Bandeko mibali oyo bozali bilenge, bozali koluka kozwa mikumba?
1. Ntango nini ndeko mobali oyo azali elenge asengeli kobanda kosalela malako oyo ezali na 1 Timote 3:1?
1 “Soki moto azali koluka kosala mosala [na kati ya lisangá], azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.” (1 Tim. 3:1) Maloba wana oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ezali kolendisa bandeko mibali báluka kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na kati ya lisangá. Kasi, osengeli kozala mokóló mpo na kosala yango? Kutu, eleki malamu obanda koluka mikumba ntango ozali naino elenge. Na ndenge yango, okoki kozwa formasyo mpe komonisa soki okoki mpo na koponama mosaleli na misala ntango okokóma mwa mokóló. (1 Tim. 3:10) Soki ozali elenge mobali oyo azwá batisimo, ndenge nini okoki koluka kozwa mikumba?
2. Ndenge nini elenge mobali akoki kokóma na elimo ya komipimela mpe komonisa yango?
2 Elimo ya komipimela: Kobosana te ete ozali nde koluka kosala mosala moko ya malamu, kasi titre moko boye te. Yango wana, zalá na mposa ya kosalisa bandeko ya lisangá. Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kokanisa na ndakisa malamu ya Yesu. (Mat. 20:28; Yoa. 4:6, 7; 13:4, 5) Bondelá Yehova asalisa yo osepelaka na bato. (1 Ko. 10:24) Okoki kosunga bandeko ya lisangá oyo bakómi mibange to bazali bibɔsɔnɔ? Omipesaka na bolingo na yo moko mpo na kokata matiti, kolongola nɛjɛ na pau to kosala misala mosusu etali kobongisa Ndako ya Bokonzi? Okoki komipesa na bolingo na yo moko mpo na kosala lisolo ya ndeko oyo azali te na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi? Okomona ete komipesa mpo na kosalela basusu ekomemela yo esengo.—Mis. 20:35.
3. Mpo na nini kozala moto ya elimo ezali na ntina, mpe ndenge nini okoki kokóma moto ya elimo?
3 Kozala moto ya elimo: Mpo na mosaleli na misala, kozala moto ya elimo ezali na ntina mingi koleka kozala na mayele mingi to na makoki ya kobotama. Moto ya elimo alukaka kotalela makambo ndenge Yehova mpe Yesu batalelaka yango. (1 Ko. 2:15, 16) Amonisaka “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:22, 23) Azalaka mosakoli ya molende oyo atyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Mat. 6:33) Okoki kokóma na bizaleli ya elimo soki ozali na momeseno malamu ya koyekola yo moko. Yango esangisi kotánga Biblia mikolo nyonso, kotánga nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, kobongisa mpe koyangana na makita ya lisangá. (Nz. 1:1, 2; Ebr. 10:24, 25) Ntango ntoma Paulo alendisaki Timote ete akende liboso na elimo, akomaki boye: “Okeba na mateya na yo ntango nyonso.” (1 Tim. 4:15, 16) Na yango, soki ozwi lisolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, bongisá yango malamumalamu. Omibongisaka mpo na mosala ya kosakola, mpe obimaka mbala na mbala na mosala yango. Omityela mikano ya elimo, na ndakisa, kokóma mobongisi-nzela, kosala na Betele, to kokɔta Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba, mpe salá makasi okokisa mikano yango. Kozala moto ya elimo ekosalisa yo ‘okima bamposa ya bolenge.’—2 Tim. 2:22.
4. Mpo na nini ezali na ntina kozala moto oyo bakoki kotyela motema mpe moto ya sembo?
4 Kozala moto oyo bakoki kotyela motema mpe moto ya sembo: Lokola bandeko mibali oyo bazwaki mokumba ya kokabola bilei na ekeke ya liboso bazalaki na “lokumu malamu,” elingi koloba bazalaki bato ya kotyela motema mpe ya sembo, yango wana bantoma bamitungisaki te mpo bayebaki ete mosala ekosalema malamu. Yango esalisaki bantomba bámipesa na makambo mosusu oyo eleki ntina. (Mis. 6:1-4) Na yango, soki bapesi yo mokumba moko boye na lisangá, salelá makoki na yo nyonso mpo na kokokisa yango. Mekolá Noa, oyo alandaki malamumalamu malako oyo bapesaki ye mpo na kotonga masuwa. (Eba. 6:22) Kozala sembo esepelisaka Yehova mpe emonisaka ete moto akɔmeli na elimo.—1 Ko. 4:2; talá etanda “Matomba ya kopesa formasyo.”
5. Mpo na nini bandeko mibali oyo bazali bilenge basengeli koluka kozwa mikumba?
5 Ndenge esakolamaki, Yehova azali kokolisa mbangu mosala ya koyanganisa. (Yis. 60:22) Mbula na mbula, bato soki nkotó nkama mibale na ntuku mitano (250 000) bazali kozwa batisimo. Lokola bato mingi ya sika bazali koya na lisangá, bosɛnga ezali ya mibali oyo bakokisi masɛngami mpo na kokokisa mikumba na lisangá. Sikoyo koleka bileko mosusu nyonso, makambo ya kosala ezali mingi na mosala ya Yehova. (1 Ko. 15:58) Bandeko mibali oyo bozali bilenge, bozali na mposa ya kozwa mikumba? Soki bongo, bozali na mposa ya mosala moko ya malamu mpenza!
Lokola bato mingi ya sika bazali koya na lisangá, bosɛnga ezali ya mibali oyo bakokisi masɛngami mpo na kokokisa mikumba na lisangá