Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr20 Juin nk. 1-8
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • 01-07/06
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2020
mwbr20 Juin nk. 1-8

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

01-07/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 44-45

“Yozefe alimbisi bandeko na ye”

w15 1/5 nk. 14-15

“Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”

Na nsima Yozefe amonisaki polele motambo oyo atyelaki bango. Atindaki bálanda bandeko na ye, bákanga bango mpe báloba na bango ete bayibi kɔpɔ na ye. Ntango bamonaki kɔpɔ yango na saki ya Benyamina, bamemaki bango nyonso epai ya Yozefe. Sikoyo Yozefe azalaki na libaku ya koyeba soki bandeko na ye babongwanaki. Yuda nde azalaki koloba na esika na bango nyonso. Asɛngaki ayokela bango mawa, asɛngaki kutu ete bango nyonso 11 bákóma baombo na Ezipito. Yozefe alobaki ete kaka Benyamina nde asengeli kotikala moombo na Ezipito kasi bango nyonso bázonga epai na bango.​—Ebandeli 44:2-17.

Yuda alobaki maloba oyo ya kokamwa: “Atikalá kaka ye moko mwana ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mpenza.” Na ntembe te, maloba yango esimbaki mpenza motema ya Yozefe mpo azalaki mwana ya liboso ya Rashele, mwasi oyo Yakobo azalaki kolinga mingi, oyo akufaki ntango azalaki kobota Benyamina. Ndenge moko na tata na ye, Yozefe azalaki kokanisa Rashele mingi. Mbala mosusu yango nde esalaki ete alinga Benyamina mingi.​—Ebandeli 35:18-20; 44:20.

Yuda abondelaki Yozefe akómisa Benyamina moombo te. Asɛngaki kutu akóma moombo na esika ya Benyamina. Na nsima, asukisaki na maloba oyo ya kosimba motema: “Ndenge nini nakoki komata epai ya tata na ngai mpe mwana mobali yango azala elongo na ngai te, kozanga ete namona mpasi oyo ekozwa tata na ngai?” (Ebandeli 44:18-34) Yango emonisaki ete abongwanaki mpenza. Amonisaki kaka te ete abongolaki motema kasi amonisaki mpe ezaleli ya komitya na esika ya basusu, kozanga moimi mpe motema mawa.

Yozefe akokaki lisusu kokanga motema te. Asengelaki kobimisa polele ndenge oyo azalaki komiyoka na motema. Abimisaki basaleli na ye nyonso, alelaki na mongongo makasi na boye ete makelele yango eyokanaki tii na ndako ya Farao. Na nsima, ayebisaki bango polele boye: “Ngai nazali Yozefe ndeko na bino.” Ayambaki bandeko na ye wana oyo babulunganaki mpe na boboto nyonso alimbisaki mabe nyonso oyo basalaki ye. (Ebandeli 45:1-15) Na ndenge yango, amonisaki ezaleli ya Yehova ya kolimbisa na motema mobimba. (Nzembo 86:5) Biso mpe tosalaka bongo?

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 606

Kopasola bilamba

Mpo na komonisa ete bazali na mawa, Bayuda mingi ná bato mosusu ya mokili ya Ɛsti bazalaki na momeseno ya kopasola bilamba na bango, mingimingi soki bayoki nsango ya liwa ya moto oyo bazalaki kolinga mingi. Mbala mingi bazalaki kopasola bilamba na liboso tii ntolo ekotikala polele, kasi bazalaki kopasola elamba mobimba te, na ndenge ete elatama lisusu te.

Moto ya liboso oyo Biblia elobeli oyo apasolaki bilamba na ye ezali Rubene, mwana ya liboso ya Yakobo, apasolaki yango ntango azongaki na libulu ya mai esika babwakaki Yozefe mpe Yozefe azalaki na kati ya libulu yango te. Alobaki boye: “Mwana alimwe! Mpe ngai​—ngai nakosuka wapi?” Lokola azalaki mwana ya liboso, Rubene azalaki na mokumba ya kobatela leki na ye ya mobali. Ntango bayebisaki Yakobo ete mwana na ye akufaki, apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ na loketo mpo na komonisa ete azalaki na mawa. (Eb 37:29, 30, 34) Ntango balobaki ete Benyamina ayibaki kɔpɔ na Ezipito, bandeko ya Yozefe bapasolaki bilamba na bango mpo na komonisa ete bazalaki na mawa.​—Eb 44:13.

w04 15/8 lok. 15 par. 15

Bayinami kaka mpamba

15 Nini ekosalisa biso tókangela bato oyo bazali konyokola biso nkanda te? Tóbosana te ete banguna na biso ya liboso ezali Satana ná bademo na ye. (Baefese 6:12) Atako bato mosusu bazali konyokola biso na nko, mingi oyo batɛmɛlaka basaleli ya Nzambe basalaka yango kozanga koyeba ntina to mpe mpo bakosaka bango. (Danyele 6:4-16; 1 Timote 1:12, 13) Mposa ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Kutu, bato mosusu oyo bazalaki kotɛmɛla biso bazali lelo oyo bandeko na biso bakristo mpo bamonaki etamboli malamu na biso. (1 Petro 2:12) Longola yango, tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Yozefe, mwana ya Yakobo. Atako Yozefe anyokwamaki mingi mpo na mabe oyo bandeko na ye basalaki ye, akangelaki bango nkanda te. Mpo na nini? Mpo asosolaki ete Yehova nde alingaki ete makambo esalema ndenge wana mpo na kokokisa mokano na Ye. (Ebandeli 45:4-8) Yehova akoki mpe kotika bányokola biso kaka mpamba mpo na lokumu ya nkombo na ye.​—1 Petro 4:16.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Yozefe asalelaki nde kɔpɔ ya palata mpo na koyeba makambo oyo ekoya ndenge Ebandeli 44:5, 15 ezali komonisa?

w06 1/2 lok. 31

Mituna ya batángi

Yozefe, mosaleli ya sembo ya Yehova, asalelaki nde kɔpɔ ya palata mpo na koyeba makambo oyo ekoya ndenge Ebandeli 44:5 ezali komonisa?

Likambo ata moko te ezali komonisa ete Yozefe azalaki kosalela nguya ya bilimo mabe mpo na koyebisa makambo oyo ekoya.

Biblia ezali komonisa oyo Yozefe ayebaki mpo na oyo etali kosalela maji mpo na koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Bambula liboso, ntango Farao asɛngaki ye alimbola bandɔtɔ oyo alɔtaki, Yozefe alobaki ete kaka Nzambe nde akoki “kosakola” makambo oyo ekoya. Nsukansuka, Farao ye moko andimaki ete Nzambe ya solo oyo Yozefe azalaki kosambela nde asalisaki ye ayeba makambo ezali koya, kasi nguya ya bilimo mabe te. (Ebandeli 41:16, 25, 28, 32, 39) Na kati ya mibeko oyo Yehova apesaki Moize na nsima, apekisaki kosalela maji to kosalela nguya ya bilimo mabe mpo na koyebisa makambo oyo ekoya, yango emonisaki ete kaka Ye nde ayebisaka makambo oyo ekoya.​—Kolimbola Mibeko 18:10-12.

Kasi, mpo na nini Yozefe ayebisaki na nzela ya mosaleli na ye ete asalelaka kɔpɔ ya palata mpo na ‘koyeba makambo makoya’?a (Ebandeli 44:5) Tosengeli kotalela makambo oyo etindaki Yozefe aloba maloba wana.

Lokola nzala ezalaki makasi, bandeko ya Yozefe bakendeki na Ezipito mpo na koluka bilei. Bambula liboso, kaka bandeko na ye wana nde batɛkaki ye na boombo. Kozanga koyeba, bakendeki kosɛnga lisalisi epai ya ndeko na bango moko, oyo akómaki mokɛngɛli ya biloko ya kolya na Ezipito. Yozefe amiyebisaki epai na bango te. Kasi, amekaki nde bango. Yozefe alingaki koyeba soki babongolaki mpenza motema. Alingaki koyeba soki bazalaki mpenza kolinga ndeko na bango Benyamina mpe tata na bango Yakobo, oyo azalaki kolinga Benyamina mingi. Yango wana Yozefe asalelaki mayele wana.​—Ebandeli 41:55–44:3.

Yozefe ayebisaki moko ya basaleli na ye atondisa basaki ya bandeko na ye na biloko ya kolya, azongisa mbongo ya mokomoko na kati ya saki na ye mpe atya kɔpɔ ya Yozefe ya palata na kati ya saki ya Benyamina. Na ntango nyonso wana, Yozefe azalaki komimonisa epai ya bandeko na ye lokola mokonzi ya mokili ya bapakano, ezala na bomoto na ye, na makambo oyo azalaki kosala mpe na elobeli na ye.

Ntango Yozefe akutanaki na bandeko na ye, akobaki na mayele na ye wana. Atunaki bango boye: “Boyebaki te ete moto lokola ngai akoyeba makambo mabombami?” (Ebandeli 44:15) Na yango, kɔpɔ wana ezalaki kaka mayele oyo asalelaki. Yozefe asalelaki kɔpɔ wana te mpo na koyeba makambo oyo ekoya, Benyamina mpe ayibaki kɔpɔ yango te.

08-14/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 46-47

“Babikisami na nzala moko makasi”

w87-F 1/5 lok. 15 par. 2

Bomoi ebatelami na ntango ya nzala

2 Ndenge Yehova asakolaki yango, mbula nsambo ya ebele ya bilei esukaki mpe nzala moko makasi ekɔtaki kaka na Ezipito te, kasi na “mabele mobimba.” Ntango Baezipito bakómaki na nzala mpe bato bakómaki kolelela Farao apesa bango bilei, Farao alobaki na bango boye: “Bókende epai ya Yozefe. Nyonso oyo akoloba na bino, bósala yango.” Yozefe atɛkelaki Baezipito bilei tii mbongo na bango nyonso esilaki mpe na nsima Yozefe andimaki bápesa ye bibwɛlɛ na bango mpo ye apesa bango bilei. Nsukansuka, Baezipito bayaki epai ya Yozefe mpe balobaki na ye boye: “Sombá biso ná mabele na biso mpo na mampa, mpe biso ná mabele na biso tokokóma baombo ya Farao.” Bongo Yozefe asombelaki Farao mokili mobimba ya Ezipito.​—Ebandeli 41:53-57; 47:13-20.

kr mok. 22 par. 11-12

Bokonzi ekokisi mokano ya Nzambe na mabele

11 Biloko beboo. Mokili oyo ezali na nzala ya elimo. Biblia elobaki boye: “‘Talá! Mikolo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘mpe nakotinda nzala kati na mokili, nzala ya mampa te, mpe nakotinda mposa, mposa ya mai te, kasi nde ya koyoka maloba ya Yehova.’” (Amo. 8:11) Bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe mpe bazali na nzala ya elimo? Ata moke te; Yehova amonisaki bokeseni kati na basaleli na ye mpe banguna na ye na maloba oyo: “Basaleli na ngai bakolya, kasi bino bokozala na nzala. Talá! Basaleli na ngai bakomɛla, kasi bino bokozala na mposa ya mai. Talá! Basaleli na ngai bakosepela, kasi bino bokozala na nsɔni.” (Yis. 65:13) Ndenge nini maloba yango ezali kokokisama?

12 Tozali na bilei ya elimo ebele mpenza. Mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia, bakasɛti, ba-CD, bavideo, ata mpe makita, mayangani na biso mpe makambo oyo tobimisaka na site Internet na biso, nyonso wana ezali ebele ya bilei ya elimo oyo tozali kozwa na kati ya mokili oyo bato bazali kokufa nzala ya elimo. (Ezk. 47:1-12; Yoe. 3:18) Osepelaka te komona ndenge bilaka wana ya Yehova ezali kokokisama na miso na yo? Olyaka mokolo na mokolo na mesa ya Yehova?

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 227 par. 16

Mayoki mpe bajɛstɛ

Kotya lobɔkɔ na miso ya mowei. Ntango Yehova alobaki na Yakobo ete: ‘Yozefe akotya lobɔkɔ na ye na miso ya Yakobo.’ (Eb 46:4), yango elingaki koloba ete Yozefe akokanga miso ya Yakobo ntango akokufa, oyo ezalaki mokumba ya mwana ya liboso. Yehova alingaki komonisa Yakobo ete Yozefe nde akozwa lotomo ya mwana ya liboso.​—1Nt 5:2.

nwtsty-E nɔti mpo na koyekola na Mis 7:14

Milimo ntuku nsambo na mitano (75): Ekoki kozala ete Stefano azongelaki te maloba ya vɛrsɛ moko ya Makomami ya Ebre, ntango apesaki motángo mobimba ya libota ya Yakobo oyo ekɔtaki na Ezipito, elingi koloba bato 75. Motángo yango ezwami te na makomi ya Bamasorete na Makomami ya Ebre. Eb 46:26 elobi: “Milimo nyonso ya Yakobo oyo ekɔtaki na Ezipito ezalaki baoyo babimaki na mokɔngɔ na ye, longola basi ya bana ya Yakobo. Milimo nyonso ezalaki ntuku motoba na motoba (66).” Vɛrsɛ 27 ebakisi boye: “Milimo nyonso ya ndako ya Yakobo oyo ekɔtaki na Ezipito ezalaki ntuku nsambo (70).” Awa batángi bato na lolenge mibale ekeseni, na motángo ya liboso emonani lokola batángi kaka bakitani na ye mpenza mpe na oyo ya mibale bapesi motángo ya baoyo bayaki kofanda na Ezipito. Motángo ya bakitani ya Yakobo elobelami lisusu na mokanda ya Kob 1:5 mpe Mib 10:22, kuna mpe lisusu bapesi kaka motángo “70.” Mbala mosusu Stefano apesaki motángo “75” oyo ebakisaki bato mosusu ya libota ya Yakobo. Bato mosusu bakanisaka ete motángo yango esangisaki mpe bana ya Yozefe, Manase mpe Efraime mpe bankɔkɔ na ye oyo balobeli na Libongoli ya Septante na mokanda ya Eb 46:20. Basusu kutu balobi ete basi ya bana ya Yakobo bazali mpe na kati ya motángo yango oyo mingimingi balongolaki na Eb 46:26. Na yango, motángo “75” ekoki kozala motángo ya bato nyonso ya libota na ye. Emonani lokola motángo yango nde ezalaki na Makomami ya Ebre oyo bato bazalaki kosalela mingi na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Na boumeli ya bambula bato oyo balimbolaka makambo ya Biblia bayebaki ete motángo “75” nde ezalaki na Eb 46:27 mpe Kob 1:5 oyo ezali na libongoli ya Grɛki ya Septante. Longola yango, na siɛklɛ ya 20 ntango bamonaki biteni mibale ya barulo ya Kob 1:5 na monɔkɔ ya Ebre na Mbu Ekufá, bamonaki mpe motángo “75.” Yango wana, tokoki koloba ete motángo oyo Stefano alobeli ntango mosusu eutaki na makomi wana ya kala. Ezala likanisi nini ebongi to te, motángo oyo Stefano apesi ezali kaka lolenge mosusu ya kopesa motángo ya bakitani ya Yakobo.

15-21/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 48-50

“Mibange bakoki koteya biso makambo mingi”

it-1-F lok. 1228 par. 8

Yakobo

Mwa moke liboso akufa, Yakobo apambolaki bankɔkɔ na ye, bana ya Yozefe. Mpe na lisalisi ya Nzambe, Yakobo atyaki Efraime na esika ya liboso ya yaya na ye Manase. Yakobo ayebisaki mwana na ye Yozefe ete akozwa biteni mibale ya libula ya mwana liboso, Yakobo alobaki: “Napesi yo mpenza eteni moko ya mabele koleka bandeko na yo, mabele oyo nazwaki na lobɔkɔ ya Baamore na mopanga na ngai mpe na litimbo na ngai.” (Eb 48:1-22; 1Nt 5:1) Lokola Yakobo asombaki na kimya nyonso eteni ya mabele epai ya bana ya Hamore pene na Shekeme (Eb 33:19, 20), emonani ete elaka oyo Yakobo asalaki mpo na Yozefe emonisaki mpenza ete azalaki na kondima, yango wana asakolaki ete bakitani na ye bakozwa Kanana mpe alobaki yango lokola nde basilaki kozwa yango na nzela ya mompanga na ye mpe litimbo na ye. (Talá MOAMORE) Yozefe azwaki biteni mibale yango ya mabele na nzela ya bana na ye, elingi koloba libota ya Efraime mpe ya Manase.

it-1-F lok. 623 par. 1

Mikolo ya nsuka

Makambo oyo Yakobo asakolaki liboso akufa. Ntango Yakobo alobaki na bana na ye boye: “Bósangana esika moko mpo ete nayebisa bino makambo oyo ekokómela bino na eleko ya nsuka ya mikolo” to na “na mikɔlɔ mikoya” (HF), na maloba mosusu, alingaki koloba na mikolo ezali koya na ntango oyo maloba na ye ekobanda kokokisama. (Eb 49:1) Mbula koleka 200 liboso, Yehova ayebisaki Abrama (Abrahama) nkɔkɔ ya Yakobo ete bakitani na ye bakonyokwama na boumeli ya bambula 400. (Eb 15:13) Na yango, maloba ya Yakobo “eleko ya nsuka ya mikolo” esengelaki kokokisama kaka nsima ya bambula 400 ya minyoko. (Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali Ebandeli 49, talá masolo oyo elobeli bana ya Yakobo na ndenge bankombo na bango elandani.) Esakweli yango esukaki kaka te epai ya bana ya Yakobo, ekoki mpe kosalelama mpo na “Yisraele ya Nzambe.”​—Ga 6:16; Ro 9:6.

w07 1/6 lok. 28 par. 10

Mibange bazali lipamboli mpo na bilenge

10 Mibange bakoki mpe kozala ndakisa mpo na bandeko na lisangá. Yozefe, mwana ya Yakobo, amonisaki kondima na likambo moko ntango akómaki mobange; likambo yango esalisaki mpenza bamilio ya basambeli ya solo nsima na ye. Azalaki na mbula 110 ntango “apesaki etinda moko na oyo etali mikuwa na ye,” ete ntango bana ya Yisalaele bakolongwa na Ezipito, bámema yango. (Baebre 11:22; Ebandeli 50:25) Etinda wana esalisaki Bayisraele bázala mpenza na elikya, na boumeli ya ebele ya bambula oyo banyokwamaki na boombo nsima ya liwa ya Yozefe, ete bakosikolama.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w04 1/6 lok. 15 par. 4-5

Mapamboli na baoyo bapesaka Nzambe nkembo

4 Liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, bato ya libota ya Gade basɛngaki ete bápesa bango nzela ya kofanda na ɛsti ya Ebale Yordani, oyo ezalaki mokili malamu mpo na kobɔkɔla bibwele. (Mitángo 32:1-5) Kofanda na mokili wana esengelaki komemela bango mikakatano minene. Mabota oyo ekatisaki na wɛsti ya ebale elingaki kobatelama mpamba te, Lobwaku ya Yordani ezalaki kokangela basoda ya bikólo mosusu nzela soki balingi kokɔtela bango. (Yosua 3:13-17) Nzokande, mpo na mokili oyo ezali na ɛsti ya Ebale Yordani, buku The Historical Geography of the Holy Land, ya George Adam Smith, elobi boye: “[Mokili yango] mobimba ezali patatalu, ezali ata na ngomba to mai monene te oyo ekoki kokanga banguna nzela, tii mwa bangomba ya Arabia. Yango wana, bato ya bikólo oyo ezalaki koyengayenga mpe bazangaki biloko ya kolya bazalaki ntango nyonso kokɔtela bango, mosusu bazalaki koyela bango ebele mbula na mbula mpo na koleisa bibwɛlɛ.”

5 Libota ya Gade ekokaki kosala nini liboso ya mokakatano monene wana? Bankama ya bambula liboso, na mbeto na ye liboso akufa, nkɔkɔ na bango Yakobo asakolaki boye: “Mpo na Gade, etuluku ya miyibi bakobundisa ye, kasi ye, akobundisa molɔngɔ oyo ekangi mokila.” (Ebandeli 49:19, NW) Soki totángi kaka, maloba yango ekoki komonana lokola nde ezali kolɛmbisa nzoto. Nzokande, soki tolandeli yango malamu, tokomona ete ezali nde kotinda libota ya Gade bázongisaka ntango babundisi bango. Yakobo alobaki ete soki basali bongo, banguna na bango bakokima, mpe bato ya libota ya Gade bakolanda molɔngɔ na bango oyo ekangi mokila.

it-1-F lok. 299 par. 7

Benyamina

Liboso akufa, Yakobo alobelaki mayele ya bitumba oyo bakitani ya Benyamina bakozala na yango. Alobaki boye mpo na mwana na ye oyo azalaki kolinga mingi: “Benyamina akokoba kopasola lokola mbwa ya zamba. Na ntɔngɔ akolya nyama oyo ekangami mpe na mpokwa akokabola biloko oyo epunzami.” (Eb 49:27) Babundi ya libota ya Benyamina bayebanaki mingi lokola bato oyo bayebi malamu kosalela bilingongo (lance) mpe bayebaki malamu kobwaka mabanga na bilingongo, ezala na lobɔkɔ ya mwasi to na lobɔkɔ ya mobali. Ata soki babwakeli eloko ya moke lokola “nsuki libanga, ezalaki kozanga yango te.” (Bas 20:16; 1Nt 12:2) Mosambisi Ehude oyo azalaki kosalela lobɔkɔ ya mwasi mpe oyo abomaki mokonzi mabe Eglone, azalaki moto ya libota ya Benyamina. (Bas 3:15-21) Tóbosana te ete ezalaki “na ntɔngɔ”; elingi koloba na ebandeli ya bokonzi ya Yisraele, libota ya Benyamina “oyo eleki moke” nde ebimisaki mokonzi ya liboso, Saulo mwana ya Kishe, oyo azalaki mobundi makasi mpe azalaki kobundisa Bafilistia. (1Sa 9:15-17, 21) Lisusu, “na mpokwa”; elingi koloba na nsuka ya bokonzi na ekólo Yisraele, kaka libota ya Benyamina nde ebimisaki Estere, mama-mokonzi mpe Mordekai, oyo akómaki mokonzi ya mibale na ampire ya Perse. Bango nde Yehova asalelaki mpo na kobikisa Bayisraele na mwango mabe oyo basalaki mpo na kosilisa bango.​—Est 2:5-7.

22-28/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | KOBIMA 1-3

“Nakozala oyo nakozala”

w13 15/3 lok. 25 par. 4

Kumisá nkombo monene ya Yehova

4 Tángá Kobima 3:10-15. Ntango Moize azalaki na mbula 80, Nzambe apesaki ye mokumba moko monene; ayebisaki ye ete: ‘Bimisá bato na ngai bana ya Yisraele na Ezipito.’ Kasi na limemya nyonso, Moize atunaki Nzambe motuna moko ya ntina mingi. Atunaki ye boye: ‘Nkombo na yo nani?’ Lokola nkombo ya Nzambe eyebanaki banda kala, Moize azalaki mpenza na mposa ya koyeba nini ntango atunaki motuna wana? Emonani ete azalaki na mposa ya koyeba makambo mingi oyo etali moto oyo azalaki na nkombo yango, mpo yango elingaki kondimisa libota ya Nzambe ete Nzambe akosikola bango mpenza. Moize azalaki na ntina ya komitungisa, mpamba te Bayisraele bazalaki baombo banda mwa bambula. Ekoki kozala ete bazalaki komituna soki Nzambe ya bankɔkɔ na bango akokaki kosikola bango. Kutu, Bayisraele mosusu bakómaki komipesa na losambo ya banzambe ya Ezipito!​—Ezk. 20:7, 8.

kr lok. 43, etanda

NDIMBOLA YA NKOMBO YA NZAMBE

NKOMBO Yehova euti na verbe moko ya Ebre oyo elimboli “kokóma.” Bato mosusu ya mayele bamonaka ete ndenge basaleli verbe yango epesaka likanisi ya kosala ete likambo esalema. Na yango, mingi bamonaka ete nkombo ya Nzambe elimboli “Akómisaka.” Ndimbola yango eyokani mpenza na titre Mozalisi oyo tosalelaka mpo na Yehova. Asalaki ete molɔ́ngɔ́ mpe bikelamu nyonso ya mayele ezala, mpe azali kokoba kosala mpo na kokokisa bilaka mpe mokano na ye.

Na yango, ndimbola nini tosengeli kopesa na eyano ya Yehova na motuna ya Moize, oyo ezali na Kobima 3:13, 14? Moize atunaki boye: “Kanisá ete nakómi sikoyo epai ya bana ya Yisraele mpe nalobi mpenza na bango ete: ‘Nzambe ya bankɔkɔ na bino atindi ngai epai na bino,’ mpe balobi mpenza na ngai ete: ‘Nkombo na ye nani?’ Naloba na bango nini?” Yehova ayanolaki ete: “Nakozala oyo nakozala.”

Tósimba ete na esika wana Moize atunaki Yehova nkombo na ye te. Moize ná Bayisraele bayebaki nkombo ya Nzambe banda kala. Moize atunaki nde Yehova ayebisa ye likambo moko oyo ekokómisa makasi kondima na bango epai na ye, oyo ekoki komonana mpe na ndimbola ya nkombo na ye. Na yango, ntango Yehova ayanolaki ye ete “Nakozala oyo nakozala,” ezalaki mpo na komonisa Moize likambo moko oyo etali Bonzambe na ye: Na likambo nyonso, akómaka nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na ye. Na ndakisa, mpo na Moize ná Bayisraele, Yehova akómaki Mosikoli, Mopesi-mibeko, Mosungi, mpe bongo na bongo. Na yango, Yehova aponaka kokóma nyonso oyo esengeli mpo akokisa makambo oyo alaki basaleli na ye. Atako nkombo Yehova elimboli ete aponaka kokóma oyo alingi, ndimbola ya nkombo yango esuki wana te. Emonisi mpe makambo oyo asalaka ete bozalisi ekóma mpo na kokokisa mokano na ye.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

g04-F 8/4 lok. 6 par. 4

Moize​—Moto ya solo to masapo ya mpamba?

Ebongaki mpenza mwana mwasi ya Farao azwa Moize mpo abɔkɔla ye? ƐƐ, mpo lingomba ya Baezipito ezalaki koteya ete mpo moto akende likoló asengelaki kosala misala ya malamu. Mpo na oyo etali kozwa mwana mpo na kobɔkɔla, moto moko ya arkeoloji na nkombo ya Joyce Tyldesley alobi boye: “Mibeko elobaki ete ezala basi to mibali bango nyonso bazali na ntomo ndenge moko . . . basengelaki kotalela bango ndenge moko na makambo etali mibeko to mpe nkita, kasi bazalaki kosalela yango mpenza te. Kutu basi bakokaki mpe kozwa bana mpo na kobɔkɔla.” Papirisi moko ya kala emonisi ete mwasi moko Moezipito azwaki baombo mpo abɔkɔla bango. Na oyo etali kofutama ya mama ya Moize mpo abɔkɔla Moize, diksionɛrɛ moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Ndenge bafutaki mama oyo abotaki mpenza Moize mpo na komɛlisa ye mabɛlɛ . . . eyokani na mibeko oyo bato ya Mezopotamia bazalaki kosalela ntango balingi kozwa mwana ya kobɔkɔla.”

w04 15/3 lok. 24 par. 4

Makanisi ya ntina na mokanda ya Exode

3:1​—Yetro azalaki nganga-nzambe ya ndenge nini? Na ntango ya kala, tata azalaki nganga-nzambe ya libota na ye. Ekoki mpenza kozala ete Yetro azalaki mokonzi ya libota moko ya Bamidiane. Lokola Bamidiane bazalaki bankɔkɔ ya Abrahama oyo abotaki na Ketura, ekoki kozala ete bayebaki losambo ya Yehova.​—Ebandeli 25:1, 2.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito

w02 15/6 lok. 11 par. 1-4

Eloko oyo eleki biloko ya motuya ya Ezipito

Ntango Moize akokisaki mbula 40, ntango mosusu asilaki kokóma Moezipito mpenza na makambo nyonso, ‘akendeki epai na bato na ye mpo atala ndenge bazalaki konyokwama.’ Makambo oyo asalaki na nsima emonisaki ete akendeki kaka te mpo na kotala mpamba; azalaki mpenza na mposa makasi ya kosalisa bango. Ntango amonaki Moezipito azali kobɛta Moebre moko, abomaki monyokoli yango. Likambo yango emonisaki ete motema ya Moize ezalaki epai ya bandeko na ye. Ntango mosusu moto oyo akufaki azalaki mokonzi mpe abomamaki ntango azalaki kosala mosala na ye. Na miso ya Baezipito, Moize asengelaki kozala sembo epai ya Farao mpo na nyonso oyo asalelaki ye. Kasi Moize asalaki makambo wana mpo alingaki bosembo, ezaleli oyo amonisaki lisusu mokolo oyo elandaki ntango apamelaki Moebre moko oyo azalaki kobɛta moninga na ye. Moize azalaki na mposa ya kosikola Baebre na boombo ya makasi, kasi ntango Farao ayokaki likambo oyo asalaki, alukaki koboma ye, mpe Moize akimaki na Midiane.​—Kobima 2:11-15, NW; Misala 7:23-29.b

Ntango oyo Moize aponaki mpo na kosikola basaleli ya Nzambe na boombo ekokanaki te na oyo ya Yehova. Atako bongo, makambo asalaki emonisaki ete azalaki na kondima. Baebre 11:24-26 (NW) elobi ete: “Na kondima Moize, ntango akolaki, aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao, aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.” Asalaki bongo mpo na nini? Mpo ete “atalelaki nsɔni ya Kristo lokola bomɛngo ya monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito; mpo azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.” Ndenge oyo basaleli liloba “Kristo,” elingi koloba “moto oyo atyami mafuta,” mpo na Moize ebongi mpenza na ye mpo na nsima, Yehova aponaki ye mpo na mokumba monene.

Kanisá naino! Moize abɔkwamaki ndenge bazalaki kobɔkɔla bana ya bakonzi ya Ezipito. Esika azalaki na yango na Ezipito, akokaki kozala na mosala moko ya lokumu mpe akokaki kozala na bisengo ya lolenge nyonso, kasi asundolaki yango nyonso. Mpo na ye, bomoi na ndako ya bokonzi ya Farao, monyokoli, eyokanaki te na bolingo oyo azalaki kolinga Yehova mpe boyengebene. Koyeba bilaka oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ na ye Abrahama, Yisaka, na Yakobo mpe komanyola likoló na yango etindaki Moize apona kosepelisa Yehova. Lokola asalaki bongo, Yehova asalelaki Moize na mokumba moko ya lokumu mingi koleka mpo na kokokisa mikano na ye.

Biso nyonso tosengeli kopona makambo oyo eleki ntina. Lokola Moize, ntango mosusu osengeli kozwa ekateli ya monene. Osengeli kotika kosalela mimeseno mosusu to kosundola makambo mosusu ya kitoko, ata soki ezali mpasi mingi mpo osala yango? Soki ozali liboso ya makambo ya ndenge yango, kobosana te ete Moize amonaki ete boninga na ye na Yehova elekaki biloko nyonso ya motuya ya Ezipito, mpe ayokaki mawa ata mokolo moko te ndenge atikaki yango.

29/06–05/07

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | KOBIMA 4-5

“Nakozala elongo na yo ntango ozali koloba”

w10 15/10 nk. 13-14

Koluka komilongisa​—Ndenge nini Yehova atalelaka yango?

“Nabongi mpenza na mosala yango te.” Okoki komona ete obongi te mpo na kozala moteyi ya nsango malamu. Na ntango ya kala, basaleli mosusu ya sembo ya Yehova bamonaki ete babongi te mpo na kokokisa mikumba oyo Yehova apesaki bango. Tózwa ndakisa ya Moize. Ntango Yehova apesaki ye mokumba moko, Moize alobaki boye: “Limbisá ngai, Yehova, kutu ngai nalobaka malamu te, ezala banda lobi to banda liboso na yango to mpe banda ozali koloba na mosaleli na yo, mpo nazali monɔkɔ kilo mpe lolemo kilo.” Atako Yehova akitisaki ye motema, Moize azongisaki ete: “Limbisá ngai, Yehova, nabondeli yo, tindá na lobɔkɔ ya moto oyo yo okotinda.” (Kob. 4:10-13) Yehova asalaki nini?

w14 15/4 lok. 9 par. 5-6

Omonaka “Moto oyo amonanaka te”?

5 Liboso Moize azonga na Ezipito, Nzambe ateyaki ye etinda moko ya ntina mingi, mpe na nsima Moize akomaki etinda yango na mokanda ya Yobo: “Kobanga Yehova nde bwanya.” (Yobo 28:28) Mpo na kosalisa Moize akóma na bobangi ya ndenge wana mpe asalaka makambo na bwanya, Yehova alobelaki bokeseni oyo ezali kati na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe bato. Atunaki ete: “Nani asalá monɔkɔ mpo na moto to nani asalaka moto oyo alobaka te to moto oyo akufá matoi to moto oyo amonaka to moto oyo akufá miso? Ezali ngai Yehova te?”​—Kob. 4:11.

6 Liteya ezalaki nini? Moize asengelaki kobanga te. Yehova nde atindaki ye, mpe asengelaki kopesa Moize nyonso oyo asengelaki na yango mpo ayebisa nsango ya Nzambe epai ya Farao. Longola yango, Yehova alekaki Farao mosika. Kutu, wana ezalaki te mbala ya liboso oyo basaleli ya Nzambe bazalaki na likama na boyangeli ya Ezipito. Mbala mosusu Moize akanisaki na ndenge Yehova abatelaki Abrahama, Yozefe, ata mpe ye moko Moize na boyangeli ya Bafarao mosusu. (Eba. 12:17-19; 41:14, 39-41; Kob. 1:22–2:10) Lokola azalaki na kondima epai ya Yehova, “Moto oyo amonanaka te,” Moize amonanaki na mpiko nyonso liboso ya Farao mpe asakolaki liloba nyonso oyo Yehova atindaki ye aloba.

w10 15/10 lok. 14

Koluka komilongisa​—Ndenge nini Yehova atalelaka yango?

Yehova alongolaki Moize mokumba yango te. Kasi, Yehova aponaki Arona mpo asalisa Moize na kokokisa mokumba yango. (Kob. 4:14-17) Lisusu, na bambula oyo elandaki, Yehova asalisaki Moize mpe apesaki ye nyonso oyo asengelaki na yango mpo alonga kokokisa mikumba oyo Nzambe apesaki ye. Lelo oyo, okoki kolikya ete Yehova akotinda mpe bandeko na yo bakristo oyo bayebi mosala básalisa yo na mosala ya kosakola. Likambo oyo eleki ntina, Liloba ya Nzambe eyebisi biso polele ete Yehova akopesa biso makoki ya kosala mosala oyo asɛngi biso tósala.​—2 Ko. 3:5; talá etanda “Bambula ya esengo mingi koleka na bomoi na ngai.”

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w04 15/3 lok. 28 par. 4

Mituna ya batángi

Maloba oyo Zipora alobaki ete “ozali mobali ya makila mpo na ngai” ekoki kokamwisa biso. Maloba yango emonisi nini mpo na ye? Lokola Zipora andimaki kokata mwana na ye ngenga ndenge kondimana esɛngaki, yango emonisi ete andimaki kokɔta na kondimana na Yehova. Kondimana ya Mibeko oyo Yehova asalaki na Bayisraele emonisaki ete na kati ya kondimana moko na Yehova, ye akoki kobengama mobali mpe baoyo asali na bango kondimana, mwasi. (Yirimia 31:32) Na bongo, lokola Zipora abengaki Yehova (na nzela ya anzelu na ye) ete “mobali ya makila,” yango emonisi ete andimaki kotosa masɛngami ya kondimana yango. Ezalaki lokola nde andimaki kozala mwasi na kondimana ya kokatama ngenga, kati na yango Yehova azalaki mobali. Ata soki ezalaki ndenge nini, bomoi ya mwana na ye ezalaki lisusu na likama te mpo akakatanaki te kotosa likambo oyo Nzambe asɛngaki.

it-1-F lok. 1257 par. 3

Yehova

“Koyeba” elakisi kaka te kozala na likanisi ya eloko moko to kondima ete eloko to moto moko boye azalaka. Nabale oyo azalaki zoba ayebaki Davidi kasi atunaki: “Davidi nde nani?” (1Sa 25:9-11; talá mpe 2Sa 8:13) Ndenge moko mpe, Farao alobaki na Moize: “Yehova nde nani mpo natosa mongongo na ye mpe natika Yisraele ekende? Nayebi Yehova ata moke te mpe kutu nakotika Yisraele ekende te.” (Kob 5:1, 2) Na maloba wana, Farao amonisaki ete na miso na ye Yehova azali Nzambe ya solo te, to azalaki na bokonzi ata moke te likoló ya mokonzi ya Ezipito mpe misala na ye to mpe lisusu Yehova azali na nguya te ya kokokisa makambo oyo alakaki na nzela ya Moize mpe Arona. Kasi sikoyo Farao ná bato nyonso ya Ezipito, ezala mpe Bayisraele bakoyeba mpenza ndimbola ya nkombo yango mpe moto oyo azalaki na nkombo yango. Ndenge Yehova amonisaki yango epai ya Moize bakoyeba malamu na ndenge akokokisa mokano na ye mpo na Bayisraele, elingi koloba akolongola bango na boombo, akopesa bango Mokili ya Ndaka, mpe akokokisa kondimana oyo basalaki na bankɔkɔ na bango. Na bongo, ekokokisa maloba oyo Nzambe alobaki ete: “Bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bino.”​—Kob 6:4-8; Talá MOZWI-YA-NGUYA-NYONSO.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kolimbola ndenge likambo yango ezalaki kosalema, The Holy Bible, With an Explanatory and Critical Commentary oyo ekomamaki na F. C. Cook elobi boye: “Bazalaki kobwaka ntango mosusu wolo, palata to libanga mosusu ya ntalo na kati ya mai mpe na nsima bazalaki kotala yango to mpe bazalaki kotala na kati ya mai ndenge batalaka na talatala.” Christopher Wordsworth, molimboli moko ya Biblia alobi boye: “Ntango mosusu, bazalaki kotondisa kɔpɔ na mai, mpe bililingi oyo moi ezalaki kobimisa na kati ya kɔpɔ yango ezalaki kosalisa bango bálimbola makambo.”

b Molende ya Moize mpo na boyengebene emonanaki lisusu ntango akɔtelaki bana basi oyo bazalaki kobatela mpate na Midiane, epai akimaki, ntango bazalaki na moto ya kosalisa bango te wana bazalaki konyokola bango.​—Kobima 2:16, 17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto