Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 11 lok. 14
  • Koloba na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koloba na esengo
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Teyáká na esengo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Koloba na mɔtɔ mpe komitya na esika ya basusu
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 11 lok. 14

LITEYA 11

Koloba na esengo

Vɛrsɛ

Baroma 12:11

NA MOKUSE: Lobá na esengo mpo na kopesa bato mposa ya koyoka yo mpe ya kosalela makambo oyo bakoyoka.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Tyá makanisi nyonso na lisolo na yo. Ntango ozali kobongisa lisolo na yo, zwá mpenza ntango ya kokanisa ntina ya makambo oyo okoteya. Yekolá makambo yango malamu mpo oloba yango na maloba oyo ekouta mpenza na motema.

  • Kanisá bato oyo bakoyoka yo. Kanisá ndenge makambo oyo okotánga to okoteya ekosalisa bato. Luká ndenge oyo okoki koloba makambo yango mpo bato básepela na yango mpenza.

  • Kozala malilimalili te. Lobá na mpiko. Saláká bajɛstɛ oyo ebongi mpe elongi na yo elakisaka ndenge oyo ozali koyoka.

    Toli

    Kozongelaka kaka jɛstɛ moko wana te, noki te makanisi ya bato ekokende mingi nde na jɛstɛ wana. Salá bajɛstɛ oyo eyokani na makambo ozali koloba. Lobá na esengo, mingimingi ntango ozali kolobela makanisi ya ntina mpe ozali kopesa bato mposa ya kosalela makambo oyo bazali koyoka. Esengo na yo eleka ndelo te mpe ezala te banda ebandeli tii nsuka, noki te bato bakolɛmba yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto