Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/7 nk. 4-8
  • Moto oyo apekisaka bato báyeba Nzambe na nkombo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto oyo apekisaka bato báyeba Nzambe na nkombo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yesu ná bayekoli na ye bayebisaki bato nkombo ya Nzambe
  • Milende mpo na kolimwisa nkombo ya Nzambe lelo oyo
  • Okoki koyeba Yehova na nkombo na ye
  • Nkombo ya Nzambe mpe “Kondimana ya Sika”
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Nkombo ya Nzambe nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/7 nk. 4-8

Moto oyo apekisaka bato báyeba Nzambe na nkombo

EZALI na moto moko oyo alingi kopekisa yo oyeba nkombo ya Yehova mpe okóma te moninga na ye. Monguna mabe yango ezali nani? Biblia elobi boye: “Nzambe ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” Satana Zabolo nde nzambe ya mokili oyo etyolaka Yehova. Alingaka ozala na molili, mpo motema na yo engɛngisama te na “boyebi ya nkembo ya Nzambe.” Satana alingaka te oyeba Yehova na nkombo na ye. Kasi, ndenge nini Satana azipaka makanisi ya bato?​—2 Bakorinti 4:4-6.

Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kopekisa bato báyeba Nzambe na nkombo na ye. Na ndakisa, na ntango ya kala Bayuda mosusu baboyaki Makomami oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpo na kolanda mimeseno oyo esɛngaki koboya kosalela nkombo ya Nzambe. Emonani ete na ekeke ya liboso ya ntango na biso, Bayuda oyo bazalaki kotánga liboso ya bato nyonso, bazwaki mitindo ete bátángaka te nkombo ya Nzambe ndenge ezali na Makomami Mosantu, kasi bátya na esika na yango liloba ʼAdho·naiʹ, oyo elimboli “Nkolo.” Na ntembe te, likambo yango esalaki ete bázala lisusu te na boyokani malamu na Nzambe. Mingi babungisaki libaku ya kozala baninga ya Nzambe. Kasi, ezali boni mpo na Yesu? Ndenge nini azalaki kotalela nkombo ya Yehova?

Yesu ná bayekoli na ye bayebisaki bato nkombo ya Nzambe

Na libondeli moko epai ya Tata na ye, Yesu alobaki boye: “Nayebisi . . . nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.” (Yoane 17:26) Na ntembe te, Yesu azalaki kobenga nkombo ya Nzambe na mabaku mingi, na ndakisa, ntango azalaki kotánga, kolobela yango, to kolimbola eteni moko ya Makomami ya Ebre oyo ezalaki na nkombo yango ya ntina. Na yango, Yesu azalaki kosalela nkombo ya Nzambe kozanga kokakatana kaka ndenge basakoli oyo bazalaki liboso na ye basalaki yango. Soki ntango Yesu azalaki awa na mabele ezalaki na Bayuda mosusu oyo bazalaki koboya kosalela nkombo ya Nzambe na ntembe te, Yesu alingaki kolanda momeseno na bango te. Na mpiko nyonso, apamelaki bakonzi ya mangomba na maloba oyo: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino.”​—Matai 15:6.

Yesu atiká ndakisa malamu ya koyebisa bato nkombo ya Nzambe

Bayekoli ya sembo ya Yesu bakobaki koyebisa nkombo ya Nzambe ata nsima ya liwa mpe ya lisekwa ya Yesu. (Talá etanda “Bakristo ya liboso basalelaki nkombo ya Nzambe?”) Na pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, mokolo oyo lisangá ya bokristo esalemaki, ntoma Petro atángaki maloba ya esakweli ya Yoele, alobaki na ebele ya Bayuda mpe baprozelite ete: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Misala 2:21; Yoele 2:32) Bakristo ya liboso basalisaki bato ya bikólo mingi báyeba Yehova na nkombo. Yango wana, na likita moko oyo bantoma mpe mikóló basalaki na Yerusaleme, moyekoli Yakobo alobaki boye: “Nzambe abalolaki likebi na ye . . . epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.”​—Misala 15:14.

Atako bongo, monguna ya Nzambe alɛmbaki te. Na nsima ya liwa ya bantoma, Satana abimisaki nokinoki lipɛngwi. (Matai 13:38, 39; 2 Petro 2:1) Na ndakisa, Justin Martyr, mokomi moko oyo bato balobaka ete azalaki mokristo, abotamaki soki na eleko oyo Yoane, ntoma ya nsuka akufaki. Kasi, mbala na mbala, Justin azalaki koloba na makomi na ye ete Mopesi ya biloko nyonso ezali “Nzambe oyo abengami mpenza te na nkombo na ye.”

Ntango bakristo oyo bakómaki bapɛngwi basalaki bakopi ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, emonani ete balongolaki nkombo Yehova mpe na esika na yango batyaki liloba ya Grɛki Kyʹri·os, oyo elimboli “Nkolo.” Basalaki mpe bongo na Makomami ya Ebre. Lokola bazalaki kotánga lisusu te nkombo ya Nzambe na mongongo makasi, bakomeli Bayuda oyo bapɛngwaki, batyaki liloba ʼAdho·naiʹ mbala soki 130 na esika ya nkombo ya Nzambe na makomi na bango. Libongoli moko ya Biblia na Latin, oyo eyebanaki mingi, mpe oyo Jerôme asilisaki kobongola yango na mobu 405 ya ntango na biso mpe oyo ekómaki kobengama vulgate elongolaki mpe nkombo ya Nzambe.

Milende mpo na kolimwisa nkombo ya Nzambe lelo oyo

Bakonzi ya mangomba ndenge na ndenge

Mangomba elongolaki nkombo ya Nzambe na Biblia mpo na mimeseno ya Bayuda to mpo na matomba na bango moko

Lelo oyo, bato ya mayele bayebi ete nkombo ya Yehova ezali mbala soki 7 000 na Biblia. Na yango, mabongoli mosusu oyo esalelamaka mingi, na ndakisa Biblia ya Katolike Bible de Jérusalem, La Biblia Latinoamérica, na Espagnol, mpe Reina-Valera oyo bato mingi na Espagne basalelaka, esaleli nkombo ya Nzambe. Mabongoli mosusu ebongoli nkombo ya Nzambe na “Yawe.”

Likambo ya mawa, mangomba mingi oyo ebimisaka mbongo mpo na kobongola Biblia, etyaka babongoli mpanzi likoló mpo bálongola nkombo ya Nzambe na mabongoli na bango. Na ndakisa, na mokanda moko ya 29 Yuni 2008, oyo Vatican etindelaki prezida ya likita ya baepiskɔpɔ ya Katolike, elobaki boye: “Na bambula oyo euti koleka likambo ya kosalela nkombo ya Nzambe ya Yisraele ezongaki.” Mokanda yango epesaki etinda oyo: “Esengeli te kosalela to kotánga nkombo ya Nzambe.” Lisusu, “mpo na libongoli ya Biblia na minɔkɔ ya lelo oyo, . . . Tetragrame ya nkombo ya Nzambe esengeli kobongolama na Adonai/​Kyrios: ‘Nkolo.’” Emonani polele ete etinda oyo Vatican epesaki ezalaki na mokano ete bato bátika kosalela nkombo ya Nzambe.

Baprotesta mpe balandi kaka lokolo yango. Molobeli ya ebongiseli moko ya Lingomba ya Protesta oyo ebimisaki mbongo mpo na kobongola Biblia moko (New International Version) oyo ebimaki na Anglais na 1978, akomaki boye: “Yehova ezali mpenza nkombo ya Nzambe mpe tosengelaki mpenza kosalela yango, kasi tobimisaki badolare ebele (koleka milio 2) mpo Biblia yango ebongolama mpe tokobwaka mpenza mbongo na mai soki tobongoli na ndakisa, Nzembo 23 boye: ‘Yehova azali mobateli na ngai.’”

Lisusu, mangomba epekisaki bato ya Amerika ya sudi báyeba Nzambe na nkombo na ye. Steven Voth, mokambi ya ebongiseli moko (United Bible Societies), akomi boye: “Moko ya bantembe oyo bato ya Protesta ya Amerika ya sudi bazalaki kotyana ezalaki na ntina na nkombo Jehová . . . Likambo ya kokamwa, bato mingi ya Lingomba ya Néo-pentecôtisme . . . balobaki ete balingi libongoli ya Reina Valera ya 1960, kasi ezala te na nkombo Jehová. Na esika na yango balingaki nde liloba Señor [Nkolo].” Voth, alobi ete liboso ebongiseli wana eboyaki makanisi na bango, kasi na nsima bandimaki mpe babimisaki libongoli ya Biblia Reina-Valera oyo “ezalaki te na nkombo Jehová.”

Kolongola nkombo ya Nzambe na Liloba na ye mpe kotya na esika na yango liloba “Nkolo,” epekisi batángi báyeba mpenza soki Nzambe azali nani. Likambo oyo basalaki ebimisaki mobulungano. Na ndakisa, motángi akoyeba te soki liloba “Nkolo” ezali komonisa Yehova to Mwana na ye, Yesu. Yango wana, na vɛrsɛ oyo ntoma Petro atángaki maloba ya Davidi oyo: “Yehova alobaki na Nkolo na ngai [Yesu oyo asekwaki] ete: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali,’” mabongoli mingi ya Biblia ebongoli yango boye: “Nkolo alobaki na Nkolo na ngai.” (Misala 2:34, Biblia haut fleuve) Lisusu, David Clines na mokanda na ye moko (“Yahweh and the God of Christian Theology”) amonisi ete: “Likambo oyo esali ete bakristo bábosana nkombo Yawe ezali mpo batye likebi na bango nyonso kaka epai ya Kristo.” Na yango, bandimi mingi bayebaka te ete Nzambe ya solo oyo Yesu azalaki kobondela azalaka mpenza, mpe azali na nkombo, Yehova.

Satana asali nyonso mpo na kozipa makanisi ya bato mpo báyeba Nzambe te. Ata bongo, okoki kokóma moninga ya Yehova.

Okoki koyeba Yehova na nkombo na ye

Mpo na koloba solo, Satana asali nyonso mpo na kolimwisa nkombo ya Nzambe, mpe na mayele mabe, asaleli lingomba ya lokuta mpo na kosala likambo yango. Kasi, likambo ya solo ezali ete nguya moko te ezala na likoló to na mabele ekoki kopekisa Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso asala ete nkombo na ye eyebana epai ya bato nyonso oyo balingi koyeba solo na ntina na ye mpe mokano na ye kitoko mpo na bato ya sembo.

Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola ndenge okoki kopusana penepene na Nzambe na nzela ya boyekoli ya Biblia. Balandaka ndakisa ya Yesu, oyo alobaki na Nzambe ete: “Nayebisi bango nkombo na yo.” (Yoane 17:26) Wana ozali kotalela bavɛrsɛ oyo emonisi mikumba ndenge na ndenge oyo Yehova azali kokokisa mpo na kopambola bato, okoyeba bizaleli kitoko mingi ya bomoto na ye.

Yobo, moto moko ya sembo azalaki ‘moninga ya Nzambe ya motema,’ yo mpe okoki kozala moninga ya Nzambe ya motema. (Yobo 29:4) Soki ozwi boyebi ya Liloba ya Nzambe okoki koyeba Yehova na nkombo na ye. Boyebi yango ekopesa yo elikya ete Yehova akosala na boyokani na ndimbola oyo apesaki na nkombo na ye​—‘Nakokóma nyonso oyo nasepeli.’ (Kobima 3:14) Na yango, akokokisa mpenza bilaka na ye nyonso kitoko mpo na bato.

Bakristo ya liboso basalelaki nkombo ya Nzambe?

Na ekeke ya liboso, na mikolo ya bantoma ya Yesu, masangá ya bokristo esalemaki na bisika mingi. Bandeko ya masangá yango bazalaki koyangana mbala na mbala mpo na koyekola Makomami. Bakristo yango ya liboso bazalaki komona nkombo Yehova na Makomami?

Lokola Grɛki ekómaki monɔkɔ oyo ezalaki kolobama na mikili mingi, masangá mingi ezalaki kosalela libongoli ya Septante, libongoli ya Makomami ya Ebre oyo basilisaki kobongola yango na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso. Bato mosusu ya mayele balobaka ete banda na ntango oyo ebongolamaki, Biblia ya Septante esalelaki titre Kyʹri·os liloba ya Grɛki oyo elimboli “Nkolo” na esika ya nkombo ya Nzambe. Kasi, masolo emonisi bongo te.

Biteni oyo balakisi awa ezali biteni ya Biblia ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki oyo ekomamaki na ekeke ya liboso. Ezali komonisa polele nkombo Yehova, na makomi ya Grɛki oyo emonisami na balɛtrɛ minei ya Ebre יהוה (YHWH), to tetragrame. Profɛsɛrɛ George Howard, akomaki boye: “Tozali na bakopi misato ekeseni ya Biblia ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki oyo ekomamaki liboso Yesu abotama mpe na kati na yango ezali ata na esika moko te oyo tetragrame ebongolami na kyrios to ebongolami na liloba mosusu. Tokoki mpenza koloba ete liboso Testama ya Sika ekomama, ntango ezalaki kokomama, mpe nsima ya kokomama na yango, Bayuda bazalaki na momeseno ya kokoma nkombo ya Nzambe . . . mbala moko na makomi ya Grɛki kozanga kobongola yango.”​—Biblical Archaeology Review.

Bantoma mpe bayekoli ya Bayuda Yesu basalelaki nkombo ya Nzambe na makomi oyo bakomaki na litambwisi ya elimo santu? Profɛsɛrɛ Howard alobi boye: “Libongoli ya Septante oyo Lingomba ya Testama ya Sika ezalaki kosalela mpe kotánga ezalaki na nkombo ya Nzambe na monɔkɔ ya Ebre, na ntembe te, bakomi ya Testama ya Sika bakɔtisaki tetragrame na makomi oyo bazalaki kotánga.”

Na yango, tokoki koloba kozanga kokakatana ete bakristo ya liboso bazalaki kotánga nkombo ya Nzambe na mabongoli na bango ya Makomami ya Ebre mpe na bakopi na bango ya Makomami ya Grɛki.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto