Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Koyika mpiko eyeisi mapamboli ya Nzambe na ekólo Malawi
YOSEFE azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova. (Baebele 11:22) Azalaki lisusu moto oyo ayebaki koyika mpiko. Atako bandeko na ye mpenza bakabaki ye, mbala mibale atekamaki na boombo, mpe na nsima atyamaki na bolɔ́kɔ, na bifundeli ya lokuta, Yosefe alɛmbaki te na elimo. Kutu, na motema molai mpenza ayikelaki minyoko oyo eumelaki bambula mingi mpiko, kasi na komikitisa nyonso azelaki mapamboli ya Yehova.—Genese 37:23-28, 36; 39:11-20.
Motindo moko lelo oyo, Batatoli ya Yehova na ekólo Malawi bazelaki mapamboli ya Yehova na motema molai. Na boumeli ya mbula 26, baklisto wana Batatoli ya Yehova, bayikelaki bipekiseli ya guvernemá mpiko, botɛmɛli ya makasi, mpe minyoko ya ndenge na ndenge. Kasi mpiko na bango ezwaki mbano!
Ntango minyoko ebandaki na ekólo Malawi na nsuka ya 1967, basakoli ya Bokonzi bazalaki pene na 18 000. Kanisá esengo ya Batatoli ya Yehova ntango bayokaki ete motuya ya basakoli ezalaki 38 393 na ebandeli ya mobu ya mosala ya 1997—mbala mibale koleka motángo ya basakoli oyo bazalaki na ntango epekiseli ebandaki! Na koleka, motuya ya bato oyo bayaki na mayangani ya etúká “Bamemi nsango ya kimya ya Nzambe” oyo esalemaki na bisika 13 na Malawi esangisaki bato 117 000. Ya solo, Yehova apambolaki kondima na bango mpe mpiko na bango.
Ndakisa ya lipamboli yango ezali likambo oyo ekómelaki elenge moko ya mobali ya mibu 14 na nkombo Machaka. Ntango Machaka andimaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, baboti na ye basilikaki. Balobaki na ye ete: “Soki olingi kokóma Motatoli ya Yehova, okolongwa na ndako.” Nzokande, makaneli yango elɛmbisaki ye te ete akóba koyekola Biblia. Na ntina yango, baboti ya Machaka babɔtɔlaki bilamba na ye nyonso. Bandeko [Batatoli ya Yehova] basombelaki ye bilamba mosusu. Ntango baboti ya Machaka bayokaki likambo yango, balobaki na ye ete: “Soki Batatoli bakosalisa yo, longwa na ndako mpe kende kofanda epai na bango.” Nsima ya kotalela likambo yango na mozindo, Machaka alongwaki na ndako, mpe libota moko ya Batatoli ya lisangá na bango liyambaki ye.
Baboti ya Machaka basilikaki makasi na boye ete bazwaki ekateli ya kokende kofanda na engumba mosusu mpo na koboya bokutani nyonso na Batatoli ya Yehova. Ya solo, Machaka, atungisamaki na likambo yango, kasi abɔndisamaki ntango bandeko batalelaki elongo na ye mokanda ya Nzembo 27:10, oyo elobi ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.”
Na nsima, baboti ya Machaka bakitisaki motema, mpe Machaka azwaki ekateli ya kozonga na ndako. Emonani ete ekateli makasi ya mwana na bango mpo na kosalela Yehova esalaki bopusi makasi likoló na bango, mpamba te bango mpe basepelaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova! Bazalaki mpe, na boumeli ya mikolo misato, na liyangani ya etúká “Bamemi nsango ya kimya ya Nzambe,” nsima na yango bapusamaki na koloba ete: “Ya solo, oyo ezali lisangá ya Nzambe.”
Ɛɛ, kokutana na botɛmɛli ekoki kozala mpasi, kasi bamemi-nsango ya Nzambe oyo bazali sembo bazongaka nsima te. Na mpiko nyonso bazali kokende liboso, koyebáká ete “bolɔzi ekoyeisa mpiko, mpe mpiko ekoyeisa motema na nguya.” (Baloma 5:3, 4) Batatoli ya Yehova na ekólo Malawi bakoki solo kondimisa likambo yango ete koyika mpiko eyeisi mapamboli ya Nzambe.