Yehova azali Nzambe ya kondimana
“Nakokata kondimana na sika na ndako na Yisalaele mpe na ndako na Yuda.”—YILIMIA 31:31.
1, 2. (a) Molulu nini Yesu abandisaki na butu ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B.? (b) Kondimana nini Yesu alobelaki na boyokani na liwa na ye?
NA BUTU ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu alyaki Elekeli elongo na bayekoli na ye 12. Lokola ayebaki ete yango ezalaki mbala na ye ya nsuka mpo na kolya na bango esika moko mpe ete mosika te banguna na ye bakoboma ye, Yesu asalelaki libaku yango mpo na kolimbwela bayekoli na ye oyo azalaki na bango elongo ntango nyonso makambo ya ntina.—Yoane 13:1–17:26.
2 Ezali na ntango wana nde, nsima ya kobimisa Yuda Mokeliota, Yesu abandisaki ekaniseli bobele moko oyo baklisto basengeli kokundolaka mbula na mbula—Ekaniseli ya liwa na ye. Lisoló elobi boye: “Ezalaki bango kolya, Yesu akamati kwanga mpe atɔ́ndi, abuki yango mpe apesi na bayekoli na ye; alobi ete, Bókamata, bólya; oyo [elimboli, NW] nzoto na ngai. Akamati mpe kɔpɔ mpe esili ye kotɔ́nda, apesi epai na bango, ye ete, Bómela na yango, bino nyonso. Mpo ete oyo [elimboli, NW] makila na ngai na kondimana na sika masopameli bato mingi mpo na kolimbisa masumu.” (Matai 26:26-28) Bayekoli ya Yesu basengeli kokanisaka liwa na ye na lolenge ezangi mindɔndɔ, na limemya nyonso. Mpe Yesu alobelaki kondimana moko na boyokani na liwa na ye. Na lisoló ya Luka, yango ebéngami “kondimana [ya] sika.”—Luka 22:20.
3. Mituna nini mizali kotunama na ntina na kondimana ya sika?
3 Kondimana ya sika ezali nini? Soki ezali kondimana ya sika, yango elingi koloba ete kondimana ya kala ezali? Ezali na kondimana mosusu oyo ezali na boyokani na kondimana yango? Oyo ezali mituna ya ntina mpamba te Yesu alobaki ete makila ya kondimana masengelaki kosopama mpo na “kolimbisa masumu.” Biso nyonso tozali na mposa makasi ya bolimbisi wana.—Baloma 3:23.
Kondimana elongo na Abalayama
4. Elaka ya kala nini ezali kosalisa biso mpo ete tókanga ntina ya kondimana ya sika?
4 Mpo na kokanga ntina ya kondimana ya sika, tosengeli kozonga nsima pene na mbula 2 000 liboso ete Yesu akokisa mosala na ye awa na mabelé, na ntango Tela na libota na ye—kati na bango Abalama (na nsima abéngamaki Abalayama) mpe mwasi ya Abalama, Salai (na nsima abéngamaki Sala)—basalaki mobembo molai mpe ya mpasi longwa na engumba Ulu ya Bakaladi, epai bato mingi bazalaki kokóma na bozwi, kino na Halana na nɔ́rdi ya Mesopotamia. Bafandaki kuna kino liwa ya Tela. Na nsima, na etindá ya Yehova, Abalayama, oyo akokisaki mbula 75 akatisaki Ebale Pelata mpe asalaki mobembo kino na súdi-wɛ́sti ya mokili ya Kanana epai azalaki na bomoi lokola molekaleki mpe azalaki kolala na bahema. (Genese 11:31–12:1, 4, 5; Misala 7:2-5) Yango ezalaki na mobu 1943 L.T.B. Ntango Abalayama azalaki naino na Halana, Yehova alobaki na ye ete: “Nakozalisa yo libota monene, mpe nakopambola yo, nakozalisa nkombo na yo monene mpe okopambola bato. Nakopambola baoyo bapamboli yo mpe nakolakela mabe baoyo balakeli yo mabe; mpe mpo na yo mabota nyonso na nsé bakopambolama.” Na nsima, ntango Abalayama akɔtaki na mokili ya Kanana, Yehova abakisaki ete: “Nakopesa mokili oyo na bana na yo.”—Genese 12:2, 3, 7.
5. Elaka ya Yehova epai na Abalayama ekangisami na esakweli ya kala nini?
5 Elaka epai na Abalayama ekangisamaki na elaka mosusu ya Yehova. Ɛɛ, yango esalaki ete Abalayama akóma moto monene kati na lisoló ya bato, nzela oyo, na lisalisi na yango esakweli ya liboso oyo ekomamaki ekokokisama. Nsima wana Adama na Eva basalaki lisumu na elanga ya Edene, Yehova akatelaki bango etumbu, mpe bobele na libaku yango alobaki na Satana, oyo azimbisaki Eva ete: “Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi, kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Kondimana ya Yehova elongo na Abalayama emonisaki ete Mombóto oyo na nzela na ye misala ya Satana mikosukisama asengelaki kouta na libota ya tata wana ya mabota.
6. (a) Elaka ya Yehova epai na Abalayama ekokokisama na nzela ya nani? (b) Kondimana ya Abalayama ezali nini?
6 Lokola elaka ya Yehova etalelaki mombóto, Abalayama asengelaki kozala na mwana oyo na nzela na ye Mombóto akokaki kobima. Kasi ye na Sala bakómaki mibangé mpe babotaki naino mwana te. Kasi, nsukansuka, na lolenge ya ekamwiseli, Yehova apambolaki bango, azongisaki makoki na bango ya kobota, mpe Sala abotelaki Abalayama mwana mobali na nkombo Yisaka, mpe na bongo elaka ya Mombóto ebatelamaki. (Genese 17:15-17; 21:1-7) Bambula mingi elekaki, nsima ya komeka kondima ya Abalayama—kino komeka ye soki akondima kokaba Yisaka, mwana na ye molingami, lokola mbeka—Yehova azongelaki elaka na ye epai na Abalayama: “Nakopambola yo solo mpe nakofulisa bana na yo lokola myoto na likoló mpe lokola zelo na libongo na mai. Bana na yo bakobɔtɔla bikuke na bayini na bango. Mabota nyonso na nsé makopambolama mpo na bana na yo, mpo ete yo osili kotosa monɔkɔ na ngai.” (Genese 22:15-18) Elaka oyo ebakisamaki ebéngamaka mbala mingi ete kondimana ya Abalayama, mpe kondimana ya sika oyo esalemaki na nsima ekangisami makasi na kondimana yango.
7. Lolenge nini mombóto ya Abalayama ebandaki kofuluka, mpe makambo nini masalaki ete báfanda lokola bapaya na Ezipito?
7 Na nsima, Yisaka abotaki mapasa, bana mibali: Esau na Yakobo. Yehova aponaki Yakobo ete azala nkɔkɔ ya Mombóto oyo elakamaki. (Genese 28:10-15; Baloma 9:10-13) Yakobo abotaki bana mibali 12. Emonani polele ete ntango ekokaki mpo ete mombóto ya Abalayama ebanda kofuluka. Ntango bana ya Yakobo bakómaki mikóló, mpe mingi kati na bango basalaki mabota na bango, nzala oyo ekɔtaki na mboka na bango epusaki bango ete bákende na Ezipito epai kuna, na lisungi ya Nzambe, Yosefe, mwana ya Yakobo, asilaki kobongisa makambo. (Genese 45:5-13; 46:26, 27) Mwa bambula na nsima, nzala esilaki na Kanana. Kasi libota ya Yakobo etikalaki na Ezipito—na ebandeli bazalaki bobele bapaya kasi na nsima bakómaki baombo. Ezalaki kino mobu 1513 L.T.B., mbula 430 nsima wana Abalayama akatisaki Ebale Pelata, nde Mose abimisaki bakitani ya Yakobo na Ezipito mpo na kozwa bonsomi. (Exode 1:8-14; 12:40, 41; Bagalatia 3:16, 17) Yehova alingaki sikawa kotya likebi mingi na kondimana na ye elongo na Abalayama.—Exode 2:24; 6:2-5.
“Kondimana ya kala”
8. Boyokani nini Yehova asalaki elongo na bakitani ya Yakobo na Ngomba Sinai, mpe na nini yango eyokani na kondimana ya Abalayama?
8 Ntango Yakobo mpe bana na ye bakendaki na Ezipito, bazalaki libota monene, kasi bakitani na bango babimaki na Ezipito lokola bituluka mingi oyo ezalaki na bato ebele. (Exode 1:5-7; 12:37, 38) Liboso ete Yehova amema bango na Kanana, atambwisaki bango na súdi pene ya Ngomba Holebe (to, Sinai) na Arabia. Kuna, asalaki na bango kondimana. Yango ebéngamaki na nsima ete “kondimana ya kala” na bokokanisi na “kondimana ya sika.” (2 Bakolinti 3:14) Na nzela ya kondimana ya kala, Yehova akokisaki na moke elaka na ye epai na Abalayama.
9. (a) Makambo minei nini Yehova alakaki na nzela ya kondimana ya Abalayama? (b) Kondimana ya Yehova elongo na Yisalaele epesaki nzela na bilikya mosusu nini mpe esengelaki liboso kosala nini?
9 Yehova alimbolaki epai na Yisalaele masɛngami ya kondimana na ye: “Soko bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bóbatela kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali na ngai, mpe bokozala bokonzi na banganga mpe libota na bulɛɛ.” (Exode 19:5, 6) Yehova alakaki ete mombóto ya Abalayama (1) ekokóma libota monene, (2) ekolónga banguna na yango, (3) ekosangola mokili ya Kanana, mpe (4) ekozala nzela ya mapamboli mpo na mabota. Na ntango yango amonisaki ete bakokaki kozwa mapamboli yango lokola libota na ye liponami, Yisalaele, “bokonzi na banganga mpe libota na bulɛɛ,” soki bakotosa mibeko na ye. Bayisalaele bandimaki kokɔta na kondimana wana? Bayanolaki lokola moto moko ete: “Tokosala yango nyonso elobi [Yehova].”—Exode 19:8.
10. Lolenge nini Yehova abongisaki Bayisalaele lokola ekólo, mpe azalaki komizela na likambo nini epai na bango?
10 Na yango, Yehova abongisaki Bayisalaele lokola ekólo. Apesaki bango mibeko na ntina na losambo mpe bomoi ya mokolo na mokolo. Lisusu, apesaki bango mongombo (na nsima, tempelo na Yelusaleme) mpe banganga mpo na kokokisa mosala ya bulɛɛ kati na mongombo. Kobatela kondimana elimbolaki kotosa mibeko ya Yehova mpe, mpenzampenza, kosambela bobele ye. Mobeko ya liboso kati na Mibeko Zomi oyo ezalaki moboko ya mibeko wana elobaki ete: “Ngai nazali [Yehova] Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili na Ezipito, na ndako na boombo. Okozala na banzambe mosusu liboso na ngai te.”—Exode 20:2, 3.
Mapamboli na nzela ya kondimana ya Mibeko
11, 12. Na ndenge nini bilaka ya kondimana ya kala bikokisamaki epai na Yisalaele?
11 Bilaka ya Nzambe epai na Yisalaele na nzela ya kondimana ya Mibeko bikokisamaki? Yisalaele ekómaki nde “libota ya bulɛɛ”? Lokola bakitani ya Adama, Bayisalaele bazalaki basumuki. (Baloma 5:12) Atako bongo, na nsé ya Mibeko, bazalaki kopesa bambeka mpo na kozipa masumu na bango. Mpo na bambeka oyo ezalaki kopesama na Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula, Yehova alobaki ete: “Na mokolo yango kozongisa bondeko ekosalema mpo na bino mpo na kopɛtola bino. Bokozala pɛto na masumu na bino nyonso liboso na [Yehova].” (Levitike 16:30) Na bongo, ntango bazalaki kotosa na bosembo nyonso, Yisalaele ezalaki libota ya bulɛɛ, epɛtolami mpo na mosala ya Yehova. Kasi etɛlɛmɛlo yango ya pɛto etalelaki botosi na bango na Mibeko mpe kopesa bambeka mbala na mbala.
12 Yisalaele ekómaki nde “bokonzi na banganga”? Uta ntango kondimana esalemaki, Yisalaele ezalaki bokonzi, mpe Yehova azalaki Mokonzi oyo azalaki koyangela uta na likoló. (Yisaya 33:22) Lisusu, kondimana ya Mibeko ezalaki na bibongiseli mpo ete bato bázala bakonzi, na boye ete, na nsima, Yehova amonisamaki na bakonzi oyo bayangelaki na Yelusaleme. (Deteronome 17:14-18) Kasi Yisalaele ezalaki bokonzi ya banganga? Ya solo, ezalaki na kelasi ya banganga oyo bazalaki kosala mosala ya bulɛɛ na mongombo. Mongombo (na nsima, tempelo) ezalaki esika monene ya losambo ya pɛto mpo na Bayisalaele mpe bato oyo bazalaki Bayisalaele te. Mpe libota yango ezalaki nzela bobele moko mpo na komonisa solo epai na bato. (2 Ntango 6:32, 33; Baloma 3:1, 2) Bayisalaele nyonso ya sembo, kasi bobele banganga Balevi te, bazalaki “batatoli” ya Yehova. Yisalaele ezalaki “mosaleli” ya Yehova oyo abongisamaki mpo na ‘komonisa masanzoli na ye.’ (Yisaya 43:10, 21, NW) Bapaya mingi oyo bazalaki na komikitisa bamonaki nguya ya Yehova ntango azalaki kokɔtela bato na ye mpe babendamaki na losambo ya pɛto. Bakómaki baprozelite. (Yosua 2:9-13) Kasi bobele libota moko nde ezalaki mpenza kosala lokola banganga bapakolami.
Baprozelite na Yisalaele
13, 14. (a) Mpo na nini ekoki kolobama ete baprozelite bazalaki basangani na kondimana ya Mibeko te? (b) Na lolenge nini baprozelite bakɔtaki na nsé na kondimana ya Mibeko?
13 Baprozelite yango bazalaki na etɛlɛmɛlo nini? Ntango Yehova asalaki kondimana na ye, asalaki yango bobele na Yisalaele; atako “ebele na bato na ndenge na ndenge” bazalaki wana, batángamaki lokola basangani na kondimana te. (Exode 12:38; 19:3, 7, 8) Bana na bango babotami ya liboso basangisamaki te ntango batángaki motuya ya mbeka mpo na babotami ya liboso ya Yisalaele. (Mituya 3:44-51) Bambula mingi na nsima, ntango mokili ya Kanana ekabolamaki kati na mabota ya Yisalaele, eteni moko te epesamaki na bandimi oyo bazalaki Bayisalaele te. (Genese 12:7; Yosua 13:1-14) Mpo na nini? Mpamba te kondimana ya Mibeko esalemaki na baprozelite te. Kasi, baprozelite ya mibali bakatamaki ngenga mpo na kotosa Mibeko. Bazalaki kotosa mitindá na yango, mpe bazwaki matomba na bibongiseli na yango. Baprozelite, lokola mpe Bayisalaele batyamaki na nsé ya kondimana ya Mibeko.—Exode 12:48, 49; Mituya 15:14-16; Baloma 3:19.
14 Na ndakisa, soki prozelite moko abomi moto na kozanga kokanela, akokaki kokima na mboka na kobombama, lolenge moko na Moyisalaele. (Mituya 35:15, 22-25; Yosua 20:9) Na Mokolo ya Mbɔndi, mbeka ezalaki kopesama “mpo na [lisangá, NW] mobimba na Yisalaele.” Lokola bazalaki kati na lisangá, baprozelite basanganaki na milulu yango mpe mbeka wana ezipaki mpe masumu na bango. (Levitike 16:7-10, 15, 17, 29; Deteronome 23:7, 8) Baprozelite basanganaki mpenza na Yisalaele na nsé ya Mibeko na boye ete na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango ‘fungola’ ya liboso ‘ya bokonzi’ esalelamaki mpo na Bayuda, baprozelite mpe bazwelaki yango litomba. Mpo na yango, “Nikola mobongwi [“prozelite,” NW], moto na Antiokia,” akómaki moklisto mpe azalaki kati na “mibali nsambo, . . . bato na lokumu malamu” oyo baponamaki mpo na kokabola biloko mpo na lisangá ya Yelusaleme.—Matai 16:19; Misala 2:5-10; 6:3-6; 8:26-39.
Yehova apamboli Mombóto ya Abalayama
15, 16. Lolenge nini kondimana ya Yehova elongo na Abalayama ekokisamaki na nsé ya kondimana ya Mibeko?
15 Na kobongisáká bakitani ya Abalayama lokola ekólo na nsé ya mibeko, Yehova apambolaki bango engebene elaka na ye epai na tata yango ya mabota. Na mobu 1473 L.T.B., Yosua, mokitani ya Mose, akambaki Yisalaele kino na mokili ya Kanana. Kokabola mokili oyo elandaki kati na mabota ya Yisalaele ekokisaki elaka ya Yehova etali kopesa mokili yango na mombóto ya Abalayama. Ntango Yisalaele ezalaki sembo, Yehova akokisaki elaka na ye ya kopesa bango bolóngi likoló na banguna na bango. Yango emonanaki mpenzampenza na boyangeli ya Mokonzi Davidi. Na boyangeli ya Salomo, mwana ya Davidi, likambo ya misato ya kondimana ya Abalayama ekokisamaki. “Yuda mpe Yisalaele bazalaki mingi lokola zelo pembeni na mai-na-monana; balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo.”—1 Mikonzi 4:20.
16 Boye, lolenge nini mabota makopambolama na nzela ya Yisalalele, mombóto ya Abalayama? Lokola toutaki kolobela yango, Yisalaele ezalaki libota liponami ya Yehova, momonisi na ye kati na mabota. Mwa moke liboso ete Yisalaele ekɔta na mokili ya Kanana, Mose alobaki ete: “Bósepela, bino mabota, elongo na bato na ye.” (Deteronome 32:43, NW) Bapaya mingi bandimaki. “Ebele na bato na ndenge na ndenge” balandaki Yisalaele ntango babimaki na Ezipito, bamonaki nguya ya Yehova kati na mokili mokauki, mpe bayokaki libyangi ya Mose ete básepela. (Exode 12:37, 38) Na nsima, Boaza abalaki Luta, mwasi ya mokili ya Moaba mpe akómaki nkɔkɔ ya Masiya. (Luta 4:13-22) Yonadaba Mokenizi mpe bakitani na ye, mpe lisusu Ebede-meleki Moetiopia bamonisaki bokangami na bango na mitindá ya sembo wana ebele ya Bayisalaele bazangaki sembo. (2 Mikonzi 10:15-17; Yilimia 35:1-19; 38:7-13) Na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya Pelese, bapaya mingi bakómaki baprozelite mpe bamityaki na ngámbo ya Yisalaele mpo na kobundisa banguna na ye.—Esetele 8:17, NW, maloba na nsé na lokasa.
Bosɛnga ya kosala kondimana ya sika
17. (a) Mpo na nini Yehova abwakaki bokonzi ya nɔ́rdi mpe bokonzi ya súdi ya Yisalaele? (b) Nini esalaki ete Yehova aboya Bayuda mpo na libela?
17 Kasi, mpo na kokokisama mobimba ya elaka ya Nzambe, libota liponami ya Nzambe lisengelaki kozala sembo. Kasi libota yango lizalaki sembo te. Ya solo, ezalaki na Bayisalaele oyo bamonisaki kondima monene mpenza. (Baebele 11:32–12:1) Atako bongo, na mabaku mingi libota yango esambelaki banzambe ya bapakano, na elikya ya kozwa matomba ya mosuni. (Yilimia 34:8-16; 44:15-18) Bamoko basalelaki Mibeko na lolenge mabe to babwakaki yango. (Nehemia 5:1-5; Yisaya 59:2-8; Malaki 1:12-14) Nsima ya liwa ya Salomo, Yisalaele ekabwanaki na bokonzi ya nɔ́rdi mpe bokonzi ya súdi. Ntango bokonzi ya nɔ́rdi emonisaki mpenza botomboki makasi, Yehova ayebisaki ete: “Mpo ete yo oboyi boyebi; boye ngai nakoboya yo ete ozala nganga na ngai te.” (Hosea 4:6) Bokonzi ya súdi yango mpe ezwaki etumbu makasi mpamba te etosaki kondimana te. (Yilimia 5:29-31) Ntango Bayuda baboyaki kondima Yesu lokola Masiya, Yehova mpe aboyaki bango. (Misala 3:13-15; Baloma 9:31–10:4) Na nsuka, Yehova asalaki ebongiseli ya sika mpo na kokokisa kondimana ya Abalayama na mobimba na yango.—Baloma 3:20.
18, 19. Ebongiseli nini ya sika Yehova asalaki mpo ete kondimana ya Abalayama ekoka kokokisama na mobimba na yango?
18 Ebongiseli yango ya sika ezalaki bongo kondimana ya sika. Yehova asilaki kosakola yango ntango alobaki ete: “[Yehova] alobi ete, Talá mikolo mikoya wana nakokata kondimana na sika na ndako na Yisalaele mpe na ndako na Yuda, . . . oyo ekozala kondimana ekokata ngai na ndako na Yisalaele nsima na mikolo yango; [Yehova] alobi bongo. Nakotya Mobeko na ngai na kati na bango; nakokoma yango na mitema na bango; nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai.”—Yilimia 31:31-33.
19 Ezali yango nde kondimana ya sika oyo Yesu alobelaki na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B. Na libaku wana, amonisaki ete kondimana oyo elakamaki elingaki kosalema kati na bayekoli na ye na Yehova, mpe ye akozala moyokanisi na yango. (1 Bakolinti 11:25; 1 Timoté 2:5; Baebele 12:24) Na nzela ya kondimana yango ya sika, elaka ya Yehova epai na Abalayama esengelaki kozwa kokokisama ya nkembo koleka mpe ya libela, lokola tokomona yango na lisoló lilandi.
Okoki kolimbola?
◻ Yehova alakaki nini kati na kondimana ya Abalayama?
◻ Lolenge nini Yehova akokisaki kondimana ya Abalayama epai ya Yisalaele ya mosuni?
◻ Lolenge nini baprozelite bazwaki litomba na kondimana ya kala?
◻ Mpo na nini esengelaki ete kondimana ya sika esalema?
[Elilingi na lokasa 9]
Na ndimbola ya elilingi, Yehova akokisaki kondimana ya Abalayama na nzela ya kondimana ya Mibeko.