LOYEMBO 34
Tambolá na bosembo
Ya Papye
1. Sambisá nga’, Nkolo taláká nga’;
Soki naza’ sembo, mp’elikya na nga’, yo.
Talá mpe nga’, ndenge nini naza’;
Pɛtolá nga’ mpenza, bongo napambwama.
(MONDIMO)
Mpo na ngai, Mokan’oyo nazwi:
Nakolanda seko, Nzela ya bosembo.
2. Nafandi te na bato ya mabe.
Oy’aboyi solo, nakabwani na ye.
Nzambe na nga’, naboi nakufa na
Bat’oyo balingá kanyaka, bitumba.
(MONDIMO)
Mpo na ngai, Mokan’oyo nazwi:
Nakolanda seko, Nzela ya bosembo.
3. Ndako na yo, nalingaka yango.
Losambo na yo nde pɛto, naponi’ango.
N’etumbelo na yo, nga’ nakoya,
Mpo na kotɔnda yo, bato báyoka nga’.
(MONDIMO)
Mpo na ngai, Mokan’oyo nazwi:
Nakolanda seko, Nzela ya bosembo.
(Talá mpe Nz. 25:2.)