Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 92 lok. 216-lok. 217 par. 7
  • Bato zomi ya maba babikisami—Moko amonisi botɔndi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato zomi ya maba babikisami—Moko amonisi botɔndi
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Yesu asali mobembo ya nsuka na Yelusaleme mpe abikisi bato zomi na maba
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Obosanaka koloba mɛrsi?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu asali makamwisi ebele
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Kebá na makambo oyo ekoki kolya ntango na ‘mokolo oyo ya nsango malamu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 92 lok. 216-lok. 217 par. 7
Moko ya bato ya maba zomi oyo Yesu abikisi, azongi kopesa ye matɔndi

MOKAPO 92

Bato zomi ya maba babikisami​—Moko amonisi botɔndi

LUKA 17:11-19

  • YESU ABIKISI BATO ZOMI YA MABA

Mpo na kokima mwango mabe ya Sanedrina mpo na koboma ye, Yesu akei na engumba Efraime, mwa moke na nɔrdi-ɛsti ya Yerusaleme. Atikali kuna ná bayekoli na ye, mosika ya banguna na ye. (Yoane 11:54) Kasi, ntango ya Elekeli ya mobu 33 T.B. ezali kobɛlɛma, na yango, eumelaki te, Yesu asali mobembo lisusu. Akei na nɔrdi ya Samaria mpe na Galile, mobembo na ye ya nsuka na engumba wana liboso akufa.

Na ebandeli ya mobembo, ntango Yesu azali kokende mboka na mboka, akutani na bato zomi oyo bazali na maba. Maladi wana mabe ebebisaka biteni mosusu ya nzoto, na ndakisa misapi ya mabɔkɔ, ya makolo to matoi. (Mitángo 12:10-12) Mibeko ya Nzambe esɛngi ete moto ya maba abelela ete: “Mbindo, mbindo!” mpe asengeli te kofanda esika moko na bato.​—Balevi 13:45, 46.

Yango wana, bato wana zomi ya maba bazali mosika na Yesu. Atako bongo, bagangi makasi mpenza ete: “Yesu, Molakisi, yokelá biso mawa!” Ntango amoni bato yango ya maba, Yesu alobi na bango ete: “Bókende mpe bómilakisa epai ya banganga-nzambe.” (Luka 17:13, 14) Na ndenge yango, Yesu atosi mobeko ya Nzambe oyo epesi banganga-nzambe lotomo ya koloba ete bato oyo babɛlaki maladi ya maba babiki to bakómi pɛto. Na nsima, bakoki sikoyo kozala na libaku ya kofanda na bato oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ.​—Balevi 13:9-17.

Yesu akutani na bato zomi ya maba

Bato wana zomi ya maba bazali na elikya na nguya ya kosala makamwisi oyo Yesu azali na yango. Bakei komona banganga-nzambe, ata liboso ya kobikisama. Ntango bazali na nzela, kondima na bango epai ya Yesu ezwi mbano. Babandi komona mpe komiyoka mpenza ete bakómi na nzoto kolɔngɔnɔ!

Bato libwa ya maba bakobi mobembo na bango. Kasi moko na bango asali bongo te. Mobali yango, Mosamaria, azongi koluka Yesu. Mpo na nini? Mobali yango azali na botɔndi epai ya Yesu mpo na likambo oyo esalemi. Moto yango oyo abikisami azali kokumisa “Nzambe na mongongo makasi,” mpo ayebi ete Nzambe nde abikisi ye. (Luka 17:15) Ntango amoni Yesu, afukami liboso na ye, mpe apesi matɔndi.

Yesu ayebisi bato oyo bazali wana ete: “Bato zomi bakómaki pɛto, boye te? Bongo bamosusu libwa bazali wapi? Moto ata moko te azongaki kokumisa Nzambe longola moto oyo ya ekólo mosusu?” Na nsima Yesu ayebisi Mosamaria ete: “Tɛlɛmá, kende; kondima na yo ebikisi yo.”​—Luka 17:17-19.

Ntango abikisi bato wana zomi ya maba, Yesu amonisi ete Yehova Nzambe azali kosunga ye. Sikoyo, moko ya bato zomi yango abikisami, kasi abikisami kaka te, ekoki kozala ete abandi mpe kolanda nzela ya bomoi. Tozali te na ntango oyo Nzambe asalelaki Yesu mpo na kosala makamwisi ya ndenge wana. Nzokande, soki tozali na kondima epai ya Yesu, yango ekoki komonisa ete tozali na nzela ya bomoi: bomoi ya seko. Topesaka motɔndi ndenge Mosamaria wana asalaki?

  • Nsima ya kokweisa mwango mabe ya koboma ye, Yesu akei wapi?

  • Mpo na nini bato zomi ya maba bazali mosika, mpe mpo na nini Yesu alobi na bango bákende epai ya banganga-nzambe?

  • Na kotalela likambo oyo ekómeli Mosamaria, liteya nini tosengeli kokanisa na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto