Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr24 Mai nk. 1-13
  • Mikanda tosaleli mpo na “Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na “Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • 06-12/05
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 36-37
  • “Kosilika te mpo na bato mabe”
  • w17.04 lok. 10 par. 4
  • Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, makambo nini ekolongola?
  • w22.06 lok. 10 par. 10
  • Yehova apambolaka baoyo balimbisaka basusu
  • w03 1/12 lok. 14 par. 20
  • “Sepelá mpenza na Yehova”
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-2-F lok. 341
  • Ngomba, bangomba
  • 13-19/05
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 38-39
  • Tiká komipesa foti koleka ndelo
  • w20.11 lok. 27 par. 12-13
  • “Tyá miso na yo na mokili ya sika”
  • w02 15/11 lok. 20 par. 1-2
  • Ndenge nini tokoki kosala mpo ete mikolo nyonso tósepelisaka Yehova?
  • w21.10 lok. 15 par. 4
  • Ndenge ya kokómisa lisusu makasi boninga na yo elongo ná Yehova
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • w22.09 lok. 13 par. 16
  • Ozali moto oyo basusu bakoki kotyela motema?
  • 20-26/05
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 40-41
  • Mpo na nini kosalisa basusu?
  • w18.08 lok. 22 par. 16-18
  • Bato oyo bakabaka bazalaka na esengo
  • w15 15/12 lok. 24 par. 7
  • Yehova akosunga yo
  • w17.09 lok. 12 par. 17
  • Mekolá motema mawa ya Yehova
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-1-F lok. 1261
  • Yehova
  • 27/05–02/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 42-44
  • Kobá kozwa matomba na mateya ya Nzambe
  • w06 1/6 9 par. 4
  • Makanisi ya ntina ya eteni ya mibale ya mokanda ya Nzembo
  • w12 15/1 15 par. 2
  • Tósala ete boyekoli na biso esepelisaka mpe esalisaka biso mpenza
  • w16.09 lok. 6 par. 11-12
  • “Mabɔkɔ na yo elɛmba te”
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-1-F lok. 417
  • Mbwa ya zamba
  • 03-09/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 45-47
  • Loyembo oyo etali libala ya Mokonzi moko
  • w14 15/2 nk. 9-10 par. 8-9
  • Sepelá na libala ya Mwana-Mpate!
  • w22.05 17 par. 10-12
  • Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na yo na mikolo ezali koya?
  • it-1-F lok. 1041
  • Etumba
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • w17.04 11 par. 9
  • Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, makambo nini ekolongola?
  • 10-16/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 48-50
  • Baboti​—Bósalisa bana na bino bátyela ebongiseli ya Yehova motema mingi
  • w22.03 22 par. 11
  • Kosambela Yehova epesaka esengo mingi
  • w11 15/3 19 par. 5-7
  • Ezali na makambo oyo ekoki kosepelisa bino
  • w12 15/8 12 par. 5
  • Bómitambwisa lokola bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe!
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-2-F lok. 799
  • Bozwi
  • 17-23/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 51-53
  • Ndenge ya komibatela mpo osala mabunga ya minene te
  • w19.01 15 par. 4-5
  • Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?
  • w15 15/6 15 par. 5-6
  • Tokoki kozala pɛto
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-1-F 663
  • Doege
  • 24-30/06
  • MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 54-56
  • Nzambe azali pene na yo
  • w06 1/8 22 par. 10-11
  • Zalá na bwanya mpe bangá Nzambe!
  • cl 243 par. 9
  • Eloko moko te ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe”
  • w22.06 18 par. 16-17
  • Bolingo oyo Yehova amoniselaka biso esalisaka biso tólongola kobanga
  • Biloko ya motuya ya elimo
  • it-2-F lok. 646
  • Koyeba makambo liboso, Kotánga makambo liboso
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2024
mwbr24 Mai nk. 1-13

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

06-12/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 36-37

“Kosilika te mpo na bato mabe”

w17.04 lok. 10 par. 4

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, makambo nini ekolongola?

4 Makambo nini bato mabe bazali kosala biso lelo oyo? Ntoma Paulo alobaki ete na mikolo oyo ya nsuka, ekozala “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” Na nsima, abakisaki: “Bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka.” (2 Timote 3:1-5, 13) Osilá komona likambo yango? Mingi na biso tosilá kokutana na mpasi mpo na bato mabe, na ndakisa bato ya mobulu, bato oyo bayinaka bato ya mposo mosusu, mpe babomi-bato. Basusu balobaka polele makambo ya mabe oyo basalaka. Basusu babɛtaka ntolo ete basalisaka bato, nzokande bazali nde bato mabe. Ata soki tokutaná naino te na likambo moko ya mobulu, bato mabe basalaka biso mabe ata na lolenge mosusu. Toyokaka nsɔmɔ ntango toyokaka nsango ya makambo ya mabe oyo basalelaka bana mike, mibange, mpe bato mosusu oyo bazali na likoki ya komibatela te. Bato mabe wana basalaka makambo lokola banyama ya zamba to lokola bademo. (Yakobo 3:15) Likambo ya esengo, Liloba ya Yehova epesi biso elikya.

w22.06 lok. 10 par. 10

Yehova apambolaka baoyo balimbisaka basusu

10 Tomisalelaka mabe ntango tobombaka nkanda na motema. Nkanda ezalaka lokola mokumba moko ya kilo, mpe Yehova alingaka tózala na kimya oyo eutaka ntango toboyaka kobomba nkanda na motema. (Tángá Baefese 4:31, 32.) Asɛngi biso ‘tótika nkanda, mpe tótika kotomboka.’ (Nz. 37:8) Soki tolandi toli oyo, ekosalisa biso. Soki tokangeli moto nkanda na motema, tokoki komisalela mabe na nzoto mpe kobɛla na makanisi. (Mas. 14:30) Ntango tokangeli moto nkanda na motema, yango esalaka moto yango mabe te, se ndenge moko soki tomɛli pwazɔ, ekosala moto mosusu mabe te, nzokande ekosala biso moko mabe. Kutu, ntango tolimbisaka basusu, tomisalelaka biso moko makambo oyo epesaka mbano. (Mas 11:17) Tozalaka na kimya na makanisi mpe na motema, mpe tozalaka na likoki ya kosala mingi na mosala ya Yehova.

w03 1/12 lok. 14 par. 20

“Sepelá mpenza na Yehova”

20 Na nsima, “bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili.” (Nzembo 37:11a) Kasi, “bato ya bopɔlɔ” yango ezali banani? Liloba oyo ebongolami na “bopɔlɔ” euti na liloba mosusu oyo elimboli “konyokola, kokitisa, kosambwisa.” “Bato ya bopɔlɔ” ezali baoyo bazelaka Yehova aya kosilisa makambo nyonso ya mabe oyo bazali kosala bango. “Bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:11b) Ata sikoyo, tozali mpenza na kimya na paladiso ya elimo na kati ya lisangá ya boklisto ya solo.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 341

Ngomba, bangomba

Oyo epikamá, oyo ezali mpo na libela, to oyo ezali molai mpenza. Balobelaka bangomba mpo na komonisa eloko oyo epikamá mpe oyo ezali mpo na libela. (Yis 54:10; Hab 3:6; talá mpe Nz 46:2.) Na yango, ntango mokomi ya nzembo alobaki ete bosembo ya Yehova ezali lokola “bangomba ya Nzambe” (Nz 36:6) mbala mosusu alingaki koloba ete bosembo ya Yehova ekoki kolongolama te. To, lokola bangomba ezalaka molai mpenza, mbala mosusu alingaki komonisa ete bosembo ya Nzambe eleki oyo ya moto. (Talá mpe Yis 55:8, 9.) Ntango basopaki saani ya nsambo ya nkanda ya Nzambe, Emoniseli 16:20 elobi: “Bangomba emonanaki te.” Yango emonisi ete ata biloko ya milai mpenza lokola bangomba ekokima kosopama ya nkanda ya Nzambe te.​—Talá mpe Yir 4:23-26.

13-19/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 38-39

Tiká komipesa foti koleka ndelo

w20.11 lok. 27 par. 12-13

“Tyá miso na yo na mokili ya sika”

12 Tángá 1 Yoane 3:19, 20. Na bantango mosusu, ekómelaka biso nyonso tómiyoka ete tomemi ngambo. Na ndakisa, bato mosusu bakobaka komipesa foti mpo na makambo ya mabe oyo basalá liboso báyeba solo. Bamosusu mpe bamiyokaka ete bamemá ngambo mpo na mabunga oyo basalaki nsima ya kozwa batisimo. Bato nyonso bayokaka ndenge wana. (Rom. 3:23) Na ntembe te, tozalaka na mposa ya kosala makambo ya malamu. Kasi “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yak. 3:2; Rom. 7:21-23) Atako tosepelaka te komiyoka ete tomemi ngambo, kasi ntango mosusu komiyoka bongo ekoki kozala mpe malamu. Mpo na nini? Mpo koyoka ete tomemi ngambo ekoki kotinda biso tósembola banzela na biso, mpe tózwa ekateli ya kozongela lisusu mabunga na biso te.​​—Ebr. 12:12, 13.

13 Nzokande, ekoki kosalema ete tomipesaka foti koleka ndelo, elingi koloba, tokobaka koyoka ete tomemi ngambo ata soki tobongolá motema mpe Yehova alimbisá biso. Komipesa foti ndenge wana ekoki kosala biso mabe mpenza. (Nz. 31:10; 38:3, 4) Na ndenge nini? Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo azalaki kaka komona ete amemi ngambo mpo na masumu oyo asalá kala. Alobi boye: “Nazalaki komona ntina ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova te mpo nazalaki kokanisa ete ntango mosusu nakobika te.” Mingi kati na biso mpe bakoki koyoka lokola ndeko mwasi wana. Ezali malamu ete tókeba na motambo ya komipesaka foti mingi ndenge wana. Mpo na nini? Mpo Satana akosepela mingi soki totiki kosalela Yehova, atako Yehova alimbisá biso!​​—Talá mpe 2 Bakorinti 2:5-7, 11.

w02 15/11 lok. 20 par. 1-2

Ndenge nini tokoki kosala mpo ete mikolo nyonso tósepelisaka Yehova?

BOMOI na biso eumelaka mikolo mingi te mpe mikolo yango elekaka nokinoki. Davidi, mokomi ya nzembo akanisaki likoló na bomoi mokuse oyo tozali na yango mpe asalaki libondeli oyo: “Ɛ [Yehova], yebisá ngai nsuka na ngai, motuya ya mikolo na ngai lokola yango ezali; mpe nakososola ete nazali na bolɛmbu. Talá, obongisi mikolo na ngai lokola monene ya matandu, ntango na ngai ya kobika ezali eloko liboso na yo te.” Davidi azalaki na mposa asepelisaka Nzambe na bomoi na ye, ezala na maloba to na misala na ye. Amonisaki ete azalaki na mposa ya Nzambe ntango alobaki boye: “Elikya na ngai ezali epai na yo.” (Nzembo 39:​4, 5, 7) Yehova ayokaki ye. Atalelaki mpenza misala ya Davidi mpe apesaki ye mbano oyo ebongaki mpenza.

Ekoki mpenza kokómela biso ete tómipesa mokolo mobimba na misala na biso mpe tósalaka makambo mingi mbangumbangu. Yango ekoki kokóma motungisi epai na biso, mingimingi lokola tozali na ebele ya makambo ya kosala, kasi ntango ezali moke mpo na kosala yango. Biso mpe tozalaka na makanisi lokola ya Davidi, ete tósalaka makambo oyo ezali kosepelisa Nzambe na bomoi na biso? Tóyeba ete miso ya Yehova ezali likoló ya mokomoko na biso mpe atalelaka biso. Eleki sikoyo mbula soki 3600, Yobo, moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe, alobaki ete Yehova azalaki komona banzela na ye mpe azalaki kotalela misala na ye nyonso. Yobo atunaki motuna oyo: “Wana ye akoyela ngai, nakozongisela ye liloba nini?” (Yobo 31:​4-6, 14) Mikolo nyonso ya bomoi na biso tokoki kosepelisaka Nzambe soki tozali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe mpe soki tozali koyeba kosalela ntango na biso malamu. Tótalela naino mokomoko na makambo yango malamumalamu.

w21.10 lok. 15 par. 4

Ndenge ya kokómisa lisusu makasi boninga na yo elongo ná Yehova

Sololáká na Yehova mbala na mbala. Tata na yo ayebi ete soki okobi komipesa foti, ekoki kozala mpasi obondela ye. (Rom. 8:26) Atako bongo, ‘tingamá na mabondeli,’ yebisá Yehova ndenge oyo osepelaka mpenza kozala moninga ye. (Rom. 12:12) Andrej abosanaka te makambo oyo ekómelaki ye. Alobi boye: “Nazalaki mpenza komipesa foti mpe koyoka nsɔni. Kasi mbala nyonso nsima ya kobondela, makanisi yango ezalaki kolongwa. Nazalaki mpenza kozwa kimya ya makanisi.” Soki ozali koyeba te makambo oyo osengeli kobondela mpo na yango, talelá lisusu mabondeli oyo Mokonzi David asalaki ntango abongolaki motema. Mabondeli yango ezali na Nzembo 51 mpe 65.

Biloko ya motuya ya elimo

w22.09 lok. 13 par. 16

Ozali moto oyo basusu bakoki kotyela motema?

16 Komipekisa ezali na ntina mingi mpenza soki tolingi basusu bátyela biso motema. Ezaleli yango esalisaka biso tóbatela lolemo na biso ntango tolingi koloba likambo moko ya sekele oyo bayebisaki biso. (Tángá Masese 10:19.) Ekoki kozala mpasi tómonisa ezaleli ya komipekisa ntango tozali kosalela basite Internet ya kosolola na baninga. Soki tokebi te, tokoki kobimisa sekele moko na ebele mpenza ya bato kozanga kokana. Kaka ntango totindi mesaje moko, tokoyeba te ndenge basusu bakoki kosalela mesaje yango to ekobimisa likama nini na nsima. Komipekisa esalisaka mpe biso tófanda nyɛɛ ntango batɛmɛli balingi kokosa biso mpo tóloba makambo oyo ekoki kotya bandeko na biso na likama. Ekoki mbala mosusu kosalema ntango bakonzi ya polisi bazali kotunatuna biso mituna na ekólo oyo mosala na biso epekisami to endimami na mibeko te. Tokoki kosalela etinda ya ‘kotya eloko ya kokanga monɔkɔ’ na ntango yango to na mabaku mosusu. (Nz. 39:1) Tosengeli kozala bato oyo babongi kotyelama motema epai ya bato nyonso, ezala epai ya bato ya libota na biso, baninga na biso, bandeko na biso ya basi mpe ya mibali, to moto mosusu nyonso. Yango wana, tosengeli kozala na komipekisa mpo tózala bato oyo babongi kotyelama motema.

20-26/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 40-41

Mpo na nini kosalisa basusu?

w18.08 lok. 22 par. 16-18

Bato oyo bakabaka bazalaka na esengo

16 Moto oyo akabaka na motema moko asalaka yango te mpo na nsima bázongisela ye. Yesu alobaki: “Ntango osali fɛti, bengisá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato oyo bakufá miso; mpe okozala na esengo, mpo bazali na eloko ya kozongisela yo te.” (Luka 14:13, 14) Biblia elobi: “Ye oyo azali na liso ya boboto akopambwama, mpo apesi bilei na ye na moto oyo azangá.” Elobi mpe: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá.” (Mas. 22:9; Nz. 41:1) Ya solo, tosengeli kokaba mpo tolingi mpenza kosalisa basusu.

17 Ntango ntoma Paulo azongelaki maloba ya Yesu ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa,” azalaki kolobela kaka biloko ya mosuni te. Azalaki mpe kolobela kopesa basusu bilendiseli, toli ya Biblia, mpe lisalisi. (Misala 20:31-35) Na maloba mpe na misala na ye, Paulo ateyaki biso ndenge ya kopesa ntango na biso, makasi na biso, likebi na biso, mpe bolingo na biso.

18 Bato ya mayele oyo bayekolaka bizaleli ya bato bamoni mpe ete moto oyo apesaka azalaka na esengo. Lisolo moko elobi boye: “Bato balobaka ete bayokaka esengo mingi nsima ya kosala makambo ya malamu mpo na basusu.” Bato yango ya mayele balobi ete soki tozali kosalisa basusu, tokoyoka ete bomoi na biso ezali na ntina. Yango wana, bapesaka bato toli ete bámipesa na kosalisa basusu mpo bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo mingi. Nyonso wana ekoki kokamwisa biso te, mpo Yehova, Mozalisi na biso ya bolingo ateyaka biso banda kala ete tokozala na esengo soki tozali kopesa.​—2 Tim. 3:16, 17.

w15 15/12 lok. 24 par. 7

Yehova akosunga yo

7 Kasi, soki ozali kobɛla, Yehova akobɔndisa yo mpe akosunga yo, ndenge asalaki mpo na basaleli na ye na ntango ya kala. Mokonzi Davidi akomaki boye: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá; na mokolo ya likama Yehova akobikisa ye. Yehova ye moko akokɛngɛla ye mpe akobatela ye na bomoi.” (Nzembo 41:1, 2) Ya solo, Davidi alingaki koloba te ete moto malamu oyo azalaki na ntango wana, oyo azalaki kotyela moto oyo azangá likebi, akokaki kokufa soki moke te. Kasi, ndenge nini Yehova akokaki kosalisa moto yango ya malamu? Davidi alimbolaki boye: “Yehova ye moko akosunga ye na mbeto ya maladi; okobongola mpenza mbeto na ye nyonso na boumeli ya maladi na ye.” (Nzembo 41:3) Yehova ayebi malamu maladi oyo basaleli na ye bazali kobɛla, mpe akobosana bango te. Akoki kopesa bango mpiko mpe bwanya. Yehova asalá mpe nzoto ya moto na likoki ya komibikisa yango moko.

w17.09 lok. 12 par. 17

Mekolá motema mawa ya Yehova

17 Ata soki biso mpe tokoki kozwa matomba, tomonisaka motema mawa libosoliboso mpo tolingaka komekola Yehova mpe kopesa ye nkembo. Bolingo mpe motema mawa euti epai na ye. (Masese 14:31) Azali ndakisa ya kokoka mpo na biso. Yango wana, tósala nyonso oyo tokoki mpo tómekola Nzambe na oyo etali komonisa motema mawa. Yango ekosala ete tózala na bomoko elongo na bandeko na biso mpe boyokani malamu na bazalani na biso.​—Bagalatia 6:10; 1 Yoane 4:16.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 1261

Yehova

Biblia mobimba elobeli mingi kolongisama ya boyangeli ya Yehova, mpe yango emonisi mokano ya libosoliboso ya Yehova Nzambe: kosantisa nkombo na ye. Kosantisa yango esɛngi kolongola mabe nyonso oyo elobamá mpo na nkombo ya Nzambe. Kasi, koleka wana, esɛngi mpe bikelamu nyonso ya mayele na likoló mpe na mabele bákumisa nkombo yango mosantu. Yango elimboli, kondima mpe komemya Yehova lokola moyangeli oyo aleki nyonso, kosala yango na motema mobimba, kosepela kosalela ye, mpe kosala mokano na ye, mpo tolingaka ye. Libondeli ya Davidi epai ya Yehova na Nzembo 40:5-10, emonisi malamu makanisi yango mpe elobeli kosantisama ya solosolo ya nkombo ya Yehova. (Talá ndenge ntoma Paulo amonisaki kokokisama ya maloba mosusu ya nzembo epai ya Yesu Kristo na Ebr 10:5-10.)

27/05–02/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 42-44

Kobá kozwa matomba na mateya ya Nzambe

w06 1/6 9 par. 4

Makanisi ya ntina ya eteni ya mibale ya mokanda ya Nzembo

42:4, 5, 11; 43:3-5. Soki likambo moko esali ete tókabwana na lisangá ya boklisto mpo na mwa ntango, bantango ya esengo oyo tolekisaki na baninga baklisto ekoki kosunga biso. Na ebandeli tokoki koyoka mpasi makasi lokola tokómi kaka biso moko, kasi ekoki mpe kosalisa biso tómikundola ete Nzambe azali ebombamelo na biso mpe tózala na elikya ete akosunga biso.

w12 15/1 15 par. 2

Tósala ete boyekoli na biso esepelisaka mpe esalisaka biso mpenza

1 KOBONDELA: Likambo ya liboso ezali kobondela. (Nz. 42:8) Mpo na nini? Tosengeli komonaka ete koyekola Liloba ya Nzambe ezali na kati ya losambo na biso. Na yango, tosengeli kosɛnga Yehova afungola motema mpe makanisi na biso mpe apesa biso elimo santu na ye. (Luka 11:13) Barbara, oyo aumeli mingi na mosala ya misionɛrɛ, alobi boye: “Nabondelaka ntango nyonso liboso ya kotánga to koyekola Biblia. Nsima na yango, nayokaka ete Yehova azali elongo na ngai mpe ete asepeli na likambo oyo nazali kosala.” Kobondela liboso ya koyekola efungolaka makanisi mpe motema na biso mpo tóndima bilei nyonso ya elimo oyo ezali liboso na biso.

w16.09 lok. 6 par. 11-12

“Mabɔkɔ na yo elɛmba te”

11 Yehova alendisaka mpe biso na nzela ya mateya oyo tozwaka na makita na biso ya bokristo, mayangani ya mike mpe ya minene, ezala mpe na biteyelo na biso ya teokrasi. Mateya yango ekoki kosalisa biso tósalela Nzambe na makanisi ya malamu, tómityela mikano, mpe tókokisa ebele ya mikumba na biso ya bokristo. (Nzembo 119:32) Ozali na mposa makasi ya kozwa nguya oyo eutaka na mateya oyo Yehova apesaka biso?

12 Yehova asalisaki basaleli na ye bálonga Baamaleke mpe bato ya Etiopi, mpe apesaki Nehemia ná Bayuda makasi ya kosilisa kotonga bifelo ya Yerusaleme. Ndenge moko mpe, Nzambe akopesa biso makasi mpo tókoba kosakola atako biso moko mpe tozali na mitungisi, bato bazali kotɛmɛla biso, mpe bazali kosepela na nsango na biso te. (1 Petro 5:10) Yehova asilisaka te mikakatano na biso na ndenge ya likamwisi. Kutu, ezali na makambo oyo biso moko tosengeli kosala. Makambo nini? Tosengeli kotángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, kobongisa mpe koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, kokoba koyekola biso moko mpe kosalaka losambo na kati ya libota, mpe kobondelaka mpo na komonisa ete totyelaka Yehova motema. Tótika soki moke te ete eloko moko elongola likebi na biso na makambo oyo Yehova abongisi mpo na kopesa biso makasi mpe kolendisa biso. Soki omoni ete mabɔkɔ na yo elɛmbi na likambo moko kati na oyo tolobeli, sɛngá Nzambe asalisa yo. Na nsima, talá ndenge elimo ya Nzambe ‘ekosala na kati na yo mpo olinga mpe osala.’ (Bafilipi 2:13) Kasi, okoki mpe kolendisa mabɔkɔ ya basusu?

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 417

Mbwa ya zamba

Na Biblia, mbwa ya zamba elobelami mingi na ndenge ya elilingi. Na ndakisa, mpo na kolobela mpasi na ye, Yobo agangaki ete akómi “ndeko ya bambwa ya zamba.” (Yobo 30:29) Mpo na komonisa ndenge bato ya Nzambe bakweaki na etumba, mokomi ya nzembo moko, mbala mosusu mpo na kolebela esika ya etumba epai bambwa ya zamba eyaki mpo na kolya bato oyo babomamaki (talá mpe Nz 68:23), alelaki ete: “Otuti biso na esika oyo bambwa ya zamba efandaka.” (Nz 44:19) Ntango bato ya Babilone bazingaki Yerusaleme na 607 L.T.B. nzala makasi ekɔtaki, mpe esalaki ete bamama básala bana na bango makambo ya mabe makasi. Yango wana Yirimia alobaki ete “bato na ngai” bakómi mabe, nzokande bambwa ya zamba ebatelaka bana na yango.​—Bil 4:3, 10.

03-09/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 45-47

Loyembo oyo etali libala ya Mokonzi moko

w14 15/2 nk. 9-10 par. 8-9

Sepelá na libala ya Mwana-Mpate!

8 Tángá Nzembo 45:13, 14a. Mwasi ya libala azali na “nkembo mingi” mpo na fɛti ya libala ya mokonzi. Emoniseli 21:2, ekokanisi mwasi yango na engumba moko, Yerusaleme ya Sika, mpe “abongisi nzoto mpo na mobali na ye.” Engumba yango ya likoló ezali na “nkembo ya Nzambe” mpe ezali kongɛnga “lokola libanga ya ntalo koleka, lokola libanga ya jasipe oyo ezali kongɛngangɛnga lokola kristale.” (Em. 21:10, 11) Bonzenga ya Yerusaleme ya Sika elobelami malamumalamu na mokanda ya Emoniseli. (Em. 21:18-21) Tokokamwa te soki mokomi ya nzembo alobi ete mwasi yango azali na “nkembo mingi”! Mpo, fɛti ya libala ya mokonzi ekosalema na likoló.

9 Mobali ya libala oyo mwasi ya libala ayei epai na ye ezali Mokonzi Masiya. Abandaki kobongisa ye mpe ‘kopɛtola ye mpe kosukola ye na mai na nzela ya liloba.’ Azali ‘mosantu mpe azangi mbeba.’ (Ef. 5:26, 27) Ebongi mpenza ete mwasi na ye alata bilamba oyo ebongi mpo na fɛti yango. Na ntembe te, alati bongo! Mpo, “bilamba na ye etyami biloko ya wolo,” mpe “bakoya na ye epai ya mokonzi na molato oyo elitamá.” Mpo na libala ya Mwana-Mpate, “bapesi ye nzela alata lini ya kitoko, ya ngɛlingɛli, ya pɛto, mpo lini ya kitoko elakisi misala ya boyengebene ya basantu.”​—Em. 19:8.

w22.05 17 par. 10-12

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na yo na mikolo ezali koya?

10 Yehova akosala nini ntango bakobundisa basaleli na ye? Ayebisi biso boye: “Nkɛlɛ na ngai ekomata na zolo na ngai.” (Ezk. 38:18, 21-23) Emoniseli mokapo 19 emonisi makambo oyo ekosalema na nsima. Yehova akotinda Mwana na ye abundela basaleli na ye mpe aboma banguna na bango. Yesu ná “mampinga ya likoló,” elingi koloba, baanzelu ya sembo ná bato 144000 bakobundisa Goge ya mokili ya Magoge. (Em. 17:14; 19:11-15) Etumba yango ekosuka ndenge nini? Bato nyonso mpe bituluku ya baoyo batɛmɛlaka Yehova bakobomama mpo na libela!​—Tángá Emoniseli 19:19-21.

11 Meká komona na makanisi ndenge bato ya sembo oyo bakobika awa na mabele bakomiyoka ntango banguna nyonso ya Nzambe bakobomama! Ekozala ntango moko ya esengo mpenza! Atako ekozala na esengo moko monene kuna na likoló ntango Babilone Monene ekobomama, ekozala na likambo mosusu oyo ekopesa esengo monene. (Em. 19:1-3) Ezali likambo moko ya ntina mingi oyo ekosalema oyo mokanda ya Emoniseli elobeli, elingi koloba, “fɛti ya libala ya Mwana-Mpate.”​—Em. 19:6-9.

12 Ntango nini fɛti ya libala yango ekosalema? Bato nyonso 144000 bakozala na likoló kaka liboso etumba ya Armagedone ebanda. Kasi, yango ekozala te ntango ya kosala fɛti ya libala ya Mwana-Mpate. (Tángá Emoniseli 21:1, 2.) Fɛti ya libala ekosalema nsima ya etumba ya Armagedone mpe ya kobomama ya banguna nyonso ya Nzambe.​—Nz. 45:3, 4, 13-17.

it-1-F lok. 1041

Etumba

Na nsuka ya etumba yango, mabele ekozala na kimya mbula nkóto. Nzembo oyo elobi ete “[Yehova] azali kosilisa bitumba na mabele mobimba. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; azali kotumba makalo ya etumba na mɔtɔ” ekokisamaki liboso ntango Nzambe atyaki kimya na mokili ya Yisraele na ndenge abebisaki bibundeli ya banguna. Ntango Kristo akoboma baoyo balukaki etumba na Armagedone, kimya ekozala tii na nsuka mpenza ya mabele. (Nz 46:8-10) Bato oyo bakozwa kimya ya seko ekozala baoyo bakómisi “mipanga na bango bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango makwangola ya kokata matiti” mpe bazali ‘koyekola mpe etumba lisusu te.’ “Mpo monɔkɔ ya Yehova ya mampinga elobi yango.”​—Yis 2:4; Mik 4:3, 4.

Biloko ya motuya ya elimo

w17.04 11 par. 9

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, makambo nini ekolongola?

9 Nini ekozwa esika ya bibongiseli ya mabe? Nsima ya Armagedone, ekozala nde na ebongiseli moko awa na mabele? Ɛɛ. Biblia elobi ete: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.” (2 Petro 3:13) Likoló ya kala ezali baguvɛrnema ya mabe oyo ezali koyangela lelo. Mabele ya kala ezali bato oyo baguvɛrnema yango ezali koyangela. Ntango likoló ya kala mpe mabele ya kala ekozala lisusu te, nini ekozwa esika na yango? Ekozala “likoló ya sika mpe mabele ya sika.” Likoló ya sika ezali guvɛrnema ya sika, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe oyo Yesu Kristo ná bato 144000 bakoyangela. Mabele ya sika ezali bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Yesu ná bato oyo akoyangela elongo na bango bakomekola na ndenge ya kokoka Yehova, oyo azali Nzambe ya mobulu te. (1 Bakorinti 14:33) Na yango, na “mabele ya sika” makambo ekotambola na molɔngɔ. Ekozala na bankumu oyo bakotambwisa makambo awa na mabele. (Nzembo 45:16) Kristo ná bato 144000 nde bakotambwisa bankumu yango. Kanisá ntango oyo bibongiseli nyonso ya mabe ekozala lisusu te, mpe na esika na yango ekozala kaka na ebongiseli moko, oyo ekosangisa bato nyonso mpe ekobebisama soki moke te!

10-16/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 48-50

Baboti​—Bósalisa bana na bino bátyela ebongiseli ya Yehova motema mingi

w22.03 22 par. 11

Kosambela Yehova epesaka esengo mingi

11 Koyekola Liloba ya Yehova mpe koteya bana na biso makambo na ye ezali na kati ya losambo oyo topesaka ye. Mokolo ya Sabata ezalaki kopesa Bayisraele libaku ya kotya makambo ya mokolo na mokolo pembeni mpo na kotya makanisi nyonso na boyokani na bango na Yehova. (Kob. 31:16, 17) Baoyo bazalaki sembo bazalaki koteya bana na bango makambo ya Yehova mpe bolamu na ye. Ndenge moko mpe, mokomoko na biso asengeli kozala na programɛ mpo na kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe. Yango ezali na kati ya losambo oyo topesaka Yehova, mpe esalisaka biso tópusana lisusu penepene na ye. (Nz. 73:28) Mpe ntango tozali koyekola na libota, tokoki kosalisa bana na biso bákóma na boyokani makasi elongo na Yehova, Tata na biso ya likoló.​—Tángá Nzembo 48:13.

w11 15/3 19 par. 5-7

Ezali na makambo oyo ekoki kosepelisa bino

“Bótambola zingazinga ya Siona mpe bóbaluka zingazinga na yango, bótánga bandako na yango ya milai. Bótya mitema na bino na mwa ngomba na yango oyo basalá mpo na libateli. Bótala malamumalamu bandako milai na yango ya kofanda, mpo bóyebisa yango na mabota oyo ekoya na nsima.” (Nz. 48:12, 13) Awa, mokomi ya nzembo alendisaki Bayisraele bátala Yerusaleme malamumalamu. Okoki kokanisa makambo kitoko oyo mabota ya Bayisraele babombaki na makanisi ntango basalaki mibembo na engumba mosantu mpo na bafɛti ya mbula na mbula mpe bamonaki tempelo na yango kitoko? Na ntembe te, etindaki bango ‘báyebisa yango na mabota oyo ekoya na nsima.’

Kanisá mokonzi-mwasi ya Sheba, oyo liboso aboyaki kondima bansango oyo ayokaki mpo na kitoko ya bokonzi ya Salomo mpe bwanya oyo azalaki na yango. Nini endimisaki mwasi yango ete makambo oyo ayokaki ezalaki solo? Alobaki boye: “Nandimaki maloba yango te kino nayei komona na miso na ngai moko.” (2 Nt. 9:6) Ya solo, likambo oyo tomoni ‘na miso na biso moko’ ekoki kosimba mpenza motema na biso.

Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bámona makambo kitoko ya ebongiseli ya Yehova ‘na miso na bango moko’? Soki Betele ezali pembeni na esika bofandi, bósala makasi bókende kotala yango. Na ndakisa, Mandy ná Bethany bakolaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 1500 longwa na Betele ya ekólo na bango. Atako bongo, baboti na bango bazalaki kobongisa mibembo mbala na mbala mpo bákende kotala bandako ya Betele, mingimingi ntango Mandy ná Bethany bazalaki kokola. Balobi boye: “Liboso tókende kotala Betele, tozalaki kokanisa ete ezali esika moko ya mibeko makasimakasi mpe esika ya mikóló kaka. Kasi, tokutaki bilenge oyo bazalaki kosala mosala makasi mpo na Yehova mpe bazalaki kosepela na yango! Tomonaki ete ebongiseli ya Yehova esukaki te kaka na esika oyo tozalaki kofanda, mpe mbala nyonso oyo tozalaki kokende kotala Betele, tozalaki kokóma makasi na elimo.” Kotala ebongiseli ya Nzambe malamumalamu etindaki Mandy ná Bethany bákóma babongisi-nzela, mpe babengaki bango kutu bákende kosala na Betele mpo na mwa ntango.

w12 15/8 12 par. 5

Bómitambwisa lokola bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe!

5 Koyekola istware. Moto oyo alingi kokóma mwana-mboka ya ekólo moko asengeli koyeba mwa moke istware ya ekólo yango. Ndenge moko mpe, baoyo balingi kozala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe basengeli koyekola makambo nyonso oyo bakoki mpo na Bokonzi yango. Tótalela ndakisa ya bana ya Kora, na ntango ya kala na Yisraele. Bazalaki kosepela mingi na Yerusaleme ná esika na yango ya losambo mpe kobɛta lisolo ya engumba yango. Soki bazalaki kosepela na engumba yango, ezali te mpo etongamaki na mabanga minene, kasi bazalaki nde kosepela na eloko oyo engumba mpe esika na yango ya losambo ezalaki komonisa. Yerusaleme ezalaki “sité ya Mokonzi Monene,” Yehova, mpamba te ezalaki esika oyo losambo ya solo efandaki mpenza. Mibeko ya Yehova ezalaki koteyama kuna. Yehova azalaki komonisa motema boboto na ye epai ya bato oyo Mokonzi ya Yerusaleme azalaki koyangela. (Tángá Nzembo 48:1, 2, 9, 12, 13.) Na ndakisa na bango, yo mpe olingaka koyekola istware ya ebongiseli ya Yehova mpe kobɛta lisolo na yango? Soki ozali kokoba koyekola makambo oyo etali ebongiseli ya Nzambe mpe ndenge oyo asungaka basaleli na ye, okobanda komona mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali solo. Okokóma mpe na mposa makasi ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi yango.​—Yir. 9:24; Luka 4:43.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 799

Bozwi

Lokola bazalaki na ekólo moko ya bozwi, Bayisraele bakokaki kosepela na kolya mpe komɛla (1Bak 4:20; Mos 5:18, 19), mpe bozwi na bango ezalaki kobatela bango na mikakatano ya bobola. (Mas 10:15; Mos 7:12) Kasi, atako eyokanaki na mokano ya Yehova ete Bayisraele bákóma na bozwi na nzela ya mosala makasi na bango (talá mpe Mas 6:6-11; 20:13; 24:33, 34), akebisaki bango mpe na likama ya kobosana Moto oyo apesaki bango bozwi yango mpe kobanda kotyela bozwi yango motema. (Mib 8:7-17; Nz 49:6-9; Mas 11:4; 18:10, 11; Yir 9:23, 24) Bakundwelaki bango ete bozwi ekoki kosila (Mas 23:4, 5), ekoki te kopesama lisiko epai ya Nzambe mpo na kosikola moto na liwa (Nz 49:6, 7), mpe ezalaki na ntina te soki moto akufi (Nz 49:16, 17; Mos 5:15). Bamonisaki bango ete kozwa bozwi na motuya mingi ekoki kotinda moto na misala ya kobuba basusu mpe kosala ete Yehova aboya ye. (Mas 28:20; talá mpe Yir 5:26-28; 17:9-11.) Balendisaki bango mpe ‘bákumisa Yehova na biloko na bango ya motuya.’​—Mas 3:9.

17-23/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 51-53

Ndenge ya komibatela mpo osala mabunga ya minene te

w19.01 15 par. 4-5

Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?

4 Na Masese 4:23, liloba “motema” esalelami mpo na kolobela kati mpenza ya moto. (Tángá Nzembo 51:6.) Na maloba mosusu, “motema” elimboli makanisi, mayoki, mpe bamposa oyo ezalaka na kati na biso. Ezali mpenza bomoto na biso ya kati, kasi te oyo emonanaka na libándá.

5 Tózwa ndakisa ya kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso mpo tómona ntina ya koyeba ndenge oyo tozali na kati. Ya liboso, mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ, tosengeli kolyaka biloko ya malamu, mpe kosala ngalasisi mbala na mbala. Ndenge moko mpe, mpo na kozala malamu na elimo, tosengeli kolyaka bilei ya elimo ya malamu mpe komonisa mbala na mbala kondima na biso epai ya Yehova. Mpo na komonisa yango, tosengeli kosalela makambo oyo toyekolaka mpe kolobela bindimeli na biso. (Rom. 10:8-10; Yak. 2:26) Ya mibale, soki tozali kotalela kaka ndenge oyo tozali komonana na libándá, tokoki kokanisa ete tozali nzoto kolɔngɔnɔ, nzokande tozali na maladi na kati ya nzoto. Ndenge moko mpe, soki tozali kotalela kaka makambo ya elimo oyo tomesaná kosala, tokoki kokanisa ete kondima na biso ezali makasi, nzokande, bamposa ya mabe ezali kokola na kati na biso. (1 Ko. 10:12; Yak. 1:14, 15) Tosengeli kobosana te ete Satana akosepela soki tokómi na makanisi lokola ya ye. Ndenge nini alukaka kobebisa makanisi na biso? Mpe ndenge nini tokoki komibatela?

w15 15/6 15 par. 5-6

Tokoki kozala pɛto

5 Yehova akosalisa biso tóbundisa makanisi ya mbindo ntango tozali kokoba kosɛnga ye lisalisi na libondeli. Apesaka biso elimo santu na ye mpo tózala na nguya ya kozala pɛto. Na mabondeli na biso, tokoki koyebisa Yehova ete tolingi makanisi na biso esepelisa ye. (Nzembo 19:14) Na komikitisa nyonso tosɛngaka ye atala soki ata mwa mposa moko ya mabe ezali na motema na biso oyo ekoki kotinda biso na lisumu. (Nzembo 139:23, 24) Kobá kosɛnga Yehova asalisa yo oboya pite to ekobo mpe osala oyo ezali malamu ata na ntango ya mikakatano?​—Mat. 6:13.

6 Liboso ya koyeba Yehova, ekoki kozala ete tozalaki kolinga makambo oyo ezalaki kosepelisa Yehova te, mpe ekoki kozala ete tozali kobunda na bamposa yango mabe. Kasi Yehova akoki kosalisa biso tóbongwana mpe tósala oyo esepelisaka ye. Na ndakisa, nsima ya kosala ekobo na Bate-sheba, mokonzi Davidi abongolaki motema mpe abondelaki Yehova apesa ye “motema ya pɛto” mpe asalisa ye azala na botosi. (Nzembo 51:10, 12) Soki tozalaki na bamposa ya mbindo kala mpe tozali kobunda na yango, Yehova akoki kosalisa biso tózala na mposa makasi mpenza ya kotosa ye mpe ya kosala oyo ezali malamu. Akoki kosalisa biso tólonga makanisi na biso ya kozanga kokoka.​—Nz. 119:133.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1-F 663

Doege

Moedome moko oyo azalaki mokonzi ya babateli ya mpate ya Mokonzi Saulo, azalaki na esika moko ya lokumu ya bakɛngɛli. (1Sa 21:7; 22:9) Emonani ete Doege azalaki prozelite. Lokola “likambo moko ekangaki ye liboso ya Yehova” na Nobe, mbala mosusu mpo asalaki elako moko, akómisaki mbindo, to azwaki maladi ya maba, Doege amonaki ntango Nganga-nzambe monene Ahimeleke apesaki Davidi mampa ya kolakisa mpe mopanga ya Goliate. Na nsima, ntango Saulo alobaki na basaleli na ye mpe amonisaki ete bazalaki kosalela ye likita mabe, Doege abimisaki likambo oyo amonaki na Nobe. Saulo abengisaki nganga-nzambe monene ná banganga-nzambe mosusu ya Nobe mpe atunaki bango mituna, na nsima atindaki bapoti-mbangu báboma banganga-nzambe yango. Lokola bapoti-mbangu baboyaki kotosa etinda ya Saulo, Doege abomaki mbala moko banganga-nzambe 85. Nsima ya kosala likambo wana ya mabe, Doege abebisaki Nobe, abomaki bafandi na yango nyonso, bilenge mpe mikóló, ata mpe banyama nyonso ya mboka.​—1Sa 22:6-20.

Ndenge emonisami na maloba oyo ezali likoló ya Nzembo 52, Davidi akomaki mpo na Doege ete: “Lolemo na yo, oyo epeli lokola razware, ezali kokana kosala mabe mpe ezali kosala na bokosi. Olingi mabe koleka malamu, lokuta koleka koloba oyo ezali sembo. Olingi liloba nyonso oyo esalaka mabe, yo lolemo oyo elobaka makambo ya bokosi!”​—Nz 52:2-4.

24-30/06

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 54-56

Nzambe azali pene na yo

w06 1/8 22 par. 10-11

Zalá na bwanya mpe bangá Nzambe!

10 Mokolo moko, Davidi alukaki kobombama epai ya Akisi, mokonzi ya engumba Gata ya Bafilistia, mboka ya Goliata. (1 Samwele 21:10-15) Basali ya Akisi bayebisaki ye ete Davidi azali monguna ya ekólo na bango. Davidi asalaki nini? Abondelaki Yehova. (Nzembo 56:1-4, 11-13) Atako bakangaki Davidi te mpo akosaki ligboma, ayebaki ete Yehova nde asalisaki ye. Lokola Davidi atyelaki Yehova motema mobimba, yango emonisi ete azalaki mpenza kobanga Nzambe.​—Nzembo 34:4-6, 9-11.

11 Lokola Davidi, biso mpe tokoki komonisa ete tobangaka Nzambe soki tozali kotya motema ete akosalisa biso tólonga mikakatano na biso ndenge alaká biso. Davidi alobaki boye: “Tikelá [Yehova] elekelo na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” (Nzembo 37:5) Yango elimboli te ete tosengeli kaka koyebisa Yehova mikakatano na biso mpe kokanga mabɔkɔ mpo ye asilisa yango. Davidi asukaki kaka te na kobondela Nzambe asalisa ye. Asalelaki makasi mpe mayele oyo Yehova apesaki ye mpe asilisaki mokakatano na ye. Kasi, Davidi ayebaki ete moto asengeli te kotalela kaka makoki na ye moko. Biso mpe tosengeli koyeba bongo. Soki tosali nyonso oyo tokoki, tosengeli kotika oyo etikali na mabɔkɔ ya Yehova. Kutu, mbala mingi esɛngaka kaka tótika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Wana nde esika mokomoko na biso asengeli komonisa ete abangaka Nzambe. Tokoki kobɔndisama na maloba oyo Davidi alobaki na elikya mpenza ete: “Toli ya [Yehova] ezali mpo na baoyo [babangaka, NW] ye.”​—Nzembo 25:14.

cl 243 par. 9

Eloko moko te ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe”

9 Yehova atalelaka mpe ezaleli na biso ya koyika mpiko na motuya mingi. (Matai 24:13) Kobosana te, Satana alingi oboya Yehova. Mokolo nyonso oyo otikalaka sembo epai ya Yehova, opesaka Yehova likoki ya kozongisa monɔkɔ na matumoli ya Satana. (Masese 27:11) Nzokande, koyika mpiko ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Mikakatano ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto, kozanga mbongo, kotungisama na makanisi, mpe mikakatano mosusu ekoki kokómisa mokolo mokomoko komekama mpo na biso. Soki makambo tozalaki kozela esalemi noki te, tokoki kolɛmba nzoto. (Masese 13:12) Koyika mpiko na mikakatano ya ndenge wana ezali lisusu na motuya koleka na miso ya Yehova. Ezali mpo na ntina yango nde Mokonzi Davidi asɛngaki Yehova abomba mai ya miso na ye na “molangi,” mpe abakisaki na kondima mpenza ete: “Yango ekomami na mokanda na yo te?” (Nzembo 56:8) Ɛɛ, Yehova abosanaka te mai ya miso nyonso mpe mpasi nyonso oyo toyikelaka mpiko mpo na kotikala sembo epai na ye. Yango mpe ezali na motuya mingi na miso na ye.

w22.06 18 par. 16-17

Bolingo oyo Yehova amoniselaka biso esalisaka biso tólongola kobanga

16 Satana ayebi ete tozwaka bomoi na biso na motuya. Kasi, alingi ete tópesa nyonso oyo tozali na yango, ata mpe boyokani oyo tozali na yango ná Yehova kaka mpo na kobatela bomoi na biso. (Yobo 2:4, 5) Satana azali moto mabe mpenza! Kasi, lokola azali “moto oyo akoki kopesa liwa,” Satana alukaka kosalela mposa wana ya kobanga liwa mpo tótika kosalela Yehova. (Ebr. 2:14, 15) Na bantango mosusu, basaleli ya Satana balukaka koboma basaleli ya Yehova soki bawangani te kondima na bango. Mpe na bantango mosusu, Satana akoki komona ete tosengeli na lisalisi ya monganga nokinoki mpe kosalela yango mpo ameka kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe. Minganga to bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki kotya biso mpanzi likoló mpo tóndima bázongisa biso makila, likambo oyo ekobuka mobeko ya Nzambe. To mbala mosusu moto moko akoki komeka kondimisa biso tóndima lisalisi ya monganga oyo ezali kobuka mitinda ya Biblia.

17 Atako tolingaka kokufa te, toyebi ete Yehova akokoba kolinga biso ata soki esɛngi tókufa. (Tángá Baroma 8:37-39.) Ntango baninga ya Yehova bakufaka, akobaka kobatela bango na makanisi na ye, lokola nde bazali kaka na bomoi. (Luka 20:37, 38) Azalaka mpenza na mposa makasi ya kozongisa bango na bomoi. (Yobo 14:15) Yehova asili kofuta eloko moko ya motuya mingi mpo ‘tókoka kozwa bomoi ya seko.’ (Yoa. 3:16) Toyebi ndenge alingaka biso mingi mpe atyelaka biso likebi. Na yango, na esika ya kosundola Yehova ntango tozali kobɛla to tolingi tókufa, tosengeli kotyela ye motema ete akobɔndisa biso mpe akopesa biso bwanya mpe makasi. Yango nde Valérie ná mobali na ye basalaki mpenza.​—Nz. 41:3.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2-F lok. 646

Koyeba makambo liboso, Kotánga makambo liboso

Ndenge Yudasi atɛkaki Yesu ekokisaki esakweli ya Biblia mpe emonisaki ete Yehova ná Mwana na ye bazali na likoki ya koyeba makambo liboso. (Nz 41:9; 55:12, 13; 109:8; Mis 1:16-20) Atako bongo, ebongi te koloba ete Nzambe ayebaki liboso to abongisaki ete Yudasi akosala likambo ya bongo. Bisakweli elobaki ete moninga moko ya penepene ya Yesu akotɛka ye, kasi elobaki te nani kati na baninga na ye nde akosala yango. Na likambo yango mpe Biblia endimi ata na esika moko te ete Nzambe abongisaki ete Yudasi asala likambo oyo asalaki. Mobeko ya Nzambe oyo ntoma moko alobelaki ezali: “Kotyela moto mabɔkɔ nokinoki te; kosangana mpe na masumu ya bato te; zalá ntango nyonso pɛto.” (1Ti 5:22; talá mpe 3:6.) Mpo na komonisa ete azalaki na mposa ya kopona na bwanya mpe na ndenge ya malamu bantoma 12, Yesu alekisaki butu mobimba na kobondela Tata na ye liboso azwa ekateli. (Lk 6:12-16) Soki Nzambe asilaki kobongisa ete Yudasi akotɛka Yesu, yango elingaki koyokana te na litambwisi mpe toli ya Nzambe, mpe na kolanda mobeko oyo tolobeli, alingaki kosangana na masumu oyo moto yango asalaki.

Na yango, emonani ete ntango aponamaki lokola ntoma, motema ya Yudasi ezalaki ata na likanisi moke te ya kotɛka Yesu. Atikaki “mosisa moko ya ngɛngɛ ebota” mpe ebebisa ye, yango wana abungaki nzela mpe alandaki nzela ya moyibi mpe ya motɛki-bato, na lisalisi ya Nzambe te, kasi ya Zabolo. (Ebr 12:14, 15; Yn 13:2; Mis 1:24, 25; Yk 1:14, 15; talá Judas No. 4.) Ntango mposa ya mabe ekómaki kokola, Yesu ye moko atángaki na motema ya Yudasi mpe asakolaki ete akotɛka ye.​—Yn 13:10, 11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto