Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/12 nk. 8-12
  • Azali ndakisa to likebisi mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Azali ndakisa to likebisi mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bwanya ya Salomo”
  • Kotombola losambo ya solo ememaki kimya
  • Bomoi ya Salomo ezali mpe likebisi
  • Basi ebele mpenza!
  • Tózwa liteya na ndakisa na ye ya malamu mpe ya mabe
  • Tózala na botondi epai ya Yesu—Davidi Monene mpe Salomo Monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Batongeli Yehova tempelo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Salomo atongi Tempelo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Salomo, mokonzi ya bwanya
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/12 nk. 8-12

Azali ndakisa to likebisi mpo na yo?

“Nzambe ya Yakobo . . . akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye.”​—YIS. 2:3.

1, 2. Ndenge nini bandakisa oyo Biblia elobeli ekoki kosalisa biso?

NA NTEMBE te, ondimaka mpenza ete makambo oyo ekomami na Biblia ekoki kosalisa yo. Ezali na masolo ya mibali mpe basi ya sembo oyo okosepela komekola bomoi mpe bizaleli na bango. (Ebr. 11:32-34) Nzokande, mbala mosusu omoná mpe masolo ya mibali mpe basi mosusu oyo bazali makebisi, oyo osengeli te komekola misala mpe makanisi na bango.

2 Kutu, bato mosusu oyo Biblia elobeli bazali ndakisa malamu ya kolanda mpe makebisi ya makambo oyo tosengeli koboya. Kanisá Davidi, oyo liboso azalaki mobateli ya mpate mpamba mpe na nsima akómaki mokonzi moko ya nguya. Azali ndakisa malamu mpo alingaki solo mpe atyelaki Yehova motema. Kasi, Davidi asalaki masumu minene, na ndakisa asalaki ekobo ná Bate-sheba mpe abomisaki Uriya; asalaki mpe bozoba ya kotánga bato. Kasi, tótalela mwana na ye Salomo, oyo azalaki mokonzi mpe akomaki mikanda mosusu ya Biblia. Ya liboso, tokomona makambo mibale oyo mpo na yango Salomo azalaki ndakisa malamu.

“Bwanya ya Salomo”

3. Mpo na nini tokoki koloba ete Salomo atikelaki biso ndakisa malamu?

3 Yesu Kristo, Salomo Monene, alobaki ete Mokonzi Salomo azali ndakisa malamu oyo tosengeli komekola. Yesu ayebisaki Bayuda mosusu oyo bazalaki na ntembe ete: “Mokonzi-mwasi ya sudi akosekwa esika moko na libota oyo na mokolo ya kosambisama mpe akokweisa yango; mpamba te ye autaki na nsuka ya mabele ayei koyoka bwanya ya Salomo, kasi talá! moto oyo aleki Salomo azali awa.” (Mat. 12:42) Ya solo, Salomo ayebanaki mingi mpo na bwanya na ye, mpe alendisaki biso tóluka kozwa bwanya.

4, 5. Salomo azwaki bwanya ndenge nini, mpe ndenge oyo biso tokoki kozwa bwanya ekeseni na oyo ya ye na nini?

4 Na ebandeli ya boyangeli ya Salomo, Nzambe abimelaki ye na ndɔtɔ mpe ayebisaki ye asɛnga eloko oyo alingi. Lokola Salomo amonaki ete ayebi makambo mingi te, asɛngaki bwanya. (Tángá 1 Bakonzi 3:5-9.) Nzambe asepelaki ndenge mokonzi asɛngaki ye bwanya na esika asɛnga bozwi ná nkembo. Na yango, apesaki Salomo “motema ya bwanya mpe ya mayele,” bakisá mpe bozwi. (1 Bak. 3:10-14) Ndenge Yesu amonisaki yango, bwanya ya Salomo ezalaki mingi na boye ete mokonzi mwasi ya Sheba ayokaki nsango na yango mpe asalaki mobembo molai mpo na koya komona yango ye moko.​—1 Bak. 10:1, 4-9.

5 Biso tozali kolikya te kozwa bwanya na ndenge ya likamwisi. Salomo alobaki ete “Yehova ye moko apesaka bwanya,” kasi akomaki ete tosengeli kosala milende mpo na kozwa yango. Alobaki boye: “Otyela bwanya likebi, mpo obalusa motema na yo epai ya bososoli.” Asalelaki mpe maloba mosusu, na ndakisa “okobelela mpo na” bwanya, “okobi koluka” yango, “okobi kolukaluka” yango. (Mas. 2:1-6) Na ntembe te, tokoki kozwa bwanya.

6. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kolanda ndakisa malamu ya Salomo na likambo etali bwanya?

6 Ekozala malamu komituna boye: ‘Nalingaka bwanya ndenge Salomo alingaki yango?’ Mikakatano ya nkita etindaka bato mosusu bámipesa kaka na mosala mpe na koluka mbongo to mpe bábongola bikateli na bango na oyo etali kelasi oyo bakotánga mpe bambula boni bakolekisa na kelasi. Bongo yo ná libota na yo? Makambo oyo boponaka emonisaka ete bozwaka bwanya ya Nzambe na motuya mpe bozali koluka yango? Bosengeli nde kobongola ndenge na bino ya kotalela mbongo mpe ya kotánga kelasi mpo bokoka komipesa na koluka bwanya? Na ntembe te, soki bozwi bwanya mpe bosaleli yango, ekozala mpo na bolamu na bino ya seko. Salomo akomaki boye: “Boye okokanga ntina ya boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.”​—Mas. 2:9.

Kotombola losambo ya solo ememaki kimya

7. Ndenge nini tempelo moko kitoko etongamaki mpo na Nzambe?

7 Na ebandeli ya boyangeli na ye, Salomo azwaki likanisi ya kolongola Tabernakle oyo bazalaki kosalela banda na eleko ya Moize mpe, na esika na yango, kotonga tempelo moko ya kitoko. (1 Bak. 6:1) Tokoki kobenga yango tempelo ya Salomo, kasi ezalaki likanisi na ye moko te mpe atongaki yango te mpo akende nsango ete azali motongi monene to moto ya bozwi mingi. Davidi tata na ye nde moto abimisaki likanisi ya kotonga tempelo, na nsima Nzambe apesaki Davidi baplan ya tempelo mpe ya biloko na yango nyonso. Davidi apesaki makabo mingi mpo na mosala yango. (2 Sa. 7:2, 12, 13; 1 Nt. 22:14-16) Kasi Salomo nde azwaki mokumba ya kotonga tempelo yango mpe mosala eumelaki mbula nsambo na ndambo.​—1 Bak. 6:37, 38; 7:51.

8, 9. (a) Ndakisa nini ya malamu Salomo atikaki na oyo etali kotingama na misala ya malamu? (b) Lokola Salomo atombolaki losambo ya solo, likambo nini esalemaki?

8 Na yango, Salomo azali ndakisa malamu na likambo etali kotingama na misala ya malamu, mpe atyaki makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Ntango tempelo esilaki mpe batyaki sanduku ya kondimana na kati, Salomo asalaki libondeli liboso ya bato nyonso. Na libondeli yango, alobaki na Yehova mpe boye: “Miso na yo efungwama mpe etala ndako oyo butu moi, esika oyo olobaki ete: ‘Nkombo na ngai ekozala wana,’ mpo na koyoka libondeli oyo mosaleli na yo azali kobondela, wana atali na ngámbo ya esika oyo.” (1 Bak. 8:6, 29) Bayisraele mpe bapaya bakokaki kobondela wana batali na ngámbo ya ndako yango oyo etongamaki mpo na lokumu ya nkombo ya Nzambe.​—1 Bak. 8:30, 41-43, 60.

9 Lokola Salomo atombolaki losambo ya solo, esukaki boni? Nsima ya kosala fɛti ya bofungoli tempelo, bato bazalaki “kosepela mpe koyoka esengo na motema mpo na bolamu nyonso oyo Yehova asalelaki Davidi, mosaleli na ye, mpe bato na ye Yisraele.” (1 Bak. 8:65, 66) Ya solo, kimya monene mpe bozwi ezalaki na boyangeli ya Salomo oyo eumelaki mbula 40. (Tángá 1 Bakonzi 4:20, 21, 25.) Nzembo 72 emonisi yango mpe esalisi biso tóyeba mapamboli oyo tokozwa na nse ya boyangeli ya Salomo Monene, Yesu Kristo.​—Nz. 72:6-8, 16.

Bomoi ya Salomo ezali mpe likebisi

10. Mabunga nini ya Salomo ekoki koyela biso mbala moko na makanisi?

10 Kasi, mpo na nini tokoki koloba ete bomoi ya Salomo ezali mpe likebisi mpo na biso? Ya liboso, okoki kokanisa basi bapaya mpe bamakango oyo azwaki. Totángi boye: “Esalemaki boye: ntango Salomo akómaki mobange, basi na ye babendaki motema na ye mpo na kolanda banzambe mosusu; mpe motema na ye ezalaki mobimba te epai ya Yehova.” (1 Bak. 11:1-6) Ya solo, okolinga soki moke te komekola ndakisa wana ya mabe. Kasi ezali na makambo mosusu na bomoi ya Salomo oyo tokoki mbala mosusu kobosana, oyo ekoki mpe kozala makebisi mpo na biso. Tótalela yango.

11. Tokoki koloba nini mpo na mwasi ya liboso oyo Salomo abalaki?

11 Salomo ayangelaki mbula 40. (2 Nt. 9:30) Na yango, tokoki koloba nini mpo na makambo oyo elobelami na 1 Bakonzi 14:21? (Tángá.) Vɛrsɛ yango emonisi ete ntango Salomo akufaki, mwana na ye Rehoboame akómaki mokonzi ntango azalaki na mbula 41, mpe nkombo ya mama na ye ezalaki “Naama Moamone.” Yango emonisi ete liboso Salomo akóma mokonzi, abalaki mwasi mopaya oyo autaki na ekólo ya bato oyo bazalaki banguna ya libota ya Nzambe mpe bazalaki kosambela bikeko. (Bas. 10:6; 2 Sa. 10:6) Toyebi te soki mwasi yango akobaki kosambela banzambe ya lokuta to soki akómaki mosambeli ya solo ndenge Rahaba mpe Ruta bakómaki. (Ruta 1:16; 4:13-17; Mat. 1:5, 6) Atako bongo, Salomo akómaki na bakilo mpe basɛmɛki oyo bazalaki basambeli ya Yehova te.

12, 13. Libunga nini ya monene Salomo asalaki na ebandeli ya boyangeli na ye, mpe mbala mosusu akanisaki nini?

12 Mpe nsima wana Salomo akómaki mokonzi, makambo na ye ebebaki se kobeba. Salomo asalaki “kondimana ya libala elongo na Farao mokonzi ya Ezipito mpe azwaki mwana mwasi ya Farao mpe ayaki na ye na Sité ya Davidi.” (1 Bak. 3:1) Mwasi yango Moezipito alandaki nde ndakisa ya Ruta mpe akómaki mosambeli ya solo? Eloko moko te emonisi yango. Kutu na nsima, Salomo atongelaki ye ndako (mbala mosusu ye ná bana basi mosusu ya Ezipito oyo bazalaki basaleli na ye) libándá ya Sité ya Davidi. Mpo na nini? Biblia elobi ete asalaki bongo mpo ezalaki malamu te mosambeli ya lokuta afanda pene na sanduku ya kondimana.​—2 Nt. 8:11.

13 Mbala mosusu Salomo amonaki ete kobala mwana mwasi ya mokonzi ya Ezipito ekoki koyeisa boyokani ya bokonzi ya Yisraele ná Ezipito makasi. Kasi yango ezalaki nde malamu? Banda kala, Nzambe apekisaki kobala bapakano ya Kanana; atángaki ata nkombo ya bikólo yango. (Kob. 34:11-16) Salomo akanisaki nde ete Ezipito etángamaki te na molɔngɔ ya bikólo yango? Ata soki akanisaki bongo, Nzambe akokaki nde kondima yango? Ya solo, makambo oyo asalaki emonisaki ete atyolaki likebisi ya polele oyo Nzambe apesaki. Nzambe alobaki ete kobala mwasi ya ndenge wana ekoki kopɛngwisa Moyisraele na losambo ya solo.​—Tángá Kolimbola Mibeko 7:1-4.

14. Ndenge nini kokanisa ndakisa ya Salomo ekoki kosalisa biso?

14 Tokondima ndakisa ya Salomo ezala likebisi mpo na biso? Ndeko mwasi moko akoki koluka komilongisa mpo aboyi kotosa etinda ya Biblia oyo elobi ete esengeli kobala “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Ko. 7:39) Bamosusu mpe bakoki koluka komilongisa ndenge wana mpe komikɔtisa na masano mpe makambo mosusu oyo esalemaka na eteyelo nsima ya kelasi. Bakoki mpe koboya koyebisa bozwi na bango nyonso mpo báfuta mpako mingi te, to koloba lokuta ntango batuni bango báyebisa makambo oyo ekoki kopesa bango nsɔni. Tóbosana te ete Salomo mpe asalelaki makanisi ya mabe mpo na koluka kobuka mobeko oyo Nzambe apesaki; biso mpe tosengeli kokeba na likama yango.

15. Ndenge nini Yehova amoniselaki Salomo motema mawa? Kasi likambo nini tosengeli kobosana te?

15 Tóyeba ete atako Salomo asilaki kobala mwana mwasi ya mokonzi oyo azalaki mopaya, Biblia elobi ete Nzambe ayanolaki lilɔmbɔ na ye mpe apesaki ye bwanya mpe abakiselaki ye bozwi. (1 Bak. 3:10-13) Salomo akipaki malako ya Nzambe te, kasi eloko moko te emonisi ete Nzambe aboyaki ye na mbala moko to apesaki ye etumbu makasi. Ezalaki bongo mpo Nzambe ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalemá na putulu. (Nz. 103:10, 13, 14) Kasi, tóbosana te ete misala na biso ekoki kobimisela biso mpasi lelo to mbala mosusu nsima ya mikolo.

Basi ebele mpenza!

16. Lokola Salomo azwaki basi mingi, atyolaki mobeko nini?

16 Na Loyembo ya Salomo, mokonzi Salomo azalaki kokumisa mwana mwasi moko ete azalaki kitoko mingi koleka basi ya mokonzi koleka 60 mpe bamakango 80. (Loy. 6:1, 8-10) Soki maloba wana emonisi nde motángo ya basi mpe ya bamakango ya Salomo, boye na ntango wana akómaki na basi ebele. Ata soki mingi kati na basi yango to bango nyonso bazalaki basambeli ya solo, malako oyo Nzambe apesaki na nzela ya Moize elobaki ete mokonzi ya Yisraele asengeli “te kokóma na basi ebele, noki motema na ye epɛngwa.” (Mib. 17:17) Kasi atako bongo mpe, Yehova atikaki Salomo te. Kutu akobaki kopambola Salomo mpe asalelaki ye mpo akoma mokanda ya Loyembo ya Salomo oyo ezali na Biblia.

17. Likambo nini tosengeli kobosana te?

17 Yango emonisi nde ete Salomo akokaki kotyola litambwisi ya Nzambe kozanga azwa etumbu, to ete biso mpe tokoki kosala bongo? Te. Emonisi nde ete motema molai ya Nzambe ekoki koumela ntango molai. Kasi, soki mosaleli moko ya Nzambe atyoli litambwisi na ye kozanga azwa etumbu na mbala moko, yango elakisi te ete nsukansuka eloko moko ya mabe ekokómela ye te. Tóbosana te makambo oyo Salomo akomaki: “Lokola etumbu mpo na mosala mabe epesamaki nokinoki te, motema ya bana ya bato etingami na kosala mabe.” Abakisaki boye: “Nayebi mpe ete ekosukela baoyo babangaka Nzambe ya solo malamu, mpo bazalaki kobanga ye.”​—Mos. 8:11, 12.

18. Ndenge nini likambo ya Salomo emonisi bosolo ya maloba oyo ezali na Bagalatia 6:7?

18 Likambo ya mawa, Salomo ye moko atyaki likebi te na maloba wana. Asalaki makambo mingi ya malamu mpe Nzambe apambolaki ye mingi. Kasi nsima ya mikolo, akómaki kosala mabunga mbala na mbala. Akómaki na momeseno ya kobuka mibeko ya Yehova. Maloba oyo ntoma Paulo akomaki na nsima ezalaki solo mpenza: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Gal. 6:7) Na nsima, Salomo abukaki mbuma mabe mpo atyolaki litambwisi ya Nzambe. Tozali kotánga boye: “Longola mwana mwasi ya Farao, Mokonzi Salomo alingaki basi bapaya mingi: Bamoabe, Baamone, Baedome, Basidone ná Bahiti.” (1 Bak. 11:1) Emonani ete mingi na basi yango bakangamaki na banzambe ya lokuta, mpe yango ebebisaki Salomo. Apɛngwaki mpe Nzambe na biso ya motema molai atikaki kolinga ye.​—Tángá 1 Bakonzi 11:4-8.

Tózwa liteya na ndakisa na ye ya malamu mpe ya mabe

19. Mpo na nini tokoki koloba ete Biblia ezali na bandakisa mingi ya malamu?

19 Yehova apesaki Paulo elimo santu mpo akoma boye: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” (Rom. 15:4) Na makambo yango oyo ekomamá, tokokuta bandakisa ya malamu​—mibali mpe basi ya kondima makasi. Paulo akokaki koloba boye: “Nakoloba lisusu nini? Mpo ntango ekozanga ngai soki nalobeli lisusu Gideone, Barake, Samsone, Yefeta, Davidi mpe Samwele ná basakoli mosusu, oyo na nzela ya kondima balongaki makonzi na bitumba, basalaki boyengebene, bazwaki bilaka, . . . bazalaki na bolɛmbu kasi bakómaki na nguya.” (Ebr. 11:32-34) Tokoki mpe tosengeli kozwa liteya na bandakisa malamu oyo ezali na Biblia, mpe kolanda to komekola makambo oyo balobeli na masolo yango ya kitoko.

20, 21. Mpo na nini ozwi ekateli ya kozwa mayele na bandakisa oyo ezali na Biblia?

20 Kasi masolo mosusu ya Biblia ezali mpe na makebisi. Tokoki komona yango na bomoi ya mibali mpe basi oyo, na ntango moko boye, Yehova andimaki bango mpe asalelaki bango lokola basaleli na ye. Ntango tozali kotánga Biblia, tokoki komona na makambo nini mpe ndenge nini basaleli mosusu ya Nzambe bapɛngwaki mpe bakómaki bandakisa oyo ezali makebisi. Tokoki komona ete bamosusu babandaki mokemoke kokolisa makanisi ya mabe, mpe na nsima basukaki mabe. Ndenge nini tokoki kozwa liteya na masolo yango? Tokoki komituna boye: ‘Ebandaki ndenge nini? Ngai mpe nakoki kokóma na makanisi ya ndenge wana? Ndenge nini nakoki koboya yango mpe kolanda nde ndakisa ya malamu?’

21 Tosengeli mpenza kotalela bandakisa yango na likebi, mpo Paulo akomaki boye na litambwisi ya elimo ya Nzambe: “Makambo wana ezalaki kokómela bango mpo ezala bandakisa, mpe ekomamaki mpo ezala likebisi mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.”​—1 Ko. 10:11.

Oyekoli nini?

• Mpo na nini okoki kozwa bandakisa ya malamu mpe oyo ezali makebisi na kati ya Biblia?

• Ndenge nini Salomo atikaki momeseno ya mabe ekola na bomoi na ye?

• Ndenge nini okoki kozwa mayele na ndakisa ya Salomo oyo ezali likebisi?

[Elilingi na lokasa 9]

Salomo asalelaki bwanya oyo Nzambe apesaki ye

[Bililingi na lokasa 12]

Likebisi nini ozwi na ndakisa ya Salomo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto