LOYEMBO 73
Pesá biso mpiko
Ya Papye
1. Na mosal’a kosakola
Bokonzi mpe nkombo n’o,
Batɛmɛli baza’ mingi,
Baz’okitisa biso.
Tokobanga bango te,
Tokotosa kaka yo nde.
Pesá biso elimo na yo;
Ee Yehova, yoká biso.
(MONDIMO)
Pesá mpiko tósakola;
Salisá tóbanga te.
Mpo nsang’oy’epalangana,
Pesá biso molende.
Armagedon’ebɛlɛmi,
Awa toz’ozela yango,
Pesá mpiko tósakola.
Tosɛngi yo.
2. Oyebi toza’ putulu,
Tokoki kobanga mpe.
Kasi ndenge olakaki,
Okobatela biso.
Baz’okanela biso,
Yah, landelá makamb’oyo.
Sungá biso nyonso tókoba
Kosakola nkombo na yo.
(MONDIMO)
Pesá mpiko tósakola;
Salisá tóbanga te.
Mpo nsang’oy’epalangana,
Pesá biso molende.
Armagedon’ebɛlɛmi,
Awa toz’ozela yango,
Pesá mpiko tósakola.
Tosɛngi yo.
(Talá mpe 1 Tes. 2:2; Ebr. 10:35.)