyo eleki ndelo. Yakobo, moko ya bakomi ya Biblia alobi ete soki mposa mabe ekoli, ebotaka lisumu. (Yk 1:14, 15) Na yango, moto ya lokoso akoki koyebana na misala na ye. Ntoma Paulo alobi ete kozala lokoso elimboli kozala mosambeli ya bikeko. (Ef 5:5) Na lokoso na ye, moto ya ndenge wana akómisaka eloko oyo alingi lokola nzambe na ye, apesaka yango valɛrɛ mingi koleka mosala mpe losambo ya Mozalisi.​—Ro 1:24, 25.

24-30/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAFILIPI 1-4

“Bómitungisa ata na likambo moko te”

w17.08 lok. 10 par. 10

“Kimya ya Nzambe . . . Eleki makanisi nyonso”

10 Nini ekoki kosalisa biso ‘tómitungisa ata na likambo moko te’ kasi tózala nde na “kimya ya Nzambe”? Maloba ya ntoma Paulo epai ya Bafilipi emonisi ete libondeli nde ekoki kosalisa. Na yango, soki tozali komitungisa, tosengeli koyebisa Nzambe mitungisi na biso na libondeli. (Tángá 1 Petro 5:6, 7.) Ntango ozali kobondela Yehova, zalá na kondima mpo atyelaka yo likebi. Pesáká ye matɔndi mpo na lipamboli nyonso oyo ozwi. Mpe kobosana ata mokolo moko te ete Yehova akoki “kosala mingi mpenza koleka makambo nyonso oyo tosɛngaka to oyo eyelaka biso na makanisi.”​—Ef. 3:20.

w17.08 lok. 10 par. 7

“Kimya ya Nzambe . . . eleki makanisi nyonso”

7 Ntango bandeko ya Filipi batángaki mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki bango, na ntembe te bakanisaki makambo oyo ekómelaki ye ná Silasi mpe makambo ya kokamwa oyo Yehova asalaki mpo na bango. Liteya nini ntoma Paulo alingaki kopesa bango na mokanda na ye? Liteya yango ezalaki ete: Bómitungisa te. Soki bobondeli, bokozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” Maloba yango elimboli nini? Na Babiblia mosusu, maloba yango ebongolami na “eleki ndɔtɔ nyonso” to “eleki mikano nyonso ya bato.” Na yango, ntoma Paulo alingaki koloba ete “kimya ya Nzambe” eleki nyonso oyo tokoki kokanisa. Soki mayele na biso esuki na likambo moko, Yehova ayebaka oyo esengeli kosala; mpe akoki kosala makambo oyo tozali kokanisa te.​—Tángá 2 Petro 2:9.

w17.08 lok. 12 par. 16

“Kimya ya Nzambe . . . eleki makanisi nyonso”

16 Nini ekosalema soki tozwi “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso”? Biblia elobi ete ‘ekobatela mitema na biso mpe makanisi na biso na nzela ya Kristo Yesu.’ (Bafilipi 4:7) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kobatela’ ezalaki na elobeli ya basoda mpe ezalaki komonisa etuluku ya basoda oyo batyami mpo na kobatela engumba. Engumba Filipi ebatelamaki ndenge wana. Bato bakokaki kolala na kimya mpo bayebaki ete basoda bazali kobatela engumba. Ndenge moko mpe, soki tozali na “kimya ya Nzambe,” tokomitungisa te, makanisi mpe mitema na biso ekozala ya kokita. Toyebi ete Yehova atyelaka biso likebi mpe alingi tózala malamu. (1 Petro 5:10) Yango ekobatela biso mpo mitungisi to kolɛmba nzoto elekela biso te.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 850 par. 1

Makabo

Makabo ya masanga. Mbala mingi makabo ya masanga ezalaki kopesama nzela moko na makabo mosusu, mingimingi ntango Bayisraele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. (Mit 15:2, 5, 8-10) Makabo yango ezalaki vinyo (“masanga oyo elangwisaka”) oyo bazalaki kosopa na etumbelo. (Mit 28:7, 14 ; talá mpe Kob 30:9; Mit 15:10.) Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Filipi boye: “Nazali komipesa lokola likabo ya masanga oyo bazali kosopela mbeka ya mosala mpo na bolamu ya bato nyonso oyo kondima etindi bino bósala, nazali na esengo.” Awa Paulo asaleli ndakisa ya likabo ya masanga mpo na komonisa mposa oyo azalaki na yango ya komipesa mobimba mpo na kosalisa bandeko na ye bakristo. (Flp 2:17) Mwa moke liboso ya liwa na ye, akomelaki Timote boye: “Namipesi lokola likabo ya masanga oyo bazali kosopa, mpe ntango mpenza ya kosikolama na ngai ekómi pene.”​—2Ti 4:6.

w07 1/1 lok. 26 par. 5

“Lisekwa ya liboso” ezali kosalema sikoyo!

5 Ya mibale, baklisto bapakolami ya “Yisalaele ya Nzambe” basengeli kosangana na Nkolo Yesu Klisto na nkembo na ye na likoló, epai bakozala “ntango nyonso elongo na Nkolo.” (Bagalatia 6:16; 1 Batesaloniki 4:17) Likambo yango ebengami “lisekwa ya liboso.” (Bafilipi 3:10, 11; Emoniseli 20:6) Ntango lisekwa yango ekosila, ekokóma ngala ya bamilio ya bato oyo bakosekwa na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso. Na yango, ezala tozali na elikya ya likoló to ya mabele, tozali mpenza na mposa ya koyeba soki “lisekwa ya liboso” ezali nini. Lisekwa yango ezali ya ndenge nini? Ekosalema ntango nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto