Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr24 Novembre nk. 1-11
  • Mikanda oyo tosaleli mpo na ”Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda oyo tosaleli mpo na ”Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • 04-10/11
  • 11-17/11
  • 18-24/11
  • 25/11–01/12
  • 02-08/12
  • 09-15/12
  • 16-22/12
  • 23-29/12
  • 30/12–05/01
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2024
mwbr24 Novembre nk. 1-11

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

© 2024 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

04-10/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 105

“Akanisi lisusu kondimana na ye mpo na libela”

w23.04 28 par. 11-12

Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi na elaka ya Yehova ya mokili ya sika?

11 Tótalela mwa makambo oyo emonani ete ekokaki kosalema te oyo Yehova alakaki basaleli na ye na ntango ya kala. Ayebisaki Abrahama ná Sara ete bakobota mwana na bobange na bango. (Eba. 17:15-17) Ayebisaki mpe Abrahama ete bakitani na ye bakozwa mokili ya Kanana. Na boumeli ya bambula mingi oyo bakitani ya Abrahama, elingi koloba Bayisraele, bazalaki baombo na Ezipito, emonanaki lokola nde elaka yango ekokokisama te. Kasi ekokisamaki mpenza. Na nsima, Yehova alobaki ete Elizabeti oyo akómaki mobange, akobota mwana. Ayebisaki mpe Maria, oyo azalaki ngɔndɔ ete akobota Mwana na ye. Yango esengelaki kokokisa esakweli oyo Yehova alobaki na elanga ya Edene esili koleka bankóto ya bambula!​—Eba. 3:15.

12 Tokómisaka kondima na biso makasi na nguya oyo Yehova azali na yango ya kopesa biso mokili ya sika, ntango tokanisaka na makambo oyo asalaki mpo na kokokisa bilaka na ye. (Tángá Yosua 23:14; Yisaya 55:10, 11.) Yango esalisaka biso tómibongisa malamu mpo na kosalisa basusu bákanga ntina ete elaka ya mokili ya sika ezali ndɔtɔ te, to elikya ezangá ntina. Yehova ye moko alobaki mpo na likoló ya sika mpe mabele ya sika, alobaki boye: “Maloba oyo ezali sembo mpe solo.”​—Em. 21:1, 5.

it-2 493 par. 3

Liloba

Biloko nyonso oyo Nzambe akelá, oyo ezali na bomoi mpe oyo ezangi bomoi, etosaka liloba na ye, mpe akoki kosalela yango mpo na kokokisa mokano na ye. (Nz 103:20; 148:8) Liloba na ye ebongi kotyelama motema; Nzambe abosanaka te kokokisaka makambo oyo alaki. (Mib 9:5; Nz 105:42-45) Ndenge ye moko alobi, liloba na ye “ekoumela seko”; ekozonga te kozanga ekokisa mokano na yango.​—Yis 40:8; 55:10, 11; 1Pe 1:25.

Biloko ya motuya ya elimo

w86 1/11 19 par. 15

Bilenge​—Mokumba na bino mpo libota ezali na esengo mpe na bomoko

15 “Bakangaki makolo na ye [Yozefe] na bikangeli, bakɔtisaki nkingo na ye na bibende; tii ntango liloba ya Nzambe ekokisamaki, liloba ya Yehova epɛtolaki ye.” (Nzembo 105:17-19) Na boumeli ya mbula 13, Yozefe anyokwamaki lokola moombo mpe mokangami na boloko tii ntango elaka ya Yehova ekokisamaki. Makambo oyo Yozefe akutanaki na yango epɛtolaki ye. Yehova te nde abimiselaki ye mpasi yango, kasi atikaki yango mpo na mokano moko. Yozefe abatelaki elikya na ye na “liloba ya Yehova” atako minyoko yango? Andimaki nde komonisa lisusu mingi bizaleli na ye ya malamu, mpe kokolisa bizaleli oyo asengelaki na yango, lokola motema molai, komikitisa, makasi na elimo, mpe ekateli ya kokokisa mokumba moko ya mpasi? Nsima ya minyoko na ye, Yozefe akómaki lokola wolo oyo epɛtolami na mɔtɔ​—akómaki pɛto mpe na motuya mingi koleka na miso ya Nzambe, oyo asalelaki ye na ndenge ya kokamwa na nsima.​—Ebandeli 41:14, 38-41, 46; 42:6, 9.

11-17/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 106

“Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango”

w18.07 20 par. 13

“Nani azali na ngámbo ya Yehova?”

13 Bayisraele babangaki mpenza ndenge oyo Nzambe amonisaki nguya na ye, yango wana Moize amataki na ngomba Sinai mpo na kosolola na Yehova mpo na bango. (Kobima 20:18-21) Kasi Moize aumelaki na ngomba. Emonani lokola ete Bayisraele bayebaki te básala nini mpo motambwisi na bango azalaki te. Basalaki nini? Ekoki kozala ete batyaki motema mingi epai ya Moize, moto oyo azalaki kotambwisa bango. Babandaki komitungisa mpe balobaki na Arona ete: “Tɛlɛmá, salelá biso nzambe oyo akotambola liboso na biso, mpamba te Moize yango, moto oyo abimisaki biso na mokili ya Ezipito, toyebi mpenza te nini ekómeli ye.”​—Kob. 32:1, 2.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 15/7 13 par. 9

Makanisi ya ntina na eteni ya misato mpe ya minei ya mokanda ya Nzembo

106:36, 37. Bavɛrsɛ yango elobi ete kosambela bikeko ezali kopesa mbeka epai ya bademo. Yango elingi koloba ete moto oyo asambelaka bikeko akómaka na boyokani na bademo. Biblia elobi na biso boye: “Bókeba na bikeko.”​—1 Yoane 5:21.

18-24/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 107-108

“Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu”

w07 15/4 20 par. 2

Tiká ete lisangá esanzola Yehova

2 Atako bongo, lisangá ezali moziki te to esika ya bokutani mpo na bato oyo bakolá esika moko, oyo basalaka mosala moko, to oyo balingaka lisano moko boye. Ntina ya libosoliboso ya lisangá ezali mpo na kokumisa Yehova Nzambe. Ezalaka bongo banda kala, ndenge mokanda ya Nzembo emonisi yango. Na Nzembo 35:18, tozali kotánga boye: “Nakotɔnda yo kati na koyangana [to lisangá] monene mpe nakosanzola yo kati na bato mingi.” Lisusu, Nzembo 107:31, 32 elendisi biso na maloba oyo: “Tiká ete bato básanzola [Yehova] mpo na boboto na ye, mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato. Tiká ete bákumisa ye kati na koyangana [to lisangá] ya bato.”

w15 15/1 9 par. 4

Bópesa Yehova matɔndi mpe bózwa mapamboli

4 Esɛngaka molende mpo na kopesaka Yehova matɔndi. Ya liboso, mokomoko na biso asengeli koluka koyeba mapamboli oyo Yehova apesá ye. Mpe ya mibale, tosengeli kokanisa malamumalamu ndenge mapamboli yango emonisaka ete Nzambe alingaka biso mingi mpenza. Ntango mokomi ya nzembo akanisaki bongo, akamwaki na makambo nyonso kitoko oyo Yehova asalá mpo na ye.​—Tángá Nzembo 40:5; 107:43.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2 303 par. 5

Moabe

Na nsima, ntango Davidi ye moko akómaki mokonzi, bitumba ezalaki mpe kati na Yisraele ná Moabe. Davidi alongaki Bamoabe mpe bakómaki kofuta ye mpako. Emonani ete na nsuka ya bitumba, basoda mingi ya Moabe (2/3) babomamaki. Emonani ete Davidi alalisaki bango na nse na molɔngɔ mpe akabolaki yango na bituluku misato, na nsima amekaki bolai ya molɔngɔ yango mpo ayeba bituluku mibale oyo akoboma mpe etuluku ya misato oyo ekotikala na bomoi. (2Sa 8:2, 11, 12; 1Nt 18:2, 11) Ekoki mpe kozala ete kaka na ntango etumba yango nde Benaya mwana ya Yehoyada “abomaki bana mibali mibale ya Ariele ya Moabe.” (2Sa 23:20; 1Nt 11:22) Ndenge Davidi alongaki Bamoabe ekokisaki maloba ya esakweli ya Balaama oyo asakolaki bambula koleka 400 liboso ete: “Monzoto ekobima uta na Yakobo, mpe lingenda ya bokonzi ekotɛlɛma uta na Yisraele. Mpe akobuka mpenza elongi ya Moabe mpe mokuwa ya motó ya bana nyonso ya yikiyiki.” (Mit 24:17) Emonani mpe ete mokomi ya nzembo azalaki kolobela bolongi yango ntango Nzambe azalaki komona Moabe ezali lokola ‘saani na ye monene ya kosukola.’​—Nz 60:8; 108:9.

25/11–01/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 109-112

Pesá Mokonzi Yesu mabɔkɔ!

w06 1/9 13 par. 6

Makanisi ya ntina na eteni ya mitano ya mokanda ya Nzembo

110:1, 2​—Yesu Klisto, “Nkolo ya [Davidi],” azalaki kosala nini ntango afandaki na lobɔkɔ mobali ya Nzambe? Nsima ya lisekwa na ye, Yesu amataki na likoló mpe azelaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe tii na 1914 mpo na kobanda koyangela. Na ntango wana, Yesu azalaki koyangela baklisto bapakolami, kotambwisa bango na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, mpe kobongisa bango mpo na koyangela elongo na ye na Bokonzi na ye.​—Matai 24:14; 28:18-20; Luka 22:28-30.

w00 1/4 18 par. 3

Bato oyo bazali kobundisa Nzambe bakolonga te!

3 Basaleli ya Yehova bazali kobundisama banda na ebandeli ya ekeke ya 20. Na mikili mingi, bato ya mitema mabe balukaki kopekisa to mpe kosukisa mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Monguna na biso monene, Zabolo, oyo “azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukáká soko akolya nani” nde azali kotinda bango. (1 Petelo 5:8) Na 1914, wana “ntango ya mabota” esukaki, Nzambe atyaki Mwana na ye mokonzi ya sika ya mabele, mpe atindaki ye ete: “Kendá koyangela na kati ya banguna na yo.” (Luka 21:24, NW; Nzembo 110:2, NW) Klisto alakisaki nguya na ye kuna na likoló mpe abwakaki Satana na zingazinga ya mabele. Lokola ayebi ete atikali na mwa ntango moke, Zabolo azali kobimisa nkanda na ye nyonso epai ya baklisto bapakolami na baninga na bango. (Emoniseli 12:9, 17) Makambo nini ezali komonana na ntango bato yango bazali kobundisa Nzambe mbala na mbala?

be 76 par. 2

Monisá ete ozali kokola mpe kokende liboso

Toli oyo emonisi ete osalelaka makoki na yo, esɛngi mpe ete oyeba komipesa. Ozalaka moto ya liboso mpo na kosɛnga basusu ete osakola elongo na bango? Olukaka mabaku mpo na kosalisa bandeko ya lisangá na bino oyo bazali bato ya sika, oyo bazali bilenge to bibɔsɔnɔ? Omipesaka mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi to mpo na kosala misala ndenge na ndenge na mayangani ya mike mpe ya minene? Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala? Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza to kosalisa lisangá moko oyo ezali na mposa ya basakoli mingi? Soki ozali ndeko mobali, ozali koluka kokokisa masɛngami ya Makomami mpo na kokóma mosaleli ya misala mpe nkulutu? Elimo ya komipesa oyo ozali na yango mpo na kosalisa basusu mpe kondima mikumba emonisi mpenza ete ozali kokende liboso.​—Nz. 110:3.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1 80 par. 4

Kondimana

Kondimana mpo na kozala nganga-nzambe lokola Melekisedeke. Kondimana yango elobelami na Nzembo 110:4, mpe mokomi ya mokanda ya Baebre asaleli yango mpo na Kristo na Baebre 7:1-3, 15-17. Ezali kondimana oyo Yehova asalaki kaka kati na ye ná Yesu Kristo. Emonani ete Yesu alobelaki yango ntango azalaki kosala kondimana mpo na bokonzi moko elongo na bayekoli na ye. (Lk 22:29) Yehova alapaki ndai epai ya Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe na likoló, akozala nganga-nzambe lokola Melekisedeke. Melekisedeke azalaki mokonzi mpe nganga-nzambe ya Nzambe awa na mabele. Yesu Kristo akozala Mokonzi mpe Nganga-nzambe Monene, awa na mabele te, kasi kuna likoló. Atyamaki na mokumba yango mpo na libela ntango azongaki na likoló. (Ebr 6:20; 7:26, 28; 8:1) Kondimana yango ekosala libela na libela, mpo Yesu akozala Mokonzi mpe Nganga-nzambe Monene libela na libela na nse ya litambwisi ya Yehova.​—Ebr 7:3.

02-08/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 113-118

Tokofuta Yehova eloko nini?

w01 1/1 11 par. 13

Tiká ete bolingo etonga bino

13 Maloba ya Yesu ezali komonisa polele ete tosengeli libosoliboso kolinga Yehova. Nzokande, na mitema na biso, tobotamaka na bolingo te mpo na Yehova. Tosengeli nde kolona yango. Mbala ya liboso oyo toyokaki nsango na ye, tosepelaki na ye mpo na makambo oyo toyokaki. Mokemoke, toyebaki ndenge oyo abongisaki mabele mpo na bato. (Genese 2:5-23) Toyekolaki makambo oyo asalelaki bato, ete ntango lisumu ya liboso ebebisaki bato, asundolaki biso te, kasi abongisaki nzela ya kosikola biso. (Genese 3:1-5, 15) Azalaki na boboto epai ya bato oyo bazalaki sembo, mpe nsukansuka apesaki Mwana na ye mobotami-bobele-moko mpo na bolimbisi ya masumu na biso. (Yoane 3:16, 36) Makambo yango oyo tozalaki koyekola esalisaki biso tókóma kosepela na Yehova mingi. (Yisaya 25:1) Mokonzi Davidi alobaki ete alingaki Yehova mpo na boboto mpe bolingo na ye. (Nzembo 116:1-9) Lelo oyo, Yehova azali kobatela biso, azali kotambwisa biso, kopesa biso makasi mpe kolendisa biso. Ntango tozali koyekola makambo na ye mingi, bolingo na biso mpo na ye ezali mpe kokola.​—Nzembo 31:23; Sefania 3:17; Baroma 8:28.

w09 15/7 29 par. 4-5

Zwáká na botɔndi​—Pesáká na motema moko

Mokomi ya nzembo atunaki boye: “Nakozongisa nini epai ya [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?” (Nz. 116:12) Mapamboli nini azwaki? Yehova asungaki ye na ntango ya “kotungisama mpe mawa.” Lisusu, Yehova abikisaki “molimo [na ye] na liwa.” Mpo na yango, alingaki ‘kozongisela’ Yehova eloko moko. Mokomi ya nzembo akokaki kosala nini? Alobaki boye: “Nakokokisa bilaka na ngai nyonso epai ya [Yehova].” (Nz. 116:3, 4, 8, 10-14) Azwaki ekateli ya kokokisa bilaka nyonso oyo apesaki Yehova mpe kotosa masɛngami nyonso ya Nzambe.

Yo mpe okoki kosala bongo. Ndenge nini? Soki ozali na bomoi oyo eyokani na mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Yango wana, salá nyonso mpo losambo ya Yehova ezala na esika ya liboso na bomoi na yo mpe tiká elimo ya Nzambe etambwisa makambo nyonso oyo ozali kosala. (Mos. 12:13; Gal. 5:16-18) Mpo na koloba solo, okoki te kofuta Yehova mpo na nyonso oyo asili kosalela yo. Kasi, ‘okosepelisa motema ya Yehova’ ntango ozali komipesa mobimba na mosala na ye. (Mas. 27:11) Ezali mpenza libaku malamu kosepelisa Yehova na ndenge wana!

w19.11 22-23 par. 9-11

Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda ya Balevi

9 Ya mibale: Tosalelaka Yehova mpo tozali na botɔndi epai na ye. Mpo tómona yango polele, tólobela naino bambeka ya boyokani oyo Bayisraele bazalaki kopesa na losambo na bango. Mokanda ya Balevi emonisi ete Moyisraele akokaki kopesa mbeka ya boyokani “mpo na komonisa botɔndi.” (Lev. 7:11-13, 16-18) Azalaki kopesa yango mpo alingi, kasi te mpo esɛngisamaki. Na yango, mbeka ya boyokani ezalaki likabo oyo moto azalaki kopesa na bolingo na ye moko mpo alingaki Yehova Nzambe na ye. Moto yango, libota na ye, mpe banganga-nzambe bazalaki kolya mosuni ya nyama oyo apesi mbeka. Kasi, biteni mosusu ya nyama yango ezalaki kaka mpo na Yehova. Biteni nini?

10 Liteya ya misato: Bolingo etindaka biso tópesa Yehova eloko na biso oyo eleki malamu. Yehova azalaki komona ete mafuta ya nyama nde eteni oyo eleki malamu. Alobaki mpe ete biloko ya kati ya nyama, na ndakisa mimpíko (rognons), ezalaki na motuya mingi. (Tángá Balevi 3:6, 12, 14-16.) Na yango, Yehova azalaki kosepela mingi ntango Moyisraele andimi kopesa mbeka ya biloko ya kati ya nyama mpe mafuta na yango. Moyisraele oyo apesi likabo yango azalaki komonisa ete alingi mpenza kopesa Nzambe eloko na ye oyo eleki malamu. Ndenge moko mpe, Yesu andimaki kopesa Yehova oyo eleki malamu na ndenge asalelaki ye na molimo mobimba mpo alingaki Ye. (Yoa. 14:31) Kosala mokano ya Nzambe ezalaki kosepelisa Yesu; alingaki mpenza mobeko ya Nzambe. (Nz. 40:8) Na ntembe te, Yehova asepelaki komona ndenge Yesu andimaki kosalela ye na bolingo na ye moko!

11 Mosala oyo tosalelaka Yehova ezali lokola bambeka ya boyokani mpo yango esalisaka biso tómonisa mayoki na biso mpo na ye. Topesaka Yehova eloko na biso oyo eleki malamu, mpe tosalaka yango mpo tolingaka ye na motema na biso mobimba. Na ntembe te, Yehova asepelaka komona bamilio ya bato oyo basambelaka ye mpo balingaka ye mpe balingaka mibeko na ye mingi! Koyeba ete Yehova asukaka kaka te na komona mpe kosepela na misala na biso, kasi atalaka mpe ntina oyo tosalaka yango, ebɔndisaka biso. Na ndakisa, soki ozali mobange mpe ozali lisusu te kosala mingi ndenge olingaka, yebá ete Yehova amityaka na esika na yo. Okoki kokanisa ete oyo ozali kosala ezali moke, kasi Yehova amonaka nde bolingo makasi oyo ozalaka na yango epai na ye, oyo etindaka yo osala oyo okoki. Asepelaka na mbeka na yo oyo eleki malamu, oyo opesaka na kotalela makoki na yo.

Biloko ya motuya ya elimo

w12 15/5 22 par. 1-2

Mituna ya batángi

Na litambwisi ya elimo santu, mokomi moko ya nzembo ayembaki ete: “Liwa ya bato ya sembo ya Yehova ezali likambo monene mpenza na miso na ye.” (Nz. 116:15) Bomoi ya mosambeli mokomoko ya solo ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Nzokande, maloba ya Nzembo 116 elobeli kaka liwa ya mosambeli moko te.

Ebongi te kosalela maloba ya Nzembo 116:15 na diskur ya bokundi ebembe, ata soki moto oyo akufi azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova. Mpo na nini? Mpo maloba ya mokomi ya nzembo ezali na ndimbola mosusu. Elimboli ete na miso ya Nzambe, liwa ya basambeli na ye nyonso ezali likambo monene oyo akoki te kotika nzela ete esalema.​—Talá Nzembo 72:14; 116:8.

09-15/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 119:1-56

“Ndenge nini elenge mobali akoki kopɛtola nzela na ye?”

w88 1/6 20 par. 10

Ozali peto kati na makambo nyonso?

10 Kati na Baefese 5:5, Paulo apesi biso toli oyo: “Boyeba likambo oyo solosolo ete, moto na pite te mpe moto na bosoto te mpe moto na elulela te-(ye mosambeli na bikeko)-azali na libula kati na bokonzi na Klisto mpe na Nzambe.” Nzokande, mbula nyonso, bankoto na baklisto bapamelami to babimisami na lisangá mpo bamikweisaki na pite​—mpo ‘basaleli nzoto na bango moko lisumu’. (1 Bakolinti 6:18) Mingi bakomaki kino na ezaleli wana mpamba te ‘bakengelaki te engebene liloba na Nzambe’. (Nzembo 119:9) Na ndakisa, mingi bazali kosenzela lisusu te na boumeli ya mibembo. Bazali komona lisusu ntina ya makita ya boklisto te mpe bazali na boninga elongo na bato mosusu oyo basalelaka Jéhovah te. Komonaka ete bazali ‘bato malamu’, baklisto mosusu basanganaki elongo na bango na misala ya mabe. Ndenge moko mpe, bamosusu bakomaki mpenza na boninga makasi elongo na baninga na bango ya mosala. Nkulutu moko akomaki moninga ya mwana mwasi moko basalaka na ye esika moko mpe nsuka na yango atikaki libota na ye mpo na kofanda elongo na mwasi yango! Abimisamaki bongo na lisangá. Maloba oyo na Biblia mamonani solo: “Kotambola na bato mabe ekobebisa bizaleli malamu”!​—1 Bakorinti 15:33.

w06 15/6 25 par. 1

“Makebisi na yo esepelisaka ngai mingi”

YEHOVA akebisaka basaleli na ye mpo na kosalisa bango bálonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango na ntango oyo ya mpasi. Toyokaka makebisi yango ntango tozali kotánga Biblia to mpe na masolo oyo bandeko basalaka mpe na biyano oyo bapesaka na makita. Makambo mingi oyo totángaka mpe oyo toyokaka na makita ezalaka makambo ya sika te. Mbala mingi ezalaka makambo oyo toyebi. Kasi, lokola tobosanaka mingi, ezali na ntina bázongelaka koyebisa biso mikano, mibeko, mpe mateya ya Yehova. Tosengeli mpenza kosepela na makebisi ya Nzambe. Makebisi yango ezongisaka na makanisi na biso makambo oyo etindaki biso tólanda nzela ya Nzambe. Yango wana, mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Makebisi na yo esepelisaka ngai mingi.”​—Nzembo 119:24.

w10 15/4 20 par. 2

Longolá miso na yo na biloko oyo ezangi ntina!

2 Nzokande, makambo oyo tozali kotala ekoki mpe kosala biso mabe. Miso mpe makanisi na biso ezali na boyokani makasi mpenza, yango wana makambo oyo tozali kotala ekoki kobota to kokolisa bilikya mpe bamposa na motema na biso. Mpe lokola tozali na mokili oyo ebebá, ya bato oyo balingá komisepelisa mpe oyo etambwisami na Satana Zabolo, ezali na ebele ya bililingi mpe makanisi oyo ekoki kobungisa biso nzela kozanga mpasi, ata soki tobwaki liso kaka moke. (1 Yoa. 5:19) Na yango, tokoki kokamwa te soki mokomi ya nzembo asɛngaki Nzambe boye: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina; batelá ngai na bomoi na nzela na yo moko.”​—Nz. 119:37.

Biloko ya motuya ya elimo

w05 15/4 10 par. 2

Tyelá liloba ya Yehova motema

2 Likanisi ya ntina na Nzembo 119 ezali valɛrɛ ya liloba to nsango ya Nzambe. Mokomi akomaki nzembo yango na kolanda alfabɛ, na ntembe te mpo na kosalisa moto akanga yango na motó. Mokomoko ya bavɛrsɛ 176 ya nzembo yango ebandi na lɛtrɛ moko ya alfabɛ ya Liebele. Na Liebele, mokomoko ya biteni 22 ya nzembo yango ezali na milɔngɔ 8 oyo ebandi nyonso na lɛtrɛ ndenge moko ya alfabɛ. Nzembo yango elobeli liloba, mobeko, banzela, mitindo, malako, bakomandema, mpe bikateli ya Yehova. Na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokolobela Nzembo 119 ndenge ebongolami na kolanda malamu Biblia ya Liebele. Soki tozali kokanisa makambo oyo basaleli ya Yehova ya ntango ya kala bakutanaki na yango mpe oyo ya ntango na biso bazali kokutana na yango, ekosalisa biso tókanga ntina malamu ya nzembo yango oyo epemami na Nzambe mpe ekosalisa biso tósepela lisusu mingi na Biblia, Liloba ya Nzambe.

16-22/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 119:57-120

Ndenge ya koyika mpiko ntango ozali na mpasi

w06 15/6 20 par. 2

“Nalingaka mibeko na yo mingi!”

2 Tokoki komituna boye: “Ndenge nini mibeko ya Nzambe ekokaki kokitisa mokomi ya nzembo motema mpe kobɔndisa ye?” Azalaki kozwa makasi na elikya oyo azalaki na yango ete Yehova azalaki kotyela ye likebi. Lokola ayebaki matomba ya kotosa mibeko ya Nzambe, azalaki kaka na esengo atako banguna bazalaki konyokola ye. Ayebaki ete Yehova asalelaki ye boboto mingi. Longola yango, lokola azalaki kotosa mibeko ya Nzambe, azalaki mpe na mayele koleka banguna na ye mpe mibeko yango ebatelaki bomoi na ye. Kotosa mibeko ya Nzambe esalisaki ye azala motema mpiɔ mpe lisosoli na ye ezala kimya.​—Nzembo 119:1, 9, 65, 93, 98, 165.

w00 1/12 14 par. 3

Olingaka mpenza makambo oyo Yehova azongelaka?

3 Mokomi ya nzembo azalaki kopesa motuya mingi na makambo oyo Nzambe azongelaka mpe ayembaki ete: “Nakei mbango mpe naumelaki te mpo na kotosa mibeko na yo. Mitambo ya bato mabe izingeli ngai, nde nabosani Mobeko na yo soko moke te.” (Nzembo 119:60, 61) Makambo oyo Yehova azongelaka esalisaka biso tóyikela minyoko mpiko mpamba te tozali na elikya ete Tata na biso ya likoló akoki kolongola nyonso oyo banguna bazali kosala mpo na kokanga biso nzela. Na ntango oyo ebongi, alongolaka mikakatano oyo ezali kokanga biso nzela mpo tókoba mosala na biso ya kosakola Bokonzi.​—Malako 13:10.

w06 1/9 14 par. 4

Makanisi ya ntina na eteni ya mitano ya mokanda ya Nzembo

119:71​—Na ndenge nini koyoka mpasi ekoki kozala malamu? Konyokwama ekoki kosalisa biso tóyeba kotyela Yehova motema, kobondela ye na molende, komipesa na koyekola Biblia mpe kosalela makambo oyo yango ezali koloba. Lisusu, konyokwama ekosalisa biso tóyeba bolɛmbu na biso mpe tósilisa yango. Minyoko ekokómisa.

w17.07 13 par. 3, 5

“Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”

3 Yehova, Tata na biso ya motema mawa, azali moto ya libosoliboso oyo apesaka libɔndisi oyo esengeli. (Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.) Ye nde ayebi mpenza komitya na esika ya basusu, mpe apesi basaleli na ye elaka ete: “Ngai moko nazali moto oyo azali kobɔndisa bino.”​—Yisaya 51:12; Nzembo 119:50, 52, 76.

5 Yehova akoki mpenza kosalisa biso. Yango wana, tosengeli ntango nyonso kobondela ye mpe koyebisa ye mpasi na biso nyonso. Koyeba ete Yehova ayebi mpasi na biso mpe ete apesaka biso libɔndisi oyo esengeli ekitisaka mpenza motema! Kasi ndenge nini asalaka yango?

Biloko ya motuya ya elimo

w06 1/9 14 par. 5

Makanisi ya ntina na eteni ya mitano ya mokanda ya Nzembo

119:96​—Maloba “nsuka ya biloko nyonso bizali malamu” elimboli nini? Mokomi ya nzembo azali kolobela makambo oyo ezali malamu na miso ya bato. Na ntembe te, alingaki komonisa ete makambo oyo ezali malamu na miso ya bato ezalaka malamu na makambo nyonso te. Nzokande, mibeko ya Nzambe ezali malamu na makambo nyonso. Mibeko na ye etalelaka makambo nyonso ya bomoi. Biblia Liloba lya Nzambe elobi boye: “Namoni te malamu manso mazali na nsuka, kasi mobeko mwa yo mozali na nsuka te.”

23-29/12

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 119:121-176

Boyá makambo oyo ekosala yo motema mpasi kaka mpamba

w18.06 17 par. 5-6

Tiká mibeko mpe mitinda ya Nzambe eteya lisosoli na yo

5 Soki tolingi ete mibeko ya Nzambe esalisa biso, tosengeli kosuka kaka te na kotánga to koyeba yango. Tosengeli kolinga mpe kotosa yango. Biblia eyebisi biso ete: “Bóyina oyo ezali mabe, mpe bólinga oyo ezali malamu.” (Amose 5:15) Kasi tokosala yango ndenge nini? Tosengeli kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali kolala malamu te, mpe monganga asɛngi yo obongola ndenge na yo ya kolya, asɛngi yo osalaka ngalasisi, mpe obongola makambo mosusu na bomoi na yo. Nsima ya kolanda toli yango, omoni ete okómi kolala malamu! Na ntembe te, okosepela lisusu na monganga yango ndenge asalisi yo.

6 Ndenge moko mpe, Mozalisi na biso apesá biso mibeko mpo ebatela biso na mbuma mabe ya lisumu mpe mpo tózala na bomoi ya malamu. Na ndakisa, Biblia epekisi biso kokosa, kobuba, koyiba, kosala pite, kosala mobulu to kozala na boyokani na bademo. (Tángá Masese 6:16-19; Emoniseli 21:8) Ntango tomonaka matomba tozwaka soki totosi Yehova, bolingo na biso mpo na ye ekómaka lisusu makasi.

w93 15/4 17 par. 12

Bilenge: Bozali koluka nini?

12 Na koleka, osengeli koyeba koyina, koboya makasi likambo nyonso oyo ezali mabe. (Nzembo 97:10) Ndenge nini koyina eloko oyo, na liboso, ekoki kosepelisa to kozala malamu? Ntango okanisi na matomba mabe na yango! “Bomizimbisaka te; Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto.” (Bagalatia 6:7, 8) Soki omekami ete osepelisa mposa ya nzoto, kanisa na litomba oyo eleki mabe: mawa oyo okookisa na Jéhovah Nzambe. (Tala Nzembo 78:41.) Kanisa lisusu, na likoki ya kozwa zemi oyo ekanami te to ya kozwa bokono lokola SIDA. Kanisa, na nsuka na makama ya maoki oyo etamboli na yo ekoki komema likoló na yo mpe kobungisa limemya ya yo moko. Ekoki lisusu kozala na matomba mabe oyo ekomonana nsima na ntango mingi. Ndeko mwasi moko moklisto andimaki ete: “Ngai mpe mobali na ngai tosalaki moto na moto pite liboso ete tokutana. Atako lelo oyo biso nyonso mibale tozali baklisto, etamboli na biso ya kala ya pite ezali liziba na kozanga koyokana mpe ya zuwa kati na libala na biso.” Kobosana mpe te ete, okobungisa mikumba na yo ya téokratike nyonso to okoki kobimisama na lisanga ya baklisto! (1 Bakolinti 5:9-13) Oyo nde mpasi monene mpo na esengo ya mwa ntango mokuse, boye te?

Biloko ya motuya ya elimo

w23.01 2 par. 2

Zalá na kondima ete ‘Liloba ya Nzambe ezali solo’

2 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tondimaka na motema moko ete Yehova azali “Nzambe ya solo” mpe alingaka ntango nyonso tózala na bomoi oyo eleki malamu. (Nz. 31:5; Yis. 48:17) Toyebi ete tokoki kotya motema na makambo oyo totángaka na Biblia. Yango wana tondimaka ete “Liloba ya [Nzambe] mobimba ezali solo.” (Tángá Nzembo 119:160.) Lisusu, tozali kondima maloba oyo moto moko ya mayele na makambo ya Biblia akomaki, alobaki boye: “Ezali ata na mbeba moko te na makambo oyo Nzambe alobá to ekozanga te kokokisama. Basaleli ya Nzambe bakoki kotya motema na makambo oyo alobi, mpamba te bandimelaka Nzambe oyo alobi makambo yango.”

30/12–05/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 120-126

Balonaki na mai ya miso, kasi babukaki na esengo

w04 1/6 16 par. 10

Mapamboli na baoyo bapesaka Nzambe nkembo

10 Ntango tokamati ekanganeli ya Yesu, elingi koloba tokómi bayekoli na ye, tozali kobunda na Satana. Yakobo 4:7 elobi boye: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” Yango elingi koloba te kotɛmɛla Zabolo ezali likambo ya pɛtɛɛ. Kosalela Nzambe ezali kosɛnga molende mpenza. (Luka 13:24) Kasi, na Nzembo 126:5, Biblia elaki ete: “Baoyo bakokonaka na mpisoli bakobukaka na koganga na esengo.” Ya solo, Nzambe na biso azangi botɔndi te. Azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi,” mpe apambolaka baoyo bapesaka ye nkembo.​—Baebre 11:6.

w21.11 25 par. 17

Okobatela kondima na yo makasi?

17 Ozali na mawa mpo moto moko oyo olingaka akufi? Soki ezali bongo, tángáká masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo basekwaki; yango ekokómisa kondima na yo makasi na elikya ya lisekwa. Ozali na mawa makasi mpo ndeko na yo ya libota alongolami na lisangá? Yekoláká mpo omindimisa lisusu ete Nzambe apesaka disiplini na lolenge oyo eleki malamu. Ata soki okutani na likambo nini, salelá libaku yango mpo na kokómisa lisusu kondima na yo makasi. Sopelá Yehova makambo nyonso oyo ezali na motema na yo. Zaláká ntango nyonso pene na bandeko ya lisangá. (Mas. 18:1) Saláká makambo oyo ekosalisa yo oyika mpiko, ata soki ozali naino kolela mpo na mikakatano yango. (Nz. 126:5, 6) Kobá koyangana na makita, kobima mosala ya kosakola mpe kotángaka Biblia. Mpe tyá makanisi na yo nyonso na mapamboli kitoko oyo Yehova abombeli yo na mikolo ezali koya. Wana ozali komona ndenge Yehova azali kosalisa yo, kondima na yo ekokóma lisusu makasi koleka.

w01 15/7 18-19 par. 13-14

Tókangama na mosala ya kobuka mbuma!

13 Maloba ya Nzembo 126:5, 6 ezali kokitisa motema ya babuki-mbuma ya Nzambe, mingimingi baoyo bazali konyokwama, ete: “Baoyo bakokonaka na mpisoli bakobukaka na koganga na esengo. Ye oyo atamboli na kolela mpe [amemi] nkona mpo na kokona, akobutwa solo na koganga na esengo mpe [akomema] mbuma na ye.” Maloba ya mokomi ya nzembo oyo elobeli kolona mpe kobuka mbuma emonisi ete Yehova abatelaki ndambo ya Bayuda oyo bautaki na boombo na Babilone ya kala, mpe apambolaki bango. Basepelaki mingi ntango batikaki bango bábima na Babilone, kasi ekoki mpe kozala ete bazalaki kolela ntango bazalaki kolona mbuma na mabele oyo etikalaki mpamba mpe oyo balonaki eloko moko te likoló na yango mbula 70 nyonso oyo bazalaki na boombo. Nzokande, baoyo bakobaki kolona mpe kotonga bandako balyaki mbuma ya mosala na bango mpe basepelaki na mosala makasi oyo basalaki.

14 Tokoki mbala mosusu kolela ntango tozali konyokwama to ntango biso moko to baninga na biso bandimi bazali konyokwama mpo ete bazali kolanda kosala oyo ezali sembo. (1 Petelo 3:14) Na kati ya mosala na biso ya kobuka mbuma, ekoki kozala mpasi na ebandeli mpo tozali komona lokola nde mosala na biso ya kosakola ezali kobota mbuma te. Kasi soki tozali kaka kolona mpe kosopa mai, Nzambe akokolisa biloko, mbala mingi koleka ndenge oyo tokanisaki. (1 Bakolinti 3:6) Likambo yango ezali komonana polele na ndenge mosala na biso ya kokabola Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali kobota mbuma.

Biloko ya motuya ya elimo

cl 73 par. 15

Nguya ya kobatela​—“Nzambe azali esika na biso ya komibomba”

15 Tólobela naino kobatelama na nzoto. Biso basambeli ya Yehova tokoki kozala na elikya ete akobatela lisangá na biso mobimba ndenge wana. Soki te, ekozala mpasi te mpo Satana alimwisa biso. Kanisá likambo oyo: Satana, “moyangeli ya mokili oyo,” alingaka kosilisa losambo ya solo nyɛɛ. (Yoane 12:31; Emoniseli 12:17) Baguvɛrnema mosusu oyo eleki na nguya awa na mabelé epekisaki mosala na biso ya kosakola mpe emekaki kosilisa biso nyɛɛ. Atako bongo, biso basaleli ya Yehova tozongaki nsima te mpe tii lelo tozali kokoba kosakola na molende! Mpo na nini bikólo yango ekokaki te kosukisa mosala ya mwa etuluku yango ya baklisto, oyo mpe bazalaki komonana ete bazangi makasi ya komibatela? Mpamba te Yehova abatelaki biso na mapapu na ye ya nguya!​—Nzembo 17:7, 8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto