Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr25 Septembre nk. 1-14
  • Mikanda tosaleli mpo na “Mokanda ya likita bomoi mpe mosala”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na “Mokanda ya likita bomoi mpe mosala”
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • 01-07/09
  • 08-14/09
  • 15-21/09
  • 22-28/09
  • 29/09–05/10
  • 06-12/10
  • 13-19/10
  • 20-26/10
  • 27/10–02/11
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2025
mwbr25 Septembre nk. 1-14

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita bomoi mpe mosala

© 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

01-07/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 29

Boyá bindimeli mpe mimeseno oyo eyokani te na Biblia

wp16.06 6, etanda

Bimonaneli etali baoyo bafandaka na likoló

Biyambayamba (superstition) mpe kobanga bilimo mabe ekangá bamilio ya bato na motambo. Mpo na komibatela basalelaka bikelakela, balataka biloko na nzoto to basalelaka maji. Ezali na ntina te osala bongo. Biblia epesi elaka oyo ya kokitisa motema: “Miso na ye [Yehova] ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Ntango 16:9) Yehova, Nzambe ya solo oyo azali na nguya mingi koleka Satana, akobatela yo soki otyeli ye motema.

Mpo Yehova abatela yo, osengeli koyekola makambo oyo alingaka mpe kosalela yango. Na ndakisa, na siɛklɛ ya liboso, bakristo ya engumba Efese basangisaki babuku na bango nyonso ya maji mpe batumbaki yango. (Misala 19:19, 20) Ndenge moko mpe mpo Nzambe abatela yo osengeli kolongola bikelakela, biloko oyo olataka na nzoto to bankisi, babuku ya maji, bansinga ya “komibatela,” mpe eloko mosusu nyonso oyo ezali na boyokani na misala ya bademo.

w19.04 17 par. 13

Tólongisa solo na ntina etali liwa

13 Soki ozali koyeba mpenza te ndimbola ya momeseno to ya molulu moko boye, bondelá Yehova mpe sɛngá ye apesa yo bwanya na ye. (Tángá Yakobo 1:5.) Na nsima, salá bolukiluki na mikanda ya moombo ya sembo. Soki esengeli, sololá na bankulutu ya lisangá na bino. Bakoyebisa yo te nini osengeli kosala, kasi bakoki kolakisa yo mitinda ya Biblia oyo ekosalisa yo, na ndakisa oyo tolobeli na lisolo oyo. Soki osali bongo, ozali komesenisa ‘makoki na yo ya kososola,’ mpe makoki yango ekosalisa yo ‘okesenisa mabe ná malamu.’​—Ebr. 5:14.

w18.11 11 par. 12

“Nakotambola na solo na yo”

12 Mimeseno oyo esepelisaka Nzambe te. Bato ya libota na biso, baninga ya mosala mpe baninga ya kelasi bakoki kolinga ete tósangana na bafɛti na bango. Nini ekosalisa biso tótɛmɛla mbamba ya kosangana na mimeseno mpe bafɛti oyo esepelisaka Yehova te? Tosengeli kobatela na makanisi na biso ntina oyo Yehova asepelaka na makambo yango te. Tokoki kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo na koyeba ndenge oyo bafɛti yango ebandaki. Soki tomanyoli bantina oyo Biblia epesi ya kosangana na bafɛti yango te, tokomona mpenza ete tozali kotambola na nzela oyo ‘endimami na Nkolo.’ (Baefese 5:10) Soki tozali kotyela Yehova mpe Liloba na ye motema, tokokwea te na motambo ya “kolɛnga liboso ya bato.”​—Masese 29:25.

Biloko ya motuya ya elimo

it “Maloba sukali” par. 1

Maloba sukali

Koloba na moto maloba sukali elimboli kopesa ye longonya oyo eleki; komatisa moto likoló mingi; kokumisa ye na bokosi, na mbɛbu mpamba, to na kolekisa ndelo. Mbala mingi balobaka na moto maloba sukali mpo amilinga mingi mpe akóma na lolendo; mpe na bongo ebebisaka moto. Bato basalaka yango mpo moto asepela na bango to akabela bango biloko, mpo na kotinda moto yango amona ete asengeli kofuta bango to mpo na kopesa ye lokumu. Mbala mingi, balobaka na moto maloba sukali mpo na kokanga ye na motambo. (Mas 29:5) Ezali polele ete kolɛngola moto to koloba na ye maloba sukali ezali te bwanya oyo euti na likoló; ezali nde bwanya ya mokili, oyo etondi na moimi, bokabwani, mpe bokosi. (Yak 3:17) Bokosi, lokuta, mpe kokumisa moto na ndenge ya kolekisa ndelo mpe kotinda moto akóma na lolendo, nyonso wana esepelisaka Nzambe te.​—2Ko 1:12; Ga 1:10; Ef 4:25; Kol 3:9; Em 21:8.

08-14/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 30

“Kopesa ngai bobola te, bomɛngo mpe te”

w18.01 24-25 par. 10-12

Bolingo ya ndenge nini epesaka esengo ya solosolo?

10 Toboyi te, biso nyonso tozalaka na mposa ya mbongo. Biblia elobi ete mbongo ebatelaka. (Mosakoli 7:12) Kasi moto akoki mpenza kozala na esengo soki azali kaka na oyo esengeli? Ɛɛ! (Tángá Mosakoli 5:12.) Agure mwana ya Yake akomaki boye: “Kopesa ngai bobola te, bomɛngo mpe te. Tiká nalya bilei oyo esengeli na ngai.” Ezali mpasi te komona ntina oyo alingaki te kozala na bobola makasi. Ndenge amonisaki yango na nsima, alingaki te kokóma moyibi mpo koyiba ekofingisa Nzambe. Kasi mpo na nini alingaki te kozala mozwi? Akomaki boye: “Noki natonda mpe nawangana yo mpe naloba: ‘Yehova nde nani?’” (Masese 30:8, 9) Mbala mosusu oyebi bato oyo batyelaka bomɛngo na bango motema na esika ya kotyela Nzambe motema.

11 Moto oyo alingaka mbongo akoki kosepelisa Nzambe te. Yesu alobaki: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” Liboso alobaki: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka. Nzokande, bómibombela biloko ya motuya na likoló, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka te, mpe epai miyibi bakoki kokɔta te mpe koyiba te.”​—Mat. 6:19, 20, 24.

12 Basaleli mingi ya Yehova basalaka makasi bázala na bomoi ya pɛpɛlɛ. Bamonaka ete bomoi yango epesaka esengo mpe etikelaka bango ntango mingi ya kosalela Yehova. Ndeko Jack, oyo afandaka na États-Unis, atɛkaki ndako na ye ya monene mpe kompanyi na ye mpo akóma mobongisi-nzela, lokola mwasi na ye. Alobi boye: “Ezalaki mpasi kotika ndako na biso ya kitoko mpe biloko na biso na mwa mboka moko kitoko. Kasi bambula ebele, nazalaki kozonga ndako na esengo te mpo na mikakatano ya mosala. Mwasi na ngai azalaki mobongisi-nzela mpe azalaki ntango nyonso na esengo. Azalaki koloba, ‘Nazali na patrɔ oyo aleki bapatrɔ nyonso!’ Sikoyo lokola ngai mpe nakómá mobongisi-nzela, biso nyonso tozali kosalela patrɔ moko, Yehova.”

w87 15/5 30 par. 8

Bangá Yehova mpo ozala na esengo

◆ 30:15, 16​—Bandakisa yango emonisi nini?

Emonisi ete moto ya lokoso atondaka te. Nsonzo emɛlaka makila ebele, kaka ndenge bato ya lokoso balukaka kaka kozwa mbongo mpe bokonzi mingi koleka. Ndenge moko mpe, Nkunda etondaka te koyamba bibembe. Mwasi oyo abotaka te ‘alelaka’ mpo azwa bana. (Ebandeli 30:1) Mabele oyo ezangi mai amɛlaka mai ya mbula mpe eumelaka te kokauka lisusu. Mpe mɔtɔ oyo ezikisi biloko oyo babwaki na kati na yango etindaka mɔtɔ ya mikemike mpo na kozikisa biloko oyo ezali pembenipembeni. Bato ya lokoso bazalaka bongo. Kasi baoyo balandaka bwanya ya Nzambe bazangaka komipekisa ndenge wana te mpe bazalaka na moimi te.

w11 1/6 10 par. 3

Ndenge oyo moto akoki kobika​—Na kotalela makoki na ye

Saláká ekonzo liboso ya kosomba biloko. Atako kosala ekonzo liboso ya kosomba eloko ekoki komonana lokola likambo oyo esilá ngala, kasi yango ezali lolenge malamu mpenza ya kokima mikakatano ya mbongo. Kosala bongo esalisaka bato mingi bakɔtaka banyongo te mpe bákima mikakatano oyo eutaka na banyongo, na ndakisa kofuta nyongo na matabisi ebele, likambo ebakisaka ntalo ya biloko nyonso oyo moto asombaka. Biblia elobi ete furmi ezali na “bwanya” mpo ebombaka “biloko na yango ya kolya na ntango ya kobuka mbuma” mpo elya yango na mikoko ezali koya.​—Masese 6:6-8; 30:24, 25.

w24.06 13 par. 18

Tikalá mopaya ya Yehova mpo na libela!

18 Ezali malamu tóyeba mpenza ndenge totalelaka mbongo. Omituna boye: ‘Makanisi na ngai ekendaka mbala mingi na mbongo mpe na biloko oyo ekoki kosomba? Soki nadefi mbongo, ekómaka kilo nafuta yango, mpo nazali kokanisa ete moto oyo adefisaki ngai azali na mposa na yango te? Soki nazali na mbongo namimonaka ete naleki basusu, kasi ezalaka mpasi nakabela bato? Nakanisaka ete ndeko boye to boye alingá biloko ya mokili kaka mpo azali na mbongo? Nalingaka kozala moninga ya bato ya mbongo mpe nakipaka mpenza te baoyo bazali babola?’ Ezali na ntina kotalela mituna yango mpo tozwi lokumu ya kozala bapaya ya Yehova. Tokotikala bapaya ya Yehova kaka soki bomoi na biso ezali na bolingo ya mbongo te. Soki tosali bongo, Yehova akotika biso soki moke te!​—Tángá Baebre 13:5.

Biloko ya motuya ya elimo

w09 15/4 17-18 par. 11-13

Bwanya ya Yehova emonanaka na biloko oyo akelá

11 Balapa (simbiliki ya mabanga) ezali ekelamu mosusu ya moke oyo ekoki koteya biso makambo ya ntina mingi. (Tángá Masese 30:26, NW.) Ezali lokola lapin ya monene kasi ezali na matoi mokuse mpe ekɔtá mpe ezali na makolo mikuse. Mwa nyama yango efandaka na bisika ya mabanga. Miso na yango oyo emonaka mosika ebatelaka yango mingi. Soki emoni nyama ya mabe oyo ekoki kolya yango, ekimaka na kati ya mabanga mpo na kobombana. Basimbiliki ya mabanga efandaka mbala mingi esika moko, mpe kosala bongo ebatelaka yango mpe esalisaka yango epesana molunge na eleko ya malili makasi.

12 Simbiliki ya mabanga ekoki koteya biso nini? Ya liboso, tomonaki ete nyama yango emityaka na likama te. Kasi, esalelaka miso na yango mpo na komona banguna na yango na mosika, mpe ezalaka mosika te na madusu ya mabanga epai ekoki kobombana mpo na komibatela. Ndenge moko mpe, tosengeli kozala ekɛngɛ na elimo mpo tómonaka na mosika makama ya mokili ya Satana. Ntoma Petelo apesaki baklisto toli oyo: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” (1 Pet. 5:8) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki ekɛngɛ, azalaki komibatela na makambo nyonso oyo Satana azalaki kosala mpo na kobebisa bosembo na Ye. (Mat. 4:1-11) Yesu atikelá bayekoli na ye ndakisa ya malamu mpenza!

13 Mpo na kozala ekɛngɛ, tosengeli kondima libateli ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso lelo oyo. Tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe mpe koyanganaka na makita ya lisangá. (Luka 4:4; Ebe. 10:24, 25) Lisusu, ndenge kaka simbiliki ya mabanga efandaka elongo na baninga, biso mpe tosengeli kozalaka elongo na bandeko na biso baklisto mpo ‘tólendisanaka.’ (Lom. 1:12) Soki tozali kosala nyonso mpo na kozwa libateli oyo Yehova azali kopesa, tokomonisa ete tondimi maloba ya Davidi, mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “[Yehova] azali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai, Nzambe na ngai, libanga na ngai oyo nakokima epai na ye.”​—Nz. 18:2.

15-21/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 31

Mateya oyo tokoki kozwa na toli ya mama moko

w11 1/2 19 par. 7-8

Kɔtisá na mitó ya bana na yo bizaleli ya malamu

Kobombela bango likambo moko te na oyo etali kosangisa nzoto. Makebisi ezalaka na ntina. (1 Bakorinti 6:18; Yakobo 1:14, 15) Kasi, Biblia elobeli libosoliboso likambo ya kosangisa nzoto lokola likabo ya Nzambe, kasi te lokola motambo ya Satana. (Masese 5:18, 19; Loyembo ya Salomo 1:2) Koyebisa bana kaka makama ya kosangisa nzoto ekoki kosala ete bákóma kotalela likambo yango na ndenge ya mabe, na ndenge oyo Biblia elobeli te. Corrina, elenge mwasi moko na France alobi boye: “Baboti na ngai balobelaka mingi likambo etali pite, mpe yango esalá ete nakóma kotalela kosangisa nzoto ete ezali likambo moko ya mabe.”

Omindimisa ete bana na yo bayebi makambo nyonso na oyo etali kosangisa nzoto. Nadia, mama moko na Mexique alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso koyebisa bana na ngai ete kosangisa nzoto ezali malamu mpe moto nyonso akelamá na mposa wana, mpe Yehova Nzambe apesá yango bato mpo básepela. Kasi, esengeli kosala yango kaka na kati ya libala. Ekoki kopesa biso esengo to mpasi, na kotalela ndenge oyo tozali kosalela yango.”

ijwhf lisolo 4 par. 11-13

Kosolola na bana likambo etali masanga

Zalá moto ya liboso ya kosolola na mwana likambo etali masanga. Mark, tata moko na Grande-Bretagne; alobi boye: “Likambo etali masanga ekoki kotya bana mobulu na motó. Natunaki mwana na ngai ya mobali ya mbula mwambe soki komɛla masanga ezali mabe to malamu. Nasalaki ete tósolola lokola baninga mpe yango esalisaki ye abimisa makanisi na ye polele.”

Okosimba mpenza motema ya mwana soki ozali kosolola na ye likambo etali masanga na mabaku mingi. Na kotalela mbula ya mwana, okoki kobakisa mpe masolo mosusu etali bomoi; na ndakisa kotosa mibeko ya nzela mpe makambo etali kosangisa nzoto.

Zalá ndakisa. Bana bazalaka lokola eponjɛ​—bamɛlaka nyonso oyo ezali zingazinga na bango​—bolukiluki emonisi ete bana bamekolaka mingi nde baboti na bango. Yango elingi koloba ete soki omɛlaka masanga mpo na kozwa kimya to kolongola mitungisi, mwana na yo akomona ete masanga nde solisyo mpo na mitungisi ya bomoi. Boye, zalá ndakisa malamu. Talá soki omɛlaka masanga na ndenge ebongi.

g17.6 9 par. 5

Teyá bana na yo ezaleli ya komikitisa

Lendisá mwana asalisaka basusu. Monisá mwana na yo ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Ndenge nini? Bokoki kosala elongo liste ya bato oyo bazali na mposa ya lisalisi mpo na kosomba biloko, komema bango na motuka to kopesa bango mbongo ya tike, to mpe kobongisela bango biloko oyo ebebi. Na nsima, ntango ozali kokende kosalisa bato yango, kende elongo na mwana na yo. Salá ete mwana yango amona esengo oyo ozali na yango ntango ozali kosalisa bato mosusu. Na ndenge yango, ndakisa na yo moko ekoteya mwana na yo ezaleli ya komikitisa na ndenge oyo ebongi mpenza.​—Toli ya Biblia: Luka 6:38.

Biloko ya motuya ya elimo

w25.01 13 par. 16

Mibali, bópesaka basi na bino lokumu

16 Yebisá ye ete osepelaka na ye. Mobali oyo alingaka mwasi na ye akumisaka ye mpe alendisaka ye. Mobali akoki kosala yango soki azali kobosana te koyebisa mwasi na ye ete asepelaka ndenge asalaka makasi azala mosungi mpo na ye. (Kol. 3:15) Soki mobali azali mpenza kokumisa mwasi na ye na motema mobimba, mwasi akozala na esengo. Akomiyoka ete abatelami, ete balingi ye, mpe ete azali na lokumu.​—Mas. 31:28.

22-28/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MOSAKALI 1-2

Kobá kopesa formasyo na libota oyo ekoya nsima

w17.01 27-28 par. 3-4

“Pesá bato ya sembo makambo yango”

3 Tosepelaka kosalela Yehova mpe tozwaka na motuya mingi mikumba na biso. Mingi na biso tolingaka mosala na biso mingi, yango wana tozalaka na mposa ete tókoba kosala yango ntango nyonso oyo esengeli. Kasi likambo ya mawa, ntango moto azali kokóma mokóló, akokaka lisusu te kosala makambo nyonso oyo amesanaki kosala ntango azalaki naino elenge. (Mosakoli 1:4) Likambo yango ezali kobimisa mikakatano mosusu mpo na basaleli ya Yehova. Lelo oyo, mosala ya kosakola ezali se kokola, mpe ebongiseli ya Yehova ezali kosalela baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo mpo na kosalisa bato mingi koleka báyoka nsango malamu. Kasi ntango mosusu ekoki kozala mpasi mpo bandeko oyo bakómi mikóló báyekola lolenge ya sika ya kosala makambo. (Luka 5:39) Longola yango, ezali likambo ya kokamwa te soki moto azali kolɛmba to makasi na ye ezali kosila ntango azali kokóma mokóló. (Masese 20:29) Yango wana, soki bandeko oyo bakómi mikóló bazali kopesa bandeko oyo bazali naino bilenge formasyo mpo bázwa mikumba mosusu na ebongiseli ya Yehova, yango ezali elembo ya bolingo mpe likambo oyo ebongi mpenza.​—Tángá Nzembo 71:18.

4 Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo bandeko oyo bazali na mikumba bátikela baoyo bazali naino bilenge mikumba mosusu. Likanisi ya kotika mokumba moko oyo bazalaki kolinga mingi ekoki kopesa bandeko yango mawa. Ekoki kosala bango mpasi kotika mokumba moko ya ntina mingi oyo bazalaki kolinga. To bakoki kobanga ete soki batambwisi mosala yango te, ekosalema malamu te. Mbala mosusu bakoki kokanisa ete bazali na ntango te mpo na kopesa basusu formasyo. Na ngámbo mosusu, bandeko oyo bazali naino bilenge basengeli komonisa motema molai soki bazali naino kopesa bango mikumba mosusu te.

Biloko ya motuya ya elimo

it “Mosakoli” par. 1

Mosakoli

Nkombo ya Ebre Qohèlèth (oyo elimboli “Moyanganisi; Mosangisi”) emonisi malamu mokumba ya mokonzi ya guvɛrnema na Yisraele oyo etambwisamaki na Nzambe. (Mos 1:1, 12) Mokonzi azalaki na mokumba ya kosalisa bato ya ekólo oyo emipesaki na Nzambe bákoba ntango nyonso kozala sembo epai ya Mokonzi ya solosolo mpe Nzambe na bango. (1Ba 8:1-5, 41-43, 66) Yango wana, ezalaki koyebana soki mokonzi moko azalaki malamu to mabe na kotalela soki akambaki ekólo na losambo ya Yehova to te. (2Ba 16:1-4; 18:1-6) Moyanganisi, elingi koloba Salomo, asilaki kosala makasi mpo na koyanganisa na tempelo Bayisraele ná baninga na bango, mpe bato oyo bafandaki bapaya. Na buku oyo, alukaki koyanganisa bato ya ekólo ya Nzambe mpo bázala mosika na makambo ya mpambampamba ya mokili oyo, oyo ebotaka mbuma te mpe kokamba bango na makambo oyo esepelisaka Nzambe oyo ekólo emipesaki na ye. Nkombo oyo ezali na Babiblia mingi euti na libongoli ya liloba Qohèlèth na Biblia ya Grɛki Septante, elingi koloba Ékklêsiastês (Mosakoli), oyo elimboli “moto ya eklezia (lisangá; liyangani).”

29/09–05/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MOSAKOLI 3-4

Batelá nsinga na yo oyo esalemi na bansinga misato

ijwhf lisolo 10 par. 2-8

Ndenge ya kotika baaparɛyi na esika na yango

● Kosalela baaparɛyi na bwanya ekoki kosalisa mingi na libala. Na ndakisa, babalani mosusu basalelaka baaparɛyi mpo na kosolola ntango bazali esika moko te na boumeli ya mokolo.

“Kotindela molongani na yo mesaje lokola “Je t’aime” to mpe ‘nakanisi yo’ esimbaka mpenza motema.”​—Jonathan.

● Kosalela baaparɛyi na ndenge ya mabe ekoki kobebisa makambo na libala. Na ndakisa, babalani mosusu basalelaka baaparɛyi ntango nyonso, mpe yango esalaka ete bázala na ntango mingi te mpo na balongani na bango.

“Nakanisi, na bantango mosusu mobali na ngai akoki koyoka mposa ya kosolisa ngai, kasi soki amoni ete nazali kosalela telefone, akoki kotika na ye.”​—Julissa.

● Bato mosusu balobaka ete bakoki kosolola malamu ná balongani na bango ata ntango bazali kosalela baaparɛyi. Sherry Turkle, moto moko ya sociologie, alobi ete wana ezali “kolanda banzela mingi na mbala moko,” esimbaka te. Likoki wana ya kosala makambo mingi na mbala moko ezali mpenza likambo ya malamu te. Sherry Turkle abakisi boye: “Ntango nyonso ozali kobakisa mosala moko likoló ya oyo nanu osilisi te, yebá ete okosala yango lisusu malamu mpenza te.”

“Nasepelaka kosolola na mobali na ngai kasi te ntango azali kosala makambo mingi na mbala moko, esalaka namiyoka neti nazali na valɛrɛ te na miso na ye.”​—Sarah.

Na mokuse: Ndenge na yo ya kosalela baaparɛyi ekoki komema bolamu to makama na libala na yo.

w23.05 23-24 par. 12-14

Koboma te “mɔtɔ ya Yah”

12 Ndenge nini babalani bakoki kolanda ndakisa ya Akila ná Prisile? Kanisá makambo mingi oyo yo ná molongani na yo bosengeli kosala. Bokoki kosala makambo yango bino mibale na esika moto moko kaka nde asala yango? Na ndakisa, Akila ná Prisile bazalaki kosakola elongo. Bino mpe bobongisaka mbala na mbala programɛ mpo na kosakola elongo? Akila ná Prisile basalaki mpe mosala elongo. Mbala mosusu yo ná molongani na yo bosalaka mosala moko te, kasi bokoki kosala misala mosusu ya ndako elongo. (Mos. 4:9) Ntango bozali kopesana mabɔkɔ mpo na kosala misala lokola wana, bokomona ete bozali mpenza ekipi mpe bokozala na libaku ya kosolola mingi. Robert ná Linda basali mbula koleka 50 na libala. Robert alobi boye: “Mpo na koloba solo, tozalaka mpenza na ntango mingi te ya kominanola elongo. Kasi ntango nazali kosokola basaani mpe mwasi na ngai azali kopangwisa yango, to ntango nazali kosala mosala ya bilanga mpe mwasi na ngai ayei pembeni na ngai, nayokaka esengo makasi. Kosala elongo ndenge wana esalisaka biso tózala na bomoko. Bolingo na biso ezali kokoba kokola.”

13 Kasi, bóbosana te, kozala elongo kaka te nde ekosala ete bózala na bomoko. Mwasi moko na Brésil alobi boye: “Lokola Mikolo oyo makambo ya kolekisela ntango ekómá mingi, okoki kokwea na motambo ya kokanisa ete lokola bofandaka ndako moko, yango elakisi ete bolekisaka ntango elongo. Nayei koyeba ete kaka kofanda esika moko ekoki te, nasengeli mpe kotyelaka molongani na ngai likebi na ndenge esengeli.” Talá oyo Bruno ná mwasi na ye, Tays, basalaki mpo bátyelanaka mpenza likebi. Bruno alobi boye: “Ntango tozali kopema elongo, totyaka batelefone na biso mosika, yango esalaka ete tólekisa ntango biso mibale.”

14 Bongo soki yo ná molongani na yo bosepelaka te kolekisa ntango elongo? Mbala mosusu mpo bosepela na makambo moko te, to mpe bosilikisanaka. Okoki kosala nini soki ezali bongo? Kanisá lisusu ndakisa ya mɔtɔ oyo tolobelaki na ebandeli. Epelaka makasi mbala moko te na ebandeli. Esɛngaka kotya nkoni malɛmbɛmalɛmbɛ tii ekopela makasi. Ndenge moko mpe, ekoki kosɛnga bóbanda kolekisaka mwa ntango moke mokolo na mokolo. Bósalaka mwa eloko oyo ekoki kosepelisa bino mibale, kasi te oyo ekoki kosilikisa moninga. (Yak. 3:18) Soki bosali bongo, bolingo na bino ekoki kokóma makasi.

w23.05 20 par. 3

Koboma te “mɔtɔ ya Yah”

3 Mpo “mɔtɔ ya Yah” ebomama te, mwasi ná mobali basengeli kosala makasi bázala na boyokani malamu elongo na Yehova. Ndenge nini kozala na boyakani malamu ná Yehova ekosalisa bango na libala? Soki mwasi ná mobali bazali kozwa boyokani na bango ná Tata na bango ya likoló na motuya mingi, bakosalela na motema mobimba toli oyo azali kopesa bango, mpe yango ekosalisa bango báboya mpe bálonga mikakatano oyo ekoki kosala ete bolingo na bango ekita. (Tángá Mosakoli 4:12.) Bato ya elimo basalaka makasi bámekola Yehova mpe bámonisa bizaleli na ye, na ndakisa, boboto, motema molai, mpe ezaleli ya kolimbisa. (Ef. 4:32–5:1) Soki mwasi ná mobali bazali komonisa bizaleli yango, ekozala mpasi te mpo bolingo na bango ekola. Ndeko mwasi moko na nkombo Lena, oyo asali mbula koleka 25 na libala alobi boye, “Ezalaka mpasi te kolinga mpe komemya moto ya elimo.”

Biloko ya motuya ya elimo

it “Bolingo” par. 39

Bolingo

“Ntango ya kolinga.” Tokoboya kolinga kaka baoyo bamonisi ete babongi na bolingo na biso te, to baoyo bamipesi na makambo ya mabe. Tokolinga bato nyonso oyo bamonisi polele te ete bayinaka Nzambe. Soki bakómi koyina Nzambe, ekómi ntango ya koboya komonisela bango bolingo. Yehova Nzambe ná Yesu Kristo balingaka makambo ya bosembo mpe bayinaka makambo ya kobuka mibeko. (Nz 45:7; Ebr 1:9) Baoyo bayinaka mpenza Nzambe ya solo bazali bato ya kolinga te. Kutu, mbuma malamu moko te ekomonana soki bomoniseli bato ya ndenge wana bolingo, mpo baoyo bayinaka Nzambe, bakosepela na bolingo na ye te. (Nz 139:21, 22; Yis 26:10) Na yango, Nzambe ayinaka bango mpe atye ntango oyo akopesa bango etumbu.​—Nz 21:8, 9; Mos 3:1, 8.

06-12/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MOSAKOLI 5-6

Ndenge ya komonisa limemya makasi epai ya Nzambe na biso monene

w08 15/8 15-16 par. 17-18

Tókumisa Yehova na etamboli ya lokumu

17 Tosengeli mpenza komonisaka lokumu na losambo na biso epai ya Yehova. Mosakoli 5:1 elobi boye: “Batelá makolo na yo wana okokɔta na ndako ya Nzambe.” Nzambe asɛngaki Moize mpe Yosua bálongola mapapa na bango ntango bazalaki na esika mosantu. (Ex. 3:5; Yos. 5:15) Basengelaki kosala bongo mpo na komonisa limemya. Na Yisalaele, banganga-nzambe basengelaki kolata kaleso ya lini “mpo na kobomba bolumbu na bango.” (Ex. 28:42, 43) Mobeko yango ezalaki mpo bolumbu na bango emonana te ntango bazali kosala mosala na etumbelo. Moto nyonso ya libota ya nganga-nzambe asengelaki kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali kobatela lokumu.

18 Na yango, komonisa lokumu na losambo esɛngi mpe kozala na limemya. Mpo basusu bápesa biso lokumu mpe bámemya biso, biso moko mpe tosengeli komonisaka limemya. Limemya na biso esengeli te kozala kaka ya libándá, mpo na koluka komonana na miso ya bato. Esengeli kouta na motema, mpo Nzambe atángaka motema. (1 Sam. 16:7; Mas. 21:2) Tosengeli komonisa lokumu na bomoto na biso mobimba; elingi koloba na etamboli na biso, na makanisi na biso, na boyokani na biso na basusu, ata mpe na ndenge oyo tomitalelaka. Tosengeli komonisaka lokumu ntango nyonso mpe na makambo nyonso oyo tozali koloba mpe kosala. Mpo na oyo etali etamboli, molato mpe monzɛlɛ, tosengeli kolanda toli ya ntoma Paulo ete: “Tozali kobɛtisa libaku ata na likambo moko te, mpo mosala na biso ya baministre ekoka te kofingama; kasi na makambo nyonso tozali komilobela lokola baministre ya Nzambe.” (2 Kol. 6:3, 4) ‘Tokómisaka kitoko mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso.’​—Tito 2:10.

w09 15/11 11 par. 21

Yekoláká Biblia mpo na kobongisa mabondeli na yo

21 Yesu abondelaki na limemya mpe na kondima makasi. Na ndakisa, liboso asekwisa Lazare, “Yesu atombolaki miso na likoló mpe alobaki ete: ‘Tata, natɔndi yo na ndenge oyoki ngai. Ya solo, nayebi ete oyokaka ngai ntango nyonso.’” (Yoa. 11:41, 42) Mabondeli na yo emonisaka mpe ete ozali na limemya mpe na kondima ya ndenge wana? Soki otaleli na likebi libondeli ya ndakisa oyo Yesu asalaki na limemya, okomona ete makambo ya ntina oyo ezali na libondeli yango ezali, kosantisama ya nkombo ya Yehova, koya ya Bokonzi na ye, mpe kokokisama ya mokano na ye. (Mat. 6:9, 10) Kanisá naino mabondeli na yo. Emonisaka ete omibanzabanzaka mpo na Bokonzi ya Yehova, kokokisama ya mokano na ye, mpe kosantisama ya nkombo na ye mosantu? Esengeli mpenza kozala bongo.

w17.04 6 par. 12

“Elako oyo osali, kokisá yango”

12 Ntango ozwaki batisimo, olakaki Yehova ete okosalela ye bomoi na yo mobimba mpe okosala nyonso oyo esengeli mpo na kotosa mitinda na ye. Kasi batisimo ezali kaka ebandeli. Lokola mikolo ezali koleka, biso nyonso tosengeli kokoba komitalela malamu. Tokoki komituna boye: ‘Banda nazwá batisimo tii lelo, boyokani na ngai na Yehova ezali kokóma makasi? Nazali kaka kosalela ye na motema na ngai mobimba? (Bakolose 3:23) Nabondelaka mbala na mbala? Natángaka Biblia mokolo na mokolo? Nayanganaka na makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ? Nabimaka na mosala ya kosakola mbala na mbala? To nasilá nde kobungisa esengo na ngai na makambo wana nyonso?’ Ntoma Petro akebisaki biso ete ezali likama kozala bato oyo basalaka mosala te na mosala ya Yehova. Tokoki kokima likama yango soki tozali kosala milende mpo na kokóma na kondima makasi, kokóma na boyebi mingi, kokoba koyika mpiko mpe kokangama na Nzambe.​—Tángá 2 Petro 1:5-8.

Biloko ya motuya ya elimo

w20.09 31 par. 3-5

Mituna ya batángi

Mosakoli 5:8 ezali kolobela moyangeli moko oyo azali konyokola moto oyo akelelá mpe kosalela ye makambo na bosembo te. Moyangeli yango asengeli kobosana te ete ekoki kozala na moto mosusu oyo azali likoló na ye mpe na bokonzi mingi koleka ye azali kotala. Kutu, ekoki kozala na bato mosusu oyo bazali na bokonzi mingi koleka. Likambo ya mawa, na baguvɛrnema ya bana bato, bakonzi nyonso bakoki kozala bato mabe, mpe bana-mboka banyokwamaka mpo na makambo na bango ya kozanga bosembo.

Kasi, ata soki emonani lokola ete makambo ekobonga te, koyeba ete Yehova azali kotala ata bakonzi oyo bazali na esika ya likoló koleka na baguvɛrnema ya bato, ekitisaka biso motema. Tokoki kosɛnga Nzambe asalisa biso, mpe kobwakela ye mikumba na biso ya kilo. (Nz. 55:22; Flp. 4:6, 7) Toyebi ete miso ya Yehova “ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.”​—2 Nt. 16:9.

Na yango, Mosakoli 5:8 ezali kosalisa biso tóyeba ete na mokili, ezalaka ntango nyonso na moto oyo azali na bokonzi mingi koleka basusu. Likambo eleki ntina, vɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso tóbosana te ete Yehova nde aleki likoló, mpe azali Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso. Azali sikoyo koyangela na nzela ya Mwana na ye, Yesu Kristo, oyo azali Mokonzi ya Bokonzi na ye. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo amonaka moto mpe makambo nyonso, azalaka ntango nyonso sembo; Mwana na ye mpe azali bongo.

13-19/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MOSAKOLI 7-8

“Malamu kokende na ndako oyo bazali kolela ebembe”

it “Matánga” par. 9

Matánga

Ntango ya kosala matánga. Mosakoli 3:1, 4 elobi ete ezali na ntango ya “kolela mpe ntango ya kosɛka; ntango ya koganga na kolela mpe ntango ya kobina.” Lokola liwa ekoki kokómela moto nyonso, Biblia emonisi ete motema ya bato ya bwanya esengeli kozala “na ndako oyo bazali kolela ebembe” na esika ya kokende fɛti. (Mos 7:2, 4; talá mpe Mas 14:13.) Na yango, moto ya bwanya asimbaka libaku oyo azwi ya komonisa mawa mpe kobɔndisa basusu, na esika akima yango mpo na kokende komisepelisa. Yango ekosalisa ye abatela na makanisi ete ye mpe akoki kokufa mpe akoba kokanisa Mozalisi na ye na motema na ye.

w19.06 24 par. 15

Salisá baoyo bazali kotungisama báyika mpiko

15 Ndeko William, oyo mwasi na ye akufá eleki mwa bambula, alobi boye: “Nasepelaka soki bato bazali kobɛta masolo ya mwasi na ngai; yango endimisaka ngai ete bato balingaki ye mpe bazalaki komemya ye. Yango esalisaka ngai mingi mpenza. Maloba na bango ebɔndisaka ngai mingi, mpo mwasi na ngai azalaki na motuya mingi mpo na ngai mpe tosalá makambo mingi elongo.” Bianca oyo mobali na ye akufá, alobi boye: “Ntango bandeko babondeli elongo na ngai mpe batángeli ngai vɛrsɛ moko to mibale, yango ebɔndisaka ngai. Nasepelaka mpe ntango bazali kobɛta masolo ya mobali na ngai, mpe koyoka ngai ntango nazali kobɛta masolo na ye.”

w17.07 16 par. 16

“Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”

16 Yebá ete mabondeli na biso ekoki kosalisa bandeko oyo bazali kolela. Tokoki kobondela mpo na bango, to kutu elongo na bango. Ata soki ekoki kozala mpasi mpo omoni ete okoki kolela ntango ozali kobondela, libondeli na yo oyo euti na motema ekoki kozala libɔndisi monene. Dalene alobi boye: “Na bantango mosusu, soki bandeko basi bayei kobɔndisa ngai, nazalaki kotuna bango soki tokoki kosala libondeli. Soki ndeko abandi kobondela, okomona azali kokakatana, kasi na nsima, okomona mongongo ebandi kofungwama mpe akosala libondeli oyo euti mpenza na motema. Kondima makasi ya bandeko basi yango, bolingo na bango mpe boboto na bango ekómisaki mpenza kondima na ngai makasi.”

w17.07 16 par. 17-19

“Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”

17 Mawa ya bato mosusu eumelaka te, kasi, mawa ya bato mosusu eumelaka mingi. Yango wana, zalá pene ya kosalisa. Na ebandeli, baninga mpe bandeko ya libota bayaka ebele mpo na kobɔndisa moto oyo azali kolela. Kasi na nsima, soki bato bazongeli bomoi na bango ya mokolo na mokolo, bato oyo bazali kolela bazalaka kaka na mposa ya libɔndisi. Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Tosengeli kobɔndisa baoyo bazali kolela ntango nyonso oyo bakozala na mposa na biso.​—Tángá 1 Batesaloniki 3:7.

18 Kobosana te ete moto akoki koyoka mpasi makasi na mbalakaka. Ekoki kozala soki dati oyo libala na bango esalemaki ekoki, soki ayoki miziki moko boye, atali bafɔtɔ, amoni likambo moko boye, to ayoki ata nsolo moko, makɛlɛlɛ moko boye, to mpe na eleko moko boye na kati ya mbula. Mbala ya liboso oyo moto oyo molongani na ye akufi akosala makambo mosusu ye moko, na ndakisa kokende liyangani to Ekaniseli, ekoki kozala mpasi mingi. Ndeko mobali moko alobi boye: “Nayebaki ete mbala ya liboso oyo dati ya libala na biso ekokoka, nakoyoka mpasi mingi, mpe ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, bandeko bazwaki bibongiseli mpo nalekisa ntango yango elongo na mwa baninga na ngai mpo nazala kaka ngai moko te.”

19 Kobosana te ete baoyo bazali kolela bazalaka na mposa ya libɔndisi kaka te na mikolo ya ntina mingi mpo na bango. Junia alobi boye: “Mbala mingi kosalisa moto mpe kozala elongo na ye ata na mokolo oyo ezali na likambo ya ntina te mpo na ye ezalaka malamu mpenza. Kosala ndenge wana ebongi mpenza mpe ebɔndisaka mingi.” Ya solo, tokoki te kosilisa mpasi nyonso mpe mawa ya bato oyo bazali kolela, kasi tokoki kobɔndisa bango soki tosali mwa makambo mpo na kosalisa bango. (1 Yoane 3:18) Gaby alobi: “Nazali mpenza na botɔndi epai ya Yehova mpo na bankulutu ya boboto oyo basalisaki ngai ntango nyonso oyo nazalaki na mpasi. Basalisaki ngai namona mpenza ete Yehova alingaka ngai.”

Biloko ya motuya ya elimo

w23.03 31 par. 18

“Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai”

18 Na bantango mosusu tokoki komona malamu tókutana na ndeko moko oyo ayokisaki biso mpasi. Kasi, tosengeli liboso komituna mituna oyo: ‘Nayebi mpenza makambo nyonso?’ (Mas. 18:13) ‘Asalaki likambo yango na nko?’ (Mos. 7:20) ‘Esí ekómela ngai mpe nasala libunga ya ndenge wana?’ (Mos. 7:21, 22) ‘Soki nakei kokutana na ndeko yango, ekobimisa te likambo mosusu ya monene koleka oyo nazali koluka kosilisa?’ (Tángá Masese 26:20.) Soki tozwi ntango ya kotalela mituna yango, tokoki komona ete bolingo oyo tolingaka bandeko na biso ekoki kotinda biso tólekisa likambo yango.

20-26/10

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MOSAKOLI 9-10

Talelá mikakatano na yo na ndenge oyo ebongi

w13 15/8 14 par. 20-21

“Kosilikela Yehova” soki moke te

20 Pesá foti na moto oyo azali na foti. Mpo na nini tosengeli kosala bongo? Mpo makambo mosusu oyo ekómelaka biso ezalaka foti na biso moko. Soki esalemi bongo, tosengeli kondima yango. (Gal. 6:7) Komeka te kopesa Yehova foti mpo na makambo yango. Mpo na nini kosala bongo ekozala libunga? Tózwa ndakisa ya motuka moko oyo ekoki kotambola na vitɛsi makasi. Kanisá ete sofɛlɛ atye vitɛsi makasi koleka oyo esengeli ntango azali kotambola na nzela ya nyokanyoka, mpe asali aksida. Okoloba nde ete aksida oyo esalemi ezali foti ya moto oyo asalaki motuka yango? Te, okoloba bongo te! Ndenge moko mpe, Yehova akelá biso na bonsomi ya kopona. Kasi, apesá biso mpe mibeko oyo tosengeli kolanda mpo tózwaka bikateli ya malamu. Sikoyo, mpo na nini kopesa Mozalisi na biso foti mpo na mabunga na biso moko?

21 Ya solo, mikakatano nyonso oyo tokutanaka na yango ezalaka kaka mpo na mabunga mpe bikateli na biso moko te. Makambo mosusu ekómelaka biso mpo na “ntango ná makambo oyo ekanami te.” (Mos. 9:11) Kasi, tóbosana soki moke te ete Satana Zabolo nde azali moto ya libosoliboso oyo abimisaka makambo ya mabe. (1 Yoa. 5:19; Em. 12:9) Ye nde monguna; kasi Yehova te!​—1 Pe. 5:8.

w19.09 5 par. 10

Yehova azwaka na motuya basaleli na ye ya komikitisa

10 Lisusu, komikitisa ekosalisa biso tóyikela mitungisi ya bomoi mpiko. Na bomoi, tokoki komona makambo oyo emonani ete ezali sembo te. Mokonzi Salomo alobaki: “Namoná basaleli bazali kotambola na bampunda kasi bankumu bazali kotambola na makolo, na mabele, lokola basaleli.” (Mos. 10:7) Yango elimboli ete bato oyo bazali na mayele mingi, bazwaka ntango nyonso te lokumu oyo esengeli. Mpe mbala mosusu bato oyo bazali na mayele mingi te bazwaka lokumu mingi koleka. Kasi, Salomo amonaki ete ezali likambo ya bwanya kondima makambo oyo ezali kosalema, na esika ya kokóma nkandankanda. (Mos. 6:9) Soki tozali na komikitisa, ekozala mpasi te tóndima makambo ya bomoi ndenge ezali, ata soki tosepeli na yango te.

w11 15/10 8 par. 1-2

Oponaka kominanola oyo ebongi?

BIBLIA emonisi polele ete Yehova alingi tózala na bomoi ya esengo. Na ndakisa, Nzembo 104:14, 15 elobi ete Yehova abimisaka “bilei na mabele, mpe vinyo oyo esepelisaka motema ya moto​—mowei mpamba, mpo na kongɛngisa elongi na mafuta, mpe limpa oyo epesaka makasi na motema ya moto​—mowei mpamba.” Yehova nde akolisaka milona mpo tózwa bilei, mafuta, mpe vinyo. Atako vinyo ezalaka na ntina mpenza te mpo tózala na bomoi, ekoki “kosepelisa motema.” (Mos. 9:7; 10:19) Ya solo, Yehova alingi tózala na esengo, mitema na biso etonda “na nsai.”​—Mis. 14:16, 17.

2 Na yango, tosengeli te komona ete tosali mabe soki tozwi mwa ntango mpo na ‘kotala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló’ mpe “fololo lísi ya esobe,” to kosala mwa makambo mosusu oyo ekoki kopesa biso makasi mpe kobakisa esengo na bomoi. (Mat. 6:26, 28; Nz. 8:3, 4) Bomoi ya esengo ezali “likabo ya Nzambe.” (Mos. 3:12, 13) Ntango oyo tolekisaka na kosakana ezali na kati ya likabo yango ya Nzambe. Soki tozali kotalela yango bongo, tokosalela yango na ndenge oyo ekosepelisa ye.

Biloko ya motuya ya elimo

it “Kotɔnga, Kokosela moto makambo” par. 4, 8

Kotɔnga, Kokosela moto makambo

Kotɔnga ekoki komema na kokosela moto makambo, mpe moto oyo akoselaka basusu makambo amityaka na likama. Maloba ya bwanya oyo ezali na Mosakoli 10:12-14 emonisi yango, ete: “Mbɛbu ya zoba ememelaka ye libebi. Maloba ya liboso oyo ebimaka na monɔkɔ na ye ezalaka bozoba, mpe maloba na ye ya nsuka ezalaka ligboma ya mabe mpenza. Kasi zoba alobaka mingi.”

Soki na bantango mosusu kotɔnga ekoki kobimisa mbuma mabe mpenza te (atako ekoki kokóma kokosela moto makambo to komema na yango), kokosela moto makambo ezalaka ntango nyonso mabe, epesaka ntango nyonso mpasi mpe ebimisaka kowelana. Ata soki motema mabe to te nde etindaki moto akosela moninga makambo, moto yango azali komitya na likama liboso ya Nzambe, mpo Nzambe ayinaka moto oyo “abimisaka kowelana na kati ya bandeko.” (Mas 6:16-19) Liloba ya Grɛki “kokosela moto makambo” to “kofunda” ezali diabolos. Liloba yango esalelami mpe na Biblia lokola nkombo mosusu ya Satana “Zabolo,” monguna monene oyo akoselaka Nzambe makambo. (Yoa 8:44; Em 12:9, 10; Eba 3:2-5) Yango emonisi esika ezaleli ya kokosela basusu makambo eutá.

27/10–02/11

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MOSAKOLI 11-12

Batelá nzoto mpe sepelá na bomoi

g 3/15 13 par. 6-7

Mopɛpɛ ya kitoko mpe kongɛnga ya moi​—Ezali mpe “ba-antibiotique”?

Kongɛnga ya moi mpe ezalaka na eloko oyo ebomaka bamikrobe. Zulunalo moko (Journal of Hospital Infection) elobi ete “bamikrobe mingi oyo ebebisaka mopɛpɛ ekufaka na kongɛnga ya moi.”

Ndenge nini okoki kozwela yango litomba? Okoki kokende libándá epai okoki kolekisa mwa ntango mpo na kozwa mwa kongɛnga ya moi mpe mwa mopɛpɛ. Ekosala yo malamu mpenza.

w23.02 21 par. 6-7

Zwá na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesá yo

6 Atako Biblia ezali te buku oyo elobelaka makambo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto, to biloko oyo tosengeli kolya, kasi emonisaka ndenge Yehova atalelaka makambo yango. Na ndakisa, eyebisi biso ‘tólongola mpasi’ oyo ekoki kobebisa nzoto na biso. (Mos. 11:10) Na ndakisa, Biblia epekisi kolya na lokoso mpe komɛla masanga mingi. (Mas. 23:20) Yehova alingi ete tózala na komipekisa ntango tozali kozwa ekateli ya kolya to ya komɛla eloko moko boye mpe soki ekosɛnga tólya mingi to tómɛla moke.​—1 Ko. 6:12; 9:25.

7 Tokoki kozwa bikateli oyo ekomonisa botɔndi na biso mpo na likabo ya bomoi oyo Yehova apesá biso, soki tozali kosalela makoki na biso ya kokanisa. (Nz. 119:99, 100; tángá Masese 2:11.) Na ndakisa, toponaka na mayele biloko oyo tosengeli kolya. Soki tosepelaka kolya eloko moko boye kasi toyebi ete eloko yango ekoki kopesa biso maladi, bososoli ekotinda biso tóboya yango. Tomonisaka mpe ete tozali na bososoli soki tozali kolala malamu, kosalaka ngalasisi mbala na mbala, mpe soki tozali kobatela nzoto na biso to ndako na biso pɛto.

w24.09 2 par. 2-3

“Bótosaka ntango nyonso liloba ya Nzambe”

2 Biso basaleli ya Yehova tozali bato ya esengo. Mpo na nini? Mpo na bantina mingi, kasi moko ya bantina yango ezali ete totángaka Biblia mokolo na mokolo mpe tosalaka nyonso mpo na kosalela makambo oyo toyekoli.​—Tángá Yakobo 1:22-25.

3 Tokoki kozwa matomba mingi soki tozali ntango nyonso ‘kotosa liloba ya Nzambe.’ Na ndakisa, kotosa liloba ekosala ete Yehova asepela, mpe yango ekopesa biso esengo. (Mos. 12:13) Ntango tozali kosalela makambo oyo totángaka na Liloba ya Nzambe, tozalaka na esengo na libota, mpe tokómaka na boninga makasi na bandeko na biso bakristo. Na ntembe te yo moko omoná ete ezali solo. Longola yango, tomibatelaka na ebele ya mikakatano oyo ekómelaka bato oyo batosaka mibeko ya Yehova te. Kutu tondimaka maloba ya Mokonzi Davidi. Na loyembo moko, alobelaki mobeko, bitinda, mpe bikateli ya lisambisi ya Yehova, na nsima alobaki: “Kobatela yango ezali na litomba monene.”​—Nz. 19:7-11.

Biloko ya motuya ya elimo

it “Kopemama” par. 10

Kopemama

Kasi, emonani ete mibali oyo Nzambe asalelaki mpo na kokoma Makomami bazalaki lokola barobo te, kokoma kaka te liloba na liloba oyo bayebisi bango. Na ndakisa, totángaka ete Emoniseli oyo “epemami na Nzambe” epesamaki epai ya Yoane “na bilembo” mpe ete na nsima Yoane “atatolaki mpo na liloba oyo Nzambe apesaki mpe mpo na litatoli oyo Yesu Kristo apesaki, ɛɛ mpo na makambo nyonso oyo amonaki.” (Em 1:1, 2) Ezalaki “na nzela ya elimo” nde Yoane ‘akómaki na mokolo ya Nkolo’ mpe ayokaki balobi na ye: “Oyo ozali komona, komá yango na rulo.” (Em 1:10, 11) Na yango, emonani ete Nzambe amonaki malamu atika bakomi ya Biblia básalela mayele na bango mpo na kopona maloba mpe elobeli oyo ebongi mpo na kolimbola bimonaneli oyo bamonaki (Hab 2:2), wana azalaki ntango nyonso kotambwisa bango mpo makambo oyo bakokoma ezala sikisiki mpe solo, eyokana mpe na mokano na ye. (Mas 30:5, 6) Milende wana oyo mokomi azalaki kosala emonisami na maloba ya Mosakoli 12:9, 10; azalaki kokanisa, kosala bolukiluki, mpe kotya makanisi na molɔngɔ mpo na kobimisa “maloba ya kitoko mpe kokoma na bosikisiki maloba ya solo.”​—Talá mpe Lk 1:1-4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto