Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 15/1 nk. 27-31
  • Bankulutu: ‘Baninga ya mosala mpo na esengo na biso’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bankulutu: ‘Baninga ya mosala mpo na esengo na biso’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KONDIMA MPE ESENGO NA BISO
  • “BÓPESA MBOTE NA PERSISI NDEKO NA BISO YA BOLINGO”
  • “ASALAKI EBELE YA MISALA YA MAKASI NA KATI YA NKOLO”
  • ‘BÓBATELA LISANGÁ YA NZAMBE’
  • “ABISHAI . . . AYAKI KOSALISA YE”
  • “BÓYEBA BOLINGO OYO NALINGAKA MPENZA BINO”
  • Bankulutu: Bókoba komekola ntoma Paulo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Tózala na botɔndi mpo na “makabo na motindo na mibali”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Bózala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • ’Bolingaka bato ya lolenge oyo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 15/1 nk. 27-31

Bankulutu: ‘Baninga ya mosala mpo na esengo na biso’

“Tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino.”​—2 KO. 1:24.

LUKÁ BIYANO NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini Paulo amonisaki ete azalaki te ‘mokonzi ya kondima ya bandeko na ye’ kasi nde ‘moninga ya mosala mpo na esengo na bango’?

  • Na ndenge nini bankulutu basalisaka bandeko na bango bakristo bázala na esengo?

  • Ndenge nini biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ mpo lisangá ezala na esengo?

1. Nini etindaki Paulo asepela mpo na bakristo ya Korinti?

NA MOBU 55 T.B., ntoma Paulo akómaki na Troase, engumba oyo ezalaki na libongo, kasi abosanaki te bandeko ya Korinti. Mwa moke liboso, kaka na mbula wana, ayokaki mpasi ntango azwaki nsango ete bandeko mosusu ya Korinti bazalaki kowelana bango na bango. Yango wana, lokola tata oyo amibanzabanzaka mpo na bana na ye, atindelaki bango mokanda mpo na kosembola bango. (1 Ko. 1:11; 4:15) Atindelaki mpe bango Tito, moninga na ye ya mosala, mpe azwaki bibongiseli mpo ete Tito azonga na Troase mpo na kopesa ye nsango ya bandeko kuna. Sikoyo, Paulo azalaki kozela Tito na Troase, mpe azalaki na mposa makasi ya koyeba soki bandeko ya Korinti bazali ndenge nini. Kasi Paulo alɛmbaki nzoto mpo Tito azongaki na Troase te. Paulo asalaki nini? Akendaki na Masedonia mpe asepelaki mingi ntango akutanaki na Tito kuna. Tito ayebisaki ye ete bandeko ya Korinti bandimaki kosalela makambo oyo akomelaki bango mpe bazalaki na mposa makasi ya komona ye. Ntango Paulo ayokaki nsango wana ya malamu, “asepelaki mingi lisusu koleka.”​—2 Ko. 2:12, 13; 7:5-9.

2. (a) Maloba nini Paulo akomelaki Bakorinti na oyo etali kondima mpe esengo? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

2 Mwa moke na nsima, Paulo akomelaki Bakorinti mokanda ya mibale. Ayebisaki bango ete: “Ezali te ete tozali bakonzi ya kondima na bino, kasi tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino, mpo na kondima na bino nde botɛlɛmi.” (2 Ko. 1:24) Paulo alingaki koloba nini? Mpe ndenge nini maloba wana ekoki kosalisa bankulutu lelo oyo?

KONDIMA MPE ESENGO NA BISO

3. (a) Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki ete: “Na kondima na bino nde botɛlɛmi”? (b) Lelo oyo, ndenge nini bankulutu balandaka ndakisa ya Paulo?

3 Paulo alobelaki makambo mibale ya ntina oyo etali losambo na biso: kondima mpe esengo. Tóbosana te ete na oyo etali kondima, akomaki ete: “Ezali te ete tozali bakonzi ya kondima na bino, . . . mpo na kondima na bino nde botɛlɛmi.” Na maloba wana, Paulo andimaki ete soki bandeko na Korinti bazalaki kotɛlɛma ngwi, ezalaki te mpo na ye to mpo na moto mosusu, kasi ezalaki nde mpo na kondima oyo bango moko bazalaki na yango epai ya Nzambe. Na yango, Paulo amonaki ete ezali na ntina te azala mokonzi ya kondima ya bandeko na ye, mpe azalaki te na mposa ya kosala bongo. Azalaki kotya ntembe te ete bazalaki bakristo ya sembo mpe bazalaki na mposa ya kosala makambo ya malamu. (2 Ko. 2:3) Lelo oyo, bankulutu balandaka ndakisa ya Paulo na ndenge batyelaka kondima ya bandeko ntembe te mpe batyaka ntembe te ete bandeko basalelaka Nzambe na makanisi ya malamu. (2 Tes. 3:4) Na esika ya kotyela bandeko ya lisangá mibeko makasimakasi, bankulutu balandaka nde mitinda ya Biblia mpe malako ya ebongiseli ya Yehova. Kutu, lelo oyo bankulutu bazali te bakonzi ya kondima ya bandeko na bango.​—1 Pe. 5:2, 3.

4. (a) Paulo alingaki koloba nini ntango akomaki ete: “Tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino”? (b) Lelo oyo, ndenge nini bankulutu bamekolaka ezaleli ya Paulo?

4 Paulo alobaki mpe ete: “Tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino.” Maloba wana ya Paulo etalelaki ye moko mpe baninga na ye ya mosala. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te, kaka na mokanda wana, Paulo atángelaki Bakorinti baninga na ye mibale ya mosala ntango akomaki ete: “Yesu . . . asakolamaki na kati na bino na nzela na biso, elingi koloba, na nzela na ngai ná Silvano ná Timote.” (2 Ko. 1:19) Lisusu, na bisika nyonso oyo Paulo asaleli maloba “baninga ya mosala” na mikanda na ye, azalaki ntango nyonso kolobela baninga na ye ya motema, lokola Apolosi, Akila, Priska, Timote, Tito, mpe baninga mosusu. (Rom. 16:3, 21; 1 Ko. 3:6-9; 2 Ko. 8:23) Na yango, ntango Paulo alobaki ete: “Tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino,” alingaki komonisa Bakorinti ete ye ná baninga na ye ya mosala bazalaki na mposa ya kosala nyonso oyo bakokaki mpo bandeko nyonso ya lisangá bázala na esengo. Lelo oyo mpe, bankulutu bazalaka na mposa wana. Basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bandeko ya lisangá ‘básalela Yehova na esengo.’​—Nz. 100:2; Flp. 1:25.

5. Tokotalela biyano na motuna nini, mpe tosengeli kokanisa na likambo nini?

5 Na mikolo oyo euti koleka, basɛngaki bandeko basi mpe mibali ya molende oyo bafandi na bisika ndenge na ndenge na mokili báyanola na motuna oyo: “Maloba mpe misala nini ya nkulutu moko ebakisaki esengo na yo?” Wana tozali kotalela biyano oyo bandeko yango bapesaki, talá soki maloba na bango ekokani na eyano oyo olingaki kopesa soki batunaki yo motuna wana. Lisusu, tiká ete biso nyonso tókanisa oyo tokoki kosala mpo esengo ezala na lisangá oyo tozali.a

“BÓPESA MBOTE NA PERSISI NDEKO NA BISO YA BOLINGO”

6, 7. (a) Wapi lolenge moko oyo bankulutu bakoki komekola Yesu, Paulo, mpe basaleli mosusu ya Nzambe? (b) Mpo na nini kokanga bankombo ya bandeko ebakiselaka bango esengo?

6 Bandeko basi mpe mibali mingi balobaka ete esengo na bango ebakisamaka soki bankulutu bazali kotyela bango likebi. Lolenge moko ya malamu oyo bankulutu bakoki kosala yango ezali ya kolanda ndakisa oyo Davidi, Elihu, mpe Yesu batikaki. (Tángá 2 Samwele 9:6; Yobo 33:1; Luka 19:5.) Mokomoko ya basaleli wana ya Yehova amonisaki ete azalaki kotyela moto mosusu likebi na ndenge abengaki moto yango na nkombo ye. Paulo mpe ayebaki ete ezali na ntina mingi kokanga bankombo ya bandeko na ye bakristo mpe kosalela yango. Na nsuka ya mokanda na ye moko, atindelaki bandeko basi mpe mibale koleka 25 mbote mpe atángaki bankombo na bango, na ndakisa Persisi, ndeko mwasi moko oyo alobaki mpo na ye ete: “Bópesa mbote na Persisi ndeko na biso ya bolingo.”​—Rom. 16:3-15.

7 Bankulutu mosusu bazalaka na mokakatano ya kokanga bankombo ya bandeko. Atako bongo, soki basali makasi bákanga bankombo ya bandeko na bango bakristo, ekozala lokola nde bazali koyebisa bango ete: ‘Ozali na ntina mingi na miso na ngai.’ (Kob. 33:17) Mingimingi, bankulutu babakisaka esengo ya bandeko soki bazali kobenga bango na nkombo ntango bazali kopona bango mpo na kopesa biyano na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na makita mosusu.​—Kokanisá na Yoane 10:3.

“ASALAKI EBELE YA MISALA YA MAKASI NA KATI YA NKOLO”

8. Ndenge nini Paulo alandaki ndakisa ya Yehova ná Yesu?

8 Paulo amonisaki mpe ete atyelaka basusu likebi na ndenge azalaki kopesa bango longonya oyo euti mpenza na motema; yango ezali lolenge mosusu ya ntina ya kobakisela bandeko esengo. Na yango, kaka na mokanda oyo alobelaki mposa na ye ya kosala mpo na esengo ya bandeko na ye, Paulo akomaki ete: “Nazali komikumisa mingi mpo na bino.” (2 Ko. 7:4) Na ntembe te, maloba wana ya kopesa longonya esimbaki mpenza mitema ya bandeko ya Korinti. Paulo akomelaki mpe bandeko ya masangá mosusu maloba ya ndenge wana. (Rom. 1:8; Flp. 1:3-5; 1 Tes. 1:8) Kutu, nsima ya kolobela Persisi na mokanda oyo akomelaki lisangá ya Roma, Paulo abakisaki ete: “Asalaki ebele ya misala ya makasi na kati ya Nkolo.” (Rom. 16:12) Na ntembe te, maloba wana ya kopesa longonya esimbaki mpenza motema ya ndeko mwasi wana ya sembo! Paulo alandaki ndakisa ya Yehova ná Yesu na ndenge azalaki kopesa basusu longonya.​—Tángá Marko 1:9-11; Yoane 1:47; Em. 2:2, 13, 19.

9. Mpo na nini tokoki koloba ete kopesa basusu longonya to kozwa longonya epai ya basusu ebakiselaka bandeko esengo na kati ya lisangá?

9 Lelo oyo mpe, bankulutu bamonaka ete ezali na ntina báyebisaka bandeko na bango bakristo ete basepelaka na makambo oyo basalaka na lisangá. (Mas. 3:27; 15:23) Soki nkulutu asali bongo, ezali lokola nde azali koyebisa bandeko na ye ete: ‘Namonaki likambo oyo osalaki. Natyelaka yo likebi.’ Kozanga ntembe, bandeko basepelaka ete bankulutu báyebisa bango maloba ya kolendisa. Ndeko mwasi moko ya mbula 50 na ndambo alobi ndenge bandeko mingi balobaka, ete: “Na mosala, ezalaka mpasi moto apesa ngai longonya. Bato bakipanaka te mpe bawelanaka ntango nyonso. Yango wana, soki nkulutu moko apesi ngai longonya mpo na likambo moko oyo nasalaki mpo na lisangá, yango ekitisaka ngai motema mpe epesaka ngai makasi! Esalisaka ngai namona ete Tata na ngai ya likoló alingaka ngai.” Ndeko mobali moko oyo abɔkɔlaka bana na ye mibale ye moko alobaki mpe ndenge wana. Na mikolo oyo euti koleka, nkulutu moko apesaki ye longonya oyo euti mpenza na motema. Ndeko yango amiyokaki ndenge nini? Alobi ete: “Maloba ya nkulutu wana elendisaki ngai mingi.” Ya solo, soki nkulutu azali kopesa bandeko na ye bakristo longonya na motema moko, akolendisa bango mpe akobakisa esengo na bango. Mpe yango ekopesa bango lisusu makasi mpo bákoba kotambola na nzela ya bomoi ‘mpe bálɛmba te.’​—Yis. 40:31.

‘BÓBATELA LISANGÁ YA NZAMBE’

10, 11. (a) Ndenge nini bankulutu bakoki kolanda ndakisa ya Nehemia? (b) Nini ekoki kosalisa nkulutu alendisa ndeko na elimo ntango akei kotala ye?

10 Wapi lolenge mosusu ya malamu oyo bankulutu bakoki komonisa ete batyelaka bandeko ya lisangá likebi mpe balingi ete bázala na esengo mingi? Ezali soki bazali kozwa bibongiseli mpo na koluka bandeko oyo bazali na mposa ya bilendiseli. (Tángá Misala 20:28.) Soki bankulutu bazali kosala bongo, bazali komekola babateli ya etonga ya Nzambe ya ntango ya kala. Na ndakisa, talá likambo oyo Nehemia, mokɛngɛli moko ya sembo, asalaki ntango amonaki ete bandeko na ye mosusu Bayuda bakómaki kolɛmba na elimo. Lisolo yango elobi ete mbala moko atɛlɛmaki mpe alendisaki bango. (Neh. 4:14) Lelo oyo, bankulutu basalaka mpe bongo. ‘Batɛlɛmaka,’ elingi koloba bazwaka bibongiseli mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo bázala na kondima makasi. Mpo na kolendisa ndeko mokomoko, bakendaka kotala bandeko mibali mpe basi na bandako na bango soki likoki ezali. Ntango bakendaka kotala bandeko, bazalaka na mposa ya kokabela bango mwa ‘likabo ya elimo.’ (Rom. 1:11) Nini ekoki kosalisa bankulutu básala bongo?

11 Liboso ya kokende kotala ndeko moko mpo na kolendisa ye, nkulutu asengeli naino kozwa mwa ntango mpo na kokanisa makambo oyo etali ndeko yango. Mikakatano nini ndeko yango azali kokutana na yango? Makanisi nini ekoki kotonga ye na elimo? Mokapo nini ya Biblia to lisolo ya moto nini oyo Biblia elobeli eyokani na makambo oyo ndeko yango azali kokutana na yango? Kokanisa liboso ndenge wana ekosalisa nkulutu asolola na ndeko yango na ndenge oyo ekolendisa ye mpenza, na esika ya kosolola na ye kaka likolólikoló. Ntango nkulutu azali kosolola na ndeko, asengeli kotikela ye ntango aloba makambo oyo azali na yango na motema mpe koyoka ye na likebi. (Yak. 1:19) Ndeko mwasi moko alobaki ete: “Soki nkulutu azali koyoka ngai na likebi, yango ebɔndisaka ngai mpenza.”​—Luka 8:18.

Komibongisa esalisaka nkulutu ‘akaba likabo ya elimo’ ntango akei kotala bandeko

12. Banani na kati ya lisangá bazali na mposa ya bilendiseli, mpe mpo na nini?

12 Bandeko nini bankulutu basengeli kokende kotala mpo na kolendisa bango? Paulo apesaki baninga na ye bankulutu toli ete ‘bákeba . . . mpo na etonga mobimba.’ Na yango, bandeko nyonso ya lisangá bazali na mposa ya bilendiseli, ata basakoli mpe babongisi-nzela oyo bazali kosalela Yehova na bosembo banda bambula mingi. Mpo na nini bazali na mposa ya lisalisi ya bankulutu? Mpamba te, na bantango mosusu ata bandeko wana oyo bazali makasi na elimo bakutanaka mpe na mikakatano ya mokili oyo mabe. Mpo na koyeba ntina oyo ata mosaleli ya Nzambe oyo azali makasi na elimo akoki mpe kozala na mposa ya lisalisi ya ndeko mosusu, tótalela likambo moko oyo ekómelaki mokonzi Davidi.

“ABISHAI . . . AYAKI KOSALISA YE”

13. (a) Ntango nini Yishibi-benobe alukaki koboma Davidi? (b) Ndenge nini Abishai abikisaki Davidi?

13 Mwa moke nsima ya kotyama mafuta mpo na kokóma mokonzi, elenge Davidi abundaki ná Goliate, Morefaime moko oyo azalaki mpenza engambe. Na mpiko nyonso, Davidi abomaki engambe yango. (1 Sa. 17:4, 48-51; 1 Nt. 20:5, 8) Bambula mingi na nsima, ntango bazalaki kobunda ná Bafilistia, Davidi abundaki lisusu ná engambe moko. Nkombo ya engambe yango ezalaki Yishibi-benobe, oyo azalaki mpe Morefaime. (2 Sa. 21:16) Kasi na mbala oyo, etikalaki moke engambe yango aboma Davidi. Mpo na nini? Ezali te mpo Davidi azangaki mpiko, kasi nde mpo azalaki lisusu na makasi mingi te. Lisolo yango elobi ete: “Davidi abandaki kolɛmba.” Ntango Yishibi-benobe amonaki ete Davidi abandi kolɛmba, mbala moko “akanaki koboma Davidi.” Kasi, mwa moke liboso ete engambe wana akitisa mopanga na ye likoló ya Davidi, “na mbala moko, Abishai mwana ya Zeruya ayaki kosalisa ye [Davidi], abɛtaki Mofilistia yango mpe abomaki ye.” (2 Sa. 21:15-17) Davidi amonaki mpenza liwa na miso! Na ntembe te, azalaki na botɔndi mingi ndenge Abishai azalaki kokɛngɛla ye mpe ayaki nokinoki kosalisa ye ntango bomoi na ye ekómaki na likama! Mateya nini tokoki kozwa na lisolo yango?

14. (a) Nini esalisaka biso tólonga mikakatano oyo ezali lokola Goliate? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bandeko bazwa lisusu makasi mpe esengo? Pesá ndakisa.

14 Na mokili mobimba, biso basaleli ya Yehova tozali kokokisa mosala na biso atako tozali kokutana na mikakatano oyo Satana ná bato na ye bazali kobimisela biso. Basusu kati na biso bakutanaki na mikakatano ya makasi oyo ezalaki lokola engambe Goliate, kasi lokola batyelaki Yehova motema mobimba, balongaki yango. Nzokande na bantango mosusu, tolɛmbaka nzoto mpo tozali ntango nyonso kobundana na mikakatano ya mokili oyo. Soki tolɛmbi ndenge wana, ezalaka mpasi te ete mikakatano oyo tokokaki kolonga soki tozalaki makasi ‘ebɛta’ biso. Na ntango wana, lisalisi ya nkulutu moko ekoki kopesa biso lisusu esengo mpe makasi, ndenge bandeko mingi bamonaki yango. Ndeko mwasi moko ya mbula 60 na ndambo oyo azali mobongisi-nzela alobaki boye: “Eleki mwa ntango, nazalaki komiyoka malamu te, mpe mosala ya kosakola ekómaki kolɛmbisa ngai. Nkulutu moko amonaki ete nazali lisusu na makasi te, mpe apusanaki pene na ngai. Vɛrsɛ oyo apesaki ngai ntango tosololaki elendisaki ngai mingi. Nasalelaki batoli oyo apesaki ngai, mpe yango esalisaki ngai.” Abakisaki boye: “Nasepelaki mingi ndenge nkulutu wana amonaki ete nabandi kolɛmba mpe asalisaki ngai.” Ya solo, tozali na esengo mingi ya kozala na bankulutu oyo batyelaka biso likebi na bolingo mpenza mpe batɛlɛmaka mpo na kosalisa biso ndenge Abishai asalisaki Davidi.

“BÓYEBA BOLINGO OYO NALINGAKA MPENZA BINO”

15, 16. (a) Mpo na nini bandeko bazalaki kolinga Paulo mingi? (b) Mpo na nini tolingaka bankulutu oyo batyelaka biso likebi?

15 Kozala nkulutu ezali mokumba monene. Ntango mosusu, bankulutu balekisaka babutu kozanga mpɔngi mpo bazali komibanzabanza mpe kobondela mpo na etonga ya Nzambe to mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo na elimo. (2 Ko. 11:27, 28) Atako bongo, bankulutu bakokisaka mikumba na bango malamumalamu mpe basalaka yango na esengo, kaka ndenge Paulo azalaki kosala. Akomelaki Bakorinti ete: “Na esengo koleka, nakopesa biloko na ngai nyonso mpe nakopesama mobimba mpo na milimo na bino.” (2 Ko. 12:15) Ya solo, bolingo ya Paulo mpo na bandeko na ye bakristo nde etindaki ye ‘amipesa’ mobimba mpo na kolendisa bango. (Tángá 2 Bakorinti 2:4; Flp. 2:17; 1 Tes. 2:8) Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge bandeko bazalaki kolinga ye mingi!​—Mis. 20:31-38.

16 Lelo oyo, biso basaleli ya Nzambe tolingaka mpe bankulutu oyo bamibanzabanzaka mpo na biso mpe topesaka Yehova matɔndi na mabondeli na biso na ndenge apesá biso bankulutu yango. Babakisaka esengo na biso na ndenge batyelaka mokomoko na biso likebi. Balendisaka biso mingi ntango bayaka kotala biso. Longola yango, tozalaka na botɔndi ndenge batɛlɛmaka mpo na kosalisa biso na bantango oyo tomonaka ete mikakatano ya mokili oyo elekeli biso. Ya solo, bankulutu ya ndenge wana oyo batyelaka biso likebi bazali mpenza ‘baninga ya mosala mpo na esengo na biso.’

a Batunaki mpe bandeko yango motuna oyo: “Ezaleli nini osepelaka na yango mingi koleka epai ya nkulutu?” Mingi kati na bango bayanolaki ete: “Bandeko bábangaka te kopusana pene na ye.” Tokolobela ezaleli wana ya ntina mingi na lisolo mosusu oyo ekobima mosika te na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto