Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita bomoi mpe mosala
© 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
03-09/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE LOYEMBO YA SALOMO 1-2
Lisolo ya bolingo ya solo
Bolingo ya solo ekoki kozala?
9 Lelo oyo, mpo na babalani oyo basalelaka Yehova, libala ezali kaka te boyokani moko boye. Balinganaka mpenza mpe bamoniselanaka bolingo. Kasi, bolingo yango esengeli kozala ya ndenge nini? Ezali bolingo oyo elukaka kaka matomba na yango te oyo Biblia eteyaka biso tózala na yango? (1 Yoane 4:8) Ezali bolingo oyo tomoniselaka bato ya libota na biso? Ezali bolingo oyo esangisaka baninga mibale? (Yoane 11:3) To bolingo ya mwasi ná mobali? (Masese 5:15-20) Ya solo, soki bobalaná, bosengeli komoniselanaka bolingo ya solosolo na makambo oyo nyonso. Na makambo oyo bozali koloba mpe kosala, bokomoniselana bolingo mpe bokozala na esengo na libala na bino. Ya solo, ezali mpenza na ntina kosala bongo ata soki bozalaka na makambo mingi ya kosala. Na mikili oyo baponelaka bato molongani, mbala mosusu mobali ná mwasi bakoki koyebana te liboso bábalana. Na yango, wana mokomoko na bango azali koyeba moninga mpe bolingo na bango ezali kokola, basengeli koyebisanaka ndenge oyo moto na moto azali kolinga moninga. Yango ekosala ete bálingana makasi mpe libala na bango ekokóma makasi.
10 Ntango babalani bazali komoniselana bolingo, libala na bango ekómaka makasi na lolenge mosusu. Na loyembo na ye, Mokonzi Salomo apesaki elenge mwasi “bansinga ya wolo oyo balíngá, bakisa mpe mwa mbuma mike ya palata.” Akumisaki ye, alobaki ete azali “kitoko lokola sanza oyo ebimi mobimba, pɛto lokola moi oyo ezali kongala.” (Loyembo ya Salomo 1:9-11; 6:10) Kasi, elenge mwasi yango asilaki kokutana na moto oyo ye alingaki mpenza. Nini esalisaki ye atikala sembo epai ya mobateli ya bampate? Makambo nini esalisaki ye ntango bakokaki te kozala esika moko? (Tángá Loyembo ya Salomo 1:2, 3.) Akanisaki ndenge azalaki komiyoka ntango mobateli ya bampate azalaki koyebisa ye maloba ya bolingo. Mpo na ye, maloba wana ya bolingo ezalaki “kitoko koleka vinyo” mpe ezalaki kobɔndisa ye kuna na lopango ya mokonzi lokola “mafuta” na motó. (Nzembo 23:5; 104:15) Ezali na ntina ete babalani bámoniselanaka bolingo mpo yango ekosala ete bolingo na bango ekola. Ntango bazali kokanisa maloba wana ya bolingo, ekosalisa mpo bolingo na bango etikala makasi!
Biloko ya motuya ya elimo
Bolingo ya solo ekoki kozala?
11 Soki olingi kobala, liteya nini okoki kozwa epai ya mwana mwasi ya Shuleme? Aboyaki kolingana na mokonzi Salomo mpe na mpiko mpenza ayebisaki basi oyo bazalaki na lopango ya mokonzi ete: “Bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolinga.” (Loyembo ya Salomo 2:7; 3:5) Ekozala mpenza malamu kolingana na moto nyonso? Te, ekozala nde malamu kozela na motema molai mpenza mpe kobalana na moto oyo okolinga mpenza.
10-16/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE LOYEMBO YA SALOMO 3-5
Ntina ya kozala na kitoko ya kati
Bolingo ya solo ekoki kozala?
8 Mobateli ya bampate ná elenge mwasi yango bakumisanaki mpo na kitoko na bango, kasi esuki kaka wana te. Na ndakisa, mobateli ya bampate azalaki kosepela na ndenge elenge mwasi azalaki kosolola ná bato mosusu na boboto. (Tángá Loyembo ya Salomo 4:7, 11.) Yango wana, ayebisaki ye ete: “Mbɛbu na yo ezali se kotangisa mafuta ya nzoi oyo ezali na ndako na yango, ee mwasi na ngai ya libala. Mafuta ya nzoi mpe miliki ezali na nse ya lolemo na yo.” Mpo na ye, maloba ya mwana mwasi wana ezalaki sukali mpe kitoko lokola miliki mpe mafuta ya nzoi ya kitoko mpenza. Ntango mobateli ya mpate alobaki na mwana mwasi ete, “ozali kitoko nzoto mobimba” mpe “mbeba moko te ezali kati na yo,” azalaki kolobela kaka kitoko na ye ya nzoto te kasi mpe bizaleli na ye ya malamu.
Likanisi ya Nzambe mpo na bopɛto ya bizaleli
17 Moto ya misato oyo apesi ndakisa ya kotikala sembo ezali elenge mwasi Sulamite. Lokola azalaki elenge mpe kitoko, elenge mobali moko mobateli ya mpate asepelaki na ye; nzokande Salomo, mokonzi ya Yisalaele mpe moto ya bozwi mingi, asepelaki mpe na ye. Lisolo mobimba oyo ezali na mokanda ya Loyembo ya Salomo emonisi ete Sulamite amibatelaki malamu, yango wana bato oyo bazalaki penepene na ye bapesaki ye limemya. Atako elenge mwasi yango aboyaki Salomo abala ye, elimo ya Nzambe etindaki Salomo akoma lisolo na ye. Mobateli ya mpate oyo ye alingaki azalaki mpe kopesa ye limemya mpo ete amibatelaki malamu. Mokolo mosusu alobaki ete Sulamite azali lokola ‘elanga oyo ezipami.’ (Loyembo 4:12) Na Yisalaele na ntango ya kala, ezalaki na bilanga kitoko oyo ezalaki na ndunda ndenge na ndenge, na bafololo ya nsolo kitoko, mpe na banzete ya minene. Bilanga yango ezingamaki na lopango to na bifelo mpe moto akokaki kokɔta kuna kaka na ekuke, mpe bazalaki kokanga ekuke yango na fungola. (Yisaya 5:5) Mobateli ya mpate alobaki ete lokola Sulamite azalaki na bizaleli ya pɛto mpe azalaki kitoko, azalaki lokola elanga kitoko ya ndenge wana. Amibatelaki malamu mpenza. Abombaki bolingo na ye mpo na mobali oyo asengelaki kobala ye.
g04 12/22 9 par. 2-5
Kitoko oyo ezali na ntina koleka
Kitoko ya kati ekoki mpe kobɛnda basusu epai na biso? Georgina, oyo abalá esali mbula pene na 10, alobi boye: “Na boumeli ya bambula oyo tosali, nakangamaki makasi na mobali na ngai mpo alobaka solo mpe azali sembo. Likambo oyo eleki ntina na bomoi na ye ezali ya kosepelisa Nzambe. Yango etindaka ye atyela ngai likebi mpe alinga ngai mingi. Atunaka makanisi na ngai liboso azwa bikateli mpe amonisaka ngai ete nazali na motuya na miso na ye. Nayebi ete alingaka ngai mpenza.”
Daniel, oyo abalá na 1987, alobi boye: “Namonaka ete mwasi na ngai azali kitoko. Nasepelaka na kitoko na ye ya nzoto, kasi bomoto na ye nde esalaka ete nalinga ye mingi koleka. Akanisaka ntango nyonso bolamu ya basusu mpe alingaka kopesa bango esengo. Azali na bizaleli malamu ya bokristo. Yango esalaka ete nasepela kozala elongo na ye.”
Na mokili oyo bato bakómi kaka likolólikoló, tosengeli kotalaka kaka oyo ezali komonana libándá te. Tosengeli koyeba ete kokóma na kitoko ya nzoto ya “kokoka” ezali mpasi, to kutu ekoki kosalema te, mpe ete kitoko yango ezali na motuya mpenza te. Nzokande, kokolisa bizaleli ya malamu oyo esalaka ete moto azala na kitoko ya kati, wana tokoki kosala yango. Biblia elobi: “Bonzenga ekoki kokosa, mpe kitoko ekoki kozala mpo na mwa ntango; kasi mwasi oyo abangaka Yehova akokumisama.” Nzokande, Biblia epesi likebisi oyo: ‘Lokola lopɛtɛ ya wolo na zolo ya ngulu, mwasi ya kitoko oyo azangi bososoli azali ndenge wana.’—Masese 11:22; 31:30.
Liloba ya Nzambe esalisaka biso tómona motuya ya “bomoto ya motema oyo ebombaná, na kitoko oyo ekoki kobeba te ya elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.” (1 Petro 3:4) Ya solo, kitoko yango ya kati ezali na ntina mingi koleka kitoko ya nzoto. Mpe moto nyonso akoki kokóma na kitoko yango.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na Loyembo ya Salomo
2:7; 3:5—Mpo na nini elenge mwasi alapisaki basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi ndai “mpo na mboloko mpe mpo na mbuli ya bilanga” (to bishe ya esobe)? Mboloko mpe mbuli ezalaka banyama kitoko mpe edendaka ntango ezali kotambola. Na bongo, elenge mwasi Mosulama asɛngisaki basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi ete na nyonso oyo ezalaka kitoko mpe bonzenga, bálamwisa bolingo na motema na ye te.
17-23/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE LOYEMBO YA SALOMO 6-8
Zalá efelo, porte te
it “Loyembo ya Salomo,” par. 11
Loyembo ya Salomo
Emonani ete na ntango wana Salomo atikaki mwana mwasi Moshulame azonga epai na bango. Ntango bandeko na ye ya mibali bamonaki ye, batunaki boye: “Nani wana azali kobima na esobe, ayekameli bolingo na ye?” (Loy 8:5a) Bandeko mibali ya mwana mwasi Moshulame bazalaki koyeba te ete ndeko na bango ya mwasi alingaki moto makasi mpenza. Ntango azalaki elenge, ndeko na ye moko ya mobali alobaki mpo na ye ete: “Tozali na leki moko ya mwasi, oyo abimi naino mabɛlɛ te. Tokosala nini mpo na ndeko na biso ya mwasi mokolo oyo bakotuna ye libala?” (8:8) Mosusu ayanolaki: “Soki azali efelo, tokotonga likoló na ye mwa efelo ya likoló oyo bakatakatá madusu ya palata, kasi soki azali porte, tokokanga ye na libaya ya sɛdrɛ.” (8:9) Kasi, lokola mwana mwasi Moshulame alongaki masɛnginya nyonso, mpo akangamaki kaka na elanga na ye moko ya vinyo mpe apesaki bolingo na ye kaka na moto moko oyo alingaki (8:6, 7, 11, 12), akoki mpenza koloba: “Nazali efelo, mpe mabɛlɛ na ngai ezali lokola manɔ́ngi. Yango wana, na miso na ye nakómi lokola mwasi oyo azali na kimya.”—8:10.
yp 188 par. 2
Kosangisa nzoto liboso ya kobala
Komibatela pɛto ezali malamu kaka te mpo ebatelaka elenge na mbuma mabe ya kosangisa nzoto. Biblia elobeli elenge mwasi moko oyo amibatelaki pɛto atako alingaki fianse na ye makasi mpenza. Yango wana akokaki koloba na esengo nyonso ete: “Nazali efelo, mpe mabɛlɛ na ngai ezali lokola manɔ́ngi.” Azalaki te lokola ‘porte oyo ezangá fungolá,’ oyo ekoki ‘kofungwama mbala moko’ soki batye ye mbamba mpo na kosala pite. Na oyo etali bizaleli ya pɛto, elenge mwasi yango azalaki lokola efelo ya ndako makasi oyo ezalaki mpasi koleka yango! Abongaki mpenza kobengama “mwana ya pɛto” mpe akokaki koloba mpo na mobali oyo akobala ye ete: “Na miso na ye nakómi lokola mwasi oyo azali na kimya.” Kimya na ye moko ya motema esalisaki bango mibale básepela na oyo bazali na yango.—Loyembo ya Salomo 6:9, msl, 10; 8:9, 10.
yp2 33
Bandakisa ya kolanda—Moshulame
Elenge mwasi Moshulame ayebaki malamu ete asengelaki kotika te ete lolango etambwisa ye motó. Alobaki na baninga na ye boye: “Nalapisi bino ndai, ete bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolinga.” Moshulame ayebaki ete lolango ekoki kokanga moto miso. Na ndakisa, ayebaki ete bato mosusu bakoki kotya ye mbamba mpo andima ata moto oyo abongi na ye te. Ata mpe motema na ye moko ekokaki kokosa ye. Yango wana, Moshulame atikalaki makasi lokola “efelo.”—Loyembo ya Salomo 8:4, 10.
Moshulame azalaki moto oyo akɔmɛli, yango wana azalaki kotalela bolingo ya mwasi ná mobali na ndenge ebongi; yo mpe ozali lokola ye? Okokoka kosalela bɔɔngɔ na yo na esika olanda kaka motema na yo? (Masese 2:10, 11) Bato mosusu bakoki kotya yo mbamba mpo olingana na moto na ntango oyo okoki naino te. Mbala mosusu, yo moko okoki kokóma na makanisi ya ndenge wana. Na ndakisa, ntango omoni mwana mwasi ná mwana mobali na balabala basimbani na lobɔkɔ, oyokaka mposa ya kosala lokola bango? Okondima moto oyo azali te Motatoli ya Yehova lokola yo? Elenge Moshulame azalaki kotalela makambo etali bolingo ya mwasi ná mobali lokola moto oyo akɔmɛli. Yo mpe okoki kosala lokola ye!
Biloko ya motuya ya elimo
Bolingo ya solo ekoki kozala?
3 Tángá Loyembo ya Salomo 8:6. Biblia elobeli bolingo lokola “lolemo ya mɔtɔ ya Yah.” Mpo na nini? Mpo ete bolingo ezali ezaleli ya Yehova oyo eleki bizaleli na ye nyonso, mpe akelá biso na likoki ya komekola bolingo na ye. (Ebandeli 1:26, 27) Nsima ya kokela Adama, mobali ya liboso, Yehova apesaki ye mwasi moko kitoko. Ntango Adama amonaki Eva mpo na mbala ya liboso, asepelaki makasi mpe amonisaki esengo oyo azalaki na yango mpo na ye. Eva mpe amiyokaki malamu mpenza pembeni ya mobali na ye. Kutu, Yehova akelaki Eva na mokuwa oyo azwaki epai ya Adama. (Ebandeli 2:21-23) Banda na ebandeli, Yehova asalaki ete mobali ná mwasi bámoniselana bolingo ya solo mpe oyo ekoumela.
24-30/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE YISAYA 1-2
Elikya mpo na baoyo “batondi na mabunga”
Tata moko na bana na ye oyo bakómaki batomboki
8 Yisaya akobi kopesa nsango na ye na maloba ya makasimakasi mpo na libota ya Yuda: “Ɛ libota na masumu, bato bakumbi [kilo ya makambo mabe, NW], libota na basali na masumu, bana baoyo bazali kokosa; batiki [Yehova], batyoli [Mosantu ya Yisalaele, NW], bazongi nsima.” (Yisaya 1:4) Makambo ya mabe ekoki koyikana tii kokóma eloko moko ya kilo mpenza. Na mikolo ya Abalayama, Yehova alobaki ete masumu ya Sodomo na Gomola ezalaki “kilo mingi.” (Genese 18:20, NW) Likambo moko ya ndenge wana emonani sikawa na libota ya Yuda, mpamba te Yisaya alobi ete “bakumbi kilo ya makambo mabe.” Lisusu, abengi bango ete “libota na basali na masumu, bana baoyo bazali kokosa.” Na ntembe te, libota ya Yuda bazalaki lokola bana batomboki. ‘Bazongi nsima,’ to ndenge Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli yango, ‘bapesi’ Tata na bango ‘mokɔngɔ.’
“Tóbongisa makambo”
15 Yehova azali sikawa koloba na mongongo ya esengo mpe ya koyokela mpenza mawa. “Boye, [tóbongisa likambo, Yehova, NW] alobi bongo. Ata masumu na bino izali motane lokola ngola, ikokóma pɛɛ lokola mbula mpɛmbɛ; ata izali motane lokola makila, ikozala lokola [nsuki ya, NW] bampate.” (Yisaya 1:18) Bato mingi bakangaka mpenza malamu te ntina ya libyangi kitoko oyo ezali na ebandeli ya vɛrsɛ oyo. Na ndakisa, Biblia haut fleuve elobi ete: “Tólobana”—lokola nde moto na moto asengeli kondima makanisi ya mosusu mpo na koyokana. Ezali bongo te! Yehova azali na mabe moko te, azali na foti te na boyokani na ye nyonso na batomboki mpe bakosi wana. (Deteronome 32:4, 5) Vɛrsɛ yango elobeli te lisolo oyo ezali koleka kati na bato oyo bazali ndenge moko, kasi elobeli nde tribinale moko oyo eyangani mpo na kokata likambo. Ezali lokola nde Yehova afundi Yisalaele na tribinale.
16 Likanisi yango ekoki kobangisa, kasi Yehova azali Mosambisi oyo aleki kolimbisa mpe koyokela bato mawa. Likoki na ye ya kolimbisa ekokani na oyo ya moto mosusu te. (Nzembo 86:5) Ye moko akoki kosukola masumu ya Yisalaele oyo ezali “motane lokola ngola” mpe kokómisa yango “pɛɛ lokola mbula mpɛmbɛ.” Molende moko te ya moto, motindo moko te ya misala ya lingomba, mbeka moko te, to mabondeli ya moto moko te, ekoki kolongola mbindo ya lisumu. Kaka bolimbisi ya Yehova nde ekoki kolongola lisumu. Yehova alimbisaka ntango moto akokisi masɛngami oyo apesaka, lokola kobongola motema na ndenge ya solosolo.
17 Bosolo ya likambo oyo ezali mpenza na ntina mingi, yango wana Yehova azongeli yango na elobeli moko ya kitoko mpenza—masumu ya “motane lokola makila” ekokóma lokola nsuki ya mpate ya sika, ya mpɛmbɛ, oyo batii yango naino langi te. Yehova alingi tóyeba ete alimbisaka mpenza masumu, ata oyo ya minene koleka, soki tobongoli mpenza motema. Bato oyo bamonaka ete yango ekoki kosalema te mpo na bango basengeli kotalela bandakisa lokola oyo ya Manase. Asalaki masumu minene—bambula mingi. Kasi, abongolaki motema mpe Yehova alimbisaki ye. (2 Ntango 33:9-16) Yehova alingi ete biso nyonso, ata baoyo basali masumu minene, tóyeba ete ntango ezali naino mpo na ‘kobongisa likambo’ elongo na ye.
Biloko ya motuya ya elimo
Ndako ya Yehova etombwami
9 Ya solo, lelo oyo, basaleli ya Nzambe bakendaka te koyangana likoló ya ngomba moko boye oyo ezali na tempelo ya mabanga na nsɔngɛ na yango. Tempelo ya Yehova oyo ezalaki na Yelusaleme ebebisamaki na mampinga ya basoda ya Baloma na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.). Lisusu, ntoma Paulo alobeli yango polele ete tempelo ya Yelusaleme mpe mongombo oyo ezalaki liboso na yango ezalaki elilingi. Ezalaki komonisa eloko moko ya monene ya elimo, “hema ya solo oyo etɛmisami na Nzambe [kasi, NW] na bato te.” (Baebele 8:2) Hema yango ya elimo ezali ebongiseli ya kobɛlɛma na Yehova mpo na kosambela ye na lisalisi ya mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kosikola bato. (Baebele 9:2-10, 23) Na boyokani na likanisi yango, “ngomba ya ndako ya [Yehova]” oyo elobelami na Yisaya 2:2 ezali komonisa losambo ya pɛto ya Yehova oyo etombwami likoló, na eleko na biso. Bato oyo bazali kokɔta na losambo ya pɛto bazali kotondana te na esika moko boye, bazali nde koyangana kati na bomoko ya losambo.
01-07/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE YISAYA 3-5
Yehova azalaki na lotomo ya kolikya ete bato na ye bakotosa ye
Mawa na elanga ya vinyo oyo ezali sembo te!
3 Ata soki Yisaya ayembelaki bayoki na ye lisese yango koyembela to te, kasi yango ebendi mpenza likebi na bango. Bato mingi kati na bango bayebi mosala makasi ya kolona elanga ya vinyo, mpe maloba ya Yisaya eyokani polele mpe emonani mpenza likambo ya solo epai na bango. Ndenge moko lelo, moto oyo asalaka bilanga ya vinyo alonaka mposo ya mbuma ya vinyo te, kasi alonaka nde “mbuma ya vinyo ya malamu mpe ya motane,”—elingi koloba etape to mwa nzete moke oyo euti na vinyo mosusu. Na ndenge ebongi mpenza, aloni elanga ya vinyo yango “likoló na ngomba ya mabele malamu,” esika oyo ebongi ete vinyo ekola malamu.
4 Esɛngaka kosala mosala makasi mpo elanga ya vinyo ebota malamu. Yisaya alobi ete nkolo elanga azali ‘kotimola mpe kolongola mabanga’—yango ezali mpenza mosala ya mpasi mpe oyo elɛmbisaka mingi! Asaleli mabanga ya minene mpo na ‘kotonga ndako molai.’ Na ntango ya kala, basinzili bazalaki kotɛlɛma likoló ya ndako milai ya ndenge wana mpo na kobatela bilanga mpo na miyibi mpe nyama. Lisusu, atongi efelo ya mabanga mpo na kokabola mikala ya elanga ya vinyo na ndenge moko ya malamu. (Yisaya 5:5) Bato bazalaki na momeseno ya kosala bongo mpo na kopekisa ete mai ya mbula emema mabele.
5 Nsima ya kosala mosala makasi mpo na kobatela elanga na ye, nkolo elanga akolinga ete elanga na ye ebota mbuma malamu. Yango wana, atimoli esika ya kokamola vinyo. Kasi elikya na ye ekokisami? Te, elanga yango ebimisi mbuma ya ngayi.
Mawa na elanga ya vinyo oyo ezali sembo te!
8 Yisaya abengi Yehova, nkolo elanga ya vinyo ete “molingami na ngai.” (Yisaya 5:1) Soki Yisaya alobeli Nzambe na maloba ya bolingo ndenge wana ezali mpo ete azali na boyokani malamu na Ye. (Kokanisá na Yobo 29:4; Nzembo 25:14.) Atako bongo, bolingo ya mosakoli mpo na Nzambe ekokani soki moke te na bolingo makasi oyo Nzambe amonisi mpo na “elanga ya vinyo” na ye—libota oyo ‘alonaki.’—Kokanisá na Exode 15:17; Nzembo 80:8, 9.
9 Yehova ‘alonaki’ libota na ye na mokili ya Kanana, apesaki bango mibeko mpe mitinda, yango ezalaki lokola efelo oyo ezalaki kobatela bango mpo bábebisama na mabota mosusu te. (Exode 19:5, 6; Nzembo 147:19, 20; Baefese 2:14) Lisusu, Yehova apesaki bango basambisi, banganga, mpe basakoli mpo na koteya bango. (2 Mikonzi 17:13; Malaki 2:7; Misala 13:20) Ntango nyonso oyo mampinga ya basoda ya banguna bazalaki kotumola Yisalaele na bitumba, Yehova azalaki kobimisa bato mpo na kobatela bango. (Baebele 11:32, 33) Yango wana, Yehova atuni ete: ‘Ekokaki kosala likambo mosusu nini mpo na elanga na ngai na vinyo, oyo ngai nasali te?’
“Batelá nzete oyo ya vinyo”!
Yisaya akokanisaki “ndako ya Yisalaele” na elanga ya vinyo oyo ekómaki mokemoke kobota vinyo oyo ekokani na vinyo ya zamba, to vinyo ya ngaí. (Yisaya 5:2, 7) Mbuma ya vinyo ya zamba ezalaka monene te mpe ezalaka na mosuni mingi te. Ebongaka te mpo na kosala na yango masanga to kolya yango—ndakisa wana ebongaki mpenza mpo na komonisa ekólo oyo epɛngwi oyo ezalaki kobimisa mbuma ya mabe, elingi koloba kobuka mibeko. Soki ekólo yango ekómaki kobota mbuma ya mabe, ezalaki foti ya Yehova te. Yehova asalaki nyonso oyo ekoki mpo ekólo yango ebota mbuma ya malamu. Yango wana atunaki boye: “Ekokaki kosala likambo mosusu nini mpo na elanga na ngai ya [vinyo], oyo esali ngai te?”—Yisaya 5:4.
“Batelá nzete oyo ya vinyo”!
Lokola libota ya Yisalaele, oyo ezalaki lokola nzete ya vinyo ebotaki mbuma te, Yehova ayebisaki bango ete akobuka lopango oyo atongaki pembenipembeni ya libota yango. Na ndenge ya elilingi, alobaki ete akobongisa lisusu bitape na yango te to mpe kobalola mabelé pembenipembeni na yango te. Mbula ekonɔkela yango lisusu te, banzube mpe matiti ya mabe ekobebisa yango.—Yisaya 5:5, 6.
Biloko ya motuya ya elimo
Mawa na elanga ya vinyo oyo ezali sembo te!
18 Mokili mobimba ya Yisalaele ya kala ezalaki mpenza ya Yehova. Libota mokomoko ezalaki na libula na yango oyo eutaki na Nzambe, oyo bazalaki kofutisa to kodefisa kasi kotɛkisa “seko” te. (Levitike 25:23) Mobeko yango ezalaki kopekisa ezaleli ya kosalela libula yango na ndenge ya mabe, lokola kozwa mabele nyonso mpo na yo moko. Ezalaki mpe kobatela mabota ete bázinda na bobola makasi te. Nzokande, bato mosusu ya Yuda bazalaki na lokoso mpe bazalaki kobuka mibeko ya Nzambe oyo etali kozala nkolo ya eloko. Mika akomi ete: “Baluli bilanga mpe babɔtɔli yango; ndako mpe lokola, mpe bakamati yango; babɔtɔli biloko ya moto mpe bato ya ndako na ye, ɛɛ, moto mpe libula na ye.” (Mika 2:2, NW) Kasi Masese 20:21 (NW) ekebisi ete: “Libula ezwamaka liboso na lokoso, kasi nsuka na yango ekopambolama te.”
19 Yehova alaki ete akobɔtɔla bato yango ya lokoso biloko oyo bazwi. Bandako oyo babɔtɔli ekozala “na moto te.” Mabele oyo bazali kolula ekobota kaka mwa ndambo moke ya biloko oyo ekokaki kobota. Ndenge nini mpe ntango nini kolakelama mabe yango ekokokisama, eyebisami te. Mbala mosusu ezali kolobela mwa ndambo ya makambo oyo boombo na Babilone ekobimisa.—Yisaya 27:10.
08-14/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE YISAYA 6-8
“Ngai oyo! Tindá ngai!”
Yehova Nzambe azali na kati ya tempelo na ye mosantu
13 Tóyoka elongo na Yisaya. “Nayokaki mongongo na [Yehova] koloba ete, [Nakotinda, NW] nani? Nani akokenda mpo na biso? Ngai ete, Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Na ntembe te, motuna oyo Yehova atuni ezalaki mpo na koyoka eyano nini Yisaya akopesa, mpamba te mosakoli mosusu amonani na emonaneli yango te. Yango emonisi mpenza ete Yehova abengi Yisaya mpo na kotinda ye. Kasi mpo na nini Yehova atuni ete, “Nani akokenda mpo na biso?” (Biso nde totɛngisi makomi.) Lokola atiki elobeli ya bomoko “ngai” mpo na kosalela elobeli ya boike “biso,” Yehova akɔtisi sikawa moto mosusu oyo azali elongo na ye. Nani? Ezali nde Mwana na ye mobotami-bobele-moko, oyo akómaki nsima Yesu Klisto? Ezali bongo, ezalaki kaka Mwana wana nde Nzambe alobaki na ye ete, “Tiká tózalisa moto na lolenge na biso.” (Genese 1:26; Masese 8:30, 31) Ɛɛ, Mwana mobotami-bobele-moko azali pembeni ya Yehova na likoló.—Yoane 1:14.
14 Yisaya akakatanaki te mpo na kondima! Abangaki te, ata soki ezali nsango ya lolenge nini, mbala moko alobi ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” Atunaki mpe te eloko nini akozwa soki andimi etinda yango. Elimo oyo amonisi mpo na kondima mokumba ezali ndakisa malamu mpenza mpo na basaleli nyonso ya Nzambe lelo, baoyo bazwi mokumba ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi na mokili mobimba.’ (Matai 24:14) Lokola Yisaya, bakokisaka mokumba na bango na bosembo mpenza mpe bapesaka “litatoli na mabota nyonso,” atako bato mingi bandimaka yango te. Ndenge Yisaya asalaki, bakendaka se liboso na elikya nyonso, bayebi ete mokumba na bango euti na mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso.
Yehova Nzambe azali na kati ya tempelo na ye mosantu
15 Yehova amonisi sikawa makambo oyo Yisaya asengeli koloba mpe ndenge bato bakoyamba nsango na ye: “Kendá mpe okoloba na bato oyo ete, ‘Bóyoka mpe bóyoka lisusu, nde bokoyeba ntina te; bómona mpe bómona lisusu, nde bokoyeba te.’ Kómisá motema ya bato oyo makasi mpe kangá matoi na bango, zipá mpe miso na bango mpo ete bámona na miso na bango te, báyoka mpe na matoi na bango te, ete básosola na mitema na bango te ete bábongwana te mpe bábikisama te.” (Yisaya 6:9, 10, NW) Yango elingi koloba ete Yisaya asengeli kozala na matata mpe na maloba makasi, kogangela Bayuda mpe kokabola bango na Yehova? Ezali bongo te! Ezali bato mpenza ya mboka ya Yisaya mpe alingi bango. Kasi maloba ya Yehova emonisi ndenge bato yango bakoyamba nsango na ye, ezala ata ndenge nini Yisaya akokokisa mokumba na ye na bosembo mpenza.
16 Mabe euti nde na bato yango. Yisaya akoloba na bango mpe ‘akoloba na bango lisusu,’ kasi bakoyoka nsango na ye te mpe bakososola yango te. Mingi kati na bango bakozala motó makasi mpe bakotyola nsango yango, lokola nde bazali bato bakufá miso to bato bakufá matoi. Ntango akobanda kokenda epai na bango koloba mpe koloba lisusu, Yisaya akosala ete ‘bato yango’ bámonisa ete balingi kososola te. Ezaleli na bango ekomonisa ete baboi koyoka mpe kondima nsango ya Yisaya—oyo Nzambe atindeli bango. Likambo yango esalemaka mpe bongo lelo oyo! Bato ebele baboyaka koyoka Batatoli ya Yehova ntango bateyaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo ekómi pene.
Yehova Nzambe azali na kati ya tempelo na ye mosantu
23 Ntango atángaki esakweli ya Yisaya, Yesu amonisaki ete makambo mosusu ekokokisama na mikolo na ye. Mitema ya bato ezalaki lokola oyo ya Bayuda na mikolo ya Yisaya. Bamikómisaki bango moko bato bakufá miso mpe bakufá matoi liboso ya nsango na ye mpe bazwaki etumbu ya kobebisama ndenge moko. (Matai 23:35-38; 24:1, 2) Yango esalemaki ntango Général Titus ayaki na mampinga ya basoda ya Baloma, mpe bakɔtaki na Yelusaleme mpe babebisaki engumba na tempelo na yango na mobu 70 na ntango na biso (T.B.). Nzokande, bato mosusu bayokaki Yesu mpe bakómaki bayekoli na ye. Yesu alobaki na bango ete bazali bato ya “esengo.” (Matai 13:16-23, 51, NW) Akebisaki bango ete ntango bakomona “Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, . . . bákima kuna na ngomba.” (Luka 21:20-22) Yango wana, “momboto mosantu,” oyo emonisaki kondima mpe ekómaki libota moko ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe,” ebikaki.—Bagalatia 6:16.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yisaya—I
7:3, 4—Mpo na nini Yehova abikisaki Ahaza, mokonzi mabe? Mokonzi ya Asulia ná Yisalaele basalaki mwango mpo na kolongola Ahaza, mokonzi ya Yuda, mpo bátya na esika na ye mwana na Tabele, mokonzi oyo azalaki mokitani na Davidi te, mpo bango moko bákonza ye. Mwango wana ya mabe elingaki kobebisa kondimana oyo Yehova asalaki na Davidi mpo na Bokonzi. Yehova abikisaki Ahaza mpo molɔngɔ ya bankɔkɔ oyo “Nkolo ya Kimya” asengelaki kobima ebunga te.—Yisaya 9:6, NW.
15-21/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE YISAYA 9-10
“Pole moko monene” esakolamaki
Elaka ya Nkolo moko ya kimya
16 Ya solo, ntango ya “nsima” oyo Yisaya asakolaki ezali eleko oyo Klisto azalaki kokokisa mosala na ye ya kosakola awa na mabele. Yesu alekisaki ntango mingi ya bomoi na ye awa na mabele na Galilai. Ezalaki na etúká ya Galilai nde abandaki mosala na ye ya kosakola mpe alobaki ete: “Bokonzi ya Likoló esili kobɛlɛma.” (Matai 4:17) Kaka na Galilai nde asalaki Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, aponaki bantoma na ye, asalaki likamwisi na ye ya liboso, mpe abimelaki bayekoli soki 500 nsima ya lisekwa na ye. (Matai 5:1–7:27; 28:16-20; Malako 3:13, 14; Yoane 2:8-11; 1 Bakolinti 15:6) Na lolenge wana nde Yesu akokisaki esakweli ya Yisaya mpe akumisaki “mokili ya Zebuluna mpe ya Nafatali.” Ya solo, mosala ya kosakola oyo Yesu asalaki esukaki kaka te epai ya bato ya Galilai. Lokola asakolaki nsango malamu na mabele yango mobimba, Yesu asalaki ete libota mobimba ya Yisalaele, bakisa mpe Yuda, ‘ekumisama.’
17 Kasi, ezali boni mpo na “pole makasi” na Galilai oyo Matai alobeli? Yango mpe ezalaki maloba ya esakweli ya Yisaya. Yisaya akomaki ete: “Bato oyo batambolaki na molili bamoni pole monene; baoyo bafandaki na mokili ya molili ya kufa pole engɛngɛli bango.” (Yisaya 9:2) Na ekeke ya liboso na ntango na biso, pole ya solo ezipamaki na lokuta ya bapakano. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bakómisaki likambo yango lisusu mpasi koleka ndenge bakangamaki na mibeko ya bonkɔkɔ na bango mpe na yango ‘babebisaki Liloba ya Nzambe.’ (Matai 15:6) Bato ya komikitisa bazalaki konyokwama mpe batyamaki na mobulu, mpamba te bazalaki kolanda “bakambi bakufi miso.” (Matai 23:2-4, 16) Ntango Yesu Masiya amonanaki, miso ya bato ebele ya komikitisa efungwamaki na ndenge moko ya kokamwa mpenza. (Yoane 1:9, 12) Mosala ya Yesu awa na mabele mpe matomba ya mbeka na ye ekokisami lokola “pole monene” na esakweli ya Yisaya.—Yoane 8:12.
Elaka ya Nkolo moko ya kimya
18 Baoyo bayambaki pole yango bazalaki na ntina mpenza ya kozala na esengo. Yisaya alobi lisusu ete: “Ofulisi libota, obakisi esengo na yango; basepeli liboso na yo lokola na esengo na ntango ya kobuka, mpe lokola bato bakosepela wana ekokabola bango biloko bipunzami.” (Yisaya 9:3) Na nzela ya mosala ya kosakola ya Yesu mpe ya bayekoli na ye, bato ya motema malamu bamonanaki, bamonisaki bango moko ete bazali na mposa ya kosambela Yehova na elimo mpe na solo. (Yoane 4:24) Mbula minei ekokaki naino te, ebele ya bato bakómaki baklisto. Bato nkóto misato bazwaki batisimo mokolo ya Pantekote ya mobu 33 na ntango na biso. Mwa moke na nsima, “motuya na mibali ekómi soko nkóto mitano.” (Misala 2:41; 4:4) Lokola bayekoli bazalaki kongɛngisa pole na molende nyonso, “motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama na kati ya Yelusaleme mingi mpenza; mpe ebele ya banganga babandaki kotosa kondima.”—Misala 6:7, NW.
19 Ndenge moko na bato oyo basepelaka na ntango ya kobuka mbuma, to baoyo bazalaka na esengo ntango bazali kokabola biloko oyo bazwi nsima ya kolonga etumba, bayekoli ya Yesu basepelaki mpo na bokoli oyo emonanaki. (Misala 2:46, 47) Na nsima, Yehova angɛngisaki pole kati na bato ya bikólo mosusu. (Misala 14:27) Yango wana bato ya mposo nyonso basepelaki mpo nzela ya kokóma epai ya Yehova efungwamaki.—Misala 13:48.
Elaka ya Nkolo moko ya kimya
20 Matomba ya mosala ya Masiya ekoumela libela, lokola maloba ya Yisaya oyo elandi emonisi yango: “Zambi obuki ekangeli na mokumba na [bango], mpe lingenda na lipeka na [bango], nzete na [oyo azalaki kotinda bango na mosala, NW], obuki yango lokola na mokolo ya Midiana.” (Yisaya 9:4) Bikeke mingi liboso ya eleko ya Yisaya, Bamidiana bayokanaki na Bamoaba mpo na kokweisa Yisalaele na lisumu. (Mituya 25:1-9, 14-18; 31:15, 16) Na nsima, Bamidiana batungisaki Bayisalaele mbula nsambo, bazalaki kokɔta na bamboka na bango mpe na bilanga na bango. (Basambisi 6:1-6) Kasi na nsima, na nzela ya mosaleli na ye Gideona, Yehova apanzaki mampinga ya basoda ya Midiana. Nsima ya “mokolo ya Midiana” yango, eloko moko te emonisi ete basaleli ya Yehova banyokwamaki lisusu na mabɔkɔ ya Bamidiana. (Basambisi 6:7-16; 8:28) Etikali moke, Yesu Klisto, Gideona Monene, aboma banguna ya basaleli ya Yehova na mikolo na biso. (Emoniseli 17:14; 19:11-21) Na yango, “lokola na mokolo ya Midiana,” bolongi ya solosolo mpe ya libela ekouta na nguya ya bato te, kasi na nguya ya Yehova. (Basambisi 7:2-22) Basaleli ya Nzambe bakonyokwama lisusu te libela!
21 Misala oyo euti na nguya ya Nzambe ezali mpo na kokumisa bitumba te. Yesu oyo asekwi azali Nkolo ya Kimya, mpe ntango akoboma banguna na ye, akotya kimya ya libela. Yisaya alobi sikawa ete bibundeli nyonso ya basoda ekotumbama na mɔ́tɔ: “Sapato nyonso na mobundi kati na makɛlɛlɛ ya etumba, mpe bilamba nyonso bilekisami na makila, ekozikisama, ekozala biloko ya kotyama na mɔ́tɔ.” (Yisaya 9:5) Makɛlɛlɛ oyo eutaka na lokito ya sapato ya basoda ntango bazali kotambola ekozala lisusu te. Bilamba ya bilombe ya etumba oyo ebebi na makila ekomonana lisusu te. Bitumba ekozala lisusu te!—Nzembo 46:9.
Biloko ya motuya ya elimo
Elaka ya Nkolo moko ya kimya
23 Mopesi-toli ezali moto oyo apesaka toli, to mayebisi. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu Klisto apesaki toli kitoko mpenza. Tozali kotánga na kati ya Biblia ete “ebele bakamwi mateya na ye.” (Matai 7:28) Azali Mopesi-toli oyo azali na bwanya mpe na motema mawa, ayebi malamu mpenza bomoto na biso. Toli na ye ezalaka kaka mpamela te to bitumbu te. Mbala mingi, ezalaka mateya mpe mayebisi ya bolingo. Toli ya Yesu ezalaka ya kokamwa mpamba te ezalaka ntango nyonso na bwanya, ya kokoka, mpe ezalaka na libunga te. Ememaka baoyo balandaka yango na bomoi ya seko.—Yoane 6:68.
24 Toli ya Yesu eutaka kaka te na mayele na ye moko. Kutu alobi nde boye: “Mateya na ngai mazali na ngai te kasi na Motindi na ngai.” (Yoane 7:16) Ndenge moko na Salomo, bwanya ya Yesu euti na Yehova Nzambe. (1 Mikonzi 3:7-14; Matai 12:42) Ndakisa ya Yesu esengeli kotinda bateyi mpe baoyo bapesaka toli na lisangá ya boklisto básalaka ete mateya na bango eutaka ntango nyonso na Liloba ya Nzambe.—Masese 21:30.
22-28/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE YISAYA 11-13
Esakweli elobaki nini mpo na Masiya?
Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
4 Bikeke mingi liboso ya eleko ya Yisaya, Baebele mosusu oyo bakomaki Biblia balobelaki koya ya Masiya, Mokambi ya solosolo, oyo Yehova asengelaki kotinda na Yisalaele. (Genese 49:10; Deteronome 18:18; Nzembo 118:22, 26) Sikawa, na nzela ya Yisaya, Yehova abakisi makambo mosusu. Yisaya akomi ete: “Etape moke ekobima na ekumu ya Yisai; mpe mwa nzete moke oyo euti na misisa na ye ekobota mbuma.” (Yisaya 11:1, NW; kokanisá na Nzembo 132:11.) Maloba “etape moke” mpe “mwa nzete moke” nyonso mibale ezali komonisa ete Masiya akozala mokitani ya Yisai na nzela ya mwana na ye ya mobali Davidi, oyo apakolamaki mafuta mpo na kozala mokonzi ya Yisalaele. (1 Samwele 16:13; Yilimia 23:5; Emoniseli 22:16) Ntango Masiya ya solosolo akoya, “mwa nzete moke” yango oyo euti na ndako ya Davidi, esengeli kobimisa mbuma ya malamu.
5 Masiya oyo alakamaki ezali Yesu. Matai, moko ya bakomi ya Evanzile alobelaki Yisaya 11:1 ntango alobaki ete lokola Yesu abengamaki moto ya “Nasalete,” akokisaki maloba ya basakoli. Lokola akolaki na engumba Nasalete, Yesu abengamaki moto ya Nasalete, emonani ete nkombo yango eyokani na liloba ya Liebele oyo esalelami na Yisaya 11:1 mpo na “mwa nzete moke.”—Matai 2:23, NW, maloba na nse ya lokasa; Luka 2:39, 40.
Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
6 Masiya akozala moyangeli ya ndenge nini? Akozala motema mabe mpe moto ya lolendo lokola Moasulia, oyo abebisaki bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele ya nɔrdi? Soki moke te. Yisaya alobaki boye mpo na Masiya: “Elimo ya Yehova ekozala likoló na ye, elimo ya bwanya mpe ya mayele, elimo ya toli mpe ya nguya, elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova; mpe kosepela na ye ekozala kati na kobanga Yehova.” (Yisaya 11:2, 3a, NW) Masiya azali mopakolami, na mafuta te kasi na elimo santu ya Nzambe. Yango esalemaki na batisimo ya Yesu, ntango Yoane Mobatisi amonaki elimo santu ya Nzambe ezali kokita likoló na Yesu lokola ebenga. (Luka 3:22) Elimo ya Yehova ‘ezalaki likoló na’ Yesu, mpe amonisi yango ntango asali makambo na bwanya, na mayele, na toli, na nguya, mpe na boyebi. Oyo nde bizaleli malamu mpo na moyangeli!
Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
8 Kobanga nini Masiya azali na yango mpo na Yehova? Yesu azali koyoka Nzambe nsɔmɔ te, azali mpe kobanga te ete akokweisa ye na likambo moko. Nzokande, kobanga oyo Masiya azali na yango mpo na Nzambe etondi na botosi mpe na bolingo. Moto oyo abangaka Nzambe alingaka ntango nyonso ‘kosala makambo oyo esepelisaka ye.’ (Yoane 8:29) Na maloba mpe na ndakisa, Yesu atei ete kotambola mokolo na mokolo na kobanga Yehova ezali likambo ya esengo oyo eleki mosusu nyonso.
Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
9 Yisaya asakoli makambo mosusu oyo etali Masiya: “Akosambisa te [kolanda, NW] oyo emonani na miso na ye, [akopamela te kolanda makambo, NW] oyo eyokani na matoi na ye.” (Yisaya 11:3b) Soki bafundi yo na tribinale, okozala na botɔndi te mpo na zuzi ya ndenge wana? Na mokumba ya Masiya lokola Mosambisi ya bato nyonso, makambo ya lokuta, mayele mabe ya bazuzi, nungunungu to makambo ya likolólikoló lokola bozwi ezali kosala ye eloko moko te. Amonaka bokosi oyo ezali na kati ya moto mpe atalaka mosika na makambo oyo ezali komonana ata soki ezali kitoko te, ayebaka “bomoto oyo ebombami kati na motema,” “bomoto oyo ebombami.” (1 Petelo 3:4, NW, maloba na nse ya lokasa) Baoyo nyonso basambisaka makambo na lisangá ya boklisto basengeli kolanda ndakisa eleki malamu oyo Yesu atiki.—1 Bakolinti 6:1-4.
Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
11 Ntango bayekoli na ye basengeli kosembolama, Yesu asalaka yango na ndenge ete bázwela yango matomba mingi koleka—yango ezali mpenza ndakisa eleki malamu mpo na bankulutu baklisto. Nzokande, baoyo basalaka mabe basengeli koyeba ete bakozwa etumbu moko makasi. Ntango Nzambe akosambisa ebongiseli ya makambo ya lelo, Masiya “akobɛta mokili” na mongongo na ye ya mokonzi, na bongo akokatela bato ya mabe nyonso etumbu ya liwa. (Nzembo 2:9; kokanisá na Emoniseli 19:15.) Nsukansuka, moto moko te ya mabe akotikala mpo na kobebisa kimya ya bato. (Nzembo 37:10, 11) Lokola loketo na ye mpe bangei na ye ekangami na nkamba ya boyengebene mpe ya bosembo, Yesu azali na likoki ya kosala bongo.—Nzembo 45:3-7.
Biloko ya motuya ya elimo
Lobiko mpe esengo na boyangeli ya Masiya
16 Losambo ya pɛto ekɔtaki mobulu mpo na mbala ya liboso na Edene ntango Satana alongaki kotinda Adama na Eva bátombokela Yehova. Tii lelo, Satana atiki naino te mokano na ye ya kopɛngwisa bato mingi bálongwa na nzela ya Nzambe. Kasi, Yehova akopesa nzela te ete losambo ya pɛto elimwa na mabele. Likambo yango etali nkombo na ye, mpe amibanzabanzaka mpo na baoyo basalelaka ye. Yango wana, na monɔkɔ ya Yisaya apesi elaka moko oyo ezali kobenda likebi: “Ekokóma ete na mokolo yango ekozala na mosisa ya Yisai oyo ekotɛlɛma lokola elembo mpo na bato. Epai na ye mabota bakobaluka mpo na kotuna, mpe esika ya kopema na ye ekozala na nkembo.” (Yisaya 11:10, NW) Na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yelusaleme, engumba oyo Davidi akómisaki mboka-mokonzi ya ekólo yango, ezalaki lokola elembo, oyo ezalaki kobenga batikali ya sembo kati na Bayuda oyo bapalanganaki mpo bázonga kotonga lisusu tempelo.
17 Kasi, esakweli yango esuki kaka na likambo wana te. Lokola tomonaki yango, ezali kolobela boyangeli ya Masiya, Mokonzi kaka moko ya solosolo mpo na bato ya bikólo nyonso. Ntoma Paulo atángaki maloba ya Yisaya 11:10 mpo na komonisa ete na mikolo na ye bato ya mabota bakokaki kozala na esika na lisangá ya boklisto. Atángaki maloba ya vɛrsɛ yango ndenge ezali na libongoli ya Septante mpe akomaki ete: “Yisaya alobi ete: ‘Mosisa ya Yese ekozala, mpe moto oyo akobima mpo na koyangela bikólo akozala; epai na ye bikólo bakotya elikya na bango.’” (Baloma 15:12, NW) Lisusu, esakweli yango ezali kotalela eleko moko ya mosika lisusu—kino na mikolo na biso na ntango oyo bato ya bikólo mosusu bakomonisa bolingo na bango mpo na Yehova mpe bakopesa bandeko ya Masiya bapakolami mabɔkɔ.—Yisaya 61:5-9; Matai 25:31-40.
18 Na kokokisama ya ntango na biso, “mokolo” oyo Yisaya alobelaki ebandaki ntango Masiya atyamaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló na 1914. (Luka 21:10; 2 Timote 3:1-5; Emoniseli 12:10) Banda ntango wana, Yesu Klisto azali elembo oyo ezali polele, esika ya koyanganisama mpo na Yisalaele ya elimo mpe mpo na bato ya bikólo nyonso oyo bazali na mposa makasi ya boyangeli ya sembo. Na litambwisi ya Masiya, nsango malamu ya Bokonzi esakolami na bikólo nyonso, lokola Yesu alobaki yango. (Matai 24:14; Malako 13:10) Nsango malamu yango ezali na nguya. “Ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso” bazali kotosa Masiya mpe koya na losambo ya pɛto esika moko na batikali bapakolami. (Emoniseli 7:9) Lokola bato mingi ya sika bazali kokoba kosangana na batikali na ‘ndako ya kobondela’ ya Yehova na elimo, bazali kobakisa nkembo na “esika ya kopema” ya Masiya, tempelo monene ya Nzambe na elimo.—Yisaya 56:7; Hagai 2:7.
29/12–04/01
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE YISAYA 14-16
Banguna ya bato ya Nzambe bakoki kokima etumbu te
Yehova asambwisi engumba moko ya lolendo
16 Yango esalemaki mbala moko te na mobu 539 L.T.B. Kasi, lelo oyo ezali polele ete makambo nyonso oyo Yisaya alobaki mpo na Babilone ekokisamaki mpenza. Nganga-mayele moko ya Biblia alobi ete “esika oyo [Babilone] ezalaki, kobanda bikeke mingi tii lelo oyo etikala esika moko ya mpamba, mpe ezali kaka libondo ya mitika.” Na nsima abakisi ete: “Soki otali ndenge yango ezali, okomona ete makambo oyo Yisaya na Yilimia balobaki ekokisami na bosikisiki mpenza.” Ya solo, moto moko te na mikolo ya Yisaya akokaki kosakola kokwea mpe kobebisama ya Babilone. Kutu, Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Bamede na Baperse mbula soki 200 nsima wana Yisaya akomaki mokanda na ye! Mpe Babilone ebebisamaki mpo na mbala ya nsuka bikeke mingi na nsima. Yango ezali mpenza kolendisa kondima na biso na Biblia ete ezali Liloba epemami na Nzambe, boye te? (2 Timote 3:16) Lisusu, lokola Yehova akokisaki bisakweli na ye na ntango ya kala, tokoki kozala na elikya ete bisakweli ya Biblia oyo ekokisami naino te ekokokisama na ntango oyo Nzambe ye moko abongisi.
Yehova asambwisi engumba moko ya lolendo
24 Na Biblia, bakonzi ya molɔngɔ ya Davidi bakokanisami na minzoto. (Mituya 24:17) Kobanda na Davidi, “minzoto” yango ezalaki koyangela longwa na Ngomba Siona. Nsima wana Salomo atongaki tempelo na Yelusaleme, nkombo Siona ekómaki kosalelama mpo na engumba yango mobimba. Na nse ya kondimana ya Mibeko, Bayisalaele nyonso ya mibali basengelaki kokenda na Siona mbala misato na mobu. Yango wana, ekómaki “ngomba ya koyangana.” Lokola azwaki ekateli ya kokonza bakonzi ya Yuda mpe na nsima kolongola bango na ngomba wana, Nebukadanesala amonisaki mposa na ye ya komitombola likoló na “minzoto” yango. Amonisi te ete bolongi na ye likoló na bango euti na Yehova. Kutu, na lolendo mpenza amitii ye moko na esika ya Yehova.
Toli ya Yehova mpo na kotɛmɛla bikólo
YEHOVA akoki kosalela bikólo ya bapaya mpo na kopesa basaleli na ye etumbu mpo na mabe na bango. Atako bongo, alimbisaka bikólo yango te oyo bayokelaka losambo ya solo nkanda, basalelaka yango lolendo mpe bayinaka yango. Yango wana, ntango molai liboso mpenza, Yisaya apemami na Nzambe mpo na kokoma “litatoli mpo na [kotɛmɛla Babilone, NW].” (Yisaya 13:1) Kasi, Babilone akozala monguna nde nsima. Na mikolo ya Yisaya, Asulia azali konyokola libota oyo basalaki kondimana na Nzambe. Asulia abebisi bokonzi ya Yisalaele ya nɔrdi mpe abɔtɔli bamboka mingi ya Yuda. Kasi bolongi na ye ezali na ndelo. Yisaya akomi ete: “[Yehova] na bibele akati ndai ete, Lokola mwango mobongisaki ngai, ekozala mpe bongo . . . ete nakobuka Asulia na mokili na ngai, nakonyatela ye na nse na lokolo, likoló na ngomba na ngai; ekangelo na ye ekolongwa na bango, mokumba na ye longwa na mapeka na bango.” (Yisaya 14:24, 25) Mwa moke nsima ya ntango oyo Yisaya alobaki esakweli yango, Baasulia bazalaki lisusu likama te mpo na Yuda.
Toli ya Yehova mpo na kotɛmɛla bikólo
12 Esakweli yango ekokokisama ntango nini? Ekoumela te. ‘Oyo ezali liloba lilobaki [Yehova] mpo na Moaba na ntango eleki. Nde sasaipi, [Yehova] alobi ete, Na [mbula, NW] misato, lokola [bambula, NW] na mosali na kofutama, nkembo na Moaba ekokóma na nsɔni, [na makɛlɛlɛ ya lolenge nyonso, NW]; mpe baoyo bakotikala bakozala na motuya moke mpe na nguya te.’ (Yisaya 16:13, 14) Biloko oyo bato ya arkeoloji bazali kokundola endimisi mpenza maloba yango mpo emonisi ete na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso, Moaba anyokwamaki mingi mpe bisika na yango mingi etikalaki lisusu na bato te. Tigalata-pilesele III atángaki Salamanu ya Moaba kati na bayangeli oyo bazalaki kofuta mpako epai na ye. Kamusunadabi, mokonzi ya Moaba azalaki kofuta mpako epai ya Saneheliba. Bakonzi ya Asulia, Esala-Hadona mpe Asulubanipala, balobaki ete Musuri mpe Kamasalutu bazalaki bato oyo bazalaki na nse ya bokonzi na bango. Esili koleka bikeke mingi, libota ya Bamoaba ezali lisusu te. Mitika ya bingumba oyo bakanisaka ete ezalaki ya Bamoaba emonani, kasi kino sikawa bamoni bilembeteli mingi te ya monguna yango makasi ya Yisalaele.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yisaya—I
14:1, 2—Ndenge nini bato ya Yehova bakómaki “kokanga baombo baoyo bakangaki bango liboso” mpe “bazalaki na bokonzi likoló ya baoyo banyokolaki bango”? Esakweli yango ekokisamaki epai ya bato lokola Danyele, oyo akómaki mokonzi monene na Babilone, na boyangeli ya Bamede ná baperse; Esetele oyo akómaki mwasi ya mokonzi ya Perse; mpe Moledekai oyo akómaki ministre-mokonzi na bokonzi ya Perse.