Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp17 No. 5 lok. 5
  • Ozalaka na anzelu moko oyo abatelaka yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka na anzelu moko oyo abatelaka yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Masolo mosusu
  • Ozali na Anzelu mobateli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
wp17 No. 5 lok. 5

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI | BAANZELU​—BAZALAKA MPENZA? KOYEBA YANGO EZALI NA NTINA?

Ozalaka na anzelu moko oyo abatelaka yo?

Biblia eteyaka te ete moto mokomoko azali na anzelu oyo abatelaka ye. Ya solo, mokolo moko Yesu alobaki: “Bókeba, bótyola moko ya bana mike [bayekoli ya Kristo] oyo te; mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango na likoló bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 18:10) Yesu alingaki te koloba ete moto mokomoko azalaka na anzelu moko oyo abatelaka ye, kasi amonisaki ete baanzelu batyelaka moyekoli na ye mokomoko likebi. Na yango, basambeli ya solo basalaka makambo na bozoba te mpe batyaka bomoi na bango na likama te mpo baanzelu ya Nzambe bábatela bango.

Yango elingi nde koloba ete baanzelu basalisaka bato te? Ezali bongo te. (Nzembo 91:11) Bato mosusu bandimaka ete Nzambe asalelaki anzelu mpo na kobatela bango mpe kotambwisa bango. Kenneth, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli, andimaka yango. Tokoki koboya likanisi wana mbala moko te, mpo ekoki mpe kozala solo. Mbala mingi, Batatoli ya Yehova bamonaka ete baanzelu batambwisaka bango ntango bakendaka kosakola. Kasi, lokola baanzelu bamonanaka te, tokoki koloba mpenza te ndenge oyo Nzambe asalelaka bango mpo na kosalisa moto mokomoko na makambo ndenge na ndenge. Nzokande, ezali mabe te kopesa Mozwi-ya-Nguya-Nyonso matɔndi mpo na likambo nyonso oyo asali mpo na biso.​—Bakolose 3:15; Yakobo 1:17, 18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto