Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 2 lok. 10-lok. 11 par. 1
  • Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Adama ná Eva
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mpo na nini tokómaka mibange mpe tokufaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Liwa mpe lisekwa ya Yesu—Ekoki komemela yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 2 lok. 10-lok. 11 par. 1
Adama ná Eva na elanga ya Edene

LITEYA 2

Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso

Yehova alonaki elanga na esika moko babengaki Edene. Elanga yango etondaki na fololo, banzete, ná banyama. Na nsima, Nzambe azwaki putulu ya mabele mpe asalaki na yango Adama, mobali ya liboso, mpe afulaki na kati ya zolo na ye. Oyebi likambo esalemaki? Adama akómaki moto ya bomoi! Yehova apesaki Adama mokumba ya kobatela elanga, mpe ayebisaki ye apesa banyama nyonso nkombo.

Yehova apesaki Adama mobeko moko ya ntina mingi. Ayebisaki ye: ‘Okoki kolya mbuma ya nzete nyonso longola kaka mbuma ya nzete moko. Soki olei mbuma ya nzete yango okokufa.’

Na nsima Yehova alobaki: ‘Nakosalela Adama mosungi.’ Nzambe alalisaki Adama mpɔngi ya makasi, mpe alongolaki mokuwa moko na mopanzi ya Adama mpe asalelaki ye mwasi. Nkombo ya mwasi yango ezalaki Eva. Adama ná Eva nde basalaki libota ya liboso. Adama ayokaki ndenge nini mpo na mwasi na ye? Asepelaki mingi, mpe alobaki: ‘Talá eloko Yehova asali na mokuwa na ngai. Aaa! Azali moto lokola ngai.’

Yehova ayebisaki Adama ná Eva bábota bana, mpe bátondisa mabele. Alingaki básala elongo mpo na kokómisa mabele mobimba paradiso, esika ya kitoko, kaka lokola elanga ya Edene. Kasi makambo esalemaki bongo te. Mpo na nini? Tokoyeba yango na mokapo elandi.

“Moto oyo azalisaki bango banda na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi.”​—Matai 19:4

Mituna: Mokumba nini Yehova apesaki Adama? Nini esengelaki kokoméla Adama ná Eva soki balei mbuma ya nzete oyo Nzambe alobaki bálya te?

Ebandeli 1:27-31; 2:7-9, 15-23; Nzembo 115:16; Matai 19:4-6

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto