Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr22 Novembre nk. 1-11
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • 07-13/11
  • 14-20/11
  • 21-27/11
  • OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • 28/11–04/12
  • 05-11/12
  • 12-18/12
  • 19-25/12
  • OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • 26/12–01/01
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2022
mwbr22 Novembre nk. 1-11

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

07-13/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 5-6

“Baoyo bazali na biso bazali mingi koleka baoyo bazali na bango”

it-1-F lok. 728 par. 5

Elisha

Yisraele ebikisami na lobɔkɔ ya Siri. Na boyangeli ya Yehorame, mokonzi ya Yisraele, ekólo Siri ekani kobimela Yisraele na pwasa mpo na kobundisa yango. Mbala ebele, Elisha alongi kobebisa mayele mabe ya Bene-hadade II na ndenge ayebisi Yehorame bisika nyonso bato ya Siri bazali kokende. Na ebandeli, Bene-hadade akanisi ete ezali na moto moko na kaa oyo azali kotɛka bango, kasi ntango ayei koyeba esika mikakatano ezali mpenza kouta, atindi limpinga ya basoda na Dotane mpo bázinga engumba na bampunda mpe na makalo mpo na kokanga Elisha. (FƆTƆ, vol. 1, lok. 950) Mosaleli ya Elisha abangi makasi, kasi Elisha abondeli Nzambe mpo afungola ye miso, “mpe talá! etúká ya ngombangomba etondi na bampunda ná makalo ya bitumba ya mɔtɔ ezingi Elisha bipai nyonso.” Na nsima, wana limpinga ya basoda ya Siri ezali se kopusana, Elisha abondeli mpo lolenge mosusu ya likamwisi esalema. Alobi boye: “Nabondeli yo, bomá bato oyo miso.” Na nsima Elisha asɛngi bato ya Siri bálanda ye kozanga ete akamba bango na lobɔkɔ. Yango emonisi ete ezalaki kobomama ya miso ya solosolo te kasi ya makanisi. Atako bayei kokanga Elisha, bayebi ye te mpe bayebi te esika oyo azali komema bango.​—2Ba 6:8-19.

w13 15/8 lok. 30 par. 2

Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ​—Yo mpe omonaka yango?

Atako banguna bazingaki ye na Dotane, Elisha azalaki motema ya kokita. Mpo na nini? Mpo akómaki na kondima makasi epai ya Yehova. Biso mpe tosengeli kozala na kondima ya ndenge wana. Yango wana, tóbondelaka Nzambe apesa biso elimo santu na ye mpo tókoka komonisa kondima mpe bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo.​—Luka 11:13; Gal. 5:22, 23.

it-1-F lok. 409 par. 4

Koboma miso

Kobomama ya miso oyo basoda ya Siri babɛtamaki na yango na kotalela maloba ya Elisha, na ntembe te ezalaki na yango ya makanisi. Soki bango nyonso miso na bango ya solosolo ebomamaki, elingaki kosɛnga bákamba bango nyonso na lobɔkɔ. Nzokande, lisolo elobi na yango kaka ete Elisha alobi na bango: “Oyo ezali nzela yango te, oyo ezali mpe engumba yango te. Bólanda ngai.” Mpo na likambo yango, William James (Précis de Psychologie, ebongolami na E. Baudin mpe G. Bertier, Paris, 1910, lok. 141) alobi boye: “Kobomama ya miso na makanisi ezali moko ya makambo ya ntina oyo esalaka ete baselile ya miso oyo etindaka makambo na bɔɔngɔ esala lisusu malamu te. Mingimingi ezali te kozanga likoki ya komona kasi nde kozanga kososola makambo oyo ozali komona. Yango ekoki kolimbolama na ndenge oyo: Kobungisa likoki ya koyokanisa makambo oyo miso ezali komona ná ndimbola ya makambo yango; mpe likoki nyonso oyo ezali komema na banzela oyo ezali koyokanisa bisika oyo makoki na biso ya komona efandi ná bisika oyo makanisi mosusu efandi nde ekoki kobimisa kobomama ya miso na makanisi.” Emonani lokola lolenge wana ya koboma miso nde Yehova abikisaki limpinga ya basoda ya Siri ntango bakómaki na Samaria. (2Ba 6:18-20) Ekoki mpe kozala ete mibali ya Sodoma babomamaki miso na makanisi, mpamba te lisolo yango emonisi ete na esika bámitungisa ndenge bazangaki likoki ya komona, bakobaki koluka monɔkɔ ya ndako ya Lota.​—Eb 19:11.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 1/8 lok. 9 par. 2

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Mikonzi

5:15, 16​—Mpo na nini Elisha aboyaki kozwa likabo oyo Naamane apesaki? Elisha aboyaki kondima likabo yango mpo ayebaki ete likamwisi ya kobikisa Naamane oyo asalaki, asalaki yango na nguya ya Yehova, kasi ya ye moko te. Amonaki malamu te kolyela bato na nzela ya mosala oyo Nzambe apesaki ye. Lelo oyo, bakristo ya solo balukaka te kokokisa bamposa na bango moko na nzela ya mosala oyo Yehova apesi bango. Balandaka toli ya Yesu oyo: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Matai 10:8.

14-20/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 7-8

“Yehova asalaki likambo moko oyo bato bakanisaki te”

it-1-F lok. 729 par. 1

Elisha

Nzokande, mwa moke na nsima, Bene-hadade II abimi lisusu, na mbala oyo na bapunzi te, kasi nde na limpinga na ye ya basoda, mpe azingi Samaria. Ndenge Samaria ezingami, bomoi ekómi mpasi mpe bayebisi mokonzi ete mwasi moko alei mwana na ye moko. Lokola azali mokitani ya Ahaba, ‘mwana ya mobomi-bato,’ Mokonzi Yehorame alapi ndai ete akoboma Elisha. Kasi ndai oyo alapi kozanga kokanisa ekokokisama te. Ntango akómi na ndako ya mosakoli elongo na komanda oyo asalisaka ye, Yehorame alobi ete abungisi elikya nyonso ete Yehova akosalisa ye. Elisha akitisi mokonzi yango motema ete bilei ekozala mingi na mokolo oyo elandi. Komanda oyo asalisaka mokonzi atyoli esakweli yango, mpe yango etindi Elisha aloba na ye boye: “Talá, okomona yango na miso na yo, kasi okolya yango te.” Ntango ayokisi na kaa ya bato ya Siri lokito, Yehova atindi bango bákanisa ete ezali limpinga moko ya monene ya basoda oyo esangani mpo na kobundisa bango; bakimi mpe basundoli kaa ná biloko nyonso oyo bazali na yango. Ntango Yehorame ayoki ndenge bato ya Siri basundoli kaa na bango, asɛngi mokonzi oyo asalisaka ye abatela porte ya Samaria; akufi wana mpo ebele ya Bayisraele oyo bazali na nzala banyatinyati ye ntango bazali kowela kokɔta na kaa mpo na kopunza. Amoni bilei, kasi alei yango te.​—2Ba 6:24–7:20.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 108 par. 6

Mwinda

Bakonzi oyo bautaki na libota ya Davidi. Yehova Nzambe atyaki Davidi mokonzi na kiti ya Bokonzi na Yisraele. Davidi akambaki mpe ayangelaki ekólo yango na bwanya mpenza, na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Yango wana, abengamaki “mwinda ya Yisraele.” (2Sa 21:17) Na kondimana ya bokonzi oyo asalaki ná Davidi, Yehova apesaki elaka oyo: “Kiti na yo ya bokonzi ekokóma kiti oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (2Sa 7:11-16) Na yango, boyangeli, to molɔngɔ ya bakonzi oyo bautaki na libota ya Davidi na nzela ya Salomo ezalaki lokola “mwinda” mpo na Yisraele.​—1Ba 11:36; 15:4; 2Ba 8:19; 2Nt 21:7.

21-27/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 9-10

“Asalaki na mpiko, na molende mpe azongaki nsima te”

w11 15/11 lok. 3 par. 2

Yehu abundaki mpo na losambo ya pɛto

Batindaki Yehu akokisa mokumba moko na ntango makambo ezalaki kotambola malamu te na Yisraele. Ekólo yango ezalaki kolanda makambo mabe ya Yezabele, mwasi oyo mobali na ye Ahaba asilaki kokufa mpe mwana na ye Yehorame azalaki koyangela na ntango yango. Yezabele atindaki bato bámipesa na losambo ya Baala na esika básambela Yehova. Abomisaki basakoli ya Nzambe mpe abebisaki bato na ‘misala na ye ya pite’ mpe “ya bonganga-nkisi.” (2 Bak. 9:22; 1 Bak. 18:4, 13) Yehova akanaki kosilisa libota mobimba ya Ahaba, ata mpe Yehorame ná Yezabele, mpe Yehu nde asengelaki kotambwisa makambo yango.

w11 15/11 lok. 4 par. 2-3

Yehu abundaki mpo na losambo ya pɛto

Nsima ya koboya kosolola ata moke na bamemi-nsango mibale oyo batindelaki ye, nsukansuka Yehu akutanaki na Mokonzi Yehorame ná moninga na ye Ahazia, mokonzi ya Yuda, moto na moto na likalo na ye. Ntango Yehorame atunaki ye ete: “Yehu, kimya ezali?” Yehu azongiselaki ye ete: “Kimya nini ekozala ntango misala ya pite ya mama na yo Yezabele mpe ebele ya misala na ye ya bonganga-nkisi ezali naino?” Eyano wana ebulunganisaki Yehorame mpe abalusaki likalo na ye mpo akima. Kasi, Yehu azalaki na mbangu makasi koleka ye! Azwaki litimbo, abɛtaki Yehorame likula na motema, mpe mokonzi yango akweaki na kati ya likalo na ye mpe akufaki. Atako Ahazia alongaki kokima, na nsima Yehu alandaki ye, azwaki ye mpe abomaki ye.​—2 Bak. 9:22-24, 27.

Moto mosusu ya libota ya Ahaba oyo asengelaki kobomama ezalaki Yezabele, mwasi mabe ya mokonzi yango. Yehu abengaki ye ‘mwasi oyo alakelami mabe.’ Ntango Yehu azalaki kokɔta na Yizireele, amonaki mwasi yango azali kotala ye na nse longwa na lininisa ya ndako na ye. Yehu alobaki maloba mingi te; atindaki mbala moko bakapita oyo bazalaki wana bábwaka Yezabele na nse. Na nsima, Yehu ayaki na bampunda na ye mpe enyatanyataki mwasi yango oyo abebisaki Yisraele mobimba. Nsima na yango, Yehu abandaki koboma bato mosusu mingi ya libota ya Ahaba, moto mabe.​—2 Bak. 9:30-34; 10:1-14.

w11 15/11 lok. 5 par. 4-5

Yehu abundaki mpo na losambo ya pɛto

Ya solo, Yehu abomaki bato mingi mpenza. Atako bongo, Biblia emonisi ete azalaki nde mobali ya mpiko oyo alongolaki Yisraele na boyangeli mabe ya Yezabele mpe libota na ye. Mokambi nyonso ya Yisraele asengelaki kozala na mpiko, kozonga nsima te mpe kozala na molende mpo na kolonga kosala likambo ya ndenge wana. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi boye: “Ezalaki mosala moko ya mpasi mpe asalaki yango kozanga kokakatana. Mbala mosusu kosala makambo na bolɛmbu elingaki te kolongola losambo ya Baala na Yisraele mobimba.”

Na ntembe te, okoki komona ete makambo mingi oyo bakristo bakutanaka na yango lelo esɛngaka ete bámonisa bizaleli mosusu oyo Yehu azalaki na yango. Na ndakisa, tosengeli kosala nini soki tomekami mpo na kosala likambo moko oyo Yehova apekisi? Tosengeli kolalisa makambo te; tosengeli kozala na mpiko, koboya yango mbala moko. Ntango esɛngi tómonisa ete tokangami na Nzambe, tokoki kondima ata moke te básalela Yehova bombanda.

Biloko ya motuya ya elimo

w11 15/11 lok. 5 par. 7-8

Yehu abundaki mpo na losambo ya pɛto

Mbala mosusu Yehu amonaki ete lokola bokonzi ya Yisraele ekabwani na bokonzi ya Yuda, esengeli ekabwana mpe na makambo ya losambo. Na yango, ndenge moko na bakonzi oyo bayangelaki Yisraele liboso na ye, alendisaki losambo ya mwana-ngɔmbɛ mpo alingaki ete ekólo ezala kaka na bokabwani. Kasi yango emonisaki ete azangi kondima epai ya Yehova, ye oyo akómisaki ye mokonzi.

Yehova asepelaki na Yehu mpo ‘asalaki malamu na ndenge asalaki oyo ezalaki sembo na miso na ye.’ Nzokande, Yehu “akebaki te mpo na kotambola na mobeko ya Yehova Nzambe ya Yisraele na motema na ye mobimba.” (2 Bak. 10:30, 31) Soki okanisi makambo nyonso oyo Yehu asalaki liboso, okoki kokamwa mpe koyoka mawa mpo na likambo oyo asalaki na nsima. Kasi ezali liteya mpo na biso. Tosengeli kozwa na lisɛki te boyokani na biso na Yehova. Mokolo na mokolo, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, komanyola yango, mpe kobondela Tata na biso ya likoló na motema mobimba mpo tóbatela bosembo na biso epai na ye. Yango wana, tósala makasi mpo tótambola na mobeko ya Yehova na motema na biso mobimba.​—1 Ko. 10:12.

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: Mekolá molende ya Yehova mpe ya Yesu

w13 15/5 nk. 8-9 par. 3-6

Ozali na “molende na misala ya malamu”?

Yisaya 9:7 elobeli makambo oyo boyangeli ya Mwana ya Nzambe ekosala, na maloba oyo: “Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.” Maloba wana emonisi ete Tata na biso ya likoló azali mpenza na mposa ete bato bábika. Molende oyo Yehova Nzambe azali na yango emonisi polele ete tosengeli kokokisa mosala ya kosakola Bokonzi oyo apesi biso na motema mobimba, na esengo, mpe na molende. Soki tozali na mposa makasi ya kosalisa bato báyeba Nzambe, tokomonisa ete tozali komekola molende ya Yehova. Na yango, lokola tozali baninga ya mosala ya Nzambe, mokomoko na biso asengeli kozala na ekateli ya kosakola nsango malamu lisusu mingi koleka soki makambo ya bomoi na ye epesi ye nzela, boye te?​—1 Ko. 3:9.

Tótalela mpe molende ya Yesu. Apesaki ndakisa eleki malamu na ndenge azalaki kosakola na molende. Atako batɛmɛlaki ye makasi mpe balingaki koboma ye, azalaki kaka na molende na mosala ya kosakola, tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. (Yoa. 18:36, 37) Ntango Yesu ayebaki ete etikali moke akufa lokola mbeka, amipesaki lisusu mingi mpo na kosalisa basusu báyeba Yehova.

Na ndakisa, pene na nsuka ya mobu 32 T.B., Yesu apesaki ndakisa ya moto moko oyo, na elanga na ye, azalaki na nzete ya figi oyo ezalaki kobota mbuma te na boumeli ya mbula misato. Ntango ayebisaki mosali-bilanga akata nzete yango, mosali-bilanga asɛngaki ete atikela ye mwa ntango mpo atya bipɔli zingazinga na yango. (Tángá Luka 13:6-9.) Na ntango wana, kaka bato moke nde basilaki kokóma bayekoli ya Yesu. Kasi ndenge ndakisa wana ya mosali-bilanga emonisi, Yesu asalelaki ntango mokuse oyo etikalaki​—soki sanza motoba​—mpo na kosakola lisusu mingi na Yudea mpe na Perea. Mwa mikolo liboso ya liwa na ye, Yesu alelaki mpo na bato ya ekólo na ye oyo ‘matoi na bango eyokaki kasi basalaki eloko te.’​—Mat. 13:15; Luka 19:41.

Lokola nsuka ekómi mpenza pene, ezali na ntina mingi ete tóbakisa milende na mosala ya kosakola. (Tángá Danyele 2:41-45.) Kozala Batatoli ya Yehova ezali mpenza libaku malamu! Na mabele mobimba, kaka biso nde tozali kosalisa bato bázala na elikya ete mikakatano na bango nyonso ekosila. Na mikolo euti koleka, mopanzi-nsango moko alobaki ete eyano ezali te mpo na motuna oyo: “Mpo na nini makambo ya mabe ekómelaka bato malamu?” Lokola tozali bakristo, tozali na mokumba mpe libaku malamu ya koyebisa bato nyonso oyo bandimaka koyoka biso biyano oyo Biblia epesi na mituna ya ndenge wana. Tosengeli mpenza ‘kopela na elimo’ ntango tozali kokokisa mokumba wana oyo Nzambe apesi biso. (Rom. 12:11) Na lipamboli ya Nzambe, molende na biso na mosala ya kopalanganisa nsango malamu ekoki kosalisa basusu báyeba Yehova mpe bálinga ye.

28/11–04/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 11-12

“Mwasi moko ya motema mabe mpe ya lolendo azwi etumbu”

it-1-F lok. 217 par. 4

Atalia

Lokola mama na ye Yezabele, Atalia atindaki mobali na ye, Yehorame, asala makambo oyo ezalaki mabe na miso ya Yehova na boumeli ya mbula mwambe oyo ayangelaki. (1Ba 21:25; 2Nt 21:4-6) Ndenge moko na mama na ye, asopaki makila mingi ya bato oyo basalaki likambo te. Nsima ya liwa ya mwana na ye Ahazia, oyo azalaki mokonzi mabe mpe ayangelaki kaka mbula moko, Atalia abomaki bana mosusu nyonso ya mokonzi, longola kaka Yehoashe, oyo azalaki naino mwana, oyo nganga-nzambe monene ná mwasi na ye babombaki ye, mpo mwasi ya nganga-nzambe monene azalaki tata-mwasi na ye. Atalia amikómisaki mokonzi mpe ayangelaki mbula motoba, na mobu soki 905 tii na mobu 899 L.T.B. (2Nt 22:11, 12) Bana ya Atalia bayibaki biloko mosantu ya tempelo ya Yehova mpo na kopesa yango mbeka epai ya Baala.​— 2Nt 24:7.

it-1-F lok. 217 par. 5

Atalia

Ntango Yehoashe akómaki na mbula nsambo, Yehoyada nganga-nzambe monene, oyo azalaki kobanga Nzambe, abimisaki mwana mobali yango na esika na ye ya kobombana mpe akómisaki ye mokonzi mpo azalaki na lotomo ya kozala na kiti ya bokonzi. Ntango ayokaki makelele ya bato, Atalia ekimaki mbangu na tempelo mpe ntango amonaki makambo oyo esalemaki, abandaki koganga boye: “Likita mabe! Likita mabe!” Na yango, Yehoyada nganga-nzambe monene apesaki motindo ete bábimisa ye na libándá ya tempelo mpo báboma ye liboso ya ndako ya mokonzi na porte ya bampunda; mbala mosusu Atalia nde azalaki moto ya nsuka oyo azalaki na bomoi na ndako mabe ya Ahaba. (2Ba 11:1-20; 2Nt 22:1–23:21) Makambo yango emonisaki bosolo ya maloba oyo: “Liloba ya Yehova ata moko te, oyo Yehova alobaki mpo na ndako ya Ahaba, ekozanga kokokisama”!​—2Ba 10:10, 11; 1Ba 21:20-24.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 1185 par. 7

Yehoashe

Ntango nyonso oyo nganga-nzambe monene Yehoyada azalaki na bomoi, mpe asalaki lokola tata mpe mopesi-toli mpo na Yehoashe, makambo ya elenge mokonzi yango ezalaki kotambola malamu. Abalaki ntango akómaki na mbula 21, azalaki na basi mibale, moko azalaki kobengama Yehoadane, mpe Yehoashe abotaki na basi yango bana mibali mpe bana basi. Na ndenge wana nde molɔngɔ ya bakitani ya Davidi oyo ezalaki komema na Masiya, ekómaki lisusu makasi.​—2Ba 12:1-3; 2Nt 24:1-3; 25:1.

05-11/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 13-15

“Kosala na molende mpenza ememaka mapamboli mingi”

w10 15/4 nk. 26-27 par. 11

Ozali kolanda Kristo malamumalamu?

11 Mpo na komonisa ntina ya kozala na molende na mosala ya Nzambe, tótala likambo oyo esalemaki na bomoi ya Yehoashe, mokonzi moko ya Yisraele. Lokola azalaki komitungisa mpo amonaki ete mbala mosusu Yisraele ekokwea na mabɔkɔ ya Siri, Yehoashe akendaki kolelela mosakoli Elisha. Mosakoli yango ayebisaki ye abɛta likula moko na lininisa na ngámbo ya Siri, mpo na komonisa ete akolonga ekólo yango na lisalisi ya lobɔkɔ ya Yehova. Na ntembe te, yango esengelaki kolendisa mokonzi. Na nsima, Elisha ayebisaki Yehoashe azwa makula na ye mpe abɛta na yango mabele. Yehoashe abɛtaki mabele mbala misato. Elisha asilikaki na likambo yango, mpo kobɛta mabele mbala mitano to motoba elingaki komonisa ete ‘akobɛta Siri tii kosilisa yango nyɛɛ.’ Sikoyo Yehoashe akolonga moke kaka, mbala misato. Lokola asalaki na molende te, Yehoashe alongaki kaka moke. (2 Bak. 13:14-19) Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Yehova akopambola biso mingi kaka soki tozali kosala mosala na ye na motema mobimba mpe na molende.

w13 1/11 lok. 11 par. 5-6

“Moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi”

Yehova apesaka banani mbano? Ntoma Paulo alobi: “Baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” Buku moko ya babongoli ya Biblia emonisi ete maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “koluka na mposa makasi” elimboli kosala milende mpo na kosambela Nzambe, kasi kaka te koluka ye to koyekola makambo na ye. Buku mosusu elobi ete verbe wana ya Grɛki ezali na likanisi ya kotinda moto asala milende mpenza to kotya makanisi nyonso na likambo moko. Ya solo, Yehova apesaka mbano na baoyo kondima na bango etindaka bango basambela ye na motema na bango mobimba, na bolingo na bango mpe na molende.​—Matai 22:37.

Mbano nini Yehova apesaka basaleli na ye ya sembo? Alaki biso likabo moko ya motuya mingi na mikolo ezali koya, oyo ezali komonisa ete akabaka mingi mpe alingaka biso. Likabo yango ezali: bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. (Emoniseli 21:3, 4) Ata sikoyo, baoyo balukaka Yehova na mposa makasi bazwaka mapamboli mingi. Na lisalisi ya elimo santu na ye mpe ya bwanya oyo ezali na Liloba na ye, bazalaka na bomoi ya esengo mpe ya malamu.​—Nzembo 144:15; Matai 5:3.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 1/8 lok. 11 par. 4

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Mikonzi

13:20, 21​—Likamwisi wana emonisi ete tosengeli kosambelaka mikuwa ya basantu to biloko mosusu oyo batiká? Te! Biblia emonisi te ete bato bazalaki kosambela mikuwa ya Elisha. Likamwisi wana esalemaki na nguya ya Nzambe, lokola kaka makamwisi mosusu nyonso oyo Elisha asalaki ntango azalaki na bomoi.

12-18/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 16-17

“Motema molai ya Yehova ezalaka na nsuka”

it-2-F lok. 868 par. 4

Shalmanesere

Boyangeli ya Yisraele. Na boumeli ya boyangeli ya Hoshea, mokonzi ya Yisraele (na mobu soki 758-740 L.T.B.), Shalmanesere V ayaki na Palestine mpe Hoshea akómaki mosaleli na ye oyo asengelaki kofuta mpako mbula na mbula. (2Ba 17:1-3) Kasi, na nsima, Hoshea afutaki mpako yango te mpe asalaki likita elongo na So mokonzi ya Ezipito (talá mpe SO). Yango wana, Shalmanesere akangisaki Hoshea na bolɔkɔ mpe na nsima azingaki Samaria na boumeli ya mbula misato. Atako engumba yango ebatelamaki malamumalamu, nsukansuka ekweaki, mpe bana ya Yisraele bamemamaki na mboka-mopaya.​—2Ba 17:4-6; 18:9-12; talá mpe Hos 7:11; Ezk 23:4-10.

it-1-F lok. 402 par. 6

Bokangami

Ezala ekólo Yisraele, bokonzi ya Nɔrdi oyo esalemaki na mabota zomi, to ekólo Yuda, bokonzi ya Sudi oyo esalamaki na mabota mibale, ntina oyo bakendaki na bokangami ezalaki kaka moko: basundolaki losambo ya solosolo ya Yehova mpo na komipesa na losambo ya banzambe ya lokuta. (Mib 28:15, 62-68 ; 2Ba 17:7-18; 21:10-15) Atako bongo, Yehova akangaki mabɔkɔ te, azalaki kotinda basakoli mbala na mbala na makonzi yango mibale mpo na kokebisa bango, kasi nyonso wana ezalaki mpamba. (2Ba 17:13) Mokonzi ata moko te ya bokonzi ya mabota ya zomi ya Yisraele alongaki kolongola mpo na libela losambo ya lokuta oyo Yeroboame mokonzi ya liboso ya ekólo yango atyaki. Kasi mpo na ndeko na ye ya “mwasi” oyo azalaki na Sudi, elingi koloba, bokonzi ya Yuda, eboyaki kotya likebi na makebisi oyo Yehova apesaki mpe ezwaki te liteya na bokangami oyo ekómelaki Yisraele, elingi koloba, bokonzi ya Nɔrdi ya mabota zomi. (Yir 3:6-10) Nsukansuka, bato ya makonzi yango nyonso mibale bamemamaki na mboka-mopaya, ekólo yango mokomoko ekendaki na bokangami moko monene koleka.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F nk. 878-879

Mosamaria

Liloba “Basamaria” emonani mpo na mbala ya liboso na Makomami nsima ya kobebisama ya bokonzi ya mabota zomi ya Samaria, na mobu 740 L.T.B.; liloba yango esalelamaki mpo na baoyo bazalaki kofanda na bokonzi ya Nɔrdi liboso ya kokweisama na yango, mpo na kokesenisa bango ná bapaya, oyo na nsima bamemaki bango uta na biteni mosusu ya Ampire ya Asiri. (2Ba 17:29) Emonani lokola bato ya Asiri bamemaki na bokangami Bayisraele nyonso te, mpamba te lisolo ya 2 Ntango 34:6-9 (talá mpe 2Ba 23:19, 20) emonisi ete, na boumeli ya boyangeli ya mokonzi Yosiya, Basamaria bazalaki naino na ekólo Yisraele. Kendekende, liloba “Basamaria” ekómaki kosalelama mpo na kolobela bana oyo bato oyo batikalaki na Samaria babotaki mpe bana ya baoyo bato ya Asiri bamemaki na bokangami. Yango wana, na ntembe te, basusu babotamaki na libala oyo esangisaki bikólo yango mibale. Mwa bambula na nsima, liloba yango ekómaki kosalelama mingimingi mpo na kolobela lingomba kasi te mpo na loposo to makambo ya politiki. “Mosamaria” azalaki mosangani ya mwa lingomba oyo ezalaki na lokumu zingazinga ya Shekeme mpe ya Samaria ya kala, mpe azalaki komikɔtisa na mimeseno mosusu oyo ekesanaki mpenza na mimeseno ya lingomba ya Bayuda.​—Yn 4:9.

19-25/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 18-19

“Ndenge oyo banguna na biso balukaka kolɛmbisa biso”

w05 1/8 lok. 11 par. 6

Makanisi ya ntina na mokanda ya mibale ya Mikonzi

18:19-21, 25​—Hizikiya asalaki boyokani na Ezipito? Te. Makambo oyo Rabashake alobaki ezalaki lokuta, kaka ndenge alobaki ete ayei mpo ‘Yehova azali elongo na ye.’ Mokonzi ya sembo Hizikiya atyaki motema kaka epai ya Yehova.

w10 15/7 lok. 13 par. 3

“Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo”

Rabashake asalelaki makanisi ya mabe mpo na kokɔtisa ntembe na mitema ya Bayuda. Alobaki boye: “Bisika oyo etombwaná mpe bitumbelo oyo Hizikiya alongoli ezali ya [Yehova] te? . . . Yehova ye moko alobaki na ngai boye: ‘Matá kobundisa mokili wana, mpe bebisá yango.’” (2 Bak.18:22, 25) Na yango, Rabashake alobaki ete Yehova akobundela bato na Ye te mpo bapesaki Ye mpasi na motema. Kasi ezalaki solo te. Yehova azalaki kosepela na Hizikiya mpe Bayuda oyo bazongelaki losambo ya solo.​—2 Bak. 18:3-7.

w13 15/11 lok. 19 par. 14

Babateli ya mpate nsambo mpe bankumu mwambe bazali banani lelo oyo

14 Mokonzi ya Asiri atyaki kaa na ye na Lakishi, na sudi-wɛsti ya Yerusaleme. Longwa na Lakishi, mokonzi atindaki bamemi-nsango misato na Yerusaleme mpo báyebisa bato ete bámitika na mabɔkɔ na ye. Molobeli na ye, oyo bazalaki kobenga Rabashake, asalelaki mayele ndenge na ndenge. Alobaki na bato na monɔkɔ ya mboka na bango, na Ebre; ayebisaki bango bápesa mokonzi na bango mokɔngɔ mpe bámipesa na mabɔkɔ ya bato ya Asiri. Akosaki bango ete akomema bango na mboka mosusu epai bakozala na bomoi ya malamu koleka. (Tángá 2 Bakonzi 18:31, 32.) Na nsima, Rabashake alobaki ete kaka ndenge banzambe ya bikólo mosusu balongaki te kobatela basambeli na bango, Yehova mpe akokoka te kobikisa Bayuda na mabɔkɔ ya bato ya Asiri. Bato bamonisaki bwanya na ndenge balandaki te maloba mpe bifundeli wana ya lokuta. Mbala mingi, basaleli ya Yehova basalaka mpe bongo lelo oyo.​—Tángá 2 Bakonzi 18:35, 36.

yb74-F lok. 176 par. 2

Eteni 2​—Allemagne

Likambo ya kobenda likebi ezali ete bato ya etuluku ya S.S., oyo bazalaki kosalela mbala na mbala mayele ya nsense mpo na kotinda moto na makasi atya sinyatire na ye na mokanda oyo emonisi ete awangani kondima na ye, mpe na nsima bazalaki kobalukela mpe konyokola lisusu makasi baoyo bazalaki kotya sinyatire na bango koleka ndenge ezalaki liboso. Ndeko Karl Kirscht amonisi bosolo ya makambo yango na maloba oyo: “Banyokolaki Batatoli ya Yehova koleka bato mosusu nyonso oyo bazalaki na bakaa ya bakangami. Ndenge wana nde bakanisaki ete bakondimisa bango bátya sinyatire na mokanda oyo ezalaki komonisa ete moto awangani kondima na ye. Bazalaki kosɛnga biso mbala na mbala tótya basinyatire. Basusu batyaki sinyatire, kasi mbala mingi basengelaki kozela mbula koleka moko liboso bábimisa bango na bakaa ya bakangami. Na ntango wana, bato ya etuluku ya S.S. bazalaki kofinga bango na miso ya bato ete bazalaki bato ya bokosi mpe ya bibangabanga mpe bazalaki kosɛnga bango na makasi bátambolatambola na kati ya bandeko na bango liboso bázwa bonsomi ya kobima na bakaa ya bakangami.”

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 170 par. 3

Arkeoloji

Tózwa ndakisa moko. Biblia elobi ete Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abomamaki na bana na ye ya mibali mibale, Adrameleke ná Sharezere, mpe mwana na ye mosusu, Esare-hadone abandaki koyangela na esika na ye. (2Ba 19:36, 37) Kasi, buku moko ya bato ya Babilone elobi ete mokolo ya 20 ya sanza ya Tebete, Senakeribe abomamaki na mwana na ye moko oyo atombokelaki ye. Ezala Bérose, nganga-nzambe ya Babilone na siɛklɛ ya misato L.T.B., mpe Nabonide, mokonzi ya Babilone na siɛklɛ ya motoba L.T.B., na babuku na bango bamonisaki mpe ete Senakeribe abomamaki na moko ya bana na ye. Kasi, na biloko oyo bato ya Arkeoloji bakundoli na mikolo oyo na buku na ye oyo ebengami prisme, Esare-hadone oyo abandaki koyangela na esika ya tata na ye, Senakeribe, amonisi polelepolele ete bandeko na ye, elingi koloba na boike (pluriel) nde batombokelaki tata na bango mpe babomaki ye, mpe na nsima bakimaki. Mpo na yango, Philip Biberfeld (Universal Jewish History, 1948, vol. I, lok. 27) alobi boye: “Makambo oyo Nabonide ná Bérose balobaki na buku ya masolo ya bato ya Babilone, ezalaki solo te; kaka makambo oyo Biblia elobi nde ezalaki solo. Makambo mikemike oyo Esare-hadone akomaki na likambo etali kobomama ya Senakeribe emonisi makambo na bosikisiki koleka babuku ya masolo ya bato ya Asiri mpe ya Babilone yango moko. Yango ezali elembeteli monene oyo emonisi ete tosengeli kotalela malamumalamu bisika oyo bansango ezala ya mikolo oyo ezali kouta soki eyokani te na makambo oyo Biblia elobeli.”

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Diskur​—Motó ya likambo: Bóndela mpo na bandeko oyo bazali konyokola bango

w20.11 nk. 15-16 par. 14

14 Tokoki kosala nini? Tokoki kobondela “mpo na bakonzi mpe baoyo nyonso bazali na bibonga minene” ntango basengeli kozwa bikateli oyo etali mosala na biso ya kosakola mpe koyangana na makita. (1 Tim. 2:1, 2; Neh. 1:11) Kaka ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki, biso mpe tobondelaka Nzambe mingi mpo na bandeko na biso oyo bazali na bolɔkɔ. (Tángá Misala 12:5; Ebr. 13:3) Tokoki mpe kobondela mpo na bakɛngɛli ya bolɔkɔ oyo bazali na bokonzi likoló ya bandeko na biso. Tokoki kosɛnga Yehova atambwisa makanisi na bango mpo bákoka kosala lokola Yuliusi mpe básalela bandeko na biso oyo bazali na bolɔkɔ “makambo na boboto mpenza.”

26/12–01/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKONZI 20-21

“Libondeli etindaki Yehova asala likambo moko”

ip-1 mok. 29 par. 23

Kondima ya mokonzi moko ezwi mbano

23 Pene na ntango oyo Senakeribe akei mpo na mbala ya liboso kobundisa Yuda, Hizikiya abɛli makasi mpenza. Yisaya ayebisi ye ete akokufa. (Yisaya 38:1) Mokonzi yango oyo azali na mbula 39 alɛmbi nzoto. Azali komitungisa kaka mpo na ye moko te kasi mpe mpo na bomoi ya bato na ye na mikolo ezali koya. Yerusaleme mpe Yuda ezali na likama mpamba te bato ya Asiri balingi kokɔtela yango. Soki Hizikiya akufi, nani akotambwisa makambo ya etumba? Na ntango wana, Hizikiya azali na mwana te oyo akotikala na bokonzi na ye. Hizikiya abondeli Yehova makasi ayokela ye mawa.​—Yisaya 38:2, 3.

w17.03 lok. 21 par. 16

Salelá Yehova na motema mobimba!

16 Na nsima, Hizikiya abɛlaki makasi mpe etikalaki moke akufa. Na ntango wana ya mpasi, asɛngaki Yehova akanisa bosembo na ye mpe asalisa ye. (Tángá 2 Bakonzi 20:1-3.) Yehova ayokaki libondeli ya Hizikiya mpe abikisaki ye. Toyebi ete Biblia elobi te ete tokoki kozela ete Nzambe asala likamwisi mpo na kobikisa biso na maladi to mpo na kokómisa bomoi na biso molai. Kasi, lokola Hizikiya, tokoki kotyela Yehova motema mpo asalisa biso. Tokoki koyebisa ye boye: “Nabondeli yo, ee Yehova, nabondeli yo, kobosana te ete natamboli liboso na yo na bosolo mpe na motema mobimba.” Ondimaka ete Yehova akosalisa yo ntango nyonso, ata ntango ozali kobɛla?​—Nzembo 41:3.

g01-F 22/7 lok. 13 par. 4

Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa ngai?

Na ntango ya kala, bato ya kondima bazalaki kozwa mbala moko biyano na mabondeli na bango, mbala mosusu na ndenge ya likamwisi. Na ndakisa, ntango Mokonzi Hizikiya ayebaki ete akómaki na maladi oyo ekosila te, asɛngaki Nzambe abikisa ye. Nzambe alobaki na ye boye: “Nayoki libondeli na yo. Namoni mpisoli na yo. Talá, nazali kobikisa yo.” (2 Bakonzi 20:1-6) Basi mpe mibali mosusu oyo bazalaki kobanga Nzambe bamonaki ndenge ayanolaki mpe na mabondeli na bango ndenge wana.​—1 Samwele 1:1-20; Danyele 10:2-12; Misala 4:24-31; 10:1-7.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 406 par. 2

Nivo

Nivo ezali esaleli oyo esalisaka mpo ndako etongama semba, to mpo na kotala soki ekoki koumela to te. Yehova asakolaki ete akosalela “nsinga ya komeka oyo basalelaki mpo na komeka Samaria, mpe nivo oyo basalelaki mpo na ndako ya Ahaba” mpo na Yerusaleme oyo epɛngwaki. Nzambe amekaki Samaria mpe ndako ya Mokonzi Ahaba mpe akutaki bango na etamboli ya mabe to oyo etɛngamá, oyo esalaki ete bábomama. Nzambe akosambisa Yerusaleme ná bankumu na yango mpe bongo, akobimisa polele mabe na bango mpe akosala ete engumba na bango ebebisama. Yango nde esalemaki na mobu 607 L.T.B. (2Ba 21:10-13 ; 10:11) Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova Nzambe ayebisaki bato ndenge na ndenge ya lofundo mpe bankumu ya bato ya Yerusaleme mabe oyo ekokómela bango mpe ayebisaki bango maloba oyo: “Nakokómisa bosembo nsinga ya komeka mpe boyengebene nivo.” Mibeko ya boyengebene mpe ya bosembo ya solosolo emonisaki polelepolele banani bazalaki basaleli ya solosolo ya Nzambe mpe banani bazalaki te. Yango ebimisaki makambo oyo mibale: kobatelama to kobomama.​—Yis 28:14-19.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto