Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 39
  • Mokristo akoki kondima lisalisi ya monganga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokristo akoki kondima lisalisi ya monganga?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Kopona nkisi ya monganga ezali mpenza na ntina?
    Lamuká!—2001
  • Batatoli ya Yehova bandimaka lisalisi ya monganga?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mpo na nini bato mingi bamipesi na bikelakela?
    Lamuká!—2001
  • Batatoli ya Yehova bandimaka minganga básalisa bango?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 39

Mokristo akoki kondima lisalisi ya monganga?

Eyano ya Biblia

Ɛɛ. Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bakoki koluka lisalisi ya monganga, ntango alobaki ete “bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.” (Matai 9:12) Atako Biblia ezali buku oyo elobeli makambo ya monganga te, epesi toli oyo ekoki kosalisa bato oyo balingi kosepelisa Nzambe.

Omituna boye:

1. Nayebi malamu lisalisi oyo monganga alingi kopesa ngai? Biblia elendisi biso tólukaka koyeba makambo malamumalamu na esika ya ‘kondima liloba nyonso.’​—Masese 14:15.

2. Malamu nakende mpe koluka monganga mosusu mpo apesa makanisi na ye? Ezalaka malamu “ntango bapesi-toli bazali ebele,” mingimingi soki ozali na maladi moko ya makasi.​—Masese 15:22.

3. Lisalisi oyo monganga alingi kopesa ngai, ekobuka mobeko ya Biblia oyo elobi ete ‘bóboya makila?’​—Misala 15:20.

4. Mpo na koyeba maladi to kopesa nkisi, basalaka bikelakela? Biblia epekisi “misala ya bilimo mabe.” (Bagalatia 5:19-21) Mpo oyeba soki lisalisi ya monganga ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe to te, talelá mituna lokola oyo:

  • Monganga yango asalaka bikelakela?

  • Lisalisi oyo akopesa emonisi ete andimaka ete moto abɛlaka soki banzambe basiliki to soki banguna babwakeli ye maladi?

  • Liboso apesa nkisi, apesaka bambeka, abelelaka bankɔkɔ, to asalaka milulu to makambo mosusu ya molili?

5. Makanisi na ngai nyonso ekómi kaka na kolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai? Biblia epesi toli oyo: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Kozala makambo makasimakasi te ekosalisa yo otya makanisi na “makambo oyo eleki ntina”, na ndakisa na makambo ya Nzambe.​—Bafilipi 1:10; Matai 5:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto