Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/8 nk. 12-17
  • Bambeka oyo Nzambe asepelaki na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bambeka oyo Nzambe asepelaki na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bato bapesaka mbeka?
  • Bambeka oyo Yehova andimaka
  • Eloko oyo eleki malamu esengelaki koya
  • Bambeka ya masanzoli oyo esepelisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tópesaka bambeka oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Tókanga ntina ya ‘makambo ya ebandeli ya solo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/8 nk. 12-17

Bambeka oyo Nzambe asepelaki na yango

“Nganga monene na nganga monene atyami na mosala ete atombola makabo mpe mbeka.”​—BAEBELE 8:3.

1. Mpo na nini bato bazalaka na mposa ya Nzambe?

ALFRED EDERSHEIM, moto ya mayele na istware ya Biblia, akomaki ete: “Moto azalaka na ‘mposa’ ya kopesa mbeka ndenge moko mpe azalaka na mposa ya kobondela; kopesa mbeka emonisaka makanisi na ye mpo na ye moko, mpe kobondela emonisaka makanisi na ye mpo na Nzambe.” Banda moto asala lisumu, ayokaka lokola nde amemá ngambo, akabwaná na Nzambe mpe moto ya kosalisa ye azali te. Moto azalaka na mposa básalisa ye mpo alongola makanisi yango. Tokoki kokamwa te ete ntango bato bazali na makanisi ya ndenge wana, mposa na bango ezalaka ya koluka Nzambe mpo asalisa bango.​—Baloma 5:12.

2. Masolo nini ya Biblia elobeli makabo ya liboso oyo bato bapesaki Nzambe?

2 Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli likambo ya kopesa Nzambe mbeka ezali na lisolo ya Kaina na Abele. Lisolo yango elobi boye: “Na nsima ya ntango mosusu Kaina apesaki [Yehova] likabo ya mbuma ya elanga. Mpe Abele, ye lokola, ayeisaki bana ya liboso kati na etonga na ye mpe mafuta na yango lokola.” (Genese 4:3, 4) Na nsima, Noa, moto oyo Nzambe abatelaki ntango Mpela monene ebomaki bato mabe na ntango na ye, ayokaki mposa ya ‘kokabela’ Yehova ‘mbeka na etumbelo.’ (Genese 8:20) Abalayama, mosaleli mpe moninga ya sembo ya Nzambe, mpo na makambo oyo Nzambe alakaki mpe mpo na mapamboli na ye, mbala mingi ‘atongaki etumbelo mpe abelelaki nkombo ya Yehova.’ (Genese 12:8; 13:3, 4, 18, NW) Na nsima, kondima ya Abalayama emekamaki na lolenge oyo eleki makasi ntango Yehova asɛngaki ye akaba mwana na ye Yisaka lokola mbeka ya kotumba. (Genese 22:1-14) Ndenge tokomona yango, mwa masolo mikuse yango ezali kosalisa biso tókanga mpenza ntina ya mbeka.

3. Bambeka ezali na ntina nini na kati ya losambo?

3 Masolo yango na masolo mosusu oyo ezali na Biblia emonisi polele ete na ntango ya kala, kopesa mbeka ezalaki likambo ya ntina mingi na losambo liboso kutu Yehova atya mibeko mpo na likambo yango. Mokanda moko epesi ndimbola oyo eyokani na likambo yango, elobi ete “mbeka” ezali “molulu ya losambo oyo bato basalaka mpo na kokabela nzambe moko eloko mpo na kosala, to kobatela, to kozongisa boyokani malamu, kati na moto na oyo ezali mosantu na miso na ye.” Kasi, ndimbola yango ebimisi mwa mituna ya ntina oyo ebongi tótalela yango malamumalamu, mituna lokola oyo: Mpo na nini bato bapesaka mbeka? Nzambe andimaka mbeka ya ndenge nini? Mpe mbeka oyo bazalaki kopesa na ntango ya kala etaleli biso na nini lelo oyo?

Mpo na nini bato bapesaka mbeka?

4. Ntango basalaki lisumu, Adama na Eva basukaki ndenge nini?

4 Adama asalaki lisumu na nko. Lokola akamataki mbuma ya nzete ya koyeba malamu na mabe mpe alyaki yango, aboyaki kotosa na nko. Lokola azangaki botosi, ebongaki azwa etumbu ya liwa, lokola Nzambe alobaki yango polele ete: “Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:17) Nsukansuka, Adama na Eva bazwaki lifuti ya lisumu: bakufaki.​—Genese 3:19; 5:3-5.

5. Mpo na nini Yehova azwaki likanisi ya kosala eloko moko mpo na bolamu ya bana ya Adama, mpe asalelaki bango nini?

5 Kasi, ezali boni mpo na bana ya Adama? Lokola Adama atikelaki bango lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka, bango mpe bakabwani na Nzambe, bazali na elikya te mpe bakufaka ndenge mobali na mwasi ya liboso bakufaki. (Baloma 5:14) Atako Yehova azali mpe Nzambe ya bosembo mpe ya nguya, kasi azali libosoliboso Nzambe ya bolingo. (1 Yoane 4:8, 16) Yango wana, ye moko azwaki likanisi ya kobongisa likambo. Biblia elobi ete “masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa,” mpe na nsima ebakisi ete, “nde Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi ya seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.”​—Baloma 6:23.

6. Mokano ya Yehova ezali nini mpo na mabe oyo lisumu ya Adama ememaki?

6 Na nsuka, mpo na kopesa likabo yango, Yehova Nzambe abongisaki eloko moko oyo esengelaki kozipa mabe nyonso oyo lisumu ya Adama ememaki. Ekoki mpenza kozala ete liloba ya Liebele kaphar, ezalaki liboso kolimbola “kozipa” to mbala mosusu “kopangusa,” mpe ebongolamaka na liloba “mbɔndi.”a Na maloba mosusu, Yehova apesaki eloko oyo ebongi mpo na kozipa lisumu oyo Adama atikelaki bato mpe kopangusa mabe oyo lisumu yango ememaki mpo ete bato oyo bakokokisa masɛngami mpo na kozwa likabo yango bálongwa na etumbu ya lisumu mpe ya liwa.​—Baloma 8:21.

7. (a) Maloba oyo Nzambe alobaki ntango akatelaki Satana etumbu epesaki elikya nini? (b) Esengeli kofuta nini mpo bato bálongwa na boombo ya lisumu na liwa?

7 Ntango kaka mobali na mwasi ya liboso basalaki lisumu, Nzambe alobelaki mwa moke elikya wana ya kolongwa na boombo ya lisumu na liwa. Ntango Yehova azalaki kokatela Satana etumbu, ye oyo amonisamaki na nyoka, alobaki na ye boye: “Nakotya koyinana na kati na yo na mwasi mpe na kati ya mombóto na yo na mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Maloba yango ezali esakweli mpe epesaki elikya epai ya bato nyonso oyo bakondima likambo oyo Nzambe alakaki. Kasi, esengelaki ete eloko moko efutama mpo na kolongwa na boombo yango. Mombóto ya elaka asengelaki mbala moko koya koboma Satana te; esengelaki ete básasa Mombóto yango na litindi, elingi koloba, asengelaki kokufa, kasi mpo na libela te.

8. (a) Mpo na nini mombóto ya elaka ezalaki Kaina te? (b) Mpo na nini Nzambe andimaki mbeka ya Abele?

8 Na ntembe te, Adama na Eva bamitunaki mituna mingi mpo na koyeba soki Mombóto ya elaka ezalaki mpenza nani. Ntango Eva abotaki Kaina, mwana na ye ya liboso, alobaki ete: “Nazwi mobali mpo na kosungama na [Yehova].” (Genese 4:1) Mbala mosusu akanisaki ete mwana na ye akozala Mombóto yango! Ezala ete akanisaki bongo to te, Mombóto yango ezalaki Kaina te, abimaki mpe na kati ya bana na ye te. Nzokande, ndeko na ye Abele amonisaki ete azalaki kondima likambo oyo Nzambe alakaki mpe kondima yango etindaki ye apesa Yehova mbeka ya bana ya liboso na kati ya etonga na ye. Biblia elobi boye: “Mpo na kondima, Abele alekaki Kaina na kotombwela Nzambe mbeka malamu; na nzela yango azwaki litatoli ete ye moyengebene.”​—Baebele 11:4.

9. (a) Abele azalaki na kondima na likambo nini, ndenge nini mpe amonisaki kondima yango? (b) Likabo ya Abele ekokisaki likambo nini?

9 Abele asukaki kaka te na kondima ete Nzambe azali; Kaina mpe azalaki kondima ete Nzambe azali. Abele azalaki kondima maloba ya Nzambe ete akobimisa Mombóto moko mpo na kobikisa bato ya sembo. Bayebisaki ye te ndenge oyo likambo yango ekokokisama, kasi maloba ya Nzambe na ntango alakaki likambo yango esalisaki Abele akanga ntina ete bakosasa moto moko na litindi. Ntango mosusu asosolaki ete makila esengelaki kosopama: yango mpenza nde likambo oyo emonisami na mbeka. Abele apesaki Ye oyo akopesaka bomoi likabo ya eloko oyo ezali na bomoi mpe na makila; na ntembe te ezalaki lokola elembo mpo na komonisa mposa makasi oyo azalaki na yango ya komona likambo oyo Nzambe alakaki ezali kokokisama mpe ye amonisaki yango liboso. Ndenge oyo asalaki mpo na komonisa kondima nde esalaki ete Yehova asepela na mbeka ya Abele, mpe likambo yango emonisaki mwa moke ndimbola ya mbeka: eloko oyo ekoki kosalisa bato ya masumu bápusana penepene ya Nzambe mpo andima bango.​—Genese 4:4; Baebele 11:1, 6.

10. Ndenge nini ndimbola ya mbeka emonisamaki polele ntango Yehova asɛngaki Abalayama akaba Yisaka lokola mbeka?

10 Ndimbola ya mbeka emonisamaki polele na makambo oyo elekaki ntango Yehova asɛngaki Abalayama akaba mwana na ye Yisaka lokola mbeka ya kotumba. Atako na nsuka abomaki ye te, yango ezalaki elilingi ya likambo oyo Yehova asengelaki kosala na nsima, elingi koloba kokaba Mwana na ye mobotami-bobele-moko lokola mbeka oyo eleki mbeka nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye mpo na bato. (Yoane 3:16) Na nzela ya bambeka mpe makabo oyo asɛngaki na Mibeko ya Mose, Yehova apesaki bandakisa oyo ezalaki bisakweli mpo na koteya libota oyo aponaki likambo oyo basengeli kosala mpo masumu na bango elimbisama mpe mpo na kolendisa elikya na bango ya lobiko. Makambo yango ezali koteya biso nini?

Bambeka oyo Yehova andimaka

11. Wapi mitindo mibale ya mbeka oyo nganga monene ya Yisalaele azalaki kopesa, mpe azalaki kopesa yango na nini?

11 Ntoma Paulo alobaki ete: “Nganga monene na nganga monene atyami na mosala ete atombola makabo mpe mbeka.” (Baebele 8:3) Tomoni ete Paulo akaboli biloko oyo nganga monene azalaki kopesa na Yisalaele ya kala na lolenge mibale: “makabo” na “bambeka,” to “mbeka mpo na masumu.” (Baebele 5:1) Mbala mingi, moto apesaka mozalani na ye likabo mpo na komonisa ete alingi ye to asepeli na ye, mpe lisusu mpo na kobatela boninga, mpo moto yango asepela na ye to andima ye. (Genese 32:20; Masese 18:16) Ndenge moko mpe, tokoki koloba ete biloko mingi oyo Mibeko esɛngaki ezalaki “makabo” epai ya Nzambe mpo andima bango to asepela na bango.b Soki moto abuki Mibeko, esengelaki abongisa likambo na mabe oyo asali, mpe mpo na kosɛnga bolimbisi, bazalaki kopesa “mbeka mpo na masumu.” Na mikanda mitano ya liboso ya Biblia, mingimingi Exode, Levitike, mpe Mituya, elobi makambo mingi mpo na bambeka mpe makabo ndenge na ndenge. Atako ekoki kozala mpasi mpo tósimba makambo mikemike nyonso wana na motó, kasi ebongi tótalela makambo mosusu ya ntina mpo na bambeka ndenge na ndenge.

12. Na kati ya Biblia, esika nini balobeli mitindo ya mbeka to makabo, na kolanda Mibeko?

12 Tokomona ete na Levitike mokapo 1-7, balobeli mitindo mitano ya mbeka: mbeka ya kotumba, mbeka ya bilei, mbeka ya bondeko, mbeka ya lisumu, mbeka ya ekweli. Bapesi ndimbola ya mbeka mokomoko, atako mosusu kati na yango, bazalaki kopesa yango nzela moko. Tomoni mpe ete na mikapo yango, balimboli bambeka yango mbala mibale mpo na bantina oyo ekeseni: mbala ya liboso, na Levitike 1:2 tii 6:7, balimboli bambeka nini basengelaki kopesa na etumbelo, mpe mbala ya mibale na Levitike 6:8 tii 7:36, balobeli mpe biteni nini ya nyama basengelaki kolongola mpo na banganga mpe biteni oyo basengelaki kopesa moto oyo apesi mbeka. Na nsima, na Mituya mikapo 28, 29, tozali kokuta ebongiseli moko oyo emonisi polele bambeka nini oyo basengelaki kopesa mokolo na mokolo, pɔsɔ na pɔsɔ, sanza na sanza, mpe na bafɛti oyo bazalaki kosala mbala moko na mbula.

13. Tángá mpe limbolá bambeka oyo moto akokaki kopesa Nzambe soki motema na ye esepeli.

13 Kati na bambeka oyo moto akokaki kopesa soki motema na ye esepeli, lokola makabo to mpo na kopusana penepene ya Nzambe mpo asepela na ye, tozali na mbeka ya kotumba, mbeka ya bilei, na mbeka ya bondeko. Bato mosusu ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete liloba ya Liebele oyo ebongolami na “mbeka ya kotumba” elimboli “likabo ya kobuta” to “likabo oyo ezali kobuta.” Ndimbola yango ebongi mpenza mpamba te mpo na kopesa mbeka ya kotumba, bazalaki koboma nyama, bongo na nsima bazalaki kotumba yango na etumbelo mpe nsolo kitoko to nsolo ya kopemisa, ezalaki kobuta na likoló epai ya Nzambe. Likambo oyo ekesanisaki mbeka ya kotumba na bambeka mosusu nyonso ezali ete nsima ya komwangisa makila ya nyama pembenipembeni ya etumbelo, bazalaki kokabela Nzambe nyama yango mobimba. Banganga bazalaki ‘kotumba yango nyonso na likoló ya etumbelo lokola mbeka ya kotumba, mbeka ya mɔ́tɔ, nsolo malamu epai ya [Yehova].’​—Levitike 1:3, 4, 9; Genese 8:21.

14. Ndenge nini bazalaki kopesa mbeka ya bilei?

14 Mbeka ya bilei elobelami na Levitike mokapo 2. Ezalaki mbeka oyo moto akokaki kopesa soki motema na ye esepeli. Ezalaki fufu oyo batuti mikemike mpe mbala mingi bazalaki kosangisa yango na mafuta, mpe bazalaki kobakisa biloko ya nsolo kitoko babengi olibana. “[Nganga] mpe akolongola lobɔkɔ moko ya fufu etutami mokemoke mpe mafuta, elongo na [olibana, NW] na yango nyonso. Nganga akotumba yango mpo na ekaniseli na yango na likoló ya etumbelo. Ezali mbeka na mɔ́tɔ ya nsolo malamu epai ya [Yehova].” (Levitike 2:2) Olibana ezalaki moko na biloko ya nsolo kitoko oyo bazalaki kosangisa mpo na kosala mpaka ya malasi mosantu oyo bazalaki kotumba na etumbelo ya mpaka ya malasi oyo ezalaki na kati ya hema mpe na tempelo. (Exode 30:34-36) Na ntembe te Mokonzi Davidi akanisaki yango ntango alobaki ete: “Tiká ete libondeli na ngai ebonga liboso na yo lokola mpaka ya malasi mpe kotombola na mabɔkɔ na ngai lokola mbeka ya mpokwa.”​—Nzembo 141:2.

15. Mpo na nini bazalaki kopesa mbeka ya bondeko?

15 Likabo mosusu oyo moto akokaki kopesa Nzambe soki motema na ye esepeli ezalaki mbeka ya bondeko. Balobeli mbeka yango na Levitike mokapo 3. Nkombo yango ekoki mpe kobongolama na “mbeka ya makabo ya kimya.” Na Liebele, liloba “kimya” elimboli kaka te kozanga bitumba to kozanga mobulu. Mokanda moko (Studies in the Mosaic Institutions) elobi ete: “Na Biblia, liloba yango elimboli kimya, mpe lisusu boyokani ya kimya elongo na Nzambe, bomɛngo, esengo, mpe bolamu.” Na bongo, tokoki koloba te ete bazalaki kopesa mbeka ya kimya mpo na kobatela kimya na Nzambe, lokola nde mpo na kokitisa nkanda na ye; kasi ezali mpo na komonisa botɔndi to kokumisa kimya oyo ezali kati na Nzambe na bato oyo asepeli na bango. Banganga na moto oyo apesi likabo, bazalaki kolya nyama oyo bapesi lokola mbeka nsima ya kokabela Yehova makila na mafuta na yango. (Levitike 3:17; 7:16-21; 19:5-8) Ezalaki elembo moko malamu oyo ezalaki komonisa lokola nde moto oyo apesi likabo, na banganga, na Yehova Nzambe bafandi na mesa moko mpe bazali kolya. Yango ezalaki komonisa kimya oyo ezalaki kati na bango.

16. (a) Mpo na nini bazalaki kopesa mbeka ya masumu na mbeka ya ekweli? (b) Bokeseni nini ezalaki kati na bambeka yango na mbeka ya kotumba?

16 Na kati ya bambeka oyo bazalaki kopesa mpo na kosɛnga bolimbisi ya masumu to mpo na kosala mbɔndi nsima ya kobuka Mibeko, ezalaki na mbeka ya masumu mpe na mbeka ya ekweli. Atako bazalaki mpe kotumba bambeka yango na etumbelo, kasi ezalaki ndenge moko te na mbeka ya kotumba. Mpo na mbeka ya kotumba bazalaki kotumbela Nzambe nyama mobimba; kasi mpo na mbeka ya masumu na mbeka ya ekweli, bazalaki kopesa ye kaka mafuta ya nyama na biteni na yango mosusu. Ndambo oyo ezalaki kotikala bazalaki kobwaka yango na libándá ya káa to ntango mosusu banganga bazalaki kolya yango. Bokeseni wana ezali mpamba te. Mbeka ya kotumba ezalaki kopesama lokola likabo mpo na kopusana penepene ya Nzambe, yango wana bazalaki kopesa Nzambe nyama mobimba. Kutu, liboso ya kopesa mbeka ya kotumba, mbala mingi bazalaki kopesa mbeka ya masumu to mbeka ya ekweli; yango ezalaki komonisa ete liboso Nzambe andima likabo ya mosumuki, esengelaki naino masumu na ye elimbisama.​—Levitike 8:14, 18; 9:2, 3; 16:3, 5.

17, 18. Mpo na nini bazalaki kopesa mbeka ya masumu, mpe mbeka ya ekweli ezalaki na ntina nini?

17 Mbeka ya masumu ezalaki kondimama se soki moto abuki Mibeko na nko te, elingi koloba asali lisumu mpo na bolɛmbu oyo euti na kozanga kokoka. “Soko moto asali lisumu na koyeba boye te, na ntina na likambo lilakaki [Yehova] ete esalama te,” moto oyo asali lisumu asengelaki kopesa mbeka ya masumu na kolanda lokumu oyo azali na yango na kati ya ekólo. (Levitike 4:2, 3, 22, 27) Kasi, bato oyo bazalaki kosala masumu na nko bazalaki koboma bango; mbeka moko te ebongisamaki mpo na bango.​—Exode 21:12-15; Levitike 17:10; 20:2, 6, 10; Mituya 15:30; Baebele 2:2.

18 Levitike mokapo 5, 6 epesi ndimbola mpe ntina ya mbeka ya ekweli. Ekokaki kosalema ete moto asali lisumu na nko te. Kasi, lisumu na ye ekokaki kosala bazalani na ye mabe to ekokaki kobebisa lokumu ya Yehova Nzambe; yango wana, asengelaki kobongisa likambo yango. Balobeli mitindo mingi ya masumu. Masumu mosusu etalelaki moto ye moko (Lev. 5:2-6), mosusu ezalaki masumu na “biloko mosantu ya Yehova” (Lev. 5:14-16), mpe masumu mosusu, atako moto asalaki yango na nko mpenza te, kasi ezalaki mpo na bamposa mabe to mpo na bolɛmbu oyo euti na kozanga kokoka (Lev. 6:1-3). Moto oyo asali masumu yango asengelaki koyambola yango mpe asengelaki kofuta soki esɛngi kofuta mpe na nsima, asengelaki kopesa Yehova mbeka ya ekweli.​—Levitike 6:4-7.

Eloko oyo eleki malamu esengelaki koya

19. Atako Bayisalaele bazalaki na Mibeko na bambeka na yango, mpo na nini Nzambe aboyaki bango?

19 Bapesaki Bayisalaele Mibeko ya Mose na ebele ya bambeka na makabo na yango mpo bákoka kopusana penepene ya Nzambe mpo asepelaka na bango mpe apambolaka bango ntango nyonso tii ntango Mombóto ya elaka akoya. Ntoma Paulo azalaki Moyuda, ye alimbolaki likambo yango boye: “Mibeko izalaki Molakisi na biso kino koya na Klisto, ete tólongisama na kondima.” (Bagalatia 3:24) Na mawa nyonso, libota ya Yisalaele etosaki molakisi yango te, kasi babebisaki libaku malamu wana. Yango wana, Yehova akómaki koyoka ebele ya bambeka na bango nsolo mabe. Kutu alobaki boye: “Mingi mingi na mbeka na bino ezali nini epai na ngai? Natondi maa na mbeka itumbami na bampate babali, mpe na mafuta na banyama babɔkɔlami; nasepeli na makila na bangɔmbɛ te to na bana ya mpate to ya bantaba babali te.”​—Yisaya 1:11.

20. Likambo nini esalemaki na mobu 70 T.B. na oyo etali Mibeko na bambeka na yango?

20 Na mobu 70 T.B., ekólo ya Bayuda mpe losambo na bango, na tempelo mpe banganga na yango, ebomamaki. Nsima na yango, bakokaki lisusu kopesa bambeka te na ndenge oyo esɛngamaki na Mibeko. Kasi, elingi nde koloba ete bambeka, lokola ezali na kati ya Mibeko, elimboli eloko moko te mpo na bato oyo bazali kosambela Nzambe lelo oyo? Tokolobela likambo yango na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mokanda Étude perspicace des Écritures, ebimisami na Batatoli ya Yehova, elobi boye: “Ndenge liloba ‘mbɔndi’ esalelami na Biblia, ezali libosoliboso na likanisi ya ‘kozipa’ to ‘kosombitinya,’ mpe eloko oyo bapesi mpo na kosombitinya to mpo na ‘kozipa’ eloko mosusu esengeli kokokana na yango . . . Mpo na kobongisa malamumalamu makambo oyo Adama abebisaki, esengelaki kopesa mbeka ya lisumu oyo ezali na motuya moko na bomoi ya kokoka.”

b Liloba ya Liebele qorban ebongolamaka mingi na “likabo.” Na lisolo na ye oyo elobeli ndenge oyo Yesu amonisaki ete bakomeli na Bafalisai bazalaki na ezaleli moko mabe, Malako akomaki ete “kolobana” elimboli “likabo [mpo na Nzambe, NW].”​—Malako 7:11.

Okoki kolimbola?

• Nini etindaki bato ya sembo na ntango ya kala bápesaka Yehova bambeka?

• Mpo na nini bazalaki kopesa bambeka?

• Tángá mitindo ya bambeka oyo bazalaki kopesa na kolanda Mibeko, mpe yebisá ntina na yango.

• Paulo amonisaki ete Mibeko na bambeka ezalaki mpenza na ntina nini?

[Elilingi na lokasa 14]

Nzambe asepelaki na mbeka ya Abele mpo emonisaki ete azalaki kondima elaka ya Yehova

[Elilingi na lokasa 15]

Ozali koyeba ndimbola ya likambo oyo ezali koleka awa?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto