Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w20 Septembre lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Guvɛrnema
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Lolenge oyo baklisto bazali kotalela Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Esengo na bato oyo bazali kobatela bosembo epai ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
w20 Septembre lok. 31
Elilingi oyo ezali kolakisa Yehova oyo afandi na kiti na ye ya bokonzi oyo esalemi na emerode mpe baanzelu ebele bazingi ye. Pole oyo ezali kongɛnga ezinga kiti na ye ya bokonzi.

Mituna ya batángi

Mosakoli 5:8 elobeli kaka bakonzi ya bato, to elobeli mpe Yehova?

▪ Vɛrsɛ yango elobi boye: “Soki omoni bazali konyokola moto oyo akelelá mpe bazali kolongola na makasi bosembo ná boyengebene na etúká moko oyo eyangelami, kokamwa na likambo yango te, mpo moto oyo azali likoló koleka oyo azali likoló azali kotala, mpe ezali na baoyo bazali likoló na bango.”​—Mos. 5:8.

Mpo na biso bato, tokoki kokanisa ete maloba yango elobeli kaka bato oyo bazali bakonzi na guvɛrnema. Kasi soki totaleli vɛrsɛ yango na mozindo, tokomona ete ezali mpe kolobela solo na ntina etali Yehova; likambo oyo esengeli kobɔndisa mpe kokitisa biso motema.

Mosakoli 5:8 ezali kolobela moyangeli moko oyo azali konyokola moto oyo akelelá mpe kosalela ye makambo na bosembo te. Moyangeli yango asengeli kobosana te ete ekoki kozala na moto mosusu oyo azali likoló na ye mpe na bokonzi mingi koleka ye azali kotala. Kutu, ekoki kozala na bato mosusu oyo bazali na bokonzi mingi koleka. Likambo ya mawa, na baguvɛrnema ya bana bato, bakonzi nyonso bakoki kozala bato mabe, mpe bana-mboka banyokwamaka mpo na makambo na bango ya kozanga bosembo.

Kasi, ata soki emonani lokola ete makambo ekobonga te, koyeba ete Yehova azali kotala ata bakonzi oyo bazali na esika ya likoló koleka na baguvɛrnema ya bato, ekitisaka biso motema. Tokoki kosɛnga Nzambe asalisa biso, mpe kobwakela ye mikumba na biso ya kilo. (Nz. 55:22; Flp. 4:6, 7) Toyebi ete miso ya Yehova “ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.”​—2 Nt. 16:9.

Na yango, Mosakoli 5:8 ezali kosalisa biso tóyeba ete na mokili, ezalaka ntango nyonso na moto oyo azali na bokonzi mingi koleka basusu. Likambo eleki ntina, vɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso tóbosana te ete Yehova nde aleki likoló, mpe azali Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso. Azali sikoyo koyangela na nzela ya Mwana na ye, Yesu Kristo, oyo azali Mokonzi ya Bokonzi na ye. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo amonaka moto mpe makambo nyonso, azalaka ntango nyonso sembo; Mwana na ye mpe azali bongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto