Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr20 Mai nk. 1-8
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • 04-10/05
  • 11-17/05
  • 18-24/05
  • 25-31/05
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2020
mwbr20 Mai nk. 1-8

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

04-10/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 36-37

“Bayokeli Yozefe zuwa”

w14 1/8 nk. 12-13

“Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti”

Biblia elobi boye: “Ntango bandeko na ye bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye mingi koleka bandeko na ye nyonso, babandaki koyina ye, mpe bazalaki lisusu koloba na ye na boboto te.” (Ebandeli 37:4) Atako bakokaki koyoka zuwa, kasi bandeko ya Yozefe bazangaki bwanya ndenge batikaki ezaleli mabe wana ekonza bango. (Masese 14:30; 27:4) Ekómelá yo naino te oyoka zuwa makasi ntango batyeli moto moko likebi to bapesi ye lokumu oyo ozalaki na mposa na yango? Kanisá bandeko ya Yozefe. Zuwa na bango etindaki bango básala makambo oyo na nsima, epesaki bango mpasi mingi na motema. Ndakisa na bango ezali kokundwela bakristo ete eleki malamu ‘kosepela elongo na bato oyo bazali kosepela.’​—Baroma 12:15.

Na ntembe te, Yozefe amonaki ete bandeko na ye bayinaki ye. Boye, abombaki nde robɛ na ye wana ya kitoko ntango alingaki akóma esika bandeko na ye bazali? Mbala mosusu akokaki kosala bongo. Kobosana te ete Yakobo alingaki ete robɛ yango ezala elembo oyo emonisaki ete azali kozwa ye na valɛrɛ mingi mpe azali kolinga ye. Yozefe alataki robɛ yango mpo alingaki ete tata na ye atyelaka ye kaka motema. Ndakisa na ye ezali na ntina mpo na biso. Atako Tata na biso ya likoló aponaka bilongi te, na bantango mosusu, asalelaka basaleli na ye mosusu ya sembo makambo ya malamu mingi mpe amoniselaka bango boboto mingi koleka basusu. Lisusu, asɛngaka bango bámikɔtisa te na makambo ya mbindo mpe ya mabe ya mokili oyo. Ndenge moko na robɛ ya kitoko mingi mpenza ya Yozefe, bizaleli ya bakristo ya solo esalaka ete bákesana na bato mosusu oyo bafandi na bango. Ntango mosusu bizaleli ya ndenge wana etindaka basusu báyokela bango zuwa mpe báyina bango. (1 Petro 4:4) Mokristo asengeli nde kobomba makambo oyo emonisaka ete azali mosaleli ya Nzambe? Te. Akobomba yango te kaka ndenge Yozefe abombaki robɛ na ye te.​—Luka 11:33.

w14 1/8 lok. 13 par. 2-4

“Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti”

Ndɔtɔ yango eutaki epai ya Yehova. Ezalaki bandɔtɔ ya esakweli, mpe Nzambe alingaki ete Yozefe apesa nsango yango. Na maloba mosusu, Yozefe asengelaki kosala kaka ndenge basakoli nyonso oyo bazalaki liboso na ye basalaki ntango bayebisaki bato oyo bakómaki batomboki nsango mpe bitumbu ya Nzambe.

Na mayele nyonso, Yozefe ayebisaki bandeko na ye boye: “Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti.” Bandeko na ye bakangaki ntina ya ndɔtɔ yango mpe esepelisaki bango ata moke te. Bayanolaki ye boye: “Yo okozala mpenza mokonzi na biso?” Lisolo yango ebakisi boye: “Yango wana bayinaki ye lisusu koleka mpo na bandɔtɔ na ye mpe mpo na maloba na ye.” Ntango Yozefe ayebisaki tata mpe bandeko na ye ndɔtɔ na ye ya mibale, esepelisaki bango kaka te. Biblia elobi boye: “Tata na ye abandaki kopamela ye mpe koloba na ye ete: ‘Ndɔtɔ oyo olɔti elimboli nini? Ngai ná mama na yo mpe bandeko na yo tokoya mpenza kogumbamela yo tii na nse?’” Kasi, Yakobo akobaki kokanisa likambo yango. Mbala mosusu Yehova azalaki nde kosolola na mwana yango?​—Ebandeli 37:6, 8, 10, 11.

Yozefe azalaki mosaleli ya Yehova ya liboso mpe ya nsuka te oyo Yehova atindaki asakola nsango moko oyo bato bakosepela na yango te mpe oyo ekokaki kobimisela ye minyoko. Yesu azalaki momemi-nsango oyo alekaki bamemi-nsango nyonso ya ndenge wana mpe ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:20) Bakristo nyonso, ezala bilenge to mikóló, bakoki koyekola makambo mingi na kondima mpe mpiko ya elenge Yozefe.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 693

Edome

(Edome) [Motane], Baedome.

Edome ezalaki nkombo ya mibale to nkombo mosusu oyo bapesaki Esau, lipasa ya Yakobo. (Eb 36:1) Bapesaki ye yango mpo atɛkaki lotomo na ye ya mwana ya liboso na supu ya motane. (Eb 25:30-34) Likambo ya kokamwa, ntango Esau abotamaki nzoto na ye mobimba ezalaki motane (Eb 25:25), mpe mabele oyo Esau ná bakitani na ye bakendaki kofanda na nsima ezalaki na langi moko ya ndenge wana.

it-1-F lok. 964 par. 5-6

Kobatela

Ntango mobateli ya mpate to ya etonga azalaki koloba ete akobatela etonga, azalaki nde komonisa ete andimi kobatela banyama yango na kolanda mibeko oyo etyamá. Azalaki kondimisa nkolo-etonga yango ete akoleisa banyama yango malamu, bakoyiba yango te mpe ete soki akokisi mokumba na ye te akofuta yango. Ata bongo, makoki na ye ezalaki na ndelo, mpo mobeko oyo tolobelaki liboso emonisaki ete soki likama ebimi oyo eleki makoki ya bomoto, na ndakisa, soki nyama ya zamba epasoli nyama ya etonga, mobateli ya mpate asengeli kopesa nkolo-etonga elembeteli oyo emonisi ete azali na ngambo te, mpe akomema nyama oyo ekufi epai ya nkolo na yango; mpe yango ekosala ete afuta eloko te. Nsima ya kotalela elembeteli yango, nkolo-etonga asengelaki kondima ete mobateli ya etonga azali na ngambo te.

Bazalaki mpe kosalela mobeko yango na eloko mosusu nyonso oyo bapesi moto abatela, ezala azali ndeko ya libota. Na ndakisa, na kolanda mibeko bazalaki kotalela mwana ya liboso lokola mobateli ya bandeko na ye. Yango esalisi biso tómona ndenge Rubene, mwana ya liboso azalaki komitungisa, mpo na bomoi ya Yozefe ntango bandeko na ye balobaki ete báboma ye, ndenge emonisami na Ebandeli 37:18-30. “Alobaki ete: ‘Tóboma molimo na ye te.’ . . . ‘Bósopa makila te. . . . bósala ye mabe te.’ Mokano na ye ezalaki ya kobikisa ye na lobɔkɔ na bango mpo na kozongisa ye epai ya tata na ye.” Mpe, ntango Rubene ayaki koyeba ete Yozefe azalaki te, amitungisaki makasi mpe “apasolaki bilamba na ye” mpe agangaki ete: “Mwana alimwe! Mpe ngai​—ngai nakosuka wapi?” Amonaki ete akomema ngambo mpo Yozefe abungaki. Mpo ngambo yango ezala na motó na ye te, bandeko na ye basalaki na mayele mpo na komonisa ete nyama ya zamba nde ebomaki Yozefe. Bazindisaki elamba na ye ya molai ya nzelanzela na makila ya ntaba. Na nsima bakendaki kolakisa yango Yakobo, tata na bango oyo azalaki mosambisi ya libota, yango elongolaki Rubene na ngambo nyonso, mpo ntango Yakobo amonaki elamba oyo ezalaki na makila andimaki ete nyama nde ebomaki Yozefe.​—Eb 37:31-33.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Mpo na nini bakristo basengeli kozala na zuwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe?

w02 15/10 nk. 30-31

Baklisto basengeli kozala na zuwa?

Zalá na zuwa mpo na Yehova

Nzokande, zuwa ya malamu ezali na esika na yango na kati ya losambo ya solo. Soki tokómi komitungisa mingi mpo na lokumu to mpo na lotomo na biso moko, zuwa ya malamu ebendaka likebi na biso epai ya Yehova. Etindaka biso na koluka banzela ndenge na ndenge ya koteya solo na ntina na ye mpe kokɔtela banzela na ye mpe basaleli na ye.

Mama moko oyo ayebaki mobeko ya Nzambe mpo na makila te, alingaki ata moke te koyamba Akiko, Motatoli ya Yehova oyo azali mosaleli ya ntango nyonso, na ndako na ye mpo na kosolola na ye. Akiko asalelaki Liloba ya Nzambe na mayele mpenza, alobelaki ata mindɔndɔ mpe mikakatano oyo ekoki koya na nzoto ya moto oyo bazongisi ye makila. Mposa na ye makasi ya kolobela Yehova etindaki ye abalola lisolo mpo na kolobela makambo oyo ye asosolaki ete ezalaki kotinda mwasi yango aboya koyoka ye: azalaki kondima te ete Mozalisi azali. Akiko akanisaki elongo na mwasi yango ndenge biloko oyo bizalisami ezali komonisa ntina oyo tosengeli kondima ete Mozalisi azali. Molende oyo amonisaki mpo na kolongisa Liloba ya Nzambe esalisaki na kolongola makanisi mabe ya mwasi yango, mpe esalaki ete andima koyekola Biblia. Mwasi yango oyo azalaki liboso nkandankanda azali lelo mosambeli ya Yehova.

Zuwa ya malamu, to molende, mpo na losambo ya solo, etindaka biso tólukaka to tólekisaka te mabaku ya kolobela mpe kolongisa kondima na biso na mosala, na eteyelo, na magazini, mpe ntango tozali kosala mobembo. Na ndakisa, Midori azwá ekateli ya koyebisa baninga na ye ya mosala bindimeli na ye. Mwasi moko ya mbula 40 oyo azalaki kosala na ye esika moko alobaki ete alingaka kosolola na Batatoli ya Yehova te. Nsima ya mikolo, ntango bazwaki libaku mosusu ya kosolola, mwasi yango azalaki komilelalela mpo mwana na ye abandaki kokóma na bizaleli mabe. Midori alakisaki ye mokanda Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi, mpe asɛngaki ye nzela ya kobanda koyekola mokanda yango na mwana na ye. Bakómaki koyekola, kasi mama azalaki kolinga kolanda masolo na bango te. Midori azwaki likanisi ya kolakisa mwasi yango kasɛti-video Les Témoins de Jéhovah: un nom, une organisation. Yango elongolaki ye makanisi ya mabe oyo azalaki na yango. Makambo oyo ye amonaki etindaki ye aloba ete: “Nalingi kozala lokola Batatoli ya Yehova.” Mbala moko abandaki mpe koyekola Biblia esika moko na mwana na ye.

Zuwa ya malamu ezali na esika na yango na kati ya lisangá ya boklisto. Ekolisaka bolingo mpe elimo ya komibanzabanza mpo na basusu mpe esalisaka biso na komibatela na makambo ya mabe oyo ekoki koyokisa bandeko na biso ya elimo mpasi, lokola matɔngi mpe makanisi ya bapɛngwi. Zuwa ya malamu etindaka biso tóndima bikateli oyo bankulutu bazwaka ntango mosusu, ntango bamonaka ete ebongi mpenza kobimisa bato mabe na lisangá. (1 Bakolinti 5:11-13; 1 Timote 5:20) Ntoma Paulo alobelaki zuwa oyo azalaki na yango mpo na bandeko na ye na lisangá ya Kolinti ntango akomaki boye: “Nazali koyoka zuwa na ntina na bino, zuwa lokola oyo ya Nzambe, mpo ngai mpenza nalakaki kobalisa bino epai ya mobali kaka moko mpo nakoka kobimisa bino lokola ngɔndɔ moko ya pɛto na bizaleli epai ya Klisto.” (2 Bakolinti 11:2) Ndenge moko mpe mpo na biso, zuwa na biso etindaka biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela bopɛto ya mateya, ya elimo mpe ya bizaleli ya lisangá mobimba.

Ɛɛ, zuwa ya malamu​—oyo euti na Nzambe​—ememelaka basusu bolamu. Esalaka ete Yehova andima biso mpe ezali moko ya bizaleli oyo baklisto basengeli komonisa lelo oyo.​—Yoane 2:17.

11-17/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 38-39

“Yehova asundolaki Yozefe te”

w14 1/11 lok. 12 par. 4-5

“Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”

“Nzokande bakitaki na Yozefe na Ezipito, mpe Potifare, mosali ya Farao, kapita ya basoda oyo bakɛngɛlaka ye, Moezipito, asombaki ye na lobɔkɔ ya Bayishimaele, oyo bakitaki na ye kuna.” (Ebandeli 39:1) Na maloba wana, lisolo yango ya Biblia esalisi biso tómona nsɔni oyo elenge mobali yango ayokaki ntango batɛkaki ye lisusu. Akómaki lokola mwa eloko moko boye! Tokoki komona na makanisi ndenge Yozefe azali kolanda patrɔ na ye ya sika, mokonzi moko ya basoda ya Ezipito na engumba wana ya loyenge makasi oyo banzela na yango etondi na bazando ntango azali komema Yozefe na ndako ya sika oyo akobanda kofanda.

Ndako! Ekesanaki mpenza na eloko nyonso oyo Yozefe azalaki kobenga ndako. Abɔkwamaki na libota oyo bato na yango bazalaki kofanda na bahema mpo mbala na mbala bazalaki kolongwa ná bampate na bango mpe kokende kofanda na bisika mosusu. Awa, moto ya bozwi lokola Potifare afandaka na ndako moko kitoko mpenza oyo bapakolá balangi. Bato ya arkeoloji balobi ete bato ya kala ya Ezipito bazalaki kosepela na ba-jardin ya kitoko mpenza oyo ezali na banzete ya malili mpe mwa maziba ya mai mpo na kobɔkɔla bapapirisi, lotisi mpe milona mosusu oyo ekolaka na mai. Bandako mosusu ezingamaki na ba-jardin, ezalaki na baveranda mpo na kozwa mopɛpɛ, bafenetre ya likoló mpo na kokɔtisa mopɛpɛ, mpe bashambrɛ ebele, esika monene ya kolya mpe bashambrɛ ya bato ya misala.

w14 1/11 nk. 14-15

“Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”

Toyebi mpenza te ndenge babolɔkɔ ya Baezipito ezalaki na ntango wana. Bato ya arkeoloji bamonaki bisika yango oyo ebebá​—bandako ya makasi oyo ezalaki na babolɔkɔ mosusu na nse ya mabele. Yozefe alobelaki na nsima esika yango oyo soki babongoli liloba ná liloba elimboli “libulu,” oyo emonisi ete ezalaki esika moko oyo elikya ezalaki te. (Ebandeli 40:15) Mokanda ya Nzembo emonisi ete Yozefe anyokwamaki lisusu makasi: “Bamonisaki makolo na ye mpasi na bikangeli, molimo na ye ekɔtaki na bibende.” (Nzembo 105:17, 18) Na bantango mosusu, Baezipito bazalaki kotya bato ya bolɔkɔ mabɔkɔ na nsima ya mokɔngɔ mpe kokanga yango na bansinga; bazalaki kolatisa bamosusu shɛni na kingo. Yozefe anyokwamaki mingi atako asalaki likambo moko te oyo esɛngaki ete bányokola ye bongo!

Kutu, ezalaki mpo na ntango mokuse te. Lisolo yango elobi ete Yozefe “atikalaki kuna na ndako ya bolɔkɔ.” Alekisaki bambula mingi na esika wana ya nsɔmɔ mpenza! Yozefe ayebaki kutu te soki akobima na bolɔkɔ yango. Nini esalisaki Yozefe abungisa elikya te ntango mikolo, bapɔsɔ mpe basanza wana ya mpasi ezalaki koleka?

Lisolo yango epesi biso eyano ya kokitisa motema; elobi boye: “Yehova azalaki kaka elongo na Yozefe mpe azalaki komonisela ye motema boboto.” (Ebandeli 39:21) Ezala bolɔkɔ, bikangiseli, ata mpe bolɔkɔ ya molili na nse ya mabele ekoki te kopekisa motema boboto ya Yehova ekómela basaleli na ye. (Baroma 8:38, 39) Tokoki kokanisa ndenge Yozefe azalaki koyebisa Tata na ye ya likoló bampasi na ye na libondeli mpe na nsima kozwa kimya oyo kaka “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” nde akoki kopesa. (2 Bakorinti 1:3, 4; Bafilipi 4:6, 7) Yehova asalelaki Yozefe nini lisusu? Biblia elobi ete Yehova azalaki kosala ete “andimama na miso ya kapita-mokonzi ya ndako ya bolɔkɔ.”

w14 1/11 lok. 15 par. 2

“Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”

Lisolo yango epesi biso eyano ya kokitisa motema; elobi boye: “Yehova azalaki kaka elongo na Yozefe mpe azalaki komonisela ye motema boboto.” (Ebandeli 39:21) Ezala bolɔkɔ, bikangiseli, ata mpe bolɔkɔ ya molili na nse ya mabele ekoki te kopekisa motema boboto ya Yehova ekómela basaleli na ye. (Baroma 8:38, 39) Tokoki kokanisa ndenge Yozefe azalaki koyebisa Tata na ye ya likoló bampasi na ye na libondeli mpe na nsima kozwa kimya oyo kaka “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” nde akoki kopesa. (2 Bakorinti 1:3, 4; Bafilipi 4:6, 7) Yehova asalelaki Yozefe nini lisusu? Biblia elobi ete Yehova azalaki kosala ete “andimama na miso ya kapita-mokonzi ya ndako ya bolɔkɔ.”

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 445

Onane

(Euti na liloba oyo elimboli “nguya ya kobota, nguya mingi.”)

Mwana ya Yuda, mwana ya mibale oyo Yuda abotaki na Shua, mwana mwasi ya Kanana. (Eb 38:2-4; 1Nt 2:3) Yehova abomaki Ere, oyo azalaki yaya ya Onane, mpo azalaki kosala mabe mingi. Lokola Ere akufaki kozanga kobota, Yuda asɛngaki Onane asala libala ya bosɛmɛki elongo na Tamara mwasi ya ndeko na ye Ere. Soki baboti mwana, mwana yango akozala te na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya libota ya Onane, kasi akozwa nde libula ya Ere, mpe kaka ye nde akozwa libula ya mwana ya liboso, kasi, soki baboti te, Onane nde akozwa libula yango. Ntango Onane azalaki kosangisa nzoto na Tamara, “azalaki kosopa malome na ye na mabele” mpo bábota bana te. Ezalaki te mpo azalaki kosakana na enama na ye ya kobotela, mpo lisolo yango emonisi ete ezalaki “ntango azalaki kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye” nde azalaki kosopa malome na ye to mai ya mibali na mabele. Emonani lokola Onane azalaki kobimisa enama na ye ya kobotela na enama ya kobotela ya Tamara soki ayoki ete malome elingi kobima mpo ekɔta te na nzoto ya Tamara. Yehova abomaki Onane mpe abotaki mwana te, ezalaki te mpo azalaki kosakana na enama na ye ya kobotela, kasi nde mpo aboyaki kotosa tata na ye, yango emonisi ete azalaki koluka matomba na ye moko mpe aboyaki kotosa bibongiseli ya Yehova na oyo etali libala.​—Eb 38:6-10; 46:12; Mit 26:19.

w04 15/1 lok. 30 par. 4-5

Mituna ya batángi

Yuda asalaki mabe lokola akokisaki elaka na ye te ya kobalisa Tamara epai ya mwana na ye Shela. Lisusu, asangisaki nzoto na mwasi oyo akanisaki ete azali mwasi ya ndumba. Yango eyokanaki te na mobeko ya Nzambe, oyo esɛngi ete moto asangisa nzoto kaka na molongani na ye. (Ebandeli 2:24) Kasi, likambo ya solo ezali ete Yuda asangisaki nzoto na mwasi ya ndumba te. Kasi, kozanga ete ayeba yango, azwaki esika ya mwana na ye Shela na libala ya ndeko mpe abotaki mwana oyo asengelaki kozwa libula ya mwana ya liboso oyo akufá.

Tamara asalaki ekobo te. Bana mapasa oyo abotaki babengamaki bana ya ekobo te. Ntango Boaza, moto ya Beteleme, abalaki Luta na libala ya ndeko, bankumu ya mboka Beteleme balobaki maloba malamu mpo na Pereze, mwana ya Tamara, ete: “Tiká mpe ndako na yo ezala lokola ndako ya Pereze, oyo Tamara abotelaki Yuda, na ntina na bana oyo [Yehova] akopesa yo mpo na mwasi oyo.” (Ruta 4:12) Lisusu, nkombo ya Pereze etángami na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Kristo.​—Matai 1:1-3; Luka 3:23-33.

18-24/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 40-41

“Yehova abikisi Yozefe”

w15 1/2 lok. 14 par. 3-4

“Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te?”

Ata soki kapita ya bapesi-masanga abosanaki Yozefe, kasi Yehova abosanaki ye te. Butu moko, alɔtisaki Farao bandɔtɔ mibale oyo akokaki kobosana yango te. Na ndɔtɔ ya liboso, amonaki bangɔmbɛ nsambo oyo ezalaki kitoko mingi mpe mafutamafuta eutaki na ebale Nile mpe bangɔmbɛ mosusu nsambo ya mabe mpenza mpe ekɔndakɔndá ebandaki komata nsima na yango. Oyo ekɔndakɔndá ezalaki kolya oyo ya mafutamafuta. Na nsima, Farao alɔtaki lisusu mitó nsambo ya mbuma ya kosala farini oyo ebimaki na nzete kaka moko. Kasi na nsima, mitó mosusu nsambo ya mbuma ya kosala farini oyo ekɔndakɔndá ebandaki komɛla oyo ya kitoko. Na ntɔngɔ, ntango Farao alamukaki, atungisamaki mingi mpo na bandɔtɔ yango, yango wana abengisaki bato nyonso ya mayele mpe banganga-nzambe nyonso ya Ezipito oyo basalelaka maji mpo bálimbolela ye yango. Moko te alongaki. (Ebandeli 41:1-8) Toyebi te soki ezalaki mpo bandɔtɔ yango elekelaki bango to mpo bayaki na makanisi ndenge na ndenge oyo eyokanaki te. Ezala ndenge nini, Farao alɛmbaki nzoto; kasi azalaki kaka na mposa makasi ya kozwa ndimbola ya bandɔtɔ wana ya kokamwa.

Nsukansuka, kapita ya bapesi-masanga akanisaki Yozefe! Lisosoli na ye etungisamaki mpenza mpe ayebisaki Farao mpo na elenge mobali wana ya bwanya mpenza oyo azalaki na bolɔkɔ, oyo alimbolaki malamu ndɔtɔ na ye mpe ya kapita ya basali-mampa eleki sikoyo mbula mibale. Mbala moko, Farao asɛngaki bábimisela ye Yozefe na bolɔkɔ.​—Ebandeli 41:9-13.

w15 1/2 lok. 14 par. 5

“Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te?”

Yehova alingaka bato ya komikitisa mpe ya sembo, yango wana tokoki kokamwa te soki apesaki Yozefe eyano oyo bato ya bwanya mpe banganga-nzambe ya Ezipito bayebaki te. Yozefe ayebisaki Farao ete bandɔtɔ na ye mibale ezalaki na ndimbola kaka moko. Lokola Yehova azongelaki nsango yango, alingaki komonisa ete ‘akanaki mpenza likambo’​—esengelaki mpenza kokokisama. Bangɔmbɛ ya mafutamafuta mpe mitó ya mbuma ya kosala farini ya malamu emonisaki mbula nsambo oyo Ezipito ekozala na ebele ya biloko, kasi bangɔmbɛ oyo ekɔndakɔndá mpe mitó ya mbuma ya kosala farini oyo ya mabe mpenza emonisaki mbula nsambo ya nzala oyo ekolanda na nsima. Nzala yango ekosilisa ebele ya biloko nyonso ya mboka yango.​—Ebandeli 41:25-32.

w15 1/2 lok. 15 par. 3

“Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te?”

Farao atosaki maloba na ye. Balatisaki mbala moko Yozefe bilamba ya lini ya kitoko. Farao apesaki ye nsinga ya monzɛlɛ ya wolo, lopɛtɛ ya kotya bilembo, likalo ya lokumu, mpe bonsomi ya kotambola na mboka yango mobimba mpo na kokokisa mokumba na ye. (Ebandeli 41:42-44) Kaka na mokolo moko mpamba, Yozefe alongwe na bolɔkɔ mpe akómi na ndako ya mokonzi. Abandaki lokola moto mpamba ya bolɔkɔ, kasi na nsima akómaki moto ya mibale na bokonzi nsima ya Farao. Emonani polele ete kondima ya Yozefe epai ya Yehova Nzambe ezalaki mpamba te! Yehova amonaki makambo nyonso ya kozanga bosembo oyo enyokolaki mosaleli na ye wana na boumeli ya bambula mingi. Asilisaki yango na ntango mpe na ndenge oyo ebongi mpenza. Yehova azalaki na mposa kaka te ya kosilisa mabe oyo basalelaki Yozefe kasi mpe kobatela ekólo Yisraele mpo na mikolo oyo ezalaki koya. Tokomona mpo na nini ezalaki bongo na banimero oyo ekolanda.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w15 1/11 lok. 9 par. 1-3

Oyebaki yango?

Mpo na nini Yozefe akataki mandɛfu liboso akutana na Farao?

Mokanda ya Ebandeli emonisi ete Farao apesaki mitindo báyela ye nokinoki Yozefe, Moebre oyo azalaki na bolɔkɔ mpo alimbolela ye bandɔtɔ oyo etungisaki ye. Na ntango yango, Yozefe aumelaki bambula mingi na bolɔkɔ. Atako abengisaki ye nokinoki, azwaki ntango ya kokata mandɛfu. (Ebandeli 39:20-23; 41:1, 14) Soki mokomi ya mokanda yango alobeli likambo wana oyo ezali mpenza na ntina te, emonisi ete ayebaki mpenza mimeseno ya Bato ya Ezipito.

Kokolisa mandɛfu ezalaki momeseno ya bikólo mingi ya ntango ya kala ata mpe Baebre. Kasi, mokanda moko (Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature) oyo McClintock ná Strong bakomaki, elobi boye: “Na bikólo nyonso ya Moyen-Orient, kaka Ezipito nde eboyaki momeseno ya kotika mandɛfu milai.”.

Bazalaki kokata kaka mandɛfu? Zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobi ete mimeseno mosusu oyo bato ya Ezipito bazalaki kosala na milulu esɛngaki moto amibongisa liboso akutana na Farao ndenge basalaka ntango alingi kokende na tempelo. Na libaku ya ndenge wana, esɛngaki Yozefe akata nsuki nyonso banda na motó tii na makolo.

w09 15/11 lok. 28 par. 14

Tózala na bonkonde biso baministre ya Nzambe

14 Na ntango ya kala, baboti oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki koteya bana na bango bonkonde. Tótala ndenge oyo Abrahama ná mwana na ye Yisaka bazalaki kosolola na limemya na Ebandeli 22:7. Yozefe mpe amonisaki ete baboti na ye bateyaki ye malamu. Ntango azalaki na bolɔkɔ, azalaki na bonkonde ata epai ya baninga na ye ya bolɔkɔ. (Eba. 40:8, 14) Maloba na ye epai ya Farao emonisaki ete ayekolaki ndenge malamu ya koloba na mokonzi.​—Eba. 41:16, 33, 34.

25-31/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 42-43

“Yozefe amipekisaki mpenza”

w15 1/5 lok. 13 par. 5

“Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”

Bongo Yozefe? Ayebaki bandeko na ye mbala moko! Longola yango, ntango amonaki bango bafukameli ye, akanisaki lisusu bolenge na ye. Lisolo yango elobi ete “na mbala moko Yozefe akanisaki bandɔtɔ oyo alɔtaki” oyo Yehova alɔtisaki ye ntango azalaki naino elenge, ndɔtɔ oyo esakolaki eleko oyo bandeko na ye bakoya kofukamela ye mpe yango nde basali! (Ebandeli 37:2, 5-9; 42:7, 9) Yozefe alingaki kosala nini? Koyamba bango? Kozongisela bango mabe?

w15 1/5 lok. 14 par. 1

“Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”

Mbala mosusu likambo ya ndenge wana ekokómela yo te. Kasi, lelo oyo, matata mpe bokabwani ezali komonana na mabota mingi. Ntango tokutani na mikakatano ya ndenge wana, tokoki kosala oyo motema na biso elingi mpe kosala makambo na nkanda ndenge bomoto na biso ya kozanga kokoka etindi biso. Ezali malamu kolanda ndakisa ya Yozefe mpe koluka kososola ndenge oyo Nzambe alingi tósala na likambo boye to boye. (Masese 14:12) Kobosana te ete ndenge kaka ezalaka na ntina kozongisa kimya ná bato ya libota, kimya elongo na Yehova mpe Mwana na ye ezali na ntina mingi koleka.​—Matai 10:37.

w15 1/5 lok. 14 par. 2

“Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”

Mpo na koyeba oyo ezalaki na mitema ya bandeko na ye, Yozefe atyaki bango na komekama ndenge na ndenge. Abandaki naino na koloba na bango maloba makasimakasi na nzela ya moto oyo azalaki kobongola maloba na ye na monɔkɔ oyo bandeko na ye balobaka, afundaki bango ete bazali banɔngi. Mpo na komonisa ete bazali banɔngi te, bayebisaki ye makambo etali libota na bango mpe ntina oyo leki na bango ya nsuka atikalaki na ndako. Yozefe amekaki kobomba esengo na ye. Leki na ye azalaki mpenza na bomoi? Sikoyo Yozefe ayebaki ndenge akosala. Alobaki boye: “Na likambo oyo nde bokomekama” mpe na nsima ayebisaki bango ete asengeli komona leki na bango. Na nsima, andimaki bázonga na ndako na bango mpo na kozwa leki na bango soki moko na bango akondima kotikala mokangami.​—Ebandeli 42:9-20.

it-2-F lok. 50 par. 4

Yozefe

Ndenge oyo makambo ezalaki koleka etindaki bandeko ya Yozefe bákanisa ete Nzambe azalaki kopesa bango etumbu mpo batɛkaki ndeko na bango lokola moombo bambula mingi liboso. Ntango bakómaki liboso ya Yozefe, bayebaki ye te mpe bazalaki komipesa foti. Ntango Yozefe ayokaki makambo oyo bazalaki koloba, oyo emonisaki ete babongolaki motema, abulunganaki mpe alongwaki akei mwa mosika na bango mpe abandaki kolela. Ntango azongaki, akangisaki Simeone tii ntango bandeko na ye bakozonga elongo na leki na bango ya nsuka.​—Eb 42:21-24.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 835 par. 2

Rubene

Bizaleli ya malamu mosusu ya Rubene eyaki komonana ntango andimisaki bandeko na ye libwa ete bábwaka Yozefe na libulu ezangá mai na esika báboma ye, na mokano ya kozonga kobimisa ye na kobombana mpo na kobikisa ye. (Eb 37:18-30) Mbula 20 na nsima, ntango kaka bandeko ya Yozefe bakendaki na Ezipito bazalaki kolobana ete soki babengaki bango banɔngi ezalaki mpo banyokolaki Yozefe, Rubene akundwelaki bango ete apesaki mabɔkɔ te mpo báboma Yozefe. (Eb 42:9-14, 21, 22) Lisusu, ntango Yakobo aboyaki kotika Benyamina akende elongo na bandeko na ye na mobembo ya mibale na Ezipito, Rubene nde apesaki likanisi ete akopesa bana na ye mibale ya mibali lokola ndanga, alobaki boye: “Okoboma bana na ngai mibale soki nazongiseli yo . . . [Benyamina] te.”​—Eb 42:37.

w04 15/1 lok. 29 par. 1

Makanisi ya ntina na mokanda ya Genese​—II

43:32​—Mpo na nini Baezipito bazalaki koboya kolya esika moko na Baebre? Ekoki kozala mpo na bindimeli na bango to mpo na lolendo. Baezipito bazalaki mpe kolinga te bato oyo babɔkɔlaka bampate. (Ebandeli 46:34) Mpo na nini? Ekoki kozala ete babateli ya mpate bazalaki bato mpamba mpenza na ndenge oyo bazalaki kotalela bato na mboka na bango. Ekoki mpe kozala ete lokola mabele ezalaki mingi te mpo na kosala bilanga, Baezipito bazalaki kosepela te na bato oyo bazalaki koleisa bibwele na bitando ya zamba.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto