Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/10 lok. 30-lok. 32 par. 11
  • Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Tito, epai ya Filemona mpe epai ya Baebele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Tito, epai ya Filemona mpe epai ya Baebele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOZALA MAKASI NA ELIMO
  • (Tito 1:1–3:15)
  • KOLENDISA “NA BOLINGO”
  • (Flmo. 1-25)
  • “TÓKENDE NOKINOKI TII NA KOKƆMELA”
  • (Ebe. 1:1–13:25)
  • Mokanda ya Biblia nimero 57​—Filemona
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Filemona mpe Onesimo basangani kati na bondeko ya boklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bolingo epai na bandeko ezali na nguya mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • ‘Kolendisana na ntina na bolingo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/10 lok. 30-lok. 32 par. 11

Liloba ya Yehova ezali na bomoi

Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Tito, epai ya Filemona mpe epai ya Baebele

MWA moke nsima ya kobima na bolɔkɔ ya Loma mpo na mbala ya liboso na mobu 61 T.B., ntoma Paulo akendaki na Esanga Krɛti. Lokola amonaki ete bandeko ya masangá ya Krɛti basengelaki kobongisa boyokani na bango na Yehova, atikaki Tito kuna mpo na kosalisa bango. Na nsima, ekoki kozala uta na Masedonia, Paulo akomelaki Tito mokanda mpo na kopesa ye malako na ndenge ya kokokisa malamu mokumba na ye mpe komonisa ete azwaki mokumba yango epai ya ntoma.

Nzokande, liboso abima na bolɔkɔ na mobu 61 T.B., Paulo akomaki mokanda epai ya Filemona, ndeko moko oyo azalaki kofanda na Kolose. Akomelaki ye lokola moninga mpo na kosɛnga ye likambo moko.

Na mobu soki 61 T.B., Paulo akomaki mpe mokanda epai ya Baebele oyo bazalaki na Yudea mpo na komonisa bango ete boklisto ezali likoló ya losambo ya Bayuda. Mikanda yango misato ezali na batoli ya ntina mingi mpo na biso.​—Ebe. 4:12.

KOZALA MAKASI NA ELIMO

(Tito 1:1–3:15)

Nsima ya kopesa Tito malako mpo na “kotya bankulutu na engumba na engumba,” Paulo ayebisaki ye ‘akoba kopamela makasi [bato ya motó makasi], mpo ete bázala makasi na kati ya kondima.’ Alendisaki bandeko nyonso ya masangá ya Krɛti ‘báboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe báfanda na makanisi malamu.’​—Tito 1:5, 10-13; 2:12.

Paulo apesaki lisusu batoli mpo na kosalisa bandeko ya Krɛti bázala makasi na elimo. Ayebisaki Tito ete ‘aboya bantembe ya bozoba mpe bitumba na ntina etali Mibeko.’​—Tito 3:9.

Biyano na mituna ya Biblia:

1:15​—Na ndenge nini “biloko nyonso” ezali “pɛto epai ya bato ya pɛto,” kasi mbindo “epai ya bato ya mbindo mpe oyo bazangi kondima”? Mpo na kozwa eyano tosengeli koyeba nini oyo Paulo abengaki “biloko nyonso.” Azalaki kolobela te biloko oyo Liloba ya Nzambe epekisi, kasi makambo oyo Makomami etiki nzela na moklisto mokomoko azwa ekateli na ye. Mpo na moto oyo makanisi na ye ezali na boyokani na mitinda ya Nzambe, biloko yango ezali pɛto. Kasi ezali bongo te mpo na moto oyo makanisi mpe lisosoli na ye esili kobeba.a

3:5​—Na ndenge nini baklisto bapakolami ‘babikisami na nzela ya bosukoli’ mpe ‘bakómisami sika na lisalisi ya elimo santu’? Baklisto yango ‘babikisami na nzela ya bosukoli’ na boye ete Nzambe asukoli to apɛtoli bango na makila ya Yesu na nzela ya mbeka ya lisiko. ‘Bakómisami sika na lisalisi ya elimo santu’ mpamba te bakómi “ekelamu ya sika” lokola bana ya Nzambe babotami na elimo.​—2 Kol. 5:17.

Mateya mpo na biso:

1:10-13; 2:15. Bakɛngɛli basengeli kozala na mpiko mpo na kosembola makambo oyo ezali kotambola malamu te na lisangá.

2:3-5. Lokola na ekeke ya liboso, bandeko basi oyo bakɔmeli na elimo basengeli kozala “bato ya etamboli ya kobanga Nzambe, bákoselaka bato makambo te, baombo ya ebele ya vinyo te, bateyi ya makambo ya malamu.” Na ndenge yango, bakoyeba kopesa batoli ya malamu epai ya “bilenge basi” na kati ya lisangá.

3:8, 14. Kotya ‘makanisi na biso na kosala misala ya malamu’ ezali “malamu mingi mpe na litomba” mpamba te, esalisaka biso tóbota mbuma mingi na mosala ya Nzambe mpe tókima mokili oyo ya mabe.

KOLENDISA “NA BOLINGO”

(Flmo. 1-25)

Paulo apesaki Filemona longonya mpo azalaki ndakisa malamu ya ‘bolingo mpe kondima.’ Ezaleli na ye ya kolendisa bandeko na ye baklisto epesaki Paulo “esengo mingi mpe kobɔndisama mingi.”​—Flmo. 4, 5, 7.

Paulo apesi bakɛngɛli nyonso ndakisa malamu na ndenge asalaki mpo na likambo ya Onezime; apesaki Filemona mitindo te, kasi alendisaki ye “na bolingo.” Alobaki na ye boye: “Kotyáká motema ete okondima, nazali kokomela yo, koyebáká ete okosala ata koleka makambo oyo nalobi.”​—Flmo. 8, 9, 21.

Biyano na mituna ya Biblia:

10, 11,18​—Ndenge nini Onezime, oyo liboso azalaki “na ntina te” akómaki “na ntina”? Onezime azalaki moombo mabe oyo akimaki ndako ya nkolo na ye Filemona na Kolose mpe akendaki na Loma. Ekoki mpe kozala ete Onezime ayibaki nkolo na ye mpo na kofuta mobembo yango ya kilomɛtrɛ 1400. Ya solo, azalaki na ntina te mpo na Filemona. Nzokande, kuna na Loma, Paulo ateyaki Onezime mpe akómaki moklisto. Lokola akómaki ndeko ya elimo, moombo yango oyo liboso azalaki “na ntina te,” akómaki “na ntina.”

15, 16​—Mpo na nini Paulo asɛngaki Filemona te ete apesa Onezime bonsomi? Paulo alingaki kokangama kaka na mokumba na ye ya ‘kosakola bokonzi ya Nzambe mpe koteya makambo oyo etali Nkolo Yesu Klisto.’ Yango wana, aboyaki kokɔta na makambo mosusu, na ndakisa oyo etali moombo ná nkolo na ye.​—Mis. 28:31.

Mateya mpo na biso:

2. Filemona andimaki ete makita esalemaka na ndako na ye. Ezali libaku malamu kondima ete likita mpo na mosala ya kosakola esalema na ndako na biso.​—Lom. 16:5; Kols. 4:15.

4-7. Tosengeli kobosanaka te kopesa longonya na bandeko na biso oyo bazali ndakisa malamu na kondima mpe bolingo.

15, 16. Mikakatano ya bomoi esengeli te kotinda biso tómitungisaka koleka ndelo. Makambo ekoki kobongwana, ndenge esalemaki mpo na Onezime.

21. Paulo azalaki na elikya ete Filemona akolimbisa Onezime. Biso mpe tosengeli kolimbisaka ntango ndeko moko asali biso mabe.​—Mat. 6:14.

“TÓKENDE NOKINOKI TII NA KOKƆMELA”

(Ebe. 1:1–13:25)

Mpo na komonisa ete kozala na kondima na mbeka ya Yesu eleki kotosa Mibeko, Paulo alobelaki bonene, bonganga-nzambe, mpe mbeka ya Mobandisi ya Lingomba ya boklisto, mpe kondimana ya sika oyo asalaki. (Ebe. 3:1-3; 7:1-3, 22; 8:6; 9:11-14, 25, 26) Na ntembe te, koyeba makambo yango esalisaki Baebele oyo bakómaki baklisto báyika mpiko na minyoko oyo ezalaki kouta na Bayuda. Paulo alendisaki baninga na ye bandimi oyo bazalaki Baebele ete ‘bákende nokinoki liboso tii na kokɔmela.’​—Ebe. 6:1.

Kondima ezali na ntina nini mpo na baklisto? Paulo akomaki boye: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa [Nzambe] mpenza ezali ata moke te.” Alendisaki Baebele na maloba oyo: “Tiká tópota na koyika mpiko mpenza momekano ya mbangu oyo etyami liboso na biso,” mpe tósala yango na kondima.​—Ebe. 11:6; 12:1.

Biyano na mituna ya Biblia:

2:14, 15​—Lokola Satana “azali na likoki ya kopesa liwa,” yango elingi nde koloba ete akoki koboma moto nyonso oyo ye alingi? Te. Nzokande, banda botomboki ya Satana na Edene, makambo ya lokuta oyo alobaki ememaki liwa mpamba te Adama asalaki lisumu mpe na nsima, lisumu mpe liwa epalanganaki epai ya bato nyonso. (Lom. 5:12) Longola yango, bato ya Satana awa na mabelé bazali konyokola basaleli ya Nzambe ata mpe koboma bango, ndenge basalaki Yesu. Kasi, yango elingi koloba te ete Satana azali na nguya ya koboma moto nyonso oyo ye alingi. Soki ezalaki bongo, na ntembe te mbɛlɛ asilisá basaleli nyonso ya Yehova banda kala. Yehova abatelaka lisangá ya basaleli na ye mpe akotika te ete Satana asilisa bango nyɛɛ. Ata soki Nzambe atiki nzela ete Satana aboma basusu kati na biso, tosengeli kozala na elikya ete Nzambe akobongisa mabe nyonso oyo Satana asali biso.

4:9-11​—Ndenge nini ‘tokɔtaka na kati ya kopema [ya Nzambe]’? Na nsuka ya mikolo motoba ya bozalisi, Nzambe apemaki na oyo etali misala na ye ya bozalisi; ayebaki ete mokano na ye mpo na mabelé mpe bato ekokokisama. (Gen. 1:28; 2:2, 3) ‘Tokɔtaka na kati ya kopema wana’ na ndenge toboyaka komikómisa sembo mpe na ndenge tondimaka ebongiseli oyo Nzambe azwi mpo na lobiko na biso. Ntango tozali komonisa kondima epai ya Yehova mpe tozali kolanda Mwana na ye, na esika ya koluka kaka matomba na biso moko, tozwaka kopema mpe mapamboli mokolo na mokolo.​—Mat. 11:28-30.

9:16​—“Moto oyo asali kondimana” ya sika ezali nani? Yehova azali Mobandisi ya kondimana ya sika; nzokande, Yesu azali “moto oyo asali kondimana” yango. Yesu azali Moyokanisi ya kondimana yango, mpe na nzela ya liwa na ye, apesaki mbeka oyo esengelaki mpo na kondimana yango.​—Luka 22:20; Ebe. 9:15.

11:10, 13-16​—“Engumba” nini Abalayama azalaki kozela? Ezalaki engumba moko ya elilingi. Abalayama azalaki kozela “Yelusaleme ya likoló,” oyo esangisi Klisto Yesu mpe bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye. Na nkembo na bango ya likoló, bato yango babengami “engumba mosantu, Yelusaleme ya Sika.” (Ebe. 12:22; Emon. 14:1; 21:2) Abalayama azalaki kozela boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe.

12:2​—“Esengo oyo etyamaki liboso [ya Yesu],” oyo mpo na yango “ayikelaki nzete moko ya mpasi mpiko” ezalaki nini? Ezalaki esengo ya komona mbuma ya mosala na ye​—na ndakisa, kosantisama ya nkombo ya Yehova, kolongisama ya bokonzi ya Nzambe, mpe kosikolama ya bato na liwa. Yesu azalaki mpe kozela mbano ya kozala Mokonzi mpe Nganga-nzambe monene mpo na bolamu ya bato.

13:20​—Mpo na nini kondimana ya sika ebengami kondimana “ya seko”? Mpo na bantina misato: (1) Kondimana mosusu ekozwa esika na yango te, (2) matomba na yango ekoumela libela na libela, mpe (3) “bampate mosusu” bakokoba kozwa matomba na ebongiseli ya kondimana ya sika ata nsima ya Armagedona.​—Yoa. 10:16.

Mateya mpo na biso:

5:14. Tosengeli komipesa na koyekola Biblia Liloba ya Nzambe, mpe kosalela makambo oyo toyekoli. Ezali kaka na ndenge yango nde ‘makoki na biso ya kososola, lokola tozali kosalela yango, ekoteyama mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.’​—1 Kol. 2:10.

6:17-19. Kozala na elikya makasi na elaka ya Nzambe mpe ndai na ye ekosalisa biso tólongwa te na nzela ya solo.

12:3, 4. Na esika ‘tósila makasi mpe tólɛmba na milimo na biso’ mpo na botɛmɛli to mikakatano mikemike oyo tokoki kokutana na yango, tosengeli nde kokende nokinoki tii na kokɔmela mpe kobakisa makoki na biso ya koyika mpiko na minyoko. Tosengeli kozala na ekateli ya kobunda “tii na makila,” elingi koloba tii na liwa.​—Ebe. 10:36-39.

12:13-15. Tosengeli kotika te ete ‘mosisa moko ya ngɛngɛ mabe,’ to moto mosusu nyonso oyo alobaka mabe na ndenge makambo ezali kosalema na lisangá, apekisa biso ‘tósala banzela ya semba mpo na makolo na biso.’

12:26-28. “Biloko oyo esalemá” na mabɔkɔ ya Nzambe te, elingi koloba ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, ata mpe “likoló” na yango oyo ezali mabe, ekoningisama makasi to ekobomama. Ntango likambo yango ekosalema, kaka “biloko oyo ezali koningana te,” elingi koloba Bokonzi mpe bato na yango, nde bakotikala. Ezali mpenza na ntina ete tósakolaka Bokonzi na molende mpe tótosaka mitinda na yango!

13:7, 17. Kolanda toli ya kotosa bakɛngɛli na kati ya lisangá mpe koyokela bango ekosalisa biso tózala na elimo ya kosala na bomoko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2007, nkasa 26-27.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto