Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr20 Novembre nk. 1-8
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • 02-08/11
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2020
mwbr20 Novembre nk. 1-8

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

02-08/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | KOBIMA 39-40

“Moize alandaki malamumalamu malako”

w11 15/9 nk. 27-28 par. 13

Yehova ayebi yo?

13 Na bokeseni na Kora, Moize azalaki “na komikitisa mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.” (Mit. 12:3) Amonisaki komikitisa na ye na ndenge alandaki malamumalamu malako ya Yehova. (Kob. 7:6; 40:16) Eloko moko te emonisi ete mbala mingi, Moize aboyaki kolanda ndenge oyo Yehova azalaki kosala makambo, to ete asilikaki mpo asɛngelaki kolanda malako ya Yehova. Na ndakisa, ntango Yehova apesaki mitindo bátonga tabernakle, apesaki malako ya sikisiki ata na makambo ya mikemike, lokola langi ya nsinga mpe motángo ya miso oyo basengelaki kosala na yango bilamba ya hema. (Kob. 26:1-6) Soki mokɛngɛli moko na lisangá apesi yo malako ya sikisiki ata na makambo ya mikemike mpo na kosala likambo moko, okoki kolɛmba nzoto. Kasi Yehova azali mokɛngɛli oyo aleki malamu. Apesaka basaleli na ye mosala mpe atyaka motema ete bakosala yango malamu. Soki apesi malako ata na makambo ya mikemike, apesaka yango mpamba te. Tósimba ete Moize asilikaki te to akanisaki te ete Yehova azangi limemya epai na ye na ndenge apesaki ye malako ebeleebele, ata na makambo ya mikemike. Moize asilikaki te mpe alobaki te ete Yehova apekisi ye abimisa mayele na ye moko mpo na kosala makambo. Nzokande, Moize alandelaki makambo malamu mpo basali básala “kaka bongo,” na kolanda malako ya Yehova. (Kob. 39:32) Oyo nde komikitisa! Moize ayebaki ete mosala ezali ya Yehova mpe ete ye azali kaka esaleli mpamba na mabɔkɔ ya Yehova.

w05 15/7 lok. 27 par. 3

Ozalaka sembo na makambo nyonso?

3 Baebre 3:5 elobi ete: “Moize lokola mosaleli azalaki sembo.” Mosakoli Moize asalaki nini oyo emonisi ete azalaki sembo? Na mosala ya kotonga mpe kobongisa tabernakle, “Moize asalaki boye; ye asalaki [lokola] yango nyonso elakelaki ye [Yehova].” (Kobima 40:16) Biso basambeli ya Yehova tomonisaka ete tozali sembo epai na ye ntango tozali kosalela ye na ndenge oyo azali kosɛnga biso. Yango esɛngi mpe kokangama na Yehova ata ntango tomekami to tozali na mikakatano ya makasi. Nzokande, ezali kaka te ntango tolongi komekama ya makasi nde tokomonisa ete tozali sembo. Yesu alobaki boye: “Moto oyo azali sembo na oyo eleki moke azali mpe sembo na mingi, mpe moto oyo azali moyengebene te na oyo eleki moke azali mpe moyengebene te na mingi.” (Luka 16:10) Tosengeli kozalaka sembo ata na makambo ya mikemike.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 510 par. 3

Mposo ya nyama ebengami fɔkɛ

Ndenge Bayisraele bazwaki yango. Soki nyama ebengami taḥash oyo Biblia elobeli ezali komonisa motindo moko ya banyama ebengami fɔkɛ, bato bakoki komituna ndenge nini Bayisraele bakokaki kozwa mposo ya nyama yango. Atako banyama ebengami fɔkɛ ezwamaka mingimingi na Océan Arctique mpe na Océan Antarctique, tosengeli koyeba ete mitindo mosusu ya banyama yango esepelaka mpe na klima ya molunge. Lisusu, banyama yango mosusu ezalaka na Mbu ya Mediterane mpe mosusu na Bambu oyo ezalaka mwa mɔtɔ. Na boumeli ya basiɛklɛ, bato basilisi ebele ya banyama ebengami fɔkɛ; na yango emonani lokola na ntango ya kala banyama yango ezalaki ebele na Mbu ya Mediterane mpe na Mbu Motane. Lisusu na 1832, buku moko Dictionnaire de la Bible d’Augustin Calmet (lok. 139) elobi boye: “Okomona ebele mpenza ya banyama ebengami fɔkɛ na bisanga ya mikemike ya Mbu Motane, zingazinga ya Sinai.”​—Talá mpe buku The Tabernacle’s Typical Teaching, A. Pollock, Londres, lok. 47.

w15-F 15/7 lok. 21 par. 1

Nani asengeli kotya likebi na mosala na yo?

Ntango basilisaki kotonga tabernakle, lipata moko “ebandaki kozipa hema ya kokutana, mpe nkembo ya Yehova etondisaki tabernakle.” (Kob. 40:34) Oyo nde elembo oyo emonisi ete Yehova andimaki mosala na bango! Kanisá naino, Besalele ná Oholiabe bayokaki ndenge nini na ntango wana? Atako bankombo na bango etyamaki te na biloko oyo basalaki, basepelaki mpenza komona ndenge Yehova apambolaki milende nyonso oyo basalaki. (Mas. 10:22) Bakobaki kosalela biloko oyo basalaki na losambo mpo na Yehova na boumeli ya bambula mingi. Na ntembe te, bazalaki na ntina ya kosepela mpenza. Na mokili ya sika, ntango Besalele ná Oholiabe bakosekwa, na ntembe te bakozala mpenza na esengo ya koyoka ete basalelaki tabernakle na boumeli ya bambula soki 500!

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur: Motó ya likambo: Tokoki kosala nini mpo tókoba koboya kokɔta na makambo ya mokili na masolo oyo tobɛtaka mpe na makanisi na biso?

w16.04 nk. 23-24 par. 8-10

Kobá koboya kokɔta na makambo ya mokili oyo ekabwani

8 Lolenge ya mibale ya koboya kokɔta na makambo ya mokili ezali ya kozala ‘ekɛngɛ lokola banyoka kasi kozala na ngambo te lokola bibenga.’ (Tángá Matai 10:16, 17.) Tokomonisa ete tozali “ekɛngɛ” soki tozali kokanisa liboso komekama nini tokoki kokutana na yango. Tokomonisa ete tozali na “ngambo te” soki tozali kokɔta te na makambo ya mokili na ntango ya komekama. Tótalela mwa ndambo ya makambo yango mpe oyo tokoki kosala mpo tóboya kokɔta na makambo ya mokili.

9 Masolo oyo tobɛtaka. Tosengeli mpenza kokeba ntango bato babandi kolobela makambo ya politiki. Na ndakisa, ntango tozali kosolola na moto makambo etali Bokonzi ya Nzambe, tosengeli te koloba ete tondimi to toboyi makanisi ya lisangá moko ya politiki to ya moto moko ya politiki. Na esika ya kolobela makambo oyo bato bakani kosala mpo na kosilisa mikakatano ya bato, monisá ye na Biblia ndenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano yango mpo na libela. Soki bato balingi kolobela likambo moko, na ndakisa mabala ya basi na basi to mibali na mibali, to kosopa zemi, yebisá bango oyo Liloba ya Nzambe elobi mpe ndenge osalaka makasi otosa mitinda yango na bomoi na yo. Soki moto moko alobi ete esengeli bábongola mibeko mosusu to bálongola yango, tosengeli te kozala na ngámbo na ye, tosengeli mpe te kotingama ete moto yango abongola makanisi na ye.

10 Bansango oyo epesamaka na radio, televizyo, bazulunalo, mpe Internet. Ntango mosusu, bapanzi-nsango bapesaka nsango na ndenge oyo ezali komonisa polele ete bazali kopesa mabɔkɔ na ngámbo moko na likambo moko boye. Yango emonanaka mingimingi na bamboka oyo guvɛrnema elandelaka bansango nyonso oyo ezali kopesama. Soki shɛni moko ya radio to ya televizyo to mpe bapanzi-nsango bazali na ngámbo moko, tosengeli kokeba mpo tókóma te kokanisa lokola bango. Na ndakisa, omituna boye: ‘Nasepelaka koyoka mopanzi-nsango moko mpo nandimaka makambo oyo alobaka mpo na politiki?’ Mpo na kosalisa yo okɔta te na makambo ya mokili, boyá kolanda to kotánga bansango mingi oyo ekɔtelaka ngámbo moko na makambo ya politiki. Luká nde kolanda bansango oyo ekɔtelaka ata ngámbo moko te. Mpe kokanisáká ntango nyonso makambo oyo oyoki na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” oyo ezali na Biblia.​—2 Timote 1:13.

09-15/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 1-3

“Ntina oyo bazalaki kopesa makabo”

it-2-F lok. 847 par. 1

Makabo

Makabo ya kotumba. Makabo ya kotumba ezalaki kotyama mobimba liboso ya Nzambe; moto azalaki kotikala ata na eteni moko te ya mosuni ya nyama yango. (Talá mpe Bas 11:30, 31, 39, 40.) Makabo ya kotumba ezalaki kopesama mpo na kosɛnga Yehova andima to amonisa ete andimi likabo mpo na lisumu oyo mbala mosusu moto apesaki. Lokoka “likabo ya kotumba,” Yesu Kristo amipesaki mobimba.

it-2-F lok. 849 par. 8

Makabo

Makabo ya mbuma. Makabo ya mbuma ezalaki kopesama nzela moko na makabo ya boyokani, makabo ya kotumba mpe makabo mpo na lisumu, kasi esengelaki kozala bambuma ya liboso; mbala mosusu moto ye moko nde azalaki kopesa yango ndenge alingi. (Kob 29:40-42; Le 23:10-13, 15-18; Mit 15:8, 9, 22-24; 28:9, 10, 20, 26-28; mok. 29) Bazalaki kopesa makabo yango mpo na komonisa botɔndi epai ya Nzambe ndenge azalaki kopambola bango mpe kopesa bango ebele ya biloko. Bazalaki mpe komema mafuta ná olibana. Makabo ya mbuma ekokaki kozala farini ya malamu ya blé, mbuma ya kotumba, to bagato ezangi levire oyo basali lokola lopɛtɛ to bagalɛti oyo etumbami na mɔtɔ, oyo ekalingami na kikalungu to oyo euti na nzungu ya libulu oyo ezali na mafuta ya kokalinga. Eteni moko ya likabo ya mbuma ezalaki kotyama na etumbelo ya mbeka ya kotumba, eteni mosusu banganga-nzambe nde bazalaki kolya yango, kasi na oyo etali makabo ya boyokani, moto oyo azalaki kopesa yango, ye mpe azalaki kolya yango. (Le 6:14-23; 7:11-13; Mit 18:8-11) Makabo ya mbuma oyo ezalaki kotyama na etumbelo esengelaki te kozala na levire to “mafuta ya nzoi” (emonani lokola mai ya figi to mai ya mbuma oyo bakamoli) biloko oyo ekoki kovimbisa yango.​—Le 2:1-16.

it-2-F lok. 847 par. 6

Makabo

Makabo ya boyokani (to makabo ya kimya). Makabo ya boyokani oyo endimami na miso ya Yehova ezalaki komonisa kimya elongo na ye. Moto oyo azalaki kopesa yango ná bato ya ndako na ye bazalaki mpe kolya yango (na lopango ya tabernakle; na momeseno, bazalaki kotonga mwa bandako ya matiti zingazinga ya mopanzi ya kati ya rido mpo na kozinga lopango yango; na kati ya tempelo, bisika ya kolya mpe ezalaki). Nganga-nzambe oyo azalaki kosala molulu yango azalaki kozwa eteni moko, mpe banganga-nzambe oyo bazalaki kosala mosala ntango wana bazalaki mpe kozwa eteni mosusu. Ezalaki lokola Yehova azali koyoka nsolo kitoko ya mafuta oyo ezalaki kobimisa milinga. Lokola makila, emonisaka bomoi, ezalaki kopesama kaka na Nzambe mpo ye nde nkolo na yango. Na yango, ezalaki lokola banganga-nzambe, bato oyo bazalaki kopesa yango mpe Yehova bazalaki kolya bilei yango elongo, ezalaki komonisa boyokani ya kimya. Moto nyonso oyo alye yango ntango azali mbindo (eloko nyonso oyo ezalaki mbindo ndenge emonisami na Mibeko) to alye mosuni mpe alekisi ntango oyo etyamaki (na eleko ya molunge, bilei yango ezalaki kobeba to kobimisa nsolo mabe), moto yango asengelaki kolongolama na kati ya bato na ye. Moto ya ndenge wana akómisaki bilei yango mbindo, to amikómisaki mbindo, to alyaki eloko oyo esí ekómaki mbindo na miso ya Yehova Nzambe, yango emonisi ete azangaki limemya mpo na biloko mosantu.​—Le 7:16-21; 19:5-8.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w04 15/5 lok. 22 par. 1

Makanisi ya ntina na mokanda ya Levitike

2:13​—Mpo na nini esengelaki kotya mungwa ‘na mbeka nyonso’? Soki bazalaki kotya mungwa na mbeka, ezalaki te mpo ekóma elɛngi. Na mokili mobimba, bato basalelaka mungwa mpo na kobatela bilei epɔla te. Emonani ete bazalaki kotya mungwa na mbeka mpo mungwa emonisaka eloko oyo epɔlá te mpe ebebá te.

it-1-F lok. 1003 par. 6

Mafuta

Ntina oyo mobeko yango etyamaki. Na nse ya Kondimana ya Mibeko, bazalaki kotalela makila mpe mafuta lokola biloko oyo esengelaki kopesama kaka na Yehova. Bomoi ezalaka na kati ya makila, ezali bomoi oyo kaka Yehova nde akoki kopesa; yango wana ezali eloko na ye. (Le 17:11, 14) Bazalaki kotalela mafuta lokola eteni ya mosuni ya nyama oyo eleki malamu. Na yango, ntango moto azalaki kopesa mafuta ya nyama, azalaki kondima ete eteni oyo eleki malamu ezali ya Yehova, oyo azali Mokabi monene, mpe azalaki komonisa ete azali na mposa ya kopesa Nzambe eloko oyo eleki malamu. Lokola mafuta ezalaki elilingi ya mbeka oyo eleki malamu oyo Bayisraele bazalaki kopesa Yehova, balobaki ete ezalaki kobimisa milinga likoló ya etumbelo lokola “bilei” mpe “nsolo moko ya kokitisa motema” mpo na ye. (Le 3:11, 16) Yango wana, moto oyo azalaki kolya mafuta azalaki kobuka mibeko mpo azalaki kozwa eloko oyo esantisamaki mpo na Nzambe, mpe azalaki kobɔtɔla ntomo oyo Yehova azali na yango. Moto yango asengelaki kozwa etumbu ya liwa. Kasi, na bokeseni na makila, mafuta ekokaki kosalelama na makambo mosusu, soki kaka euti na nyama oyo ekufi yango moko to nyama mosusu nde ebomi yango.​—Le 7:23-25.

w04 15/5 lok. 22 par. 2

Makanisi ya ntina na mokanda ya Levitike

3:17. Lokola Bayisraele bazalaki kotalela mafuta lokola eteni oyo eleki malamu, emonani ete mobeko oyo epekisaki bango kolya mafuta ezalaki koteya bango ete esengeli kopesa na Yehova eteni oyo eleki malamu. (Ebandeli 45:18) Yango ezali koteya biso ete tosengeli kopesa Yehova oyo tozali na yango ya malamu koleka.​—Masese 3:9, 10; Bakolose 3:23, 24.

BOMOI YA BAKRISTO

“Valɛrɛ ya ‘mbongo ya bibende mibale’”

Talá nɔti mpo na koyekola na Luka 21:4

Atyaki nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela: Ndenge emonisami na nɔti mpo na koyekola na Lk 21:2, mbongo ya bibende oyo mwasi oyo mobali akufá atyaki na kɛsi ya makabo ezalaki “leptone mibale,” mbongo oyo ezalaki na valɛrɛ ya lifuti ya mokolo mobimba ya mosala kabolá na 64. Leptone ezali mbongo ya bibende oyo ezalaki na valɛrɛ moke mpenza na Yisraele na ntango ya kala. Na kotalela Mt 10:29, mbongo moko ya ebende babengi assiron, (oyo ezalaki na motuya ya dolare moko kabolá na ntuku mibale) moto akokaki kosomba na yango bandɛkɛ ebengami bakɛngɛli-mboka mibale, oyo ezalaki kati na bandɛkɛ eleki ntalo moke oyo babola bazalaki kolya. Na yango, mwasi yango oyo mobali akufá azalaki mpenza mobola, mpo azalaki kaka na mbongo oyo ezalaki na valɛrɛ mpenza oyo esengelaki mpo na kosomba mokɛngɛli-mboka moko, oyo ekokaki ata te mpo na bilei ya mokolo moko.

Talá nɔti mpo na koyekola na Luka 21:2

Mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza: Elingi koloba mpenza, “leptone mibale.” Liloba ya Grɛki leptone elimboli “eloko moko ya moke mpe oyo ekɔndá.” Leptone moko ezalaki mbongo ya ebende oyo ezalaki na valɛrɛ ya denari moko kabolá na 128 mpe emonani ete ezalaki mbongo ya kwivre to ya bronzɛ oyo ezalaki na valɛrɛ moke mpenza oyo bazalaki kosalela na Yisraele na ntango ya kala.​—Talá Ndimbola ya liloba, “Leptone,” mpe Ap. 5.

16-22/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 4-5

“Pesá Yehova oyo eleki malamu”

it-2-F nk. 848-849 par. 13

Makabo

Makabo ya ngambo. Makabo ya ngambo ezalaki mpe makabo mpo na lisumu, mpamba te ngambo nyonso esɛngaka lisumu esalemá. Makabo yango ezalaki kopesama mpo na masumu mosusu oyo esalaka ete moto azala na ngambo, mpe makabo yango ekesanaki mwa moke na makabo mosusu mpo moto azalaki kopesa yango mpo na kozongisa boyokani na Nzambe to mpo na kozwa lotomo ya kosala makambo oyo azalaki lisusu kosala te. Moto azalaki kobuka lotomo, mbala mosusu ya Yehova to ya ekólo na ye mosantu. Mosumuki oyo abongoli motema azalaki kopesa likabo ya ngambo mpo na kozongisa boyokani elongo na Nzambe to mpo na kozwa lotomo ya kosala makambo oyo azalaki lisusu kosala te to mpo na kosikolama na bitumbu oyo asengelaki kozwa mpo na lisumu na ye.​—Talá mpe Yis 53:10.

w09 1/6 lok. 26 par. 3

Ayebi ndelo na biso

Mpo na komonisa bolingo ya Yehova, Mobeko elobaki boye: “Kasi soki na ntina na bobola ye akoki kopesa mwana ya mpate te, mbɛ mpo na mbeka ya ekweli na ye akoya na bibenga mibale to na bana na bibenga mibale.” (Vɛrsɛ 7) Maloba “soki . . . akoki kopesa mwana ya mpate te” ekoki mpe kobongolama na “soki . . . lobɔkɔ na ye ekoki kozwa te.” Soki Moyisraele azali mobola mpenza mpe akoki kozwa mwana ya mpate te, Nzambe azalaki kondima eloko oyo moto yango akokaki kopesa​—bibenga mibale to bana ya bibenga mibale.

w09 1/6 lok. 26 par. 4

Ayebi ndelo na biso

Kasi, ezali boni soki moto yango azalaki ata na likoki te ya kozwa bandɛkɛ yango mibale? Mobeko elobaki boye: “Mpo na mbeka mpo na lisumu esali ye, akoya na ndambo moko ya zomi ya efa moko ya fufu [kɔpɔ mwambe to libwa] etutami mokemoke mpo na mbeka ya lisumu.” (Vɛrsɛ 11) Mpo na moto oyo azalaki mobola mpenza, Yehova azalaki kondima apesa mbeka oyo ezangi makila. Na Yisraele, bobola ezalaki kopekisa moto moko te kozwa bolimbisi ya masumu to likoki ya kozongisa kimya na Nzambe.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w16.02 lok. 24 par. 14

Yekolá epai ya basaleli ya sembo ya Yehova

14 Yo mpe okoki kozala sembo libosoliboso epai ya Yehova na nsima epai ya bato mosusu soki ozali na boboto. Na ndakisa, okoki kozala na bilembeteli ete ndeko moko asali lisumu ya monene. Okoki kozala na mposa ete otikala sembo epai na ye, mingimingi soki azali moninga na yo ya motema to moto ya libota na yo. Kasi, oyebi mpe ete kozala sembo epai ya Yehova ezali na ntina mingi koleka. Na yango, lokola Natane, tosá Yehova kasi zalá na boboto epai ya ndeko na yo. Yebisá ye ete asengeli kosɛnga bankulutu básalisa ye mpe asengeli kosala yango na lombangu. Soki asali yango te, yo osengeli koyebisa bankulutu likambo yango. Soki osali bongo, okotikala sembo epai ya Yehova. Okomonisa mpe ete ozala na boboto epai ya ndeko na yo mpo bankulutu bakoki kosalisa ye azala lisusu na boyokani malamu elongo na Yehova. Bakosembola ye na kimya mpe na boboto.​—Tángá Balevi 5:1; Bagalatia 6:1.

it-2-F lok. 861 par. 8

Bosantu

Banyama mpe kobota. Bangɔmbɛ-mibali oyo ezali bana ya liboso, bampate-mibali oyo ezali bana ya liboso, mpe bantaba-mibali oyo ezali bana ya liboso ezalaki mosantu na miso ya Yehova, mpe basengelaki kosikola yango te. Esengelaki kopesama mbeka, mpe ndambo na yango mosusu ezalaki kokende epai ya banganga-nzambe oyo basantisami. (Mit 18:17-19) Bambuma ya liboso mpe moko ya bandambo zomi ya biloko ezalaki mosantu, ndenge moko mpe na makabo oyo esantisamaki mpo na mosala ya esika mosantu. (Kob 28:38) Biloko nyonso oyo ezalaki mosantu na miso ya Yehova ezalaki biloko mosantu, mpe esengelaki te kozwa yango na lisɛki to kosalela yango na makambo mosusu. Tozali na ndakisa ya mobeko ya moko ya bandambo zomi. Soki moto atye pembeni moko ya bandambo zomi ya likabo na ye, na ndakisa mbuma na ye ya blé, mpe ete ye moko to moto moko ya libota na ye alongoli kozanga koyeba ndambo ya mbuma yango mpo na kosalela yango na mosala ya ndako, na ndakisa kolamba; moto yango abukaki mobeko ya Nzambe na oyo etali biloko mosantu. Mobeko elobaki ete mpo na esika mosantu, moto asengelaki kozongisa biloko oyo azwaki mpe asengelaki kobakisa moko ya bandambo mitano, elingi koloba, 20% ya biloko yango. Lisusu, asengelaki kopesa mbeka ya mpate-mobali moko oyo ezangi mbeba, oyo euti na etonga ya bampate na ye. Yango nde esalaki ete bato bámemyaka makasi biloko mosantu oyo ezalaki ya Yehova.​—Le 5:14-16.

23-29/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 6-7

“Ndenge ya komonisa botɔndi”

w19.11 nk. 22-23 par. 9

Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda ya Balevi

9 Ya mibale: Tosalelaka Yehova mpo tozali na botɔndi epai na ye. Mpo tómona yango polele, tólobela naino bambeka ya boyokani oyo Bayisraele bazalaki kopesa na losambo na bango. Mokanda ya Balevi emonisi ete Moyisraele akokaki kopesa mbeka ya boyokani “mpo na komonisa botɔndi.” (Lev. 7:11-13, 16-18) Azalaki kopesa yango mpo alingi, kasi te mpo esɛngisamaki. Na yango, mbeka ya boyokani ezalaki likabo oyo moto azalaki kopesa na bolingo na ye moko mpo alingaki Yehova Nzambe na ye. Moto yango, libota na ye, mpe banganga-nzambe bazalaki kolya mosuni ya nyama oyo apesi mbeka. Kasi, biteni mosusu ya nyama yango ezalaki kaka mpo na Yehova. Biteni nini?

w00 15/8 nk. 15-16 par. 15

Bambeka oyo Nzambe asepelaki na yango

15 Likabo mosusu oyo moto akokaki kopesa Nzambe soki motema na ye esepeli ezalaki mbeka ya bondeko. Balobeli mbeka yango na Balevi mokapo 3. Nkombo yango ekoki mpe kobongolama na “mbeka ya makabo ya kimya.” Na Ebre, liloba “kimya” elimboli kaka te kozanga bitumba to kozanga mobulu. Mokanda moko (Studies in the Mosaic Institutions) elobi ete: “Na Biblia, liloba yango elimboli kimya, mpe lisusu boyokani ya kimya elongo na Nzambe, bomɛngo, esengo, mpe bolamu.” Na bongo, tokoki koloba te ete bazalaki kopesa mbeka ya kimya mpo na kobatela kimya na Nzambe, lokola nde mpo na kokitisa nkanda na ye; kasi ezali mpo na komonisa botɔndi to kokumisa kimya oyo ezali kati na Nzambe na bato oyo asepeli na bango. Banganga-nzambe ná moto oyo apesi likabo, bazalaki kolya nyama oyo bapesi lokola mbeka nsima ya kokabela Yehova makila na mafuta na yango. (Balevi 3:17; 7:16-21; 19:5-8) Ezalaki elembo moko malamu oyo ezalaki komonisa lokola nde moto oyo apesi likabo, na banganga, na Yehova Nzambe bafandi na mesa moko mpe bazali kolya. Yango ezalaki komonisa kimya oyo ezalaki kati na bango.

w00 15/8 lok. 19 par. 8

Bambeka ya masanzoli oyo esepelisaka Yehova

8 Nzambe asɛngaki nini mpo na moto oyo azali kopesa mbeka? Mibeko elobaki ete moto oyo ayei liboso ya Yehova asengelaki kozala pɛto mpe asengelaki kozala na likambo ya mabe te. Moto nyonso oyo azali mbindo, ata mpo na ntina nini, asengelaki naino kopesa mbeka ya masumu to mbeka ya ekweli mpo azala pɛto na miso ya Yehova, na nsima nde Nzambe akokaki kondima mbeka na ye ya kotumba to mbeka ya bondeko. (Balevi 5:1-6, 15, 17) Tomoni ntina oyo tosengeli ntango nyonso kozala pɛto na miso ya Yehova? Soki tolingi Nzambe andima losambo na biso, tosengeli kosala nokinoki mpo na kobongisa makambo ntango tobuki mobeko ya Nzambe. Tosengeli kolanda nokinoki ebongiseli oyo Nzambe atye mpo na kosalisa biso, elingi koloba, kokutana na “bankulutu ya lisangá” mpe kosɛnga Nzambe bolimbisi na nkombo ya Yesu Klisto, oyo azali “mbɔndi mpo na masumu na biso.”​—Yakobo 5:14; 1 Yoane 2:1, 2.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 889 par. 2

Mɔtɔ

Na tabernakle mpe na tempelo. Mɔtɔ ezalaki na esika na kati ya losambo oyo ezalaki kosalema na tabernakle, mpe na nsima na tempelo. Ntɔngɔ nyonso mpe mpokwa nyonso, nganga-nzambe monene asengelaki kotumba mpaka ya malasi likoló ya etumbelo ya mpaka ya malasi. (Kob 30:7, 8) Mibeko ya Nzambe esɛngaki ete mɔtɔ ekoba kopela ntango nyonso likoló ya etumbelo. (Le 6:12, 13) Atako Bayuda mingi balobaka ete na ebandeli, Nzambe nde apelisaki mɔtɔ ya etumbelo na ndenge ya likamwisi, kasi makambo oyo balobaka eyokani te na oyo Makomami elobi. Na kotalela malako ya liboso oyo Yehova apesaki Moize, bana ya Arona basengelaki “kotya mɔtɔ na etumbelo mpe kotya nkoni na molɔngɔ likoló ya mɔtɔ” liboso ya kotya mbeka likoló ya etumbelo. (Le 1:7, 8) Ezalaki nsima ya kotyama ya bonganga-nzambe ya libota ya Arona na mosala; elingi koloba, ezalaki nsima ya kopesa bambeka ya kotyama na bango na mosala, nde mɔtɔ oyo eutaki na Yehova, ekoki kozala eutaki na lipata likoló ya tabernakle, etumbaki likabo oyo ezalaki likoló ya etumbelo. Na ntango yango nde mɔtɔ wana epelaki yango moko na ndenge ya likamwisi, epelisaki te nkoni oyo ezalaki likoló ya etumbelo, kasi ‘etumbaki mbeka ya kotumba mpe ebimisaki milinga likoló ya etumbelo.’ Na ntembe te, mɔtɔ oyo ekobaki kopela na nsima likoló ya etumbelo eutaki mbala mosusu na mɔtɔ oyo eutaki na Nzambe mpe mɔtɔ oyo bapelisaki liboso. (Le 8:14–9:24) Ndenge moko mpe, mɔtɔ oyo eutaki na Yehova na ndenge ya likamwisi etumbaki bambeka kaka nsima ya libondeli oyo Salomo asalaki na molulu ya kofungola tempelo.​—2Nt 7:1; talá mpe Bas 6:21; 1Ba 18:21-39; 1Nt 21:26 mpo na komona bandakisa mosusu oyo emonisi ndenge Yehova asalelaki mɔtɔ oyo eutaki epai na ye na ndenge ya likamwisi mpo na komonisa ete andimaki makabo ya basaleli na ye.

si lok. 27 par. 15

Mokanda ya Biblia nimero 3​—Levitike

15 (3) Likabo mpo na lisumu esɛngami soki moto asali lisumu na nko te, to asali libunga. Lolenge ya nyama oyo ezalaki kopesama etaleli lisumu oyo esengelaki kozipama​—ezala ya nganga-nzambe, ya libota mobimba, ya mokonzi moko, to ya moto moko. Na bokeseni na mbeka ya kotumba mpe makabo ya kimya oyo epesamaki na bolingo nyonso mpo na bato, likabo mpo na masumu esɛngisamaki.​—4:1-35; 6:24-30.

30/11–06/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 8-9

“Elembo oyo emonisaki lipamboli ya Yehova”

it-1-F lok. 1189 par. 2

Kotyama na mosala

Moize asukolaki Arona mpe bana na ye, Nadabe, Abihu, Eleazare mpe Itamare (to apesaki bango mitindo ete básukola nzoto na bango), na saani monene ya motako oyo ezalaki na lopango, mpe na nsima alatisaki Arona bilamba ya kitoko ya nganga-nzambe monene. (Mit 3:2, 3) Longola bilamba wana kitoko, Arona alataki mpe bilamba mosusu oyo etondaki na biloko oyo ezalaki komonisa bizaleli mpe mikumba oyo azalaki na yango mpo na mosala yango. Nsima na yango, Moize atyaki tabernakle mafuta ná biloko na yango nyonso mpe bisaleli na yango nyonso, ezala mpe etumbelo ya mbeka ya kotumba, saani monene mpe bisaleli na yango mpo na mosala. Biloko yango esantisamaki, etyamaki pembeni mpo esalelama kaka na mosala ya Nzambe. Nsukansuka, Moize atyaki Arona mafuta ntango asopaki mafuta na motó na ye.​—Le 8:6-12; Ex 30:22-33; Nz 133:2.

it-1-F lok. 1190 par. 3

Kotyama na mosala

Na mokolo ya mwambe, banganga-nzambe bazalaki na nyonso oyo esengeli, mpe batyamaki na mosala na bango. Babandaki kosala (kozanga lisalisi ya Moize) mpo na mbala ya liboso, mpe babandaki naino na kozipa masumu ya ekólo Yisraele. Bayisraele bazalaki mpenza na mposa ya kopɛtolama, kaka te mpo babotamaki bato ya masumu, kasi mpe mpo kala mingi te bazangaki botosi ntango basambelaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo, likambo oyo esalaki ete Yehova asilikela bango mpenza. (Le 9:1-7; Kob 32:1-10) Ntango banganga-nzambe oyo batyamaki sika na mosala na bango basilisaki mosala na bango ya liboso, Yehova amonisaki polele ete andimi mosala oyo basalaki mpe andimi bango na mosala yango ntango atindaki mɔtɔ na ndenge ya likamwisi. Na ntembe te mɔtɔ yango eutaki na likonzí ya lipata oyo ezalaki likoló ya tabernakle, oyo ezikisaki biloko nyonso oyo etikalaki likoló ya etumbelo.​—Le 9:23, 24.

w19.11 lok. 23 par. 13

Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda ya Balevi

13 Liteya ya minei: Yehova azali kopambola eteni ya ebongiseli na ye oyo ezali awa na mabele. Tótalela likambo oyo esalemaki na mobu 1512 L.T.B., ntango batɛlɛmisaki tabernakle pene na Ngomba Sinai. (Kob. 40:17) Moize akambaki molulu moko mpo na kotya Arona ná bana na ye banganga-nzambe. Na nsima, ekólo mobimba ya Yisraele eyanganaki mpo na kotala ndenge banganga-nzambe bakopesa mbeka ya banyama mpo na mbala ya liboso. (Lev. 9:1-5) Ndenge nini Yehova amonisaki ete andimi bonganga-nzambe oyo etyamaki sika? Wana Arona ná Moize bazalaki kopambola bato, Yehova atindaki mɔtɔ mpe ezikisaki biteni ya mbeka oyo ezalaki na etumbelo.​—Tángá Balevi 9:23, 24.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w14 15/11 lok. 9 par. 6

Ntina oyo tosengeli kozala basantu

6 Lisɛngami oyo epesamaki ete banganga-nzambe ya Yisraele bázala pɛto na nzoto ezali na ndimbola monene mpo na basaleli ya Yehova ya mikolo na biso. Bato oyo toyekolaka na bango Biblia bamonaka mbala mingi ete bisika na biso ya losambo mpe bilamba na biso ezalaka pɛto mpe tolataka malamu. Kutu, bopɛto ya banganga-nzambe esalisaka biso tóyeba ete moto nyonso oyo azali komata na ngomba ya Yehova oyo etombwani mpo na kosambela ye asengeli kozala na ‘motema ya pɛto.’ (Tángá Nzembo 24:3, 4; Yis. 2:2, 3.) Mpo na kosalela Nzambe mosala mosantu, tosengeli kozala pɛto na makanisi mpe na motema, ezala mpe na nzoto. Yango esɛngaka ete tomitalelaka mbala na mbala, mpe na nsima bato mosusu bakoki kosala bambongwana oyo esengeli mpenza mpo ete bázala basantu. (2 Ko. 13:5) Na ndakisa, ndeko oyo azwá batisimo mpe amipesi na kotala pornografi asengeli komituna boye, ‘Nazali mpenza komimonisa pɛto?’ Mpe asengeli koluka lisalisi mpo atika ezaleli wana ya mabe.​—Yak. 5:14.

it-2-F lok. 310 par. 5

Moize

Nzambe aponaki Moize azala moyokanisi ya Kondimana ya Mibeko oyo asalaki na Yisraele, moto moko te azwá esika ya lokumu ya ndenge wana na miso ya Nzambe longola kaka Yesu Kristo, Moyokanisi ya kondimana ya sika. Moize azwaki makila ya banyama oyo bapesaki mbeka, amwangiselaki yango buku ya kondimana, mpo na komonisa Yehova “mosangani” ya liboso, mpe bato (na ntembe te mikóló oyo bazalaki bamonisi) mpo na komonisa “mosangani” ya mibale. Atángelaki bango buku ya kondimana, mpe balobaki boye: “Nyonso oyo Yehova alobi tondimi kosala mpe kotosa yango.” (Kob 24:3-8; Ebr 9:19) Lokola azalaki moyokanisi, Moize azalaki na mokumba monene ya kotambwisa mosala ya kotonga tabernakle mpe ya kosala bisaleli na yango, na kolanda modɛlɛ oyo Nzambe alakisaki ye, mpe kotya bonganga-nzambe mpo ebanda mosala, kotya tabernakle mpe Arona nganga-nzambe monene mafuta oyo esalemaki na biloko kitoko. Na nsima, atambwisaki misala ya liboso oyo banganga-nzambe oyo bautaki kotyama sika basalaki.​—Kob mok. 25-29; Le mok. 8, 9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto