Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 1 lok. 4
  • Ndenge malamu ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge malamu ya kobanda lisolo
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kobanda diskur na lolenge malamu
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Maloba ya ebandeli oyo ekolamusa mposa ya bato
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 1 lok. 4

LITEYA 1

Ndenge malamu ya kobanda lisolo

Vɛrsɛ

Misala 17:22

NA MOKUSE: Ndenge oyo okobanda lisolo na yo esengeli kopesa bato mposa ya koyoka, kosalisa bango bámona polele likambo oyo okolobela, mpe mpo na nini ezali na ntina mpo na bango.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Pesá bato mposa. Poná motuna moko, to maloba ya moto moko, to likambo moko oyo esalemá, to mpe nsango moko oyo ekosepelisa bato.

    Toli

    Liboso, kanisá malamumalamu makambo oyo esepelisaka bato oyo bakoyoka yo to oyo etungisaka bango mpe talelá yango mpo na kobongisa maloba ya ebandeli ya lisolo na yo.

  • Bimisá polele likambo oyo okolobela. Na maloba na yo ya ebandeli, bato bámona polele likambo oyo olingi kolobela mpe mokano oyo olingi kokokisa.

  • Monisá ntina ya likambo oyo okolobela. Yokanisá makambo oyo okolobela na bamposa ya solosolo ya bato oyo bakoyoka yo. Basengeli komona polele ndenge oyo likambo yango ekoki kosalisa bango.

    Toli

    Ntango ozali kobongisa diskur na yo, osengeli komituna boye: ‘Makambo nini bandeko ya lisangá na biso bazali kokutana na yango?’ Na nsima, yokanisá ebandeli ya diskur na yo na makambo yango.

NA MOSALA YA KOSAKOLA

Mpo na koyeba lisolo nini ekoki kosepelisa moto, talá malamu makambo oyo azali kosala to makambo oyo ezali na esika oyo afandi. Bandá lisolo na motuna to na mwa maloba oyo eyokani na makambo yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto