Liwa ezali mpenza nsuka?
NTANGO mosusu, ezali na motuna moko te oyo etungisaka bato koleka oyo: Nini ekómelaka moto nsima ya liwa? Na boumeli ya bankóto ya bambula, bato ya mayele ya bikólo nyonso balukaka eyano na motuna wana. Kasi, bolukiluki ya bato ya filozofi mpe ya siansi ebimisi kaka mateya mpe masapo ya bongolabongola.
Ezali boni mpo na mateya ya Biblia? Bato mosusu balobaka ete makambo oyo Biblia eteyaka mpo na liwa mpe bomoi nsima ya liwa ezalaka mpe bongolabongola. Nzokande soki totali malamu, ezali makanisi ya lokuta mpe masapo oyo mangomba mingi eteyaka nde etye pɔtɔpɔtɔ na mateya ya Biblia oyo ezali pɛto lokola mai ya mpɛmbɛ. Soki otye bonkɔkɔ mpe masapo pembeni mpe olandi oyo Biblia elobaka mpenza, okomona ete mateya ya Biblia na likambo yango ezali mpenza na nzela mpe ezali kopesa elikya.
Liboso ozala na bomoi
Tózwa kaka ndakisa ya mikapo mibale oyo mokonzi Salomo akomaki, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso. Mikapo yango emonisi polele ete nsima ya liwa, ezala nyama to moto, ayebaka eloko te. Na yango, na kotalela Biblia, soki moto akufi asalaka lisusu eloko te, ayebaka eloko te, ayokaka esengo to mawa te, mpe akanisaka te.—Mosakoli 9:5, 6, 10.
Ezali mpasi kondima liteya yango? Kanisá naino: Moto azalaka ndenge nini liboso akóma na bomoi? Ozalaki wapi liboso osalema na libumu ya mama tii okóma ndenge ozali lelo oyo? Soki moto azalaka na eloko moko na nzoto na ye oyo emonanaka te mpe ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa, eloko yango ezalaka wapi liboso ete moto asalema na libumu ya mama? Solo ezali ete omikundolaka te ete ozalaki na bomoi liboso osalema na libumu ya mama. Liboso osalema na libumu ya mama, ozalaki na bomoi te. Likanisi yango ezali mpenza polele.
Na bongo, emonani polele ete soki tokufi toyebaka lisusu eloko te, ndenge kaka toyebaki eloko te liboso ya kokóma na bomoi. Ezali kaka ndenge Nzambe ayebisaki Adama nsima ya kosala lisumu: “Zambi ozali putulu, mpe okozonga kati na putulu.” (Genese 3:19) Na likambo wana nde bato bakokani na banyama. Na oyo etali ndenge oyo moto akómaka nsima ya liwa, ezali kaka ndenge Biblia elobi: “Moto azali koleka likoló ya nyama te.”—Mosakoli 3:19, 20.
Yango elingi nde koloba ete moto asalemaki kaka mpo na kozala na bomoi ntango moke mpe na nsima azanga bomoi libela na libela? To ezali nde na elikya moko mpo na bato oyo bakufá? Talelá makambo oyo elandi.
Moto nyonso abotamaka na mposa ya kozala na bomoi
Ebele ya bato basepelaka na liwa te. Emonani ete bato mingi balingaka te kolobela liwa na bango, ata mpe kokanisa yango. Atako bongo, bamonaka na bafilme bililingi mingi ya bato bazali kobomama na ndenge nyonso mpe na televizyo, bamonaka bililingi ya bato oyo bakufi mpenza, to batángaka masolo ya ndenge wana na bazulunalo.
Yango wana, ntango mosusu toyokaka mpenza mawa te soki moto oyo toyebi te akufi. Nzokande, soki moto oyo tolingaka akufi to tokanisi liwa na biso moko, toyokaka mpenza mpasi. Ezali bongo mpo tosalemá na mposa makasi ya kozala na bomoi. Lisusu, toyebi malamu eloko babengi ntango mpe nini elimboli kozala na lobiko to bomoi ya libela na libela. Mokonzi Salomo akomaki ete Nzambe ‘atyá mpe lobiko kati na mitema ya bato.’ (Mosakoli 3:11) Soki makambo nyonso ezali malamu, biso nyonso tolingaka kozala na bomoi libela na libela. Tolingaka kozala na bomoi oyo ezangi nsuka. Eloko moko te emonisi ete nyama ezalaka na mposa wana. Nyama emitungisaka te mpo na lobi.
Moto azali na makoki ya kokamwa
Bato bazalaka kaka te na mposa ya kozala na bomoi ya seko, bazali mpe na makoki ya kosala mosala mpe kobimisa makambo ya sika mikolo nyonso mpe libela na libela. Emonani ete makoki oyo moto azalaka na yango ya koyekola makambo ya sika ezali na ndelo te. Balobaka ete eloko moko te ekokani na bɔɔngɔ ya moto na kotalela lolenge oyo yango esalemá mpe makoki na yango ya komesana na makambo ya sika. Na kokesana na banyama, biso bato tozalaka na likoki ya kobimisa makambo ya sika, kokanisa, mpe kokanga ntina ya makambo oyo emonanaka te. Lelo oyo, bato ya siansi bayebi kaka mwa moke makoki oyo bɔɔngɔ ya moto ezalaka na yango.
Ata soki moto akómi mobange, bɔɔngɔ na ye ezalaka kaka na makoki ya kosala makambo mingi. Eumeli te, bato ya mayele oyo bayekolaka bɔɔngɔ bamonaki ete bɔɔngɔ ya moto enunaka te ata soki moto anuni. Bato ya mayele ya ebongiseli moko (Centre d’innovation de l’apprentissage scientifique de l’Institut Franklin) balobi ete: “Bɔɔngɔ ya moto ezali na likoki ya kozonga sika mbala na mbala mpe komesana na makambo ya sika ntango nyonso. Ata soki moto akómi mobange, bɔɔngɔ na ye ekoki kobota baselile ya sika. Mbala mingi, maladi nde ebebisaka bɔɔngɔ, mpe soki mibange babosanaka makambo mingi mpe bakokaka te kosala makambo lokola kotambola to kokoma, ezali mpo basalaka mosala te mpe bayekolaka te.”
Elingi koloba ete bɔɔngɔ na biso ekokaki koumela libela na libela soki maladi ezalaka te mpe tósalelaka yango ntango nyonso. James Watson, moko ya bato ya siansi oyo bamonisaki mpo na mbala ya liboso ndenge ADN ezalaka, alobi boye: “Lolenge oyo bɔɔngɔ esalemá eleki mosika biloko mosusu nyonso oyo tomoná na molɔ́ngɔ́.” Na buku na ye, Gerald Edelman, moto moko ya mayele oyo ayekolaka bɔɔngɔ, alobi ete eteni moko ya bɔɔngɔ oyo ezali na bonene ya motó ya nzete ya alimɛti, “ezali na misisa mikemike soki miliare moko, oyo ekoki kokanganakangana na ndenge ebele mpenza (10 elandani na bamilio ya bazero).”
Na kotalela nyonso wana, tokanisi mpenza ete moto asalemaki kaka mpo na kozala na bomoi mwa bambula? Ezali mpasi kondima yango; ezali kaka lokola moto asaleli engbunduka moko ya molai oyo ezali na masini ya makasi mpo na komema mbuma moko ya zɛlo na ntaka ya mwa basantimɛtrɛ mpamba! Kasi, mpo na nini bato bazalaka na makoki mingi ndenge wana ya kobimisa makambo ya sika mpe koyekola? Ekoki nde kozala te ete na kokesana na banyama, biso bato tosalemaki mpo tózalaka na bomoi libela na libela?
Mozalisi apesi biso elikya
Lokola tobotamaka na mposa ya kozala na bomoi mpe tozali na makoki mingi ya koyekola makambo ya sika, yango emonisi ete bato basalemá mpo bázala na bomoi molai koleka mbula 70 to 80. Yango mpe ezali kotinda biso tókanisa ete ezali na Mozalisi to Nzambe moko oyo akelá biso. Mibeko oyo ebongwanaka te, oyo etambwisaka biloko ndenge na ndenge oyo ezali na molɔ́ngɔ́, mpe ebele ya bikelamu oyo ezali awa na mabelé emonisi polele ete Mozalisi azali.
Soki Nzambe asalaki biso na likoki ya kozala na bomoi libela na libela, mpo na nini tokufaka? Nini ekómelaka moto nsima ya liwa? Nzambe azali mpenza na mokano ya kozongisa bato oyo bakufá na bomoi? Esengeli mpenza ete Nzambe oyo azali na bwanya mpe na nguya apesa biso biyano na mituna wana, mpe asilá kopesa yango. Tótalela mwa makambo oyo elandi:
◼ Nzambe asalaki bato te mpo bákufaka. Soki totaleli mbala ya liboso oyo Biblia elobeli liwa, tokomona ete Nzambe asalaki bato te mpo bákufaka. Lisolo ya Biblia oyo ezali na mokanda ya Genese emonisi ete Nzambe atyelaki Adama ná Eva mobeko moko oyo epesaki bango libaku ya komonisa soki balingaka ye mpe bazali sembo epai na ye. Na mobeko yango, Nzambe apekisaki bango kolya mbuma ya nzete moko boye. Alobaki boye: “Mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:17) Adama ná Eva balingaki kokufa kaka soki babuki mobeko yango. Biblia emonisi ete babukaki mobeko yango, mpe na ndenge yango bakufaki. Yango esalaki ete tókóma bato ya kozanga kokoka mpe tókufaka.
◼ Biblia ekokanisi liwa na mpɔngi. Elobeli ‘kolala mpɔngi ya kufa.’ (Nzembo 13:3) Liboso Yesu asekwisa moninga na ye Lazalo, ayebisaki bantoma na ye boye: “Lazalo moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.” Yango nde Yesu asalaki! Biblia elobi ete ntango abengaki na mongongo makasi, “moto [Lazalo] oyo akufaki abimaki” na ‘lilita ya kokanisama’—azongaki lisusu na bomoi!—Yoane 11:11, 38-44.
Mpo na nini Yesu akokanisaki liwa na mpɔngi? Mpo moto oyo alali mpɔngi asalaka eloko te. Soki moto alali mpɔngi makasi, ayebaka te makambo oyo ezali koleka pembeni na ye mpe ayebaka te ntango boni eleki. Ayokaka mpasi to mawa te. Ndenge moko mpe, moto oyo akufi asalaka eloko te mpe ayebaka eloko te. Kasi, esuki wana te. Soki moto alali mpɔngi, alamukaka. Yango nde elikya oyo Biblia epesi mpo na bakufi.
Mozalisi ye moko alaki boye: “Nasikola nde bango na lobɔkɔ ya ewelo? Nabikisa nde bango na kufa? Ee kufa, malali na yo wapi? Ee ewelo, libebi na yo wapi?” (Hosea 13:14) Esakweli mosusu ya Biblia elobi ete Nzambe “akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi nyonso.” (Yisaya 25:8) Likambo wana ya kozongisa moto oyo akufá na bomoi ebengami lisekwa.
◼ Bato oyo bakosekwa bakofanda wapi? Ndenge tomonaki yango, bato nyonso babotamaka na mposa ya kozala na bomoi ya seko. Okolinga kozala na bomoi ya seko epai wapi? Okosepela ete nsima ya liwa okoba kozala na bomoi lokola nguya moko oyo emonanaka te, ndenge mangomba mosusu eteyaka? Okosepela kokoba kozala na bomoi lokola moto mosusu, kozanga ete oyeba ndenge ozalaki liboso okufa? Okosepela ete nsima ya liwa okóma nyama to nzete? Soki basɛngi yo opona, okondima mpenza kokende kofanda na esika oyo okoki te kosala makambo oyo bato basalaka mpe oyo ezangi bisengo nyonso oyo ezalaka awa na mabelé?
Soki makambo nyonso ezali malamu, okosepela te kofanda libela na libela awa na mabelé? Yango nde elikya oyo Biblia epesi: bato bakofanda libela na libela awa na mabelé. Nzambe asalaki mabelé mpo bato oyo balingaka ye mpe basalelaka ye báfanda wana libela na libela mpe na esengo. Yango wana, Biblia elobi ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29; Yisaya 45:18; 65:21-24.
◼ Ntango nini bato bakosekwisama? Lokola Biblia ekokanisi liwa na mpɔngi, yango emonisi ete bato basekwaka mbala moko te nsima ya liwa. Ntango oyo elekaka banda moto akufi tii akosekwisama, ezali lokola ntango oyo moto alekisaka na “mpɔngi.” Na Biblia, moto moko na nkombo Yobo atunaki boye: “Soki moto akokufa, akobika nde lisusu?” Na nsima, ayanolaki ete: “Nakozela [na lilita] . . . kino kolongwa na ngai ekoya. [Nzambe] Okobenga mpe ngai nakozongisela yo.” (Yobo 14:14, 15) Ekozala mpenza esengo ntango mokolo yango ekokoka mpe bakufi bakokutana lisusu na bandeko mpe baninga na bango!
Ntina ezali te ya kobanga liwa koleka ndelo
Ya solo, elikya oyo Biblia epesi ekoki te kolongola biso nsɔmɔ nyonso ya liwa. Ezali mabe te komitungisa mpo na mawa mpe mpasi oyo ntango mosusu ekómelaka moto liboso ya liwa. Okoki mpe kobanga ete obungisa moto oyo olingaka. Ezali mpe mabe te kobanga mpasi mpe mikakatano oyo ekoki kokómela bandeko mpe baninga na yo soki okufi.
Nzokande, lokola Biblia emonisi biso makambo mpenza oyo ekómelaka moto nsima ya liwa, yango esalisaka biso tóbanga liwa te koleka ndelo. Ntina ezali te ya kobanga ete bademo bakonyokola biso na lifelo ya mɔtɔ na nsima ya liwa. Tosengeli te kobanga ete nsima ya liwa, molimo na biso ekobanda koyengayenga libela na mokili ya bilimo. Tosengeli mpe te kobanga ete mokolo mosusu tokozanga bomoi mpo na libela. Mpo na nini? Mpo likoki oyo Nzambe azali na yango ya kobomba makambo na makanisi ezali na ndelo te, mpe alaki ete bakufi nyonso oyo bazali na makanisi na ye bakozonga lisusu na bomoi awa na mabelé. Biblia epesi elaka oyo ya solosolo: “Nzambe na biso azali Nzambe na kobikisa. Kobika na ntango ya kufa ezali mpo na Nkolo [Yehova].”—Nzembo 68:20.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Zambi ozali putulu, mpe okozonga kati na putulu.”—Genese 3:19
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
‘[Nzambe] atyá mpe lobiko kati na mitema ya bato.’—Mosakoli 3:11
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
BIYANO NA MITUNA OYO OMITUNAKA MPO NA LIWA
Na ntembe te, ezali na mituna mosusu oyo etali liwa mpe lisekwa oyo tolobeli na masolo oyo te. Bato mingi oyo bayekolaka Biblia na mozindo na Batatoli ya Yehova bazwi biyano ya malamu na mituna yango. Tolendisi yo mpe osala lokola bango. Awa na nse totye mwa mituna oyo okozwa biyano na yango:
◼ Maloba oyo ya Biblia, “lifelo” mpe “libeke ya mɔtɔ,” elimboli nini?
◼ Soki lifelo ya mɔtɔ ezali te, etumbu nini bato mabe bakozwa?
◼ Biblia elobi ete soki moto akufi, elimo ebimaka na nzoto na ye. Elimo yango ezali nini?
◼ Mpo na nini bato mingi balobaka ete basololaki na bakufi?
◼ Na Biblia, liloba “molimo” elimboli nini?
◼ Ntango nini bakufi bakosekwa mpo na kofanda na paladiso awa na mabelé?
◼ Bato nyonso oyo bazali kokufa bakosekwa ata soki bazalaki na etamboli nini ntango bazalaki na bomoi?
Talá na lokasa ya nsuka ya zulunalo oyo mpo oyeba oyo okoki kosala mpo ozwa biyano ya polele oyo Biblia epesi na mituna wana.
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu alobaki ete ‘akolamwisa [Lazalo] na mpɔngi’
[Elilingi na lokasa 9]
Tokozala mpenza na esengo ntango bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá bakosekwa!